Makomi
Elamani 7


Lisakoli ya Nefi, mwana Mobali ya Elamani—Nzambe akaneli bato ya Nefi ete akobimela bango na nkanda na ye, mpo na kobebisa bango nie longola se soki bayamboli uta na nkuna na bango. Nzambe abeti bato ya Nefi na bokono; bayamboli mpe babaluki epayi na ye. Samwele, Molamani, asakoli epayi ya Banefi.

Ezali na mikapo 7 kino na nsuka ya mokapo 16.

Mokapo 7

Baboyi Nefi na nordi mpe azongi na Zalayemila—Asambeli likolo ya linongi ya elanga na ye mpe abiangi bato mpo na koyambola soki te kowa. Penepene na mibu 23–21 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete na mobu ya ntuku motoba na libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Banefi, ete Nefi, mwana mobali ya Elamani, azongaki na mboka ya Zalayemila uta na mboka epayi na nordi.

2 Mpo abimaki na kati ya bato oyo bazalaki na mboka epayi na nordi, mpe ateyaki liloba ya Nzambe epayi na bango, mpe asakolaki makambo mingi epayi na bango;

3 Mpe babwakaki maloba na ye nyonso, na lolenge ete akokaki te kotikala na kati na bango, kasi azongaki lisusu epayi na mboka ya mbotama na ye.

4 Mpe ntango amonaki bato na ezaleli moko ya nkuna ya lolenge ya nsomo, mpe bayongoli wana ya Gadiatoni bakamataki kiti ya bosambisi—lokola bayibaki nguya mpe likoki ya mboka; lokola batiaki mpembeni mitindo ya Nzambe, mpe na lolenge ya moke te mpe semba liboso na ye; kosalaka te boyengebene epayi ya bana ya bato;

5 Kokitisaka basembo na ntina ya bosembo na bango; kotikaka bato na elindo mpe bato ya nkuna kokende na kozangaka kopesama etumbu mpo na mosolo na bango; mpe mingi koleka kotikaka bango na mosala ya kokamba ekobima, mpo na kokonza mpe kosala engebene na bolingi na bango, ete bakoka kozwa litomba mpe nkembo ya mokili, mpe, lisusu, ete bakoka na petepete mingi kosala ekobo, mpe koyiba, mpe koboma, mpe kosala engebene na bolingi na bango moko—

6 Sikawa mabe oyo monene eyaki likolo ya Banefi, na ntaka ya mibu mingi te; mpe ntango Nefi amonaki yango, motema na ye movimbaki na mawa kati na ntolo na ye; mpe agangaki na mpasi ya liwa ya molimo na ye:

7 O, Soki nakokaka kozwa mikolo na ngai na mikolo ntango tata na ngai Nefi ayaki uta na mboka ya Yelusaleme, ete nakokaki kosepela elongo na ye na mboka elakelama; na ntango wana bato na ye bazalaki petepete na koteyama, ngwi mpo na kobatela mitindo ya Nzambe, mpe malembe mpo na kokambama na kosala mabe; mpe bazalaki mbangu mpo na koyoka maloba ya Nkolo—

8 Iyo, soki mikolo na ngai ezalaka na mikolo wana, nde molimo na ngai elingaki kozala na bosepeli kati na bosembo ya bandeko na ngai.

9 Kasi tala, natindami ete oyo ezala mikolo na ngai, mpe ete molimo na ngai motondisama na mawa na ntina ya nkuna oyo ya bandeko na ngai.

10 Mpe tala, sikawa esalemaki ete ezalaki likolo ya linongi moko, oyo ezalaki na elanga ya Nefi, oyo ezalaki mpembeni na balabala monene oyo ekambaka na zando monene, oyo ezalaki na engumba ya Zalayemila; boye, Nefi angumbamaki likolo na linongi oyo ezalaki na elanga na ye, oyo linongi ezalaki lisusu penepene na monoko ya elanga mpembeni na wapi balabala monene elekaki.

11 Mpe esalemaki ete boko bato bazalaki koleka mpembeni mpe bamonaki Nefi lokola azalaki kosopa motema na ye epayi ya Nzambe likolo na linongi; mpe bakimaki mpe bayebisaki bato nini bamonaki, mpe bato bayaki esika moko ebele ete bakoka koyeba ntina ya matanga monene mpenza mpo na nkuna ya bato.

12 Mpe sikawa, ntango Nefi atelemaki amonaki ebele ya bato oyo basanganaki esika moko.

13 Mpe esalemaki ete afungolaki monoko na ye mpe alobaki epayi na bango: Tala, ntina nini emisangisi bino esika moko? Ete nakoka kolobela bino mabe na bino?

14 Iyo, mpo namati likolo ya linongi na ngai ete nakoka kosopa motema na ngai epayi ya Nzambe na ngai, na ntina ya mawa mingi koleka ya motema na ngai, oyo ezali na ntina ya mabe na bino!

15 Mpe na ntina ya matanga mpe boleli na ngai bomisangisi esika moko, mpe bozali kokamwa; iyo, mpe bozali na mposa monene ya kokamwa; iyo, bosengelaki kokamwa mpo bomitiki ete zabulu azwa nkanga ya monene mpenza likolo ya mitema na bino.

16 Iyo, lolenge boni ekokaki bino kopesa nzela na lisenginia na ye oyo azali kolukaka se kotindika milimo na bino na nse ya mpasi mpe lisuma oyo ya libela?

17 O boyambola, boyambola! Ntina nini ekokufa bino? Bobaluka, bobaluka epayi ya Nkolo Nzambe na bino. Ntina nini abosani bino?

18 Ezali mpo boyeisi mitema na bino makasi; iyo, bolingi te koyoka mongongo ya mobateli malamu; iyo, botumolaki ye mpo na kozala na nkanda na bino.

19 Mpe tala, na esika ya kosangisa bino, longola se soki boyamboli, tala, akopanza bino mosika ete bokokoma misuni mpo na mbwa mpe banyama ya zamba.

20 O, lolenge boni ekoki bino kobosana Nzambe na bino na mokolo mpenza abikisi bino?

21 Kasi tala, ezali mpo na kozwa litomba, mpo na kosanzolama na bato, iyo, mpe ete bokoka kozwa wolo mpe mpauni. Mpe botie mitema na bino likolo ya bozwi mpe biloko ya mpamba mpamba ya mokili oyo, mpo na yango bobomi, mpe bopunzi, mpe boyibi, mpe bopesi litatoli ya lokuta na kofundaka moto ya penepene na bino, mpe bosali ndenge nyonso ya mabe.

22 Mpe mpo na ntina oyo lisuma ekoya epayi na bino longola se soki boyamboli. Mpo soki boyamboli te, tala, engumba monene oyo, mpe lisusu bingumba wana minene oyo ezali nzinganzinga mpembeni, oyo ezali na mboka ya bozwi na biso, bikobotolama ete bokozala na esika te kati na yango; mpo tala, Nkolo akopesa bokasi epayi na bino te, lokola asali kino sikawa, mpo na kotelemela banguna na bino.

23 Mpo tala, boye elobi Nkolo: Nakolakisa te bokasi na ngai epayi ya bato ya nkuna, na moto moko te koleka mosusu, longola se soki ezali epayi na bango oyo bakoyambola uta na masumu na bango, mpe bakoyoka maloba na ngai. Boye, sikawa, nalingi ete bomona, bandeko na ngai, ete ekozala malamu mingi mpo na Balamani koleka mpo na bino longola se soki bokoyambola.

24 Mpo tala, bazali sembo mingi koleka bino, mpo basumuki te na boyebi monene boye bozwaki; boye Nkolo akotondisama na boboto epayi na bango; iyo, akobenda mikolo na bango molai mpe akobakisa nkona na bango, kutu ntango bokobebisama nie longola se soki boyamboli.

25 Iyo, lisuma ezala epayi na bino na ntina ya bonsomo monene boye esili koya na kati na bino; mpe bosali bino moko bomoko kati na yango, iyo, na lingomba ya nkuku oyo esalemaki na Gadiatoni!

26 Iyo, lisuma ezala epayi na bino na ntina ya lolendo oyo bopesaki nzela ete eyingela na mitema na bino, oyo etomboli bino koleka oyo ezali malamu na ntina ya bozwi monene na bino!

27 Iyo, lisuma ekozala epayi na bino na ntina ya nkuna mpe bonsomo na bino!

28 Mpe longola se soki boyamboli bokowa; iyo, kutu mboka na bino ekokamatama uta na bino, mpe bokobebisama uta na etando ya mabele.

29 Tala sikawa, nalobi te ete makambo oyo makosalema, na ngai moko, mpo ezali te na ngai moko nde nayebi makambo oyo; kasi tala, nayebi ete makambo oyo ezali solo mpo Nkolo Nzambe asali ete eyebana epayi na ngai, yango wana natatoli ete makosalema.

Bimisa na lokasa