Makomi
Elamani 12


Mokapo 12

Bato bazalaka kilikili mpe liboma mpe mbangu na kosala mabe—Nkolo apesaka bato na Ye etumbu—Bompamba ya bato emekami na nguya ya Nzambe—Na mokolo ya bosambisami bato bakozwa bomoi ya libela soki te bokweisami ya libela. Penepene na mobu 6 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe boye tokoki komona lolenge boni bana ya bato bazali lokuta, mpe lisusu bongola bongola ya mitema ya bana ya bato; iyo, tokoki komona ete Nkolo na bolamu monene bozanga ndelo na ye apambolaka mpe afulusaka bango oyo batielaka ye motema na bango.

2 Iyo, mpe tokoki komona ete na ntango wapi mpenza afulusaka bato na ye, iyo, na kobakisaka bilanga na bango, bibwele na bango mpe bitonga na bango, mpe wolo, mpe mpauni, mpe ndenge nyonso ya biloko ya motuya ya ndenge na ndenge mpe ntoki; kobatelaka bomoi na bango, mpe kobikisaka bango uta na maboko ya banguna na bango; kolembisaka mitema ya banguna na bango ete basakola te kobunda etumba na bango; iyo, mpe mpo na kosukisa, kosalaka makambo nyonso mpo na bolamu mpe esengo ya bato na ye; iyo, bongo ezali ntango oyo mpenza bayeisaka mitema na bango makasi, mpe babosanaka Nkolo Nzambe na bango, mpe baniataka na nse ya makolo na bango Moko Mosantu—iyo, mpe oyo ezali na ntina ya bolamu na bango, mpe bofuluki monene koleka na bango.

3 Mpe boye tomoni ete longola se soki Nkolo apesi bato na ye etumbu na mitungisi mingi, iyo, longola se soki abimeli bango na liwa mpe na nsomo, mpe na nzala mpe na ndenge nyonso ya bokono, bakomikundola ye te.

4 O lolenge boni liboma, mpe lolenge boni mpamba, mpe lolenge boni mabe, mpe lolenge boni ya zabulu, mpe lolenge boni mbangu mpo na kosala mabe, mpe lolenge boni malembe mpo na kosala bolamu, ezali bana ya bato; iyo, lolenge boni mbangu mpo na koyoka maloba ya moko ya mabe, mpe kotia mitema na bango likolo ya biloko ya mpamba mpamba ya mokili!

5 Iyo, lolenge boni mbangu mpo na kotombwana na lolendo; iyo lolenge boni mbangu mpo na komikumisa, mpe kosala ndenge nyonso ya oyo wana ezali mabe; mpe lolenge boni malembe bazali mpo na komikundola Nkolo Nzambe na bango, mpe kopesa litoyi epayi na toli na ye, iyo, lolenge boni malembe mpo na kotambola na banzela ya bwania!

6 Tala, balingi te ete Nkolo Nzambe na bango, oyo akelaki bango, akonza mpe ayangela likolo na bango; ata bolamu monene na ye mpe boboto na ye mpo na bango, batalaka toli na ye se mpamba, mpe balingaka te ete azala mokambi na bango.

7 O lolenge boni monene ezali bompamba ya bana ya bato; iyo, kutu bazali bifake koleka mputulu ya mabele.

8 Mpo tala, mputulu ya mabele etambolaka awa mpe kuna, kino na kokabwanaka ndambo na ndambo, na etinda ya Nzambe na biso ya monene mpe ya libela.

9 Iyo, tala na mongongo na ye bangomba ya mike mike mpe bangomba ya minene elengaka mpe eninganaka.

10 Mpe na nguya ya mongongo na ye yango ebukanaka, mpe ekomaka patatalu, iyo, kutu lokola lobwaku.

11 Iyo, na nguya ya mongongo na ye mabele mobimba maninganaka;

12 Iyo, na nguya ya mongongo na ye, efandeli ya mabele eninganaka, kutu na katikati mpenza.

13 Iyo, mpe soki alobi na mabele—Longwa—malongolami.

14 Iyo, soki alobi na mabeleBaluka nsima, ete eyeisama mokolo molai mpo na bangonga mingi—esalemi;

15 Mpe boye, engebene na liloba na ye mabele ebaluki nsima, mpe emonanaka epayi ya moto ete moi motelemi; iyo, mpe tala, oyo ezali nyonso te; mpo solo ezali mabele nde ebalukaka kasi moi te.

16 Mpe tala, lisusu, soki alobi na mai ya mozindo monene—Yo kawuka—esalemi.

17 Tala, soki alobi epayi na ngomba oyo—Telema, mpe yaka likolo mpe kweya likolo ya engumba wana, ete ekundama—tala esalemi.

18 Mpe tala, soki moto moko abombi biloko ya motuya kati na mabele, mpe Nkolo alobi—Tika elakelama mabe, na ntina ya mabe na ye oyo abombi yango—tala, ekolakelama mabe.

19 Mpe soki Nkolo akoloba—Tika ete olakelama mabe, ete moto moko te amona yo uta sikawa mpe libela—tala, moto te akozwa yango uta sikawa kokende liboso mpe libela.

20 Mpe tala, soki Nkolo akoloba epayi ya moto moko—Na ntina ya mabe na yo, okolakelama mabe libela—ekosalema.

21 Mpe soki Nkolo akoloba—Na ntina ya mabe na yo okokatama mosika uta na miso na ngai—akosala ete ezala bongo.

22 Mpe lisuma epayi na ye oyo akoloba oyo, mpo ekosalema epayi na ye oyo akosala mabe, mpe akokoka te kobikisama; boye, mpo na ntina oyo, ete bato bakoka kobikisama, soki boyamboli esakolamaki.

23 Boye, bapambolami ezali bango oyo bakoyambola mpe bakoyoka mongongo ya Nkolo Nzambe na bango; mpo ezali bazali bango oyo nde bakobikisama.

24 Mpe tika Nzambe apesa nzela, na botondi monene na ye, ete bato bakoka komemama na boyamboli mpe misala malamu, ete bakoka kozongisama na ngolu mpo na ngolu, engebene na misala na bango.

25 Mpe nalingi ete bato nyonso bakoka kobikisama. Kasi totangi ete na mokolo monene mpe ya nsuka ezali na boko bato oyo bakobwakama libanda, iyo, bakobwakama mosika uta na miso ya Nkolo;

26 Iyo, baoyo bakokangama na ezalela moko ya mpasi ezanga nsuka, kokokisaka maloba oyo malobi: Bango oyo basalaki bolamu bakozala na bomoi ya libela; mpe baoyo basalaki mabe bakozala na bokweisami ya libela. Mpe ezali boye. Amene.

Bimisa na lokasa