Makomi
Elamani 3


Mokapo 3

Banefi mingi bakei kofanda na mboka epayi na nordi—Batongi ndako ya nsima mpe babombi masolo ya makomi mingi—Nkoto zomi babongwami mpe babatisami—Liloba ya Nzambe likambaka bato na lobiko—Nefi mwana mobali ya Elamani akamati kiti ya bosambisi. Penepene na mibu 49–39 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na mobu ya ntuku minei na misato ya boyangeli ya basambisi, boweli ezalaki te na kati ya bato ya Nefi longola se mwa lolendo oyo ezalaki kati na eklezia, oyo esalaki mwa bokabwani na kati ya bato, mpe makambo oyo ebongisamaki na nsuka ya mobu ya ntuku minei na misato.

2 Mpe boweli ezalaki te na kati ya bato na mobu ya ntuku minei na minei; mpe boweli ezalaki mingi te na mobu ya ntuku minei na mitano.

3 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku minei na motoba, iyo, ezalaki na boweli mingi mpe bokabwani mingi; likolo ya boye wapi ezalaki na mingi koleka baoyo bakendaki uta na mboka ya Zalayemila, mpe bakendaki na mboka epayi na nordi mpo na kosangola libula ya mboka.

4 Mpe basalaki mobembo na ntaka ya mosika koleka, na lolenge ete bakomaki na bitando minene ya mai mpe bibale mingi.

5 Iyo, mpe kutu bapanzanaki kati na biteni nyonso ya mboka, kati na biteni nyonso wapi ekomisamaki naino bisika mpamba te mpe wapi nzete ya mabaya ezangaki, na ntina ya bafandi mingi baoyo basangolaki libula ya mboka yango liboso.

6 Mpe sikawa eteni moko te ya mboka ezalaki mpamba, longola se mpo na nzete ya mabaya; kasi na ntina ya bonene ya bobebisami ya bato oyo bafandaki na mboka yango yambo ete ebiangama mboka mpamba.

7 Mpe lokola nzete ya mabaya ezalaki bobele moke likolo ya etando ya mboka, nzokande bato oyo bakendaki na mboka wana liboso bakomaki banganga mayele mpenza na kosalaka misala ya nsima; yango wana batongaki bandako ya nsima, kati na oyo wapi bafandaki.

8 Mpe esalemaki ete bayikanaki mpe bapanzanaki, mpe bakendaki uta na mboka epayi na sudi kokende na mboka epayi na nordi, mpe bapanzanaki na lolenge ete babandaki kotondisa etando ya mabele mobimba, uta na mbu epayi na sudi kino na mbu epayi na nordi, uta na mbu epayi na westi kino na mbu epayi na esti.

9 Mpe bato oyo bazalaki na mboka epayi na nordi bafandaki na biema, mpe na ndako ya nsima, mpe batikaki nzete nyonso ebota likolo ya etando ya mboka ete ekola, ete na botamboli ya ntango bakoka kozala na nzete ya mabaya mpo na kotonga bandako na bango, iyo, bingumba na bango, mpe tempelo na bango, mpe sinagoga na bango, mpe ndako na bango esantu, mpe ndenge nyonso ya bandako na bango.

10 Mpe esalemaki ete lokola nzete ya mabaya ezalaki komonana mpenza te na mboka epayi na nordi, bamemisaki mingi na nzela ya masuwa.

11 Mpe boye bapesaki ndingisa na bato na mboka epayi na nordi ete bakoka kotonga bingumba mingi, na mabaya mpe na nsima mpe lokola.

12 Mpe esalemaki ete ezalaki na mingi ya bato ya Amona, baoyo bazalaki Balamani uta na mbotama, baoyo bakendaki kati na mboka oyo.

13 Mpe sikawa ezalaki na masolo ya makomi mingi ebombani na ntina ya misala ya botamboli ya bato oyo, na mingi ya bato oyo, oyo ezali sikisiki mpe minene mingi, mpo na oyo etali bango.

14 Kasi tala, eteni moko kati na nkama ya misala ya botamboli ya bato oyo, iyo, lisolo ya Balamani mpe ya Banefi, mpe bitumba na bango, mpe boweli, mpe bokabwani, mpe mateya na bango, mpe masakoli na bango, mpe masuwa na bango mpe botongi ya masuwa na bango, mpe botongi ya batempelo na bango, mpe basinagoga mpe bandako na bango esantu, mpe bosembo na bango, mpe nkuna na bango, mpe bobomi na bango, mpe boyongoli na bango, mpe bopunzi na bango, mpe ndenge nyonso ya bonsomo mpe ya pite, ekoki te kozala kati na mosala oyo.

15 Kasi tala, ezali na buku mingi mpe masolo ya makomi mingi ya ndenge na ndenge, mpe mingi mingi ebombamaki na Banefi.

16 Mpe ekitanisamaki uta nkola moko na mosusu na Banefi, kutu kino bakweyaki kati na bobuki mobeko mpe babomami, bapunzami, mpe balandami pona koboma, mpe babenganami, mpe balongolami bomoi, mpe bapanzami likolo ya etando ya mabele, mpe basangani elongo na Balamani kino babiangami lisusu te Banefi, mpo bakomaki bato ya nkuna, mpe bato ya nkei, mpe bato ya loma, iyo, kutu mpo bakomaki Balamani.

17 Mpe sikawa nazongi lisusu na lisolo ya ngai; boye, nini nalobi elekaki nsima ete boweli monene, mpe mbilinga-mbilinga, mpe bitumba, mpe bokabwani ezala, na kati ya bato ya Nefi.

18 Mobu ya ntuku minei na motoba ya boyangeli ya basambisi esukaki.

19 Mpe esalemaki ete boweli monene ezalaki naino na mboka, iyo, kutu na mobu ya ntuku minei na nsambo, mpe lisusu na mobu ya ntuku minei na mwambe.

20 Nzokande Elamani asimbaki kiti ya bosambisi na boyengebene mpe alima; iyo, atosaki kobatela meko, mpe masambisi, mpe mitindo ya Nzambe; mpe asalaki oyo wana ezalaki semba na miso ya Nzambe ntango nyonso; mpe atambolaki na kolandaka banzela ya tata na ye, na lolenge ete afulukaki mingi na mboka.

21 Mpe esalemaki ete azalaki na bana mibali mibale. Apesaki epayi ya nkulutu nkombo ya Nefi, mpe epayi ya leki, nkombo ya Lehi. Mpe babandaki kokola mpo na Nkolo.

22 Mpe esalemaki ete bitumba mpe boweli ebandaki kosila, mwa moke, na kati ya bato nyonso ya Banefi, na eteni ya nsuka mpenza ya mobu ya ntuku minei na mwambe ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

23 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku minei na libwa ya boyangeli ya basambisi, kimia ya ntango nyonso efandisamaki na mboka, nyonso longola se soki ezalaki makelemba ya nkuku oyo Gadiatoni moyongoli atiaki na biteni oyo bilekaki na bato ya mboka, oyo na ntango wana eyebanaki te epayi na bango oyo bazalaki na moto ya mbulamatari; yango wana babebisamaki te libanda ya mboka.

24 Mpe esalemaki ete na mobu se moko oyo bofuluki ezalaki ya monene kati na eklezia, na lolenge ete ezalaki na nkoto na nkoto ya baye basanganaki na eklezia mpe babatisamaki mpo na boyamboli.

25 Mpe bofuluki ya eklezia ezalaki monene mpenza, mpe mapamboli mingi masopanaki likolo ya bato, ete banganganzambe banene mpe bateyi bango moko bakamwaki na lolenge ya koleka ndelo.

26 Mpe esalemaki ete mosala ya Nkolo mofulukaki na kobatisaka mpe kozalaka bomoko mpo na eklezia ya Nzambe, bato mingi, iyo, mpe kutu zomi na zomi ya bankoto.

27 Boye tokoki komona ete Nkolo atonda na boboto mpo na baoyo nyonso balingi, kati na bosolo ya mitema na bango, kobelela nkombo na ye esantu.

28 Iyo, tomoni ete ekuke ya lola efungwani epayi ya bato nyonso, kutu na bango oyo bakondima na nkombo ya Yesu Klisto, oyo azali Mwana ya Nzambe.

29 Iyo, tomoni ete oyo nyonso alingi akoki kosimba liloba ya Nzambe, oyo ezali na bomoi mpe nguya, oyo ekokabola na katikati mayele mabe nyonso mpe mitambo mpe miango mabe ya zabulu, mpe oyo akokamba moto ya Klisto na nzela ya moke mpe ya nkaka na ngambo ya libulu wana ya libela ya mpasi oyo elengelami mpo na komela bato ya mabe—

30 Mpe kokomisa milimo na bango, iyo, milimo na bango ezanga kufa, na loboko ya mobali ya Nzambe kati na bokonzi ya lola, mpo na kofanda elongo na Abalayama, mpe Yisaka, mpe elongo na Yakobo, mpe elongo na batata basantu na biso nyonso, mpo na kobima lisusu te.

31 Mpe na mobu oyo ezalaki na bosepeli ya ntango nyonso na mboka ya Zalayemila, mpe na bikolo nyonso nzinganzinga mpembeni, kutu na bamboka nyonso oyo ezwamaki na Banefi.

32 Mpe esalemaki ete ezalaki na kimia mpe bosepeli monene koleka na eteni oyo etikalaki ya mobu ya ntuku minei na libwa; iyo, mpe ezalaki na kimia mpe bosepeli monene ya ntango nyonso na mobu ya ntuku mitano ya boyangeli ya basambisi.

33 Mpe na mobu ya ntuku mitano na moko ya boyangeli ya basambisi ezalaki na kimia mpe lokola, longola se soki ezalaki na lolendo oyo ebandaki kokota kati na eklezia—kati na eklezia ya Nzambe te, kasi kati na mitema ya bato oyo bazalaki koloba bazali bato ya eklezia ya Nzambe—

34 Mpe batombwanaki na lolendo, kutu kino na konyokolaka bandeko na bango. Sikawa oyo ezalaki mabe monene, oyo esalaki ete eteni eleki ya bato na bomikitisi bayoka mpasi ya minyoko minene, mpe balekaki kati na mitungisi mingi.

35 Nzokande bakilaki mpe basambelaki mbala na mbala, mpe bakomaki makasi koleka kati na bomikitisi na bango, mpe batikalaki ya kotelema ngwi koleka na bondimi ya Klisto, kino na kotondisaka milimo na bango na bosepeli mpe libondisi, iyo, kutu kino na kopetolaka mpe kosantisaka mitema na bango, bosantisi boye eyaki mpo batikaki mitema na bango epayi ya Nzambe.

36 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku mitano na mibale esukaki na kimia mpe lokola, longola se ezalaki na lolendo ya monene mpenza oyo ekotaki kati na mitema ya bato; mpe ezalaki na ntina ya bozwi monene koleka ya bango mpe bofuluki na bango na mboka; mpe ekolaki likolo na bango mokolo na mokolo.

37 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku mitano na misato ya boyangeli ya basambisi, Elamani akufaki, mpe mwana mobali na ye ya nkulutu Nefi abandaki kokonza na esika na ye. Mpe esalemaki ete asimbaki kiti ya bosambisi na boyengebene mpe alima; iyo, abatelaki mitindo ya Nzambe, mpe atambolaki kolandaka banzela ya tata na ye.

Bimisa na lokasa