Makomi
Elamani 9


Mokapo 9

Bantoma bakuti mosambisi mokonzi akufi o kiti ya bosambisi—Bakotisami o boloko mpe nsima babikisami—Na bofuli Nefi akitoli Seatumi lokola mobomi—Nefi andimami na boko bato lokola profeta moko. Penepene na 23–21 Yambo ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete elobaka Nefi maloba maye, boko bato baye bazalaki o ntei ya bango bakimaki o kiti ya bosambisi; iyo, kutu ezalaki batano baye bakendeki, mpe balobaki o ntei ya bangomei, lokola bakendeki:

2 Tala sikawa tokoyeba na bosolo soko moto oyo azali profeta mpe Nzambe atindi ye mpo ya kobikula makambo ma bokamwi ma lolenge loye epai ya biso. Tala, tondimi te ete atindi ye; iyo, tondimi te ete azali profeta; nzokande, soko makambo maye alobi matali mosambisi mokonzi mazali solo, ete akufi, nde tokondima ete makambo masusu maye alobaki mazali solo.

3 Mpe esalemaki ete bakimaki na bokasi bwa bango, mpe bakotaki epai ya kiti ya bosambisi; mpe tala, mosambisi mokonzi akweyaka o mabele, mpe alalaki o makila ma ye.

4 Mpe sikawa tala, emonoki bango eye bakamwaki mpenza, mpenza ete bakweyaki o mabele; mpo bandimaka te maloba maye Nefi alobaka matali mosambisi mokonzi.

5 Kasi sikawa, emonoki bango bandimaki, mpe bobangi boyaki likolo lya bango mbele masambisi manso Nefi alobaka maya likolo lya bato; yango wana balengeki, mpe bakweyaka o mabele.

6 Sikawa, sasaipi ebomamaka mosambisi—etiamaki ye mbeli na ndeko mobali wa ye na lolenge loko la kobombama, mpe akimaki, mpe basali bakimaki mpe balobelaki bato, kotombolaka ebelela ya bobomi o ntei ya bango;

7 Mpe tala bato bamisangisaki epai ya esika ya kiti ya bosambisi—mpe tala, o bokamwi bwa bango bamonoko batano bana bakweyaka o mabele.

8 Mpe sikawa tala, bato bayebaki eloko te etali ebele baye basanganaki elongo o elanga ya Nefi; yango wana balobaki o ntei ya bangomei: Bato baye bazali bango baye babomi mosambisi, mpe Nzambe abeti bango ete bakoka kokima biso te.

9 Mpe esalemaki ete batiaki nkanga likolo lya bango, mpe balingaki bango mpe babwakaki bango o boloko. Mpe etindamaki esakola yoko mosika ete mosambisi abomamaki, mpe ete babomi bakamatami mpe babwakami o boloko.

10 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima bato bamisangisaki elongo mpo ya kosala matanga mpe kokila, o bokundi bwa mosambisi mokonzi monene oyo abomamaka.

11 Mpe boye lisusu basambisi bana baye bazalaki o elanga ya Nefi, mpe bayokaki maloba ma ye, basanganaki elongo lokola o bokundi.

12 Mpe esalemaki ete batunaki o ntei ya bato, kolobaka: Wapi ezali batano baye batindamaki mpo ya kotuna etali mosambisi mokonzi soko akufaki? Mpe bayanolaki mpe balobaki: Etali batano baye bolobi botindi, toyebi te; kasi ezali batano baye bazali babomi, baye tobwaki o kati ya boloko.

13 Mpe esalemaki ete basambisi bazalaki na mposa ete bamememe; mpe bamememeki, mpe tala bazalaki batano baye batindamaki; mpe tala basambisi batunaki na bango mpo ya koyeba etali likambo lyango, mpe balobelaki bango enso eye basalaka, kolobaka:

14 Tokimaki mpe toyaki o esika ya kiti ya bosambisi, mpe emonoki biso makambo manso lokola Nefi atatolaka, tokamwaki mpenza ete tokweyaki o mabele; mpe ezongaki biso uta o bokamwi bwa biso, tala babwakaki biso o kati ya boloko.

15 Sikawa, lokola mpo ya bobomi bwa moto oyo, toyebi te nani asali bwango; mpe bobele eye toyebi, tokimaki mpe esalemaki engebene lokola bozalaki na mposa, mpe tala akufaki, engebene na maloba ma Nefi.

16 Mpe sikawa esalemaki ete basambisi basembolaki likambo lyango epai ya bato, mpe bazomelaki Nefi, kolobaka: Tala, toyebi ete Nefi oyo esengeli ete ayokanaki elongo na moto moko mpo ya koboma mosambisi, mpe nde akoka kosakola yango epai ya biso, ete akoka kobongola biso epai ya bondimi bwa ye, ete akoka komitombola mpo ya kozala moto moko monene, aponomo na Nzambe, mpe profeta moko.

17 Mpe sikawa tala, tokobombola moto oyo, mpe akotubela ziko ya ye mpe akosala eyebana epai ya biso mobomi wa solo wa mosambisi oyo.

18 Mpe esalemaki ete batano babikisamaki o mokolo mwa bokundi. Nzokande, bapamelaki basambisi o maloba maye balobaka likolo lya, mpe bawelaki na bango moko na moko, mpenza ete babulunganisaki bango.

19 Nzokande, basalaki ete Nefi akamatama mpe alingama mpe amememe liboso lya ebele, mpe babandaki kotuna ye na ndenge nzike ete bakoka kokutisa ye, ete bakoka kofunda ye o liwa—

20 Kolobaka epai ya ye: Osali likita; nani azali moto oyo azali mobomi oyo? Sikawa lobela biso, mpe ndima ziko ya yo; kolobaka, tala eye ezali mbongo; mpe lisusu tokotika epai ya yo bomoi bwa yo soko olobeli biso, mpe ondimi boyokani boye bosali elongo na ye.

21 Kasi Nefi alobaki epai ya bango: O bino bato ba ligboma, bino basutu na mitema, bino bato ba lolanda, mpe bino bato ba mito mikasi, eyebi bino ntango boniboni Nkolo Nzambe wa bino akotika bino ete bokoba o eye nzela ya bino ya lisumu?

22 O bosengelaki kobanda kolelalela mpe kosala matanga, na ntina ya bobebisami bonene boye o ntango eye ezeli bino, longola se soko boyamboli.

23 Tala bolobi ete nayokanaki elongo na moto moko ete aboma Sezolami, mosambisi mokonzi wa biso. Kasi tala, nalobi epai ya bino, ete eye ezali zambi natatoli epai ya bino ete bokoka koyeba etali likambo liye; iyo, kutu mpo ya litatoli lyoko epai ya bino, ete nayebaki nkuna mpe bonsomo boye bozali o ntei ya bino.

24 Mpe zambi nasali eye, bolobi ete nayokani elongo na moto moko ete asala likambo liye; iyo, zambi nalakisaki epai ya bino elembo eye bosiliki na ngai, mpe boluki kobebisa bomoi bwa ngai.

25 Mpe sikawa tala, nakolakisa epai ya bino elembo esusu, mpe nakotala soko o likambo liye bokoluka kobebisa ngai.

26 Tala nalobi epai ya bino: Kendeni o ndako ya Seatumi, oyo azali ndeko mobali wa Sezolami, mpe lobani epai ya ye—

27 Eyokani Nefi, profeta alobama, oyo abikuli bobe boike boye botali bato baye, elongo na yo, o bwango obomi Sezolami, oyo azali ndeko mobali wa yo?

28 Mpe tala, akoloba epai ya bino, Te.

29 Mpe bokoloba epai ya ye: Ebomi yo ndeko mobali wa yo?

30 Mpe akoteleme na bobangi, mpe akoyeba te nini koloba. Mpe tala, akowangana epai ya bino; mpe akosala lokola soko akamwi; nzokande, akoloba epai ya bino ete azali na elindo te.

31 Kasi tala, bokotala ye, mpe bokomono makila likolo lya mpanzi ya kazaka ya ye.

32 Mpe ekomono bino eye, bokoloba: Ewuti wapi makila maye? Eyebi biso te ete ezali makila ma ndeko mobali wa yo?

33 Mpe nde akolenge, mpe akonzuluka, kutu lokola soko liwa liyaka likolo lya ye.

34 Mpe nde bokoloba: Na ntina ya bobangi boye mpe monzuluku moye moye mokomi likolo lya elongi ya yo, tala, toyebi ete ozali na elindo.

35 Mpe nde ekoya likolo lya ye bobangi bonene koleka; mpe nde akotubela epai ya bino, mpe akowangana lisusu te ete asali bobomi boye.

36 Mpe nde, akoloba epai ya bino, ete ngai, Nefi, nayebi eloko te etali likambo lyango longola se soko epesamaki epai ya ngai na nguya ya Nzambe. Mpe nde ekoyeba bino ete nazali moto sembo, mpe ete natindami epai ya bino uta na Nzambe.

37 Mpe esalemaki ete bakendeki mpe basalaki, kutu engebene lokola Nefi alobaki epai ya bango. Mpe tala, maloba maye alobaka mazalaki solo; mpo engebene na maloba awanganaki; mpe lisusu engebene na maloba atubelaki.

38 Mpe amememeki mpo ya kolakisa bosolo ete yemei azalaki mobomi mpenza, mpenza ete batano batiamaki o lipanda, mpe lokola etiamaki Nefi.

39 Mpe ezalaki boko ya Banefi baye bandimaki likolo lya maloba ma Nefi; mpe ezalaki boko lisusu, baye bandimaki na ntina ya litatoli lya batano, mpo babongwanaka ntango ezalaki bango o boloko.

40 Mpe sikawa ezalaki boko o ntei ya bato, baye balobaki ete Nefi azalaki profeta moko.

41 Mpe ezalaki basusu baye balobaki: Tala, azali nzambe moko, mpo longola se soko azalaki nzambe moko akokaki te koyeba makambo maye manso. Mpo tala, alobeli biso makanisi ma mitema mya biso, mpe lisusu alobeli biso makambo; mpe kutu amemeki epai ya boyebi bwa biso mobomi wa solo wa mosambisi mokonzi wa biso.