Likita Linene
Moko kati na Klisto
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Moko kati na Klisto

Ezali bobele na mpe na nzela ya kokangamaka na mpe bolingo ya Yesu Klisto nde tokoki kotia elikya ya kozala moto moko.

Lokola Mokambi Dallin H. Oaks amonisaki lelo ezali Eyenga ya Mandalala, ebandeli ya Poso Esantu, kosala bokoti ya lokumu ya Nkolo kati na Yelusaleme, mpasi na Ye ya Getesemane mpe liwa na Ye na ekulusu kaka mikolo elandi, mpe Lisekwa na Ye ya nkembo na Eyenga ya Pasika. Tika ete biso tozwa mokano ya kobosana te nini Klisto anyokwamaki mpo na biso.1 Mpe tobungisa te esengo monene koleka tokoyoka mbala moko lisusu na Pasika ntango totali elonga na Ye likolo na nkunda mpe likabo ya lisekwa ya mokili mobimba.

Mpokwa liboso ya mimekano mpe kobakama na ekulusu oyo ezalaki kozela Ye, Yesu asanganaki na bolei ya Pasika na Bapostolo na Ye. Na nsuka ya Bolei ya mpokwa ya Nsuka, kati na libondeli ya bule, Yesu asengaki na Tata na Ye na maloba maye: “Tata Mosantu, batela na nkombo na yomei [Bapostolo na ngai] baoyo yo opesaki ngai, mpo ete bazala moko, lokola tozali.”2

Sima, na boboto, Mobikisi akomisaki libondeli na Ye monene na kokotisa bandimi na Ye banso:

“Nabondeli kaka mpo na bango moko te, kasi mpo na bango lisusu oyo bakondimela ngai na nzela ya maloba na bango;

“Ete bakoka kozala moko; lokola yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, ete bango lisusu bazala moko kati na biso.”3

Kokoma moko ezali moto ya likambo ezongaka mbala na mbala kati na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe kati ya mosala ya Nzambe na bana na Ye. Na limemia ya engumba ya Siona na mikolo ya Enoka, elobami ete “bazalaki motema moko mpe makanisi moko.”4 Na basantu ya ebandeli ya Eklezia ya yambo ya Yesu Klisto, Kondimana na Sika ekomi, “ Ebele ya baoyo bandimelaki bazali na motema moko mpe molimo moko.”5

Na eleko na biso, Nkolo alendisaki, “Na yebisi bino, bozala moko; mpe soki bozali moko te bozali ya ngai te.”6 Kati na bantina epasami na Nkolo mpo na kolimbola mpo na nini basantu ya yambo ya Missouri bakokaki te kosala esika moko ya Siona, ezalaki na baye “ bazali na bomoko te na lolenge ya mobeko ya bokonzi ya likolo.”7

Wapi Nzambe atiami likolo ya mitema mpe mayele , bato balimbolami lokola “kati na moto moko, bana ya Klisto.”8

Ntango Mobikisi asekwi abimelaki Bato ya kala ya Buku ya Mormon, Ye amonaki na koboya na ntango ya kala ezalaki na boswani kati na bato na ntina ya libatisi mpe makambo misusu. Atindaki:

“Mpe ekozala boswani te na kati na bino, lokola ezalaki kino sikawa; mpe ekozala boswani na kati na bino etali biteni ya malongi na ngai, lokola ezalaki kina sikawa.

Mpo solo, solo nalobi epai na bino, ye oyo azali na molimo ya boweli azali ya ngai te, kasi azali ya zabulu, oyo azali tata ya boweli, mpe ye alamusi mitema ya bato na boweli na nkanda, bango na bango.”9

Na kati ya mokili na biso ya boswani koleka, lolenge nini bomoko ekokokisama, mingimingi na Eklezia wapi tosengeli kozala na “Nkolo moko, bondimi moko, libatisi moko”?10 Polo apesi biso fungola:

“Mpo lokola mingi na bino bobatisami na kati ya Klisto bolati Klisto.

“Ezali lisusu na Moyuda to Mwela te, ezali lisusu na mowumbu to monsomi te, ezali lisusu na mobali to mwasi te: mpamba te bino banso bozali moko kati na Klisto.”11

Tozali ya kokesena mingi mpe na bantango misusu liloba moko te mpo na kozala na makoki ya koya kosangana elongo lokola moko na likambo songolo to na nse ya nkombo mosusu. Kaka kati na Yesu Klisto ekoki biso solo kokoma moko.

Kokoma moko kati na Klisto eyaka moko na moko—tobandaka biso nyonso .na bisomei. Tozali na bomoto mibale ya nzoto mpe ya molimo mpe ezali ntango misusu na bitumba kati na bisomei. Lolenge polo alobaki:

“Mpamba te nasepelaka na mobeko ya Nzambe na bomoto ya kati;

“Mpe namoni mobeko mosusu kati [na] biteni [ya nzoto na ngai], kobundisaka mobeko ya makanisi na ngai, mpe komemaka ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kati na biteni na ngai.”12

Yesu azali lisusu na bomoto ya nzoto mpe molimo. Amekamaki; Asosolaki; Akoki kosunga biso tokokisa bomoko kati na Ye.13 Yango wana, kobelemaka na pole mpe ngolu ya Klisto, tozali kobunda mpo na kopesa molimo na biso—mpe Molimo Mosantu—bokonzi likolo ya Nzoto. Mpe ntango tokweyi moke, Klisto, na Bomikabi na Ye, apesaki biso likabo ya boyamboli mpe libaku ya komeka lisusu.

Soki moko na moko na biso “tolati Klisto,” sima elongo tokolikya kokoma moko, lokola polo alobaki, “nzoto ya Klisto.”14 “Kolata Klisto” solo esangisi kosala ya Ye “mobeko ya liboso mpe ya monene”15 mobeko na biso ya liboso mpe ya monene koleka, mpe soki tolingi Nzambe, tokobatela mibeko na Ye.16

Bomoko na bandeko na biso mibali mpe bandeko basi na nzoto ya Klisto ekolaka ntango tolandaka mobeko ya mibale—ekangama na ndenge ya kokabola te na ya yambo—kolinga basusu lokola bisomei.17 Mpe nabanzi ete bomoko ya koleka kobonga nie ekokaki kozwama kati na biso soki tolandaki maloba ya likolo mpe mosantu ya Mobikisi na mobeko oyo ya mibale—kolingana kaka te ndenge tomilingaka kasi ndenge Ye alingaki biso.18 Tokomi oyo makomi elobi: “Mobali [mpe muasi] nyonso aluki ntina ya moto na ye ya pembeni, mpe kosalaka makambo nyonso na ntina ya nkembo ya Nzambe.”19

Mokambi Marion G. Romney, mosungi na Bokambi ya Yambo, na kolimbolaka lolenge nini kimia mpe bomoko oyo ewumelaka ezwamaka, alobaki:

“Soki moto moko, kopesaka nzela na Satana, atondisami na misala ya nzoto, azali komibundisa yemei. Soki mibale, mokomoko na bango bakobundisa bangomei mpe kobundisa moko mpe mosusu. Soki bato mingi batiki, lisanga moko [ekobuka] mbuma monene ya mitungisi mpe kowelana. Soki mibeko ya mboka etiki, ekozala kowelana ya mokili mobimba.”

Akobaki: “Ntango mosala ya nzoto ezali na kosalema na mokili mobimba, lolenge moko mpe ezali nsango malamu ya kimia. Soki moto moko abiki yango, akozwa kimia na kati na yemei. Soki bato mibale babiki yango, mokomoko na bango akozwa kimia kati na bangomei mpe moko mosusu. Soki baimboka babiki yango, mboka ekozala na esika ya kofanda. Epai wapi ezali na bamboka ebele kosepelaka na mbuma ya Molimo kotambwisa makambo ya mokili, sima , mpe sima, mbonda ya bitumba ekotika kobeta libela, mpe bendele ya bitumba ekotandama. … (tala Alfred Lord Tennyson, ‘Locksley Hall,” The Complete Poetical Works of Tennyson, ed, ed. W. J. Rolfe, Boston, Houghton–Mifflin Co., 1898, p. 93, lines 27–28.)”20

Ntango “kolataka Klisto,” ekokoma kosalema koyanola to kobwaka bokeseni, bozangi baboyokani, mpe baboswani. Ndakisa moko ya somo ya bokabwani ezwami kati na ya biso mambi ya Eklezia. Mpaka Brigham Henry Roberts (ayebani mingi lokola B. H. Roberts), abotami na Angleterre na 1857, asalaki lokola moko ya lisanga ya yambo ya Bantuku Nsambo—oyo tobengi lelo oyo lokola Bokambi ya Bantuku Nsambo. Mpaka Roberts azalaki mobundeli akoka mpe azanga kolemba ya nsango malamu ezongisama mpe ya Eklezia na bantango na yango mingi ya mikakatano.

Elilingi
Young B. H. Roberts

Na 1895, nzokande, mosala ya Mpaka Roberts etiamaki na kobebisama na kowelana. B. H. apesamaki mosala ya kokoma ntoma na lingomba ya bato babengaki kosala nkoma ya liboso ya mobeko likonzi mpo na Utah ntango ekomaki ekolo mokonzi. Nsima azwaki mokano ya kokoma moko moponami mpo na Congres ya Etazini ya Amerika kasi ayebisaki to asengaki nzela te na Bakambi ya Yambo. Mokambi Joseph F. Smith, mosungi moko kati na bokambi ya yambo, apamelaki B.  H. mpo na mbeba na yango na ntango ya liyangani monene ya bonganganzambe. Mpaka Roberts akweyaki na maponami mpe alobaki ete bokweyi na ye ezalaki mpo na maloba ya Mokambi Smith. Azalaki kotyola bakambi ya Eklezia na masukulu mpe masolo mingi. Amilongolaki na mosala ya Eklezia ya molende. Ntango ya likita moko ya molayi kati ya tempelo ya Salt Lake elongo na babokambi ya yambo mpe Lisanga ya Ba Zomi na mibale B. H. alukaki komilongisa yemei. Sima, “Mokambi [Wilford] Woodruff apesaki [Mpaka Roberts] poso misato mpo na kotala lisusu esika na ye. Soki atikali kozanga koyambola, bakopemisa ye uta na Ntuku Nsambo.”21

Kati na likita eyaki sima elongo na Bapostolo Heber J. Grant mpe Francis Lyman, B. H. azalaki nanu matata, kasi bolingo mpe Molimo Mosantu na nsuka balongaki. Pinzoli eyaki na miso na ye. Bapostolo mibale bazalaki na likoki ya koyanola na mwa bitumba misusu mpe na makambo ya mabe oyo ezalaki kotungisa B. H., mpe bakendaki na libondeli ya motema mpo na boyokani. Ntongo elandaki, sima losambo ya molayi, Mpaka Roberts atindaki mokanda epayi ya Bampaka Grant mpe Lyman ete alengelamaki mpo na kosangana lisusu na ya ye bandeko mibali.22

Ntango sima akutanaki na Bokambi ya Yambo, Mpaka Roberts alobaki, “Nakendaki epayi ya Nkolo mpe nazwaki pole mpe malako na nzela ya Molimo na Ye mpo na kosokema na bokonzi ya Nzambe.”23 Atindikamaki na bolingo ya Nzambe, B. H. Roberts atikalaki mokambi kondima mpe akoka ya Eklezia kino na nsuka ya bomoi na ye.24

Elilingi
Mapaka B. H. Roberts

Tokoki lisusu komona kati na ndakisa oyo ete bomoko elingi te koloba kaka kondima ete moto nyonso asengeli “kosala eloko na ye moko” to kokende na nzela na ye moko. Tokoki te kozala moko kaka soki totie bokasi na biso banso mpo na likambo ya banso. Elakisi, kati na maloba ya B.H. Roberts, kosokema na bokonzi ya Nzambe. Tozali bandimi bakeseni ya nzoto ya Klisto, kosalaka misala ekeseni na bangonga ekeseni—litoyi, liso, moto, loboko, makolo—kasi nyonso na nzoto moko.25 Yango wana, ntina na biso ezali “ete ekozala te bokabwani kati na nzoto; kasi ete bandimi basengeli bazala komibatela moko na mosusu.”26

Bomoko esengi te kozala ndenge moko, kasi esengi koyokana. Tokoki kozala na mitema na biso ekangisami na bolingo, ezali moko na kondima mpe malongi, mpe kozanga koyokana na makambo ya politiki, mangomba ya masano ya ndembo tosungaka, bilei tolingaka, mpe motango ya makambo masusu. Kasi tokoki te kozanga koyokana to tobunda mpo na kolonga nkanda to koyinana. Elobaki Mobikisi:

“Mpo solo,solo nalobi epai na bino, ye oyo azali na molimo ya boweli azali ya ngai te, kasi ya zabulu, oyo azali tata ya boweli, mpe ye alamusi mitema ya bato na boweli na nkanda bango na bango.

Tala, eye ezali te malongi ma ngai, kolamusa mitema ya bato na nkanda, moko kobundisa mosusu; kasi eye ezali malongi ma ngai, ete makambo ya lolenge boye esila.”27

Mobu moko eleki, Mokambi Russell M. Nelson alobaki na biso na maloba maye: “Moto moko te kati na biso akoki kokonza bikolo, to misala ya basusu, to kutu bato ya mabota na biso moko. Kasi biso moko tokoki komikonza. Libiangi na ngai ya lelo, bandeko mibali mpe basi, ezali ya kosukisa bondongwani oyo ezali kati na ya bino motema, ya bino libota, mpe na ya bino bomoi. Bokunda eloko oyo nyonso ezali kobenda mpo na kosala basusu mabe—bobendi yango ezala lolenge elongi ezali komonana, maloba ya kanda, to boyini ya moto oyo asala yo mabe. Mobikisi atindaki biso topesa litama mosusu [tala 3 Nefi 12:39], kolinga banguna na biso, mpe kosambela mpo na baoyo bazali konyokola biso [tala 3 Nefi 12:44].”28

Nalobi lisusu ete ezali kaka mpe na nzela ya bosembo na biso moko na Yesu Klisto nde tokoki kolikya kozala moko—moko na kati, moko na ndako, moko na Eklezia, mpe nsukansuka na Siona, mpe nyonso ya likolo, moko na Tata mpe Mwana mpe Molimo Mosantu.

Nazongi na molulu ya Poso Esantu mpe elonga ya nsuka ya Mosikoli na biso. Lisekwa ya Yesu Klisto etatoli na bonzambe na ye ete alongaki biloko nyonso. Bosekwi na Ye etatoli ete, tokangisami na Ye na boyokani, biso mpe tokolonga biloko nyonso mpe tokokoma moko. Lisekwa na Ye etatoli ete na nzela na Ye, bozangi kufa mpe bomoi ya seko ezali solo.

Ntongo eye, natatoli na Bosekwi na Ye mpenza mpe nyonso oyo ezali kosalama, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.