Makomi
Elamani 10


Mokapo 10

Nkolo apesi Nefi nguya ya bokangi—Azwi nguya ya kokangisa mpe kokangola na mabele mpe na lola—Atindi bato bayambola soki te bakowa—Molimo amemi ye uta na ebele ya bato epayi na ebele ya bato. Penepene na mibu 21–20 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete bokabwani ebimaki na katikati ya bato, na lolenge ete bakabwanaki ngambo na ngambo mpe bakendaki bato na bato nzela na bango, kotikaka Nefi ye moko, lokola etelemaki ye na katikati na bango.

2 Mpe esalemaki ete Nefi akendaki nzela na ye na ndako na ye, komanyolaka makambo Nkolo alakisaki epayi na ye.

3 Mpe esalemaki ete lokola azalaki komanyolaka—mpe alembaki nzoto na ntina ya nkuna ya bato nyonso ya Banefi, misala na bango ya nkuku ya molili, mpe bobomi na bango, mpe bopunzi na bango, mpe ndenge nyonso ya mabe—mpe esalemaki ete lokola azalaki boye komanyolaka na motema na ye, tala, mongongo moko moyaki epayi na ye kolobaka:

4 Opambolami, Nefi, mpo na makambo oyo wana osali; mpo namoni lolenge nini na kozanga kolemba osakoli liloba, oyo napesaki epayi yo, epayi ya bato oyo. Mpe obangaki bango te, mpe olukaki bomoi na yo moko te, kasi olukaki mposa na ngai, mpe kobatela mibeko mitindo na ngai.

5 Mpe sikawa, mpo osali oyo na kozanga kolemba ya lolenge oyo, tala, nakopambolayo mpo na libela; mpe nakokomisa yo makasi na liloba mpe na ekela, na bondimi mpe na misala; iyo, kutu ete makambo nyonso makosalamela yo engebene na maloba na yo, mpo ete okosenga oyo ekeseni na mposa na ngai te.

6 Tala, ozali Nefi, mpe nazali Nzambe. Tala, nasakoli yango epayi na yo na miso ya banjelu na ngai, ete okozala na nguya likolo ya bato oyo, mpe okobeta mabele na nzala, mpe na bokono mabe mpe kobebisama, engebene na mabe ya bato oyo.

7 Tala, napesi epayi nguya epayi na yo, ete nyonso oyo okokanga na mabele ekokangama na lola; mpe nyonso oyo okofungola na mabele ekofungolama na lola; mpe na boye okozala na nguya na kati ya bato oyo.

8 Mpe boye, soki bokoloba epayi na tempelo oyo ete epasuka na biteni mibale, ekosalema.

9 Mpe soki bokoloba epayi na ngomba oyo, Bwakama na nse mpe koma mabele ya patatalu, ekosalema.

10 Mpe tala, soki bokoloba ete Nzambe abeta bato oyo, ekosalema.

11 Mpe sikawa tala, natindi bino, ete bokende mpe bosakola epayi ya bato oyo, ete boye elobi Nkolo Nzambe oyo azali ya Bokasi nyonso: Longola se soki boyamboli bokobetama, kutu kino na bobebisami.

12 Mpe tala, sikawa esalemaki ete ntango Nkolo alobaki maloba oyo epayi na Nefi, asukisaki mpe akendaki te epayi na ndako na ye moko, kasi azongaki epayi na ebele ya bato oyo bapalanganaki nzinganzinga likolo ya etando ya mboka, mpe abandaki kosakola epayi na bango liloba ya Nkolo oyo elobamaki epayi na ye, mpo na oyo etali bobebisami na bango soki bayamboli te.

13 Sikawa tala, ata likamwisi monene oyo Nefi asalaki na kolobelaka bango mpo na oyo etali liwa ya mosambisi mokonzi, bayeisaki mitema na bango makasi mpe bayokaki te maloba ya Nkolo.

14 Boye Nefi asakolaki epayi na bango liloba ya Nkolo, kolobaka: Longola se soki bayamboli, boye elobi Nkolo, bokobetama kutu kino na bobebisami.

15 Mpe esalemaki ete ntango Nefi asakolaki epayi na bango liloba, tala, batikalaki se koyeisa mitema na bango makasi mpe balingaki te koyoka maloba na ye; boye bafingaki ye, mpe balukaki kotia maboko na bango likolo na ye ete bakoka kobwaka ye kati na boloko.

16 Kasi tala, nguya ya Nzambe ezalaki elongo na ye, mpe bakokaki te kokamata ye mpo na kobwaka ye kati na boloko, mpo azwamaki na Molimo mpe akumbamaki mosika uta na katikati na bango.

17 Mpe esalemaki ete boye akendaki na Molimo, uta na ebele ya bato epayi na ebele ya bato, kosakolaka liloba ya Nzambe, kutu kino asakolaki yango epayi na bango nyonso, soki te atindaki yango na kati ya bato nyonso.

18 Mpe esalemaki ete balingaki te koyoka maloba na ye; mpe boweli ebandaki kozala, na lolenge ete bakabwanaki bango moko mpe babandaki kobomana na mompanga.

19 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku sambo na moko ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa