Makomi
Elamani 16


Mokapo 16

Banefi baye bandimi Samwele babatisami na Nefi—Samwele akoki te kobomama na makonga mpe mabanga ma Banefi bazangi boyamboli—Boko bayeisi mitema mya bango mikasi, mpe basusu bamoni banzelu—Bazangi bondimi balobi ete ezali te ntina ya kondima na Klisto mpe boyei ya ye o Yelusaleme. Penepene na 6–1 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete mingi baye bayokaki maloba ma Samwele, Molamani, maye alobaki likolo lya efelo ya mboka. Mpe lokola mingi bandimaki liloba lya ye bakendeki mpe balukaki Nefi; mpe eyaka mpe emonoko bango ye batubelaki epai ya ye masumu ma bango mpe bawanganaki te, kozalaka na mposa ete bakoka kobatisama epai ya Nkolo.

2 Kasi mingi lokola izalaki baye bandimaki te o maloba ma Samwele basilikaki na ye; mpe babwakaki mabanga na ye likolo lya efelo, mpe lisusu mingi babeteki makonga na ye lokola atelemeki likolo lya efelo; kasi Molimo mwa Nkolo azalaki elongo na ye, mpenza ete bakokaki te kotuta ye na mabanga ma bango to makonga ma bango.

3 Sikawa emonoki bango ete bakokaki te kotuta ye, izalaki mingi koleka baye bandimaki likolo lya maloba ma ye, mpenza ete bakendeki mosika epai ya Nefi mpo ya kobatisama.

4 Mpo tala, Nefi azalaki kobatisaka, mpe kobikulaka, mpe koteyaka, kobelelaka boyamboli epai ya bato, kolakisaka bilembo mpe makamwa, kosalaka makamwisi o o ntei ya bato, ete bakoka koyeba ete Klisto asengeli mosika te koya—

5 Kolobelaka bango makambo maye masengeli mosika te koya, ete bakoka koyeba mpe komikundola o ntango ya boyei bwa mango ete mayebisamaka epai ya bango yambo, na ntina ete bakoka kondima; yango wana mingi lokola bandimaki likolo lya maloba ma Samwele bakendeki epai ya ye mpo ya kobatisama, mpo bayaki koyambolaka mpe kotubelaka masumu ma bango.

6 Kasi eteni eleki mingi ya bango bandimaki te o maloba ma Samwele; yango wana emonoki bango ete bakokaki te kotuta ye na mabanga ma bango mpe makonga ma bango, babelelaki epai ya bakapiteni ba bango, kolobaka: Kamatani moto oyo mpe lingani ye, zambi azali na zabulu moko; mpe na ntina ya nguya ya zabulu ezali na ye tokoki te kotuta ye na mabanga ma biso mpe makonga ma biso; yango wana kamatani ye mpe lingani ye, mpe memeni ye mosika.

7 Mpe lokola bakendeki mpo ya kotia maboko likolo lya ye, tala, amibwakaki o nse uta o efelo, mpe akimaki libanda lya mboka ya bango, iyo, kutu epai ya ekolo ya yemei, mpe abandaki koteya mpe kobikula o ntei ya bato ba yemei.

8 Mpe tala, ayokanaki nsango lisusu te o ntei ya Banefi; mpe boye izalaki makambo ma bato.

9 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku mwambe na motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

10 Mpe boye esukaki lokola mobu mwa tuku mwambe na sambo mwa bokonzi bwa basambisi, eteni eleki mingi ya bato kotikalaka o lolendo mpe nkuna ya bango, mpe eteni eleki eke kotambolaka na bokebi liboso lya Nzambe.

11 Mpe iye izalaki bizalela lokola, o mobu mwa tuku mwambe na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi.

12 Mpe ezalaki kaka bobongwani boke o makambo ma bato, longola se soko ezalaki bato babandaki kozala mito mikasi mingi koleka o bobe, mpe kosala mpenza ena eye ezalaki na bokeseni o mibeko mya Nzambe, o mobu mwa tuku mwambe na libwa mwa bokonzi bwa basambisi.

13 Kasi esalemaki ete o mobu mwa tuku libwa mwa bokonzi bwa basambisi, epesamaki bilembo binene epai ya bato, mpe makamwa; mpe maloba ma baprofeta mabandaki kokokisama.

14 Mpe banzelu babimaki epai ya bato, bato ba bwania, mpe basakolaki epai ya bango nsango ya nsai ya bosepeli bonene; boye o mobu moye nkoma ibandaki kokokisama.

15 Nzokande, bato babandaki koyeisa mitema mya bango mikasi, banso longola se soko ezalaki eteni ya bango eleki na bondimi, ya Banefi mpe Balamani lokola, mpe babandaki koyekeme likolo lya bokasi bwa bangomei mpe bwania bwa bangomei, kolobaka:

16 Yoko makambo bakokaki kokanisa semba, o ntei ya mingi boye; kasi tala, toyebi ete misala miye minene mpe mya bokamwi mikoki te kosalema, miye milobamaki.

17 Mpe babandaki komaniola mpe kowela o ntei ya bango na bango, kolobaka:

18 Ete ezali na ntina te ete mozali moko wa lolenge loye lokola Klisto moko akoya; soko boye, mpe azali Mwana Mobali wa Nzambe, Tata wa lola mpe wa mabele, lokola elobami, ntina nini ekomilakisa ye te epai ya biso lokola epai ya bango baye bakozala o Yelusaleme?

19 Iyo, ntina nini ekomilakisa ye te o mboka eye lokola o mboka ya Yelusaleme?

20 Kasi tala, toyebi ete eye ezali momeseno mwa nkuna, moye mokitisanisami epai ya biso na batata ba biso, mpo ya kosala biso ete tondima o yoko likambo linene mpe lya bokamwi liye likosalema, kasi o ntei ya biso te, kasi o mboka yoko eye ezali mosika, mboka yoko eye toyebi te; yango wana babombi biso o bozangi boyebi, mpo tokoki te kotatola na miso mya bisomei ete ezali ya solo.

21 Mpe bakosala, na mayele mabe mpe ntoki ya mobombamo mwa moko wa bobe, yoko mobombamo monene moye tokoki kososola te, moye mokobomba biso o nse mpo ya kozala basali o maloba ma bango, mpe lisusu basali epai ya bango, mpo toyekemi likolo lya bango mpo ya koteya biso liloba; mpe boye bakobomba biso na bozangi boyebi soko tokomipesa epai ya bango, mikolo minso mya bomoi bwa biso.

22 Mpe makambo mingi lisusu bato bakanisaki o mitema mya bango, maye mazalaki ma ligboma mpe ma mpamba; mpe bazalaki o mobulu moike, mpo Satana alamusaki bango na kosala bobe ntango inso; iyo, bakendeki zingazinga kopanzaka manungunungu mpe boweli likolo lya etando mobimba ya mboka, ete akoka koyeisa mitema mya bato mikasi likolo lya ena eye ezalaki elamu mpe likolo lya ena eye ekoya.

23 Mpe ata bilembo mpe makamwa maye masalemaki o ntei ya bato ba Nkolo, mpe makamwisi mingi maye basalaki, Satana azalaki na nkanga enene likolo lya mitema mya bato likolo lya etando mobimba ya mboka.

24 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

25 Mpe boye esukaki buku ya Elamani, engebene na likundoli lya Elamani mpe bana babali ba ye.