Likita Linene
Nalimbisami Mpenza?
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Nalimbisami Mpenza?

Elaka ya bolimbisi ya mobimba mpe ya kokoka esalemi na moto nyonso—kati mpe na nzela ya Bomikabi oyo ezanga nsuka ya Yesu Klisto.

Mibu mingi eleki, Ndeko mwasi Nattress mpe ngai tokendaki na Idaho, epai wapi tofungolaki mombongo ya sika. Mikolo mpe butu ezalaki milai na ndako ya mosala. Likambo ya esengo, tozalaki kofanda kaka mwa bandako moke mosika na mosala. Poso na poso, Shawna mpe bana na biso misato ya basi—bango nyonso bazalaki na nse ya mbula motoba —bazalaki koya na ndako ya mosala mpo na kolya elongo na nzanga.

Na mokolo ya bongo nsima ya kolia midi na libota na biso, namonaki ete mwana na biso ya mwasi ya mibu mitano, Michelle, atikelaki ngai nsango moko ya moto ye moko, ekomamaki na mokanda ya Post-it mpe ekangisamaki na telefone ya ndako na ngai ya mosala.

Ezalaki kaka koloba, “Papa, kobosana te kolinga ngai. Bolingo, Michelle.” Oyo ezalaki bokundoli ya nguya mpo na elenge tata moko na ntina ya makambo oyo ezali na ntina mingi.

Bandeko mibali mpe basi, natatoli ete ya biso Tata na Lola amikundolaka biso ntango nyonso mpe ete Ye alingaka biso mingi. Motuna na ngai ezali oyo: Tomikundolaka Ye? Mpe tolingaka Ye?

Mibu mileki, nasalaki lokola mokambi ya Eklezia ya esika. Moko ya bilenge mibali na biso, Danny, azalaki na mayele mingi. Azalaki na botosi, boboto, malamu, mpe azalaki na motrema monene. Nzokande, ntango asilisaki kelasi ya ntei, abandaki kosangana na ebele ya bato ya nkanda. Amikotisaki na bangi, mingimingi na metamfetamine, mpe atambolaki moombo ya bangi mpe kobebisa biloko. Ewumelaki te, lolenge na ye ya komonana ebongwanaki mpenza. Ezalaki mpasi mpo na koyeba ye. Mbongwana ya ntina mingi ezalaki na miso na ye—pole na miso na ye esilaki kokita. Mbala mingi nasembolaki loboko epayi na ye, kasi esimbaki te. Asepelaki na yango te.

Ezalaki mpasi komona elenge mobali oyo ya kokamwa konyokwama mpe kobika bomoi oyo ezalaki ya ye te! Akokaki kosala makambo mingi koleka.

Na nsima, mokolo moko, likamwisi na ye ebandaki.

Akendeki na likita ya elambo epai wapi leki na ye ya mobali akabolaki litatoli na ye yambo ya kokende mpo na misio. Na bowumeli ya likita yango, Danny ayokaki likambo oyo ayokaki te banda kala. Ayokaki bolingo ya Nkolo. Nsukansuka azwaki elikya.

Atako azalaki na mposa ya kobongwana, ezalaki mpasi mpo na Danny. Komela bangi mpe koyoka ete amemi ngambo ezalaki mpasi mingi koleka oyo akokaki kokanga motema.

Mokolo moko mpenza nsima ya nzanga, ntango nazalaki libanda kokata matiti na biso, Danny abendaki na motuka na ye kozanga koyebisa. Azalaki kobunda na ndenge ya nsomo. Nakataki masini ya kokata matiti, mpe tofandaki elongo na elili na ebutelo ya veranda. Ezalaki na ntango wana nde akabolaki mayoki ya motema na ye. Alingaki mpenza kozonga sima. Nzokande, koboya boombo na ye mpe lolenge na ye ya bomoi ezalaki mpasi mingi. Kobakisa na likambo oyo, ayokaki ngambo mingi, ayokaki nsoni mingi mpo akweyaki mosika boye. Atunaki, “Nakoki mpenza kolimbisama? Ezali mpenza na nzela ya kozonga?”

Nsima ya kosopa motema na ye na mitungisi wana, totangi Alma mokapo 36 elongo:

“Iyo, namikundolaki masumu mpe mabe ma ngai manso. …

“Iyo, … likanisi mpenza lya boyei o kati ya miso mya Nzambe wa ngai linyokolaki molimo bwa ngai na nsomo ya kolimbola te” (milongo 13–14).

Nsima ya milongo wana, Danny alobaki, “Oyo ezali mpenza ndenge nazali koyoka!”

Tokobaki boye:

“Mpe ntango epasolamaki ngai motema o bokundoli bwa masumu ma ngai mingi, tala, namikundolaki lisusu koyoka tata wa ngai kosakola epai ya bato etali boyei bwa Yesu Klisto moko, Mwana Mobali wa Nzambe, mpo ya komikaba mpo ya masumu ma mokili. …

“Mpe o, bosepeli kani, mpe mwinda mwa bokamwi kani namonoki” (milongo 17, 20).

Ntango tozalaki kotanga mikapo yango, mpisoli ebandaki kosopana. Esengo ya Alma ezalaki esengo oyo azalaki koluka!

Tosololaki ete Alma azalaki moto mabe mpenza. Nzokande, ntango kaka abongoli motema, atalaki nsima ata mokolo moko te. Akomaki moyekoli ya sembo ya Yesu Klisto. Akomaki mosakoli! Miso ya Danny ekangamaki. “Mosakoli?” alobaki ye.

Nayanolaki kaka, “Iyo, profeta. Kotungisa yo te!”

Tolobelaki ete atako masumu na ye ematamaki te na nivo ya Alma, elaka moko ya bolimbisi ya mobimba mpe ya kokoka esalemi na moto nyonso—kati mpe na nzela ya Bomikabi oyo ezanga nsuka ya Yesu Klisto.

Danny asosolaki sikoyo. Ayebaki nini asengelaki kosala: asengelaki kobanda mobembo na ye na kotiaka motema na Nkolo mpe komilimbisa!

Mbongwana makasi ya motema ya Danny ezalaki eloko mosusu te koleka likamwisi. Nsima ya ntango, elongi na ye ebongwanaki, mpe kongenga na miso na ye ezongaki. Akomaki moto alongobani mpo na tempelo! Ayaki nsuka nsuka kozonga!

Nsima ya basanza mingi, natunaki Danny soki akolinga kotinda bosengi mpo na kosala misio ya ntango mobimba. Eyano na ye ezalaki moko oyo etutaki mpe ekamwisaki.

Alobaki, “Nakosepela kosala misio, kasi boyebi esika nazalaki mpe makambo nasali! Nakanisaki ete nabwakami.”

Nayanolaki, “Okoki kozala na ntina. Nzokande, eloko moko te ezali kopekisa biso kosenga. Soki olimbisami, ata moke okoyeba ete omonisaki mposa ya motema mobimba ya kosalela Nkolo.” Miso na ye engengaki. Asepelaki mingi na likanisi yango. Mpo na ye oyo ezalaki lisasi molai, kasi ezalaki libaku oyo andimaki kozwa.

Mwa baposo na nsima, mpe na kokamwa na ye, likamwisi mosusu esalemaki. Danny azwaki libiangi mpo na kosala misio ya ntango mobimba.

Mwa basanza nsima ya Danny kokoma na elanga ya misio, nazwaki libiangi ya telefone. Mokambi na ye alobaki kaka, “Ezali nini na elenge mobali oyo? Azali misionele oyo aleki kokamwisa oyo namona naino te!” Omoni, mokambi oyo azwaki Alma Elenge ya mikolo na biso.

Mbula mibale nsima, Danny azongaki ndako na lokumu, asalelaki Nkolo na motema na ye mobimba, na nguya, na makanisi, mpe makasi.

Kolandaka lapolo na ye ya misionele na likita ya elambo, nazongaki na ndako, kaka mpo na koyoka kobeta na ekuke ya liboso. Kuna Danny atelemaki na mai ya miso oyo ezalaki kobima. Alobaki, “Tokoki kosolola mpo na miniti moko?” Tokendaki na libanda na ebutelo se moko wana kaka ya veranda.

Alobaki, “Mokambi, okanisi ete nalimbisami mpenza?”

Sikawa mpisoli na ngai ezalaki kobima elongo na oyo ya ye. Liboso na ngai etelemaki moyekoli moko ya komipesa ya Yesu Klisto oyo apesaki nyonso na ye mpo na koteya mpe kotatola na ntina ya Mobikisi. Azalaki elilingi ya nguya ya kobikisa mpe ya kolendisa ya Bomikabi ya Mobikisi.

Nalobaki, “Danny! Osili kotala na talatala? Omoni miso na yo? Matondi na pole, mpe ozali kongenga na Molimo ya Nkolo. Ya solo olimbisami! Ozali ya kokamwa! Sikawa oyo osengeli kosala ezali kokende liboso na bomoi na yo. Kotala nsima te! Zela na bondimi na makuli oyo ekolanda.”

Likamwisi ya Danny ezali kokoba tii lelo. Abalaki na tempelo mpe azongaki na kelasi, epayi wapi azwaki diplome ya master. Azali kokoba kosalela Nkolo na lokumu mpe bolongobani na mabiangi na ye. Likambo ya ntina mingi koleka, akomi mobali malamu koleka mpe tata ya sembo. Azali moyekoli ya sembo ya Yesu Klisto.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Kozanga Bomikabi ya [Mobikisi] oyo ezangi nsuka, bato banso balingaki kobunga na ndenge ya kozongisama te.”1 Danny abungaki te, mpe biso mpe tobungi te epai ya Nkolo. Atelemi na ekuke mpo na kotombola biso, kolendisa biso, mpe kolimbisa biso. Amikundoli ntango nyonso kolinga biso!

Elakiseli moko ya kokamwa ya bolingo ya Mobikisi mpo na bana ya Nzambe ekomami na Buku ya Mormon: “Ntango Yesu alobaki boye, abwakaki miso na ye zingazinga lisusu ya ebele ya bato, mpe amonaki bango bazalaki na mpisoli, mpe batalaki ye na bokasi lokola soki balingaki kosenga ye awumela mwa moke elongo na bango” (3 Nefi 17:5).

Mobikisi asilaki kolekisa mokolo mobimba na kosalelaka bato. Nzokande, Azalaki na mingi ya kosala—Asengelaki kotala bampate na Ye mosusu; Asengelaki kokende epayi ya Tata na Ye.

Atako mikumba wana, Asosolaki ete bato bazalaki na mposa ete Ye awumela mwa ntango molai. Nsima, na motema ya Mobikisi etondi na mawa, moko ya makamwisi minene koleka na lisolo ya mokili esalemaki:

Atikalaki.

Apambolaki bango.

Asalelaki bana na bango moko na moko.

Asambelaki mpo na bango, mpe alelaki elongo na bango.

Mpe abikisaki bango. (Tala 3 Nefi 17.)

Elaka na ye ezali ya seko: Akobikisa biso.

Na baoyo bapengwi na nzela ya boyokani, tosengi boyeba ete elikya ezali ntango nyonso, kobikisama ezali ntango nyonso, mpe nzela ya kozonga ezali ntango nyonso.

Nsango na Ye ya seko ya elikya ezali nkisi ya kobikisa mpo na baoyo nyonso bazali kobika na mokili oyo etondi na mikakatano. Mobikisi alobaki, “Nazali nzela, solo, mpe bomoi” (Yoane 14:6).

Bandeko mibali mpe basi, tomikundola koluka Ye, kolinga Ye, mpe ntango nyonso komikundola Ye.

Natatoli ete Nzambe azali na bomoi mpe Ye alingi biso. Natatoli lisusu ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili. Azali mobikisi ya nguya. Nayebi ete Mosikoli na ngai azali na bomoi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Litangi

  1. Russell M. Nelson, “Prepare for Blessings of the Temple,” Liahona,, Sanza ya misato 2002.