Makomi
Elamani 3


Mokapo 3

Mingi ya Banefi bakei kofanda o mboka ya epai ya nordi—Batongi ndako ya sima mpe babombi makundoli mingi—Nkoto zomi bayamboli mpe babatisami—Liloba lya Nzambe likambi bato o lobiko—Nefi mwana mobali wa Elamani akamati kiti ya bosambisi. Penepene na 49–39 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o mobu mwa tuku minei na misato mwa bokonzi bwa basambisi, ezalaki te boweli o ntei ya bato ba Nefi longola se soko ezalaki mwa lolendo loko loye lozalaki o eklezia, loye losalaki mwa bokabwani o ntei ya bato, maye makambo masalemaki o nsuka ya mobu mwa tuku minei na misato.

2 Mpe ezalaki te boweli o ntei ya bato o mobu mwa tuku minei na minei; mpe ezalaki te boweli boike o mobu mwa tuku minei na mitano.

3 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku minei na motoba, iyo, ezalaki boweli boike mpe bokabwani mingi; o bwango ezalaki mingi mpenza baye bakendeki libanda lya mboka ya Zalayemila, mpe bakendeki epai ya mboka ya epai ya nordi mpo ya kosangola mboka.

4 Mpe basalaki mobembo o ntaka enene mpenza, mpenza ete bakomaki o nzoto inene ya mai mpe ebale mingi.

5 Iyo, mpe bapanzanaki o kati ya biteni binso bya mboka, o kati ya biteni binso biye bikomisamaki te mpamba mpe bizangaki te nzete ya mabaya, na ntina ya bafandi mingi baye yambo basangolaki mboka.

6 Mpe sikawa eteni te ya mboka ezalaki mpamba, longola se mpo ya nzete ya mabaya; kasi na ntina ya bonene bwa bobebisami bwa bato baye bafandaka yambo o mboka ebiangemaki mpamba.

7 Mpe kuna kozalaka kaka na nzete ya mabaya ike likolo lya etando ya mboka, nzokande bato baye bakendeki bakomaki banganga mpenza na kosala misala mya sima; yango wana batongaki ndako ya sima, o yango bafandaki.

8 Mpe esalemaki ete bayikanaki mpe bapanzanaki, mpe bakendeki uta o mboka ya epai ya sudi kina o mboka ya epai ya nordi, mpe bapanzanaki mpenza ete babandaki kotondisa etando ya mboka, uta mbu o sudi o mbu o nordi, uta mbu o westi o mbu o esti.

9 Mpe bato baye bazalaki o mboka ya epai ya nordi bafandaki o biema, mpe o ndako ya sima, mpe batikaki nzete enso ebota likolo lya etando ya mboka ete ekola, ete o ntango bakoka kozala na nzete ya mabaya mpo ya kotonga ndako ya bango, iyo, bingumba bya bango, mpe tempelo ya bango, mpe sinagogi ya bango, mpe ndako isantu ya bango, mpe lolenge lonso la ndako.

10 Mpe esalemaki ete lokola nzete ya mabaya ezalaki komonono mpenza te o mboka ya epai ya nordi, batindaki nzike na nzela ya masuwa.

11 Mpe boye bapesaki ndingisa na bato o engumba ya epai ya nordi ete bakoka kotonga bingumba mingi, na mabaya mpe na sima lokola.

12 Mpe esalemaki ete izalaki mingi ya bato ba Amona, baye bazalaki Balamani ba mbotama, bakendeki o kati ya mboka.

13 Mpe sikawa izali makundoli mingi mabombana matali bitamboleli bya bato baye, na mingi ya bato baye, maye mazali mobimba mpe manene mingi, matali bango.

14 Kasi tala, eteni yoko ya nkama ya bitamboleli bya bato baye, iyo, nsango ya Balamani mpe ya Banefi, mpe bitumba bya bango, mpe boweli, mpe bokabwani, mpe liteya lya bango, mpe mabikuli ma bango, mpe masuwa ma bango mpe botongi bwa bango bwa masuwa, mpe botongi bwa bango bwa tempelo, mpe bwa sinagogi mpe ndako isantu ya bango, mpe bosembo bwa bango, mpe nkuna ya bango, mpe bobomi bwa bango, mpe boyongoli bwa bango, mpe bopunzi bwa bango, mpe ndenge inso ya bonsomo mpe pite, ekoki kokwama te o mosala moye.

15 Kasi tala, izali buku mingi mpe makundoli mingi ma lolenge na lolenge, mpe mabombami na Banefi.

16 Mpe makitanisamaki uta nkola yoko o esusu na Banefi, kutu kina bakwei o kati ya bobuki mobeko mpe babomami, bapunzami, mpe balandami, mpe babenganami, mpe balongolami bomoi, mpe bapalanganisami likolo lya etando ya mabele, mpe basangani elongo na Balamani kina babiangemi lisusu te Banefi, kokomaka bato ba nkuna, mpe bato ba nkei, mpe bato ba loma, iyo, kutu kokomaka Balamani.

17 Mpe sikawa nazongi lisusu o nsango ya ngai; yango wana, nini nalobi elekaka esilaka kozala boweli bonene, mpe mbilingambilinga, mpe bitumba, mpe bokabwani, o ntei ya bato ba Nefi.

18 Mobu mwa tuku minei na motoba mwa bokonzi bwa basambisi mosukaki.

19 Mpe esalemaki ete ezalaki naino boweli bonene o mboka, iyo, kutu o mobu mwa tuku minei na sambo, mpe lisusu o mobu mwa tuku minei na mwambe.

20 Nzokande Elamani asimbaki kiti ya bosambisi na boyengebene mpe alima; iyo, atosaki kobatela meko, mpe masambisi, mpe mitindo mya Nzambe; mpe asalaki ena eye ezalaki semba o miso mya Nzambe ntango inso; mpe atambolaki nsima ya nzela ya tata wa ye, mpenza ete azwaki bomengo o mboka.

21 Mpe esalemaki ete azalaki na bana babali babale. Apesaki epai ya nkulutu nkombo ya Nefi, mpe epai ya leki, nkombo ya Lehi. Mpe babandaki kokola mpo ya Nkolo.

22 Mpe esalemaki ete bitumba mpe boweli bobandaki kosila, mwa moke, o ntei ya bato banso ba Banefi, o nsuka mpenza ya mobu mwa tuku minei na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

23 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku minei na libwa mwa bokonzi bwa basambisi, etiamaki kimia ya ntango inso o mboka, enso longola se soko ezalaki makelemba ma nkuku maye Gadiatoni moyongoli maye atiaki o biteni bilekaki na bato ba mboka, maye o ntango ena eyebanaki te epai ya bango baye bazalaki o moto mwa boyangeli; yango wana babebisamaki te libanda lya mboka.

24 Mpe esalemaki ete o mobu moye kaka ezalaki bomengo bonene mpenza o eklezia, mpenza ete izalaka nkoto na nkoto baye bamisangisaki na eklezia mpe babatisamaki mpo ya boyamboli.

25 Mpe boye enene ezalaki bomengo bwa eklezia, mpe boye mapamboli mingi masopamaki likolo lya bato, ete banganga banene mpe balakisi bangomei bakamwaki koleka ndelo.

26 Mpe esalemaki ete mosala mwa Nkolo mozwaki bomengo mpo ya kobatisaka mpe kotiaka bomoko o eklezia ya Nzambe, bato mingi, iyo, mpe kutu zomi na zomi ya nkoto na nkoto.

27 Boye tokoki komono ete Nkolo ayokaka ngolu epai ya baye banso balingi, o bosolo bwa mitema mya bango, kobianga likolo lya nkombo esantu ya ye.

28 Iyo, tomoni ete ekuke ya lola efungwani epai ya bato banso, kutu na bango baye bakondima likolo lya nkombo ya Yesu Klisto, oyo azali Mwana Mobali wa Nzambe.

29 Iyo, tomoni ete onso oyo alingi kotia nkanga likolo lya liloba lya Nzambe, liye lizali na bomoi mpe nguya, liye likokabola o katikati mayele mabe manso mpe mitambo mya bikelakela bya zabulu, mpe likokamba moto wa Klisto na nzela eke mpe nkaka ekatisi libulu lina lya bobola lya libela liye lilengelemeki mpo ya kokotisa bato ba nkuna—

30 Mpe kokomisa bozo bwa bango, iyo, bozo bozanga kufa bwa bango, o loboko la mobali la Nzambe o bokonzi bwa lola, mpo ya kofanda elongo na Abalayama, mpe Isaki, mpe elongo na Yakobo, mpe elongo na batata basantu banso ba biso, mpo ya kokende libanda lisusu te.

31 Mpe o mobu moye ezalaki bosepeli bwa ntango inso o mboka ya Zalayemila, mpe o bikolo binso zingazinga mpembeni, kutu o mboka inso iye izwamaki na Banefi.

32 Mpe esalemaki ete ezalaki kimia mpe bosepeli mpenza o etikali ya mobu mwa tuku minei na libwa; iyo, mpe ezalaki ntango inso kimia mpe bosepeli bonene o mobu mwa tuku mitano mwa bokonzi bwa basambisi.

33 Mpe o mobu mwa tuku mitano na moko mwa bokonzi bwa basambisi ezalaki kimia lokola, longola se soko ezalaki lolendo lobandaki kokota o ntei ya eklezia—o ntei ya eklezia ya Nzambe te, kasi o ntei ya mitema mya bato baye bazalaki koloba bazali ba eklezia ya Nzambe—

34 Mpe batombwanaki o lolendo, kutu kina o boniokoli bwa bandeko ba bango. Sikawa eye ezalaki bobe bonene, boye bosalaki eteni eleki bosawa ya bato bayoka mpasi ya boniokwami bonene, mpe balekaki o katikati ya litungisi liike.

35 Nzokande bakilaki mpe basambelaki mbala nzike, mpe bakolaki na bokasi mingi o bosawa bwa bango, mpe o bondimi na Klisto, kina kotondisaka bozo bwa bango na bosepeli mpe libondisi, iyo, kutu kopetolaka mpe kosantisaka mitema mya bango, bosantisi boye boyaki na ntina ya botiki mitema mya bango epai ya Nzambe.

36 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku mitano na mibale mosukaki na kimia lokola, longola se soko ezalaki lolendo lonene mpenza loye lokotaka o kati ya mitema mya bato; mpe ezalaki na ntina ya bozwi bonene mpenza bwa bango mpe bomengo bwa bango o mboka; mpe lokolaki likolo lya bango mokolo na mokolo.

37 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku mitano na misato mwa bokonzi bwa basambisi, Elamani akufaki, mpe mwana mobali wa ye wa nkulutu Nefi abandaki kokonza o esika ya ye. Mpe esalemaki ete asimbaki kiti ya bosambisi na boyengebene mpe alima; iyo, abatelaki mitindo mya Nzambe, mpe atambolaki o nzela ya tata wa ye.