Likita Linene
Ozana na Nzambe oyo Aleki Likolo
Likita linene ya sanza ya minei 2023


Ozana na Nzambe oyo Aleki Likolo

Bokoti ya elonga ya Yesu Klisto kati ya Yelusaleme mpe milulu ya poso wana oyo elandaki elendisi malongi oyo tokoki kosalela na bomoi na biso lelo.

Lelo, lokola elobamaki, tozali kosepela elongo na Baklisto ya mokili mobimba mpo na kokumisa Yesu Klisto na Eyenga oyo ya Mandalala. Pene mibu nkoto mibale eleki Eyenga ya Mandalala etiamaki elembo ya ebandeli ya poso ya nsuka ya mosala ya bokufi ya Yesu Klisto. Ezalaki poso moko ya motuya na lisolo ya bato.

Yango ebandaki na lisakoli ya Yesu Klisto lokola elakamaki Masiya na bokoti na Ye ya nkembo na Yelusaleme pene ya Bobakami na ekulusu mpe Lisekwa na Ye.1 Na ndimbola ya bonzambe, libonza ya bomikabi na Ye ezalaki na mosala na Ye ya bokufi, kokokisa yango mpo ete biso tofanda elongo na Tata na biso ya Lola libela na libela.

Makomi eyebisi biso ete poso ebandaki na etuluku ya bato mingi kotelemaka na bikuke ya engumba mpo na kotala “mosakoli Yesu uta naa Nazalete na Galilai.”2 Bango “bakamati mango na mbila, mpe bamaki kozwana na ye. Bangangi ete, Ozana! Ye oyo azali koya na nkombo na Nkolo apambwama, ye Mokonzi naYisalaele.”3

Lisolo wana ya kala mpenza ya Biblia ekundolisi ngai kozala na mosala ya Eklezia na Takoradi, Ghana. Kokamwa, nazalaki kuna na Eyenga ya Mandalala.

Elilingi
Lingomba ya bandimi na Takoradi, Ghana

Nasengelaki kokabola Likonzi ya Takoradi Ghana mpo na kokela Likonzi ya Mpintsin Ghana. Lelo, bandimi ya Eklezia bakomi koleka 100,000 (mokama ya nkoto yoko) na Ghana.4 (Totombeli boyei malamu na Ga Mantse, Ya Ye Nkumu Mokonzi Nii Tackie Teiko Tsuru II ya Accra, Ghana, oyo azali elongo na biso lelo.) Kokutana na Basantu oyo, nayokaki bolingo mpe bomipesi na bango ya mozindo epai ya Nkolo. Nalakisi bolingo na ngai monene mpo na bango, mpe ete Mokambi ya Eklezia alingaka bango. Nasaleli maloba ya Mobikisi ekomamaki na Yoane: “Ete bino bolingana bino na bino lokola ngai nalingi bino.”5 Bazwaki yango lokola “likita ya nalingi yo.”6

Elilingi
Mpaka Rasband kopesaka mbote na maboko na Takoradi, Ghana

Ntango natalaki likolo mpe na nse milongo ya balingami bandeko mibali mpe basi oyo mpe mabota na bango kati ya ndakonzambe, nakokaki komona likolo ya bilongi na bango bongengi ya litatoli mpe bondimi na Yesu Klisto. Nayokaki mposa na bango ya kotangama lokola bandimi ya Eklezia na Ye ya bokoli monene. Mpe ntango bayembi bayembaki, bayembaki lokola banjelu.

Elilingi
Lisanga ya bayembi na Takoradi, Ghana
Elilingi
Mpaka Rasband elongo na bandimi na Ghana

Lokola na Eyenga ya Mandalala ya kala, baoyo bazalaki bayekoli ya Yesu Klisto basanganaki mpo na kokumisa Ye lokola baye bazalaki na bikuke ya Yelusaleme basalaki, na mandalala na maboko na bango, bagangaki, “Ozana …: Ye oyo azali koya na nkombo na Nkolo apambwama.”7

Elilingi
Boningisi ya mandalala na Ghana

Kutu bandimi ya palwasi mosusu kati ya eklezia pene, bazalaki kokumisa Eyenga ya Mandalala. Ntango nazalaki koloba uta na elobelo, namonaki libanda ya lininisa bazalaki kosepela kotambolaka na nzela na mandalala na bango na maboko, ebele lokola na foto oyo. Ezali likambo oyo nakotikala kobosana ata moke te—banso kati na biso mokolo wanakokumisako Mokonzi na bakonzi.

Mokambi Russell M. Nelson alobelaki biso tosalela Eyenga ya Mandalala ezala “bule mpenza na komikundolaka, kaka te lokola mandalala oyo ezalaki kopepa mpo na kokumisa bokoti ya Yesu Klisto na Yelusaleme, kasi na bokundoli bitando ya maboko na Ye.” Nsima Mokambi Nelson asalelaki maloba ya Yisaya, oyo “alobaki na ntina ya elaka ya Mobikisi, “nakobosana bino te,” na maloba oyo: “Botala, natie bino na bitando ya maboko na ngai.”8

Nkolo ayebi yambo ete bokufi ezali mpasi. Bampota na Ye ekundolisaka biso ete Ye “akitaki na nse … ya nyonso”9 mpo ete akoka kobikisa biso ntango tozali konyokwama mpe kozala ndakisa na biso ya “kokangama na nzela wana,”10 nzela na Ye, ete “Nzambe akozala elongo na [biso] mpo na libela na libela.”11

Eyenga ya Mandalala ezalaki kaka molulu te, lokasa mosusu kati ya lisolo na mokolo, ntango mpe esika. Bokoti ya elonga ya Yesu Klisto kati ya Yelusaleme mpe milulu ya poso wana oyo elandaki elendisi malongi oyo tokoki kosalela na bomoi na biso lelo.

Tika totala mwa malongi ya seko oyo esalamaka na mosala na Ye mobimba kosukisaka na Yelusaleme.

Ya yambo, lisakoli. Ndakisa, mosakoli ya Boyokani na Kala Zakaliya asakolaki na ntina ya bokoti ya elonga ya Yesu Klisto na Yelusaleme, kutu kolimbolaka ete Ye akokota likolo ya mpunda.12 Yesu asakolaki yambo Lisekwa na Ye ntango Azalaki komilengela mpo na kokota na engumba, kolobaka:

“Botala, tokende na Yelusaleme; mpe Mwana na moto akotekama epai ya mokonzi ya banganganzambe mpe epai ya basali mibeko, mpe bakoboma ye,

“Mpe bakopesa ye na Bayuda te mpo batiola, mpe babeta ye fimbu mpe babaka ye na ekulusu: mpe na mokolo ya misato akosekwa lisusu.”13

Ya mibale, kimoninga ya Molimo Mosantu. Joseph Smith ateyaki, “Moto moko te akoki koyeba ete Yesu Klisto azali Nkolo, kasi na nzela ya Molimo Mosantu.”14 Mobikisi alakaki bayekoli na Ye15 na Elambo ya Nsuka16 na kisuku ya likolo,17 “nakotika bino moko te.”18 Bakozala bango moko te mpo na komema bosolo ya nsango malamu kasi bakozala na likabo ya Molimo Mosantu mpo na kokamba bango. “Kimia, ngai natikeli na bino, ya ngai kimia natikeli bino: te lokola mokili epesaka, kimia na ngai napesi epai na bino.”19 Elongo na likabo ya Molimo Mosantu tozali na elikya moko wana; ete biso “tokoki ntango nyonso kozala na Molimo na Ye ezala elongo na [biso]”20 mpe “na nguya ya Molimo Mosantu [biso] tokoki koyeba bosolo ya makambu nyonso.”21

Ya misato, bomoi ya moyekoli. Bomoyi yamoyekoli ya solo ezali boyokani ezanga kotatabana, botosi ya mibeko ya seko mpe bolingo ya Nzambe, ya liboso mpe yambo. Eloko moko te ekoningana. Ebele ya baye bapesaki lokumu na mandalala basanjolaki Ye lokola Masiya. Yango ezalaki mpenza oyo Ye azalaki. Balandaki Ye, makamwisi na Ye, mpe mateya na Ye. Kasi nkembo ya bato mingi ewumelaki te. Basusu oyo bagangaki, “Ozana,”22 kala mingi te babongolaki mpe bagangaki, “Baka ye na ekulusu.”23

Ya minei, Bomikabi ya Yesu Klisto.24 Na mikolo na Ye ya nsuka, oyo elandaki Eyenga ya Mandalala, asalaki Bomikabi na Ye ya kokamwa, uta na bolozi ya Getesemane na botioli ya momekano na Ye, monyokwami na ekulusu, mpe bokundi na Ye na lilita ya kodefa. Kasi esukaki wana te. Na nkembo ya libiangi na Ye lokola Mosikoli ya bana nyonso ya Tata na Ye, mikolo misato nsima alamukaki uta na lilita wana, asekwaki,25 kaka lokola Ye asakolaki.

Tozali kokoba kotonda Bomikabi ezanga bokokanisi ya Yesu Klisto? Tozali koyoka nguya na yango ya peto, sikawa? Yango wana Yesu Klisto, Mobandeli mpe Mosukisi ya Lobiko, akendaki na Yelusaleme, mpo na kobikisa biso nyonso. Maloba ma ye na kati ya Alma esimbi motema: “Soki boyoki mbongwana yoko o motema, mpe soko boyoki koyemba nzembo ya bolingo bwa lbosikolo, nalingi kotuna, ekoki bino koyoka boye sikawa?”26 Nakoki solo koloba, bayembi na Takoradi na Eyenga wana ya Mandalala bayembaki “loyembo ya bolingo ya bosikoli.”

Na poso ya nsuka ya mosala na Ye ya bokufi, Yesu Klisto apesaki lisese ya baseka zomi.27 Azalaki koteya bozongi na Ye na baye bamilengelaki mpo na koyamba Ye, na mandalala te na maboko na bango kasi na mwinda ya nsango malamu kati na bango. Asalelaki elilingi ya minda ya kopela mpe ezali kongenga, na mafuta ya kafukafu mpo na kopesa pole, lokola ndimbola ya bolingi ya kobika na ndenge na Ye, bosolo na Ye, mpe kokabola pole na Ye.

Boyebi lisolo yango. Baseka zomi balakisi bandimi ya Eklezia, mpe mobali elakisi Yesu Klisto.

Baseka zomi bazwaki minda na bango mpe “bakendaki kokutana na mobali.”28 Mitano bazalaki na bwanya, bamilengelaki na mafuta na minda na bango mpe mosusu mpo na kobakisa, mpe mitano bazalaki bazoba, minda ekufaki babombaki mafuta te. Ntango mbela eyokanaki, “Botala, mobali ye oyo; bokende kokutana na ye,”29 mitano oyo bazalaki na “bwanya mpe [bango] bazwaki bosolo, mpe [bango] bazwaki Molimo Mosantu mpo na mokambi na bango,”30 bamilengelaki mpo na “mokonzi na bango mpe mopesi mobeko na bango,”31 ete “nkembo na ye [ekoka] kozala likolo na bango.”32 Mitano mosusu bamekaki koluka mafuta. Kasi ntango elekaki. Molulu ekendaki liboso kozanga bango. Ntango babetaki ekuke mpe babondelaki bakota, Nkolo ayanolaki, “nayebi bino te.”33

Nini tokoki koyoka soki Ye alobi na biso, “nayebi bino te!”

Biso lokola baseka zomi, tozali na minda; kasi tozali na mafuta? Nazali kobanga mpo ezali na basusu oyo bazali na mafuta moke, bazali na ntango te bamipesi mingi na bamposa ya mokili mpo na esika bamilengela malamu. Mafuta eyaka na kondimelaka mpe kosalaka engebene na lisakoli mpe maloba ya baprofeta ya bomoi, Mokambi Nelson ye moko, Bapesi toli na ye, mpe Bapostolo zomi na mibale. Mafuta etondisamaka na milimo na biso ntango toyokaka Molimo Mosantu mpe tosalelaka na bokambi wana ya bonzambe. Mafuta esopanaka na mitema na biso ntango maponi na biso elakisi ete tolingaka Nkolo mpe tolingaka maye Ye alingaki. Mafuta eyaka uta koyambola mpe koluka mpe koluka libiki ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Soki ozali koluka kotondisa maye basusu babengaka “molongo ya katini to ya makambo ya kosala,” yango ezali: Tondisa katini na mafuta na lolenge ya mayi ya bomoi ya Yesu Klisto,34 oyo ezali ndimbola ya bomoi mpe mateya na Ye. Na ngambo mosusu, pona malamu esika moko ya mosika to molulu ya kafukafu oyo ekotika te molimo na yo etonda to ekoka sikawa; kosalela malongi oyo eteyami na bolingi ya Yesu Klisto. Nalobelaki yango liboso: boyamba mateya ya masakoli mpe mateya ya boprofeta, bosalela engebene na bitinda ya Molimo Mosantu, bokoma bayekoli ya solo solo, mpe boluka nguya ya lobiko ya Bomikabi ya Nkolo na biso. Mokanda wana ya makambo ya kosala ekomema bino esika eye bolingi kokende—bozonga epai ya Tata na bino na Lola.

Eyenga wana ya Mandalala na Takoradi ezalaki boyebi moko ya kokesana mpo na ngai mpo ete nakabolaki yango elongo na lingomba ya bandimi ya bandeko mibali mpe basi. Mpo ezalaki ya bikolo mpe bisanga nyonso ya mokili mobimba. Motema mpe molimo na ngai, lokola ya bino, ebeleli: “Ozana na Nzambe Aleki Likolo.”35

Atako totelemi na bikuke ya Yelusaleme te lelo na mandalala na maboko na biso, ntango ekoya, lokola esakolamaki na Emoniseli, “bato ebele, oyo moto moko te akoki kotanga, ya bikolo nyonso, mpe mabota nyonso mpe bato nyonso mpe nkota nyonso, [bakotelema] liboso ya ngwende, mpe liboso ya Mwana na Mpate, alati bilamba ya mpembe, mpe mandalala na maboko na bango.”36

Natikeli bino lipamboli na ngai lokola Apostolo ya Yesu Klisto ete bokoluka makasi na etingia mpo na kobika na boyengebene mpe kozala kati ya baoyo, na mandalala na maboko na bango, bakosakola Mwana ya Nzambe, Mosikoli Monene ya biso nyonso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Bansango malamu nyonso minei—Matai 21–28; Malako 11–16; Luka 19-24; mpe Yoane 12–21—etalisi mikolo ya nsuka ya mosala ya Yesu Klisto na bokufi, oyo eponamaki na bonzambe mpo na kosala mapamboli ya libiki mpe bonetoli ekokisama na bana nyonso ya Nzambe. Na bangonga oyo bakomi bakesenisi na maye bakotisi kasi te na mateya mpe misala ya Mobikisi.

  2. Tala Matai 21:10–11.

  3. Yoane 12:13.

  4. Kolandaka motango ya Bandimi mpe Mikanda ya Motango, elobi ezali na bandimi 102.592 na Ghana.

  5. Yoane 15:12.

  6. Ntango nyonso nazalaki kosolola na bandimi, bazalaki koloba na ngai, “Mpaka Rasband, molingami Apostolo na biso, nalingaka yo.” Bato oyo batondisami na Molimo mpe bolingo ya Nzambe oyo bakabolaka bolingo yango na pete.

  7. Matai 21:9.

  8. Tala Russell M. Nelson, “The Peace and Hope of Easter” (video), Sanza ya minei 2021, ChurchofJesusChrist.org/media; Isaiah 49:16.

  9. Malongi mpe Mayokani 122:8. Na Sanza ya zomi 1838 Profeta Joseph mpe bakambi basusu ya Eklezia batiamaki na Boloko ya Liberty. Makambo ezalaki mabe makasi. Sanza nsima ya mabaku na bango ya kozala na mpasi, akomelaki bandimi na Sanza ya misato na 1839, kotiaka nsambo oyo asalaki epai ya Nkolo ayoka mawa mpo esika azalaki mpe “Basantu bazali konyokwama.” Akabolaki lisusu eyano ya Nkolo ya nsambo eye lokola ekomami na Malongi mpe Mayokani 121–23.

  10. Malongi mpe Mayokani 122:9. Bolendisi ya Nkolo epai ya Joseph Smith na Boloko ya Liberty ebondisaki ye mpe bososoli ya molimo ete mpasi mpe mikakatano ekoki kolendisa biso, koteya bompikiliki mpe mpiko ya moto ye moko. Nkolo abengaki ye “atikala na nzela,” oyo ezalaki nzela ya Nkolo, koyikaka mpiko na bozangi bosembo lokola “Mwana ya [Nzambe, oyo] akitaki na nse na yango nyonso. Ezali yo monene koleka ye?” (Malongi mpe Mayokani 122:8).

  11. Malongi mpe Mayokani 122:9. Libondeli ete Nzambe “akozala elongo na bino” ezali elaka ya solo solo mpo na baye batikalaka ngwi na bondimi na bango mpe bandimelaka Nkolo.

  12. Tala Jekelia 9:9.

  13. Matai 20:18–19. James E. Talmage akomi na Jesus the Christ: “Ezali … likambo ya kokamwa ete Bazomi na mibale basosolaki ndimbola na Ye te. … Mpo na bango maloba ya Nkolo na bango oyo balingaki mingi ekesenaki mpenza na oyo ya Yesu. Bayebaki Ye kozala Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi; mpe lolenge nini Moto ya boye akoki kotiama na lolenge oyo mpe kobomama?” ([1916], 502–3).

  14. Joseph Smith asalaki esakola oyo na Basi ya Lingomba ya Bamama Basungi na Nauvoo, Sanza ya minei 28, 1842, lokola etangami na “History of Joseph Smith,” Nsango ya Deseret, Sanza ya libwa 19, 1855, 218. Kolandisama na mokapo ya zomi na mibale ya 1 Bakolinti, alimbolaki molongo ya misato molongo ya misato, “Moto moko te akoki koloba ete Yesu azali Nkolo, kasi na Molimo Mosantu,” kotala yango lisusu mpo na koloba, “Moto moko te akoki koyeba ete Yesu azali Nkolo kasi na Molimo Mosantu.” (See The First Fifty Years of Relief Society: Key Documents in Latter-day Saint Women’s History [2016], 2.2, churchhistorianspress.org.)

  15. Yesu akabolaki Bolei ya Nsuka elongo na bayekoli na Ye (tala Malako 14:12–18). Kati na bazomi na babale ezalaki Petelo, Andeleaw, Yakobo, Yoane, Matai, Filipo, Thoma, Balotolome, Yakobo (mwana ya Alfayi), Yuda Mukelioti, Yuda (ndeko mobali ya Yakobo), mpe Simona (tala Luka 6:13–16).

  16. Yesu asalaki elambo elongo na bayekoli na Ye na Elambo ya Nsuka (tala Matai 26:26–29; Malako 14:22–25; Luka 22:19–20).

  17. Moyi mpe butu ekesani oyo Yesu asalaki Elambo ya Nsuka na kati ya “kisuku monene” lelo bandimelaka yango te mpo na ntina ya bokeseni ya Matai, Malako, mpe Luka mpe Yoane. Matai, Malako, mpe Luka balimbolaki ete Elambo ya Nsuka esalamaki na “mokolo ya yambo feti ya lipa ezanga fulu,” to bilei ya Pasika (tala Matai 26:17; Malako 14:12; Luka 22:1, 7). Yoane, bongo, alimboli ete Yesu akangamaki yambo ya bilei ya Pasika (tala Yoane 18:28), elimboli ete Elambo ya Nsuka esalamaki mokolo moko yambo ya bilei ya Pasika. Bisalelo ya mikanda ya Eklezia mpe eteyelo ya Basantu ba mikolo mya Nsuka etalisi kondima ete Yesu asalaki Elambo ya Nsuka elongo na bayekoli na Ye na Kisuku Monene na mpokwa yambo Ye abakama na ekulusu. Baklisto oyo bazalaki kosepela na Poso ya Bule bayebi Mokolo ya minei lokola mokolo ya Elambo ya Nsuka, Mokolo ya mitano lokola mokolo ya Bobakami na ekulusu, mpe Mokolo ya motoba lokola mokolo ya Lisekwa—engebene na manaka ya ba Gregorien.

  18. Yoane 14:18.

  19. Yoane 14:27.

  20. Malongi mpe Mayokani 20:77.

  21. Moloni 10:5.

  22. Dikisionele ya Biblia elimboli, ozana elingi koloba “bikisa sikaoyo.” Liloba ezwamaki na kati ya Nzembo 118:25 “Loyembo ya nzembo oyo ekangamaki na Feti ya Batabelenakele na bopepi ya mandalala; yango basalelaki liloba yango na bato mingi na bokoti ya nkembo epai ya Nkolo na biso na kati ya Yelusaleme” (Bible Dictionary, “Hosanna”). Tala Matai 21:9, 15; Malako 11:9–10; Yoane 12:13.

  23. Malako 15:14; Luka 23:21.

  24. Ntina ya motuya ya mwango ya Tata na biso na Lola ezalaki Bomikabi ezanga ndelo eye ekopesa bomoi ya seko mpo na bana na Ye nyonso mpe bonetoli mpo na baye balongobani mpo na kozwa lipamboli wana. Ntango Tata na Ye atunaki, “Nani nakotinda?” Yesu Klisto akobaki koloba,: “Ngai oyo; tinda ngai”(Abraham 3:27). Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “ etinda ya [Yesu Klisto] ezalaki Bomikabi. Etinda wana ezalaki bobele ya Ye. Abotama na mama ya bokufi mpe Tata azanga kufa, azalaki bobele ye oyo akokaki komibonza mpe kokaba bomoi na Ye mpe kozwa yango lisusu likolo (tala Yoane 10:14–18). Mbano ya nkembo ya Bomikabi na Ye ezangaki ndelo mpe ezalaki ya seko. Azwaki nsinga ya kufa mpe asalaki ete imawa ya nkunda ezala ya ntango(tala 1 Bakolinti 15:54–55). Mokumba na Ye mpo na Bomikabi eyebanaki kutu yambo ya Bokeli mpe Bokwei. Ezalaki kaka te mpo na kopesa lisekwa mpe bozangi kufa ya bato banso, kasi ezalaki mpo na kopesa biso ndingisa ya kolimbisama na masumu na biso—na ndenge ya masengami oyo etiami na Ye. Yango wana Bomikabi na Ye efungolaki nzela eye wapi tokokaki kozala na bomoko na Ye mpe na mabota na biso seko na seko” (“The Mission and Ministry of Jesus Christ,” Liahona, Sanza ya minei 2013, 20).

  25. Lisekwa ezali kosangisa nzoto mpe molimo na lolenge ya ezaleli ya bozangi kufa, nzoto mpe molimo oyo esangani mpe ekoyeba lisusu bokono ya bokufi te to kufa (tala Alma 11:45; 40:23).

  26. Alma 5:26; tala lisusu Alma 5:14.

  27. Lisese ya baseka zomi ezwami na kati ya Matai 25:1–12; Malongi mpe Mayokani 45:56–59. Mikapo ya penepene ya Matai 25 etei ete Yesu Klisto ateyaki lisese oyo na ntango ya poso na Ye ya nsuka, nsima ya bokoti na Ye na Yelusaleme na kati ya Matai 21 mpe kaka yambo ya Bolei ya Nsuka mpe bokangami na Ye na kati ya Matai 26. Mpo na kokobakisa na lisese ya baseka zomi oyo epesamaki na poso ya nsuka wana, Yesu apesaki lisese ya nzete ya figi (tala Matai 21:17–21; 24:32–33), lisese ya bana mibali mibale (tala Matai 21:28–32), mpe lisese ya mobali ya libala mabe (tala Matai 21:33–46).

  28. Matai 25:1.

  29. Matai 25:6.

  30. Malongi mpe Mayokani 45:57.

  31. Malongi mpe Mayokani 45:59.

  32. Malongi mpe Mayokani 45:59.

  33. Matai 25:12. Kati a Mateya Likolo ya Ngomba, Nkolo alobaki na baoyo bakanisaka kosala “misala malamu ebele” kolobaka, lokola elobami na kati ya lisolo ya lisese ya baseka zomi ya zoba, “Nayebi bino te” (tala Matai 7:22–23).

  34. Kaka lokola mai ezali motuya na bomoi oyo yas kufa, Yesu Klisto mpe mateya na Ye ezali motuya mpo na bomoi ya seko (tala Mokambi na Makomi, “Living Water,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; see also Isaya 12:3; Yilimia 2:13; Yoane 4:6–15; 7:37; 1 Nefi 11:25; Malongi mpe Mayokani 10:66; 63:23).

  35. 3 Nefi 4:32.

  36. Emoniseli 7:9.