Makomi
Elamani 6


Mokapo 6

Balamani ya sembo bateyi na Banefi ya nkuna—Mangomba nyonso mibale ya bato bafuluki na ntango ya eleko ya kimia mpe ya biloko ebele—Lusifelo, mobandisi ya lisumu, alamusi mitema ya bato ya nkuna mpe ya bayongoli ya Gadiatoni na bobomi mpe nkuna—Bayongoli babotoli ebonga ya ekobima ya Banefi. Penepene na mibu 29–23 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete ntango mobu ya ntuku motoba na mibale ya boyangeli ya basambisi ekomaki na nsuka, makambo oyo nyonso masalemaki mpe Balamani, mpo na eteni eleki mingi ya bango, bakomaki basembo, na lolenge ete bosembo na bango elekaki mpenza boye ya Banefi, na ntina ya kotelema ngwi na bango mpe molende na bango kati na bondimi.

2 Mpo tala, ezalaki na mingi ya Banefi oyo bakomaki mito makasi mpe bato bazanga boyamboli mpe ya nkuna mingi koleka, na lolenge ete babwakaki liloba ya Nzambe mpe mateya mpe masakoli nyonso oyo masalemaki na kati na bango.

3 Nzokande, bato ya eklezia bazalaki na bosepeli monene na ntina ya bobongwami ya Balamani, iyo, na ntina ya eklezia ya Nzambe, oyo etiamaki na kati na bango. Mpe balinganaki, mpe basepelaki moko na mosusu, mpe bazalaki na bosepeli monene.

4 Mpe esalemaki ete mingi ya Balamani bakitaki kati na mboka ya Zalayemila, mpe basakolaki epayi ya bato nyonso ya Banefi lolenge ya bobongwami na bango, mpe balendisaki bango mpo na kozala na bondimi mpe mpo na koyambola.

5 Iyo, mpe mingi bateyaki na nguya monene mpenza mpe likoki, kino na komema mingi na bango kati na bozindo ya bomikitisi, mpo na kozala balandi na bomikitisi ya Nzambe mpe ya Mwana ya mpate.

6 Mpe esalemaki ete mingi ya Balamani bakendaki kati na mboka epayi na nordi; mpe Nefi mpe Lehi lisusu bakendaki kati na mboka epayi na nordi, mpo na koteya epayi ya bato. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku motoba na misato.

7 Mpe tala, kimia ezalaki na mboka mobimba, na lolenge ete Banefi bakendaki na biteni nyonso kani ya mboka oyo balingaki, ezala na kati ya Banefi soki te na kati ya Balamani.

8 Mpe esalemaki ete Balamani bakendaki lisusu bipayi nyonso wapi balingaki, ezala na kati ya Balamani soki te na kati ya Banefi; mpe boye bazalaki na bonsomi ya bosangani moko na mosusu, mpo na kosomba mpe mpo na koteka, mpe mpo na kozwa litomba, engebene na mposa na bango.

9 Mpe esalemaki ete bakomaki na bozwi mingi koleka, nyonso ezala Balamani mpe Banefi mpe lokola; mpe bazwaki ebele koluta ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya ndenge nyonso ya bibende ya ntalo, ezala na mboka ya sudi mpe na mboka ya nordi mpe lokola.

10 Sikawa mboka ya sudi ebiangamaki Lehi, mpe mboka ya nordi ebiangamaki Muleke, oyo ezalaki nsima ya mwana mobali ya Sidikiya; mpo Nkolo amemaki Muleke na mboka ya nordi, mpe Lehi na mboka ya sudi.

11 Mpe tala, ezalaki na ndenge nyonso ya wolo na bamboka oyo mibale, mpe ya mpauni, mpe ya makele ya ntalo ya ndenge na ndenge; mpe ezalaki lisusu na bato ya misala ya ntoki mpenza, oyo basalaki ndenge nyonso ya misala ya makele ya ntalo mpe babongisaki yango; mpe boye bakomaki bato na bozwi.

12 Mpe bakolisaki mboto beboo, na nordi mpe na sudi mpe lokola; mpe bafulukaki mingi koleka, na nordi mpe na sudi mpe lokola. Mpe bayikanaki mpe bakomaki makasi na mboka. Mpe babokolaki bibwele mpe bitonga mingi, iyo, banyama mingi ya mafuta.

13 Tala basi na bango bazalaki kosala mpe kotonga, mpe basalaki ndenge nyonso ya bilamba, ya lino ya kilo ya malonga mpe bilamba ya ndenge na ndenge, mpo na kolatisa bolumbu na bango. Mpe boye mobu ya ntuku motoba na minei molekaki na kimia.

14 Mpe na mobu ya ntuku motoba na mitano bazalaki lisusu na bosepeli monene mpe kimia, iyo, mateya mingi mpe masakoli mingi mpo na oyo etali oyo wana esengelaki koya. Mpe boye mobu ya ntuku motoba na mitano elekaki.

15 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku motoba na motoba ya boyangeli ya basambisi, tala, Sezolami abomamaki na loboko moko eyebani te lokola efandaki ye likolo ya kiti ya bosambisi. Mpe esalemaki ete na mobu se moko wana, ete mwana mobali na ye, oyo aponamaki na bato na esika na ye, abomamaki mpe lokola. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku motoba na motoba.

16 Mpe na ebandeli ya mobu ya ntuku motoba na nsambo bato babandaki kokola na nkuna mingi koleka lisusu.

17 Mpo tala, Nkolo apambolaki bango mwa ntango mingi molai na bozwi ya mokili ete balamusamaki te na nkanda, na etumba, soki te na bosopi makila; boye babandaki kotia mitema na bango likolo ya bozwi na bango; iyo, babandaki koluka kozwa litomba ete bakoka kotombwana moko likolo ya mosusu; boye babandaki kobomaboma na nkuku, mpe koyongola mpe kopunza, ete bakoka kozwa litomba.

18 Mpe sikawa tala, babomi mpe bapunzi oyo wana bazalaki lingomba moko oyo esalemaki na Kisikumeni mpe Gadiatoni. Mpe sikawa esalemaka ete ezalaki mingi, kutu na kati ya Banefi, ya lingomba ya Gadiatoni. Kasi tala, bazalaki mingi koleka na kati ya eteni eleki nkuna ya Balamani. Mpe babiangamaki bayongoli mpe babomi ya Gadiatoni.

19 Mpe ezalaki bango oyo babomaki mosambisi mokonzi Sezolami, mpe mwana mobali na ye, wana ezalaki ye na kiti ya bosambisi; mpe tala, bamonanaki te.

20 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Balamani bamonaki ete ezalaki na bayongoli na kati na bango bayokaki mawa mpenza; mpe basalelaki mayele nyonso na nguya na bango mpo na kobebisa bango mosika na etando ya mabele.

21 Kasi tala, Satana alamusaki mitema ya eteni ya bato eleki mingi ya Banefi, na lolenge ete basalaki bomoko elongo na mangomba wana ya bayongoli, mpe bakotaki kati na mayokani na bango mpe balapanaki ndai na bango, ete bakomibatela mpe bakobomba moko mosusu na makambo mpe kokoso nyonso kani bakotiama, ete mpasi eyela bango te mpo na bobomi na bango, mpe bopunzi na bango, mpe boyibi na bango.

22 Mpe esalemaki ete bazalaki na bilembo na bango, iyo, bilembo na bango ya nkuku, mpe maloba na bango ya nkuku; mpe oyo ete bakoka kokesenisa ndeko mobali moko oyo akotaki kati na liyokani, ete nkuna nyonso kani ndeko mobali akosala akozokisama te na ndeko na ye ya mobali, mpe na bango oyo bazalaki ya lingomba na ye, baoyo bakamataki liyokani oyo mpe te.

23 Mpe boye bakokaki koboma, mpe kopunza, mpe koyiba, mpe kosala pite mpe ndenge nyonso ya nkuna, na bokeseni na mibeko ya ekolo na bango mpe lisusu mitindo ya Nzambe na bango.

24 Mpe moto nyonso ya kati na baoyo bazalaki ya lingomba na bango oyo akobimisa epayi na mokili nkuna na bango mpe bonsomo na bango, asengeli kosambisama, engebene na mibeko ya ekolo na bango te, kasi engebene na mibeko ya nkuna na bango, oyo epesamaki na Gadiatoni mpe Kisikumeni.

25 Sikawa tala, ezali ndai mpe mayokani oyo ya nkuku oyo Alma atindaki mwana mobali na ye ete asengeli te kokende na mokili, na kobangaka ete bazala nzela ya komema bato na nse ya bobebisami.

26 Sikawa tala, ndai ya nkuku mpe mayokani oyo ya nkuku eyaki te epayi ya Gadiatoni uta na masolo ya makomi oyo epesamaki na Elamani; kasi tala, etiamaki kati na motema ya Gadiatoni na mozali se moko wana oyo asenginiaki baboti na biso ya yambo mpo na kolia mbuma epekisami—

27 Iyo, mozali se moko wana oyo asalaki ekokolo elongo na Kaina, ete soki akoboma ndeko na ye ya mobali Abele ekoyebana te epayi na mokili. Mpe asalaki ekokolo elongo na Kaina mpe balandi na ye uta ntango wana kokende liboso.

28 Mpe lisusu ezali mozali se moko wana oyo atiaki yango kati na mitema ya bato mpo na kotonga linongi moko ya molai kokoka ete bakoka kokoma na lola. Mpe ezalaki mozali se moko wana oyo akambaki bato oyo bayaki uta na linongi wana kati na mboka oyo; oyo apanzaki misala ya molili mpe bonsomo likolo ya etando ya mboka, kino abendaki bato na nse na bobebisami mobimba, mpe na lifelo ya libela.

29 Iyo, ezali mozali se moko wana oyo atiaki kati na motema ya Gadiatoni ete akoba kosala mosala ya molili, mpe bobomi ya nkuku; mpe asalaki yango uta na ebandeli ya moto kutu kino na ntango oyo.

30 Mpe tala, ezali ye oyo azali mobandisi ya masumu nyonso. Mpe tala, amemi misala na ye ya molili mpe bobomi ya nkuku, mpe akitanisi bikokolo na bango, mpe ndai na bango, mpe mayokani na bango, mpe miango ya nkuna ya nsomo, uta nkola na nkola engebene lokola ekoki ye kotia nkanga likolo ya mitema ya bana ya bato.

31 Mpe sikawa tala, atiaki nkanga monene likolo ya mitema ya Banefi; iyo, na lolenge ete bakomaki bato ya nkuna mingi koleka; iyo, eteni eleki bato mingi na bango ebalukaki uta na nzela ya bosembo, mpe baniataki na nse ya makolo na bango mitindo ya Nzambe, mpe babalukaki epayi na nzela na bango moko, mpe bamisalelaki bikeko uta na wolo na bango mpe mpauni na bango.

32 Mpe esalemaki ete mabe oyo nyonso oyolaki bango na ntaka ya mibu mingi te, na lolenge ete eteni eleki mingi ya mabe yango eyaki epayi na bango na mobu ya ntuku motoba na nsambo ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

33 Mpe bakolaki na mabe na bango na mobu ya ntuku motoba na mwambe mpe lokola, na mawa mpe boleli monene ya basembo.

34 Mpe boye tomoni ete Banefi babandaki kokita moke moke kati na bozangi boyambi, mpe bakolaki na nkuna mpe bonsomo, nzokande Balamani babandaki kokola mpenza na boyebi ya Nzambe na bango; iyo, babandaki kobatela meko mpe kobomba mitindo na ye, mpe kotambola na bosolo mpe alima liboso na ye.

35 Mpe boye tomoni ete Molimo ya Nkolo mobandaki kolongwa uta na Banefi, na ntina ya nkuna mpe bokasi ya mitema na bango.

36 Mpe boye tomoni ete Nkolo abandaki kosopa Molimo na ye epayi ya Balamani, na ntina ya petepete na bango mpe bolingi na bango mpo na kondima maloba na ye.

37 Mpe esalemaki ete Balamani balukaki kokanga lingomba ya bayongoli ya Gadiatoni; mpe bateyaki liloba ya Nzambe na kati ya eteni eleki nkuna na bango, na lolenge ete lingomba oyo ya bayongoli ebebisamaki nie na kati ya Balamani.

38 Mpe esalemaki epayi mosusu, ete Banefi babokolaki bango mpe basalisaki bango, kobandaka na eteni eleki nkuna na bango, kino batondisaki mboka mobimba ya Banefi, mpe basenginiaki eteni ya bato eleki mingi ya basembo kino bamikitisaki mpo na kondima na misala na bango mpe kokabola bopunzi na bango, mpe kosangana elongo na bango na bobomi mpe makelemba na bango ya nkuku.

39 Mpe boye bazwaki bokambi mobimba ya ekobima, na lolenge ete baniataki na nse ya makolo na bango mpe babetaki mpe banyokolaki mpe babalolaki mikongo na bango na babola mpe basokemi, mpe balandi na bomikitisi ya Nzambe.

40 Mpe boye tomoni ete bazalaki na ezalela moko ya nsomo, mpe bakomelaki mpo na bobebisami moko ya libela.

41 Mpe esalemaki ete boye esukaki mobu ya ntuku motoba na mwambe ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa