Makomi
Elamani 11


Mokapo 11

Nefi andimisi Nkolo mpo ya kokitanisa etumba ya bango na nzala—Bato mingi bawei—Bayamboli, mpe Nefi atungisi Nkolo mpo ya mvula—Nefi mpe Lehi bazwi mabimisi mingi—Bayongoli ba Gadiatoni bamitii mpenza o mboka. Penepene na 20–6 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o mobu mwa tuku sambo na mibale mwa bokonzi bwa basambisi boweli bobakisamaki, mpenza ete izalaki bitumba o ntaka ya mboka mobimba o ntei ya bato banso ba Nefi.

2 Mpe ezalaki lingomba liye lya nkuku lya bayongoli baye basalaki mosala moye mwa bobebisami mpe mwa nkuna. Mpe etumba eye ewumelaki mobu mona mobimba; o mobu mwa tuku sambo na misato mowumelaki lokola.

3 Mpe esalemaki ete o mobu moye Nefi abelelaki epai ya Nkolo, kolobaka:

4 O Nkolo, ndima te ete bato baye babebisama na mopanga; kasi O Nkolo, kutu tika ezala nzala o mboka, mpo ya kolamusa bango o bokundoli bwa Nkolo Nzambe wa bango, mbele bakoyamboli mpe bakozonga epai ya yo.

5 Mpe boye esalemaki, engebene na maloba ma Nefi. Mpe ezalaki nzala yoko enene o mboka, o ntei ya bato banso ba Nefi. Mpe boye o mobu mwa tuku sambo na minei ekobaki nzala, mpe mosala mwa bobebisami mosilaki na mopanga kasi mokomaki nsomo na nzala.

6 Mpe mosala moye mwa bobebisami mokobaki o mobu mwa tuku sambo na mitano. Mpo mabele mabetemeki ete makaukaki, mpe mabotaki te mboto o elanga ya mboto; mpe mabele mobimba mabetemeki, kutu o ntei ya Balamani lokola o ntei ya Banefi, boye ete bawaki nkoto na nkoto o biteni bileki nkuna bya mboka.

7 Mpe esalemaki ete bato bamonoki ete bazalaki penepene na kowa na nzala, mpe babandaki komikundola Nkolo Nzambe wa bango; mpe babandaki komikundola maloba ma Nefi.

8 Mpe bato babandaki kosamba elongo na bakonzi ba basambisi ba bango mpe bakambi ba bango, ete balingaki koloba epai ya Nefi: Tala, toyebi ete ozali moto wa Nzambe, mpe yango wana belela epai ya Nkolo Nzambe wa biso ete abongola mosika na biso nzala eye, mbele maloba maye olobaki matali bobebisami bwa biso masalema.

9 Mpe esalemaki ete basambisi balobaki epai ya Nefi, engebene na maloba maye mazwamaka mposa. Mpe esalemaki ete emonoki Nefi ete bato bayambolaki mpe bamikitisaki na elamba ya saki, abelelaki lisusu epai ya Nkolo, kolobaka:

10 O Nkolo, tala bato baye bayamboli; mpe bakombi mosika lingomba lya Gadiatoni uta o ntei ya bango mpenza ete basili, mpe babombi mwango mwa bango mwa nkuku o kati ya mabele.

11 Sikawa, O Nkolo, na ntina ya bosawa bwa bango ekobalola yo mosika nkanda ya yo, mpe ekotika nkanda yo ya yo esepelisama o bobebisami bwa bato ba nkuna bana baye obebisi kala.

12 O Nkolo, ekobalola yo mosika nkanda ya yo, iyo, nkanda ekasi ya yo, mpe ekosala yo ete nzala eye ekoka kosila o mboka eye.

13 O Nkolo, ekoyokemela yo epai ya ngai, mpe ekosala yo ete ekoka kosalema engebene na maloba ma ngai, mpe ekotinda yo mvula likolo lya etando ya mabele, ete ekoka komeme mbuma ya yango, mpe mboto ya yango o eleko ya mboto.

14 O Nkolo, oyokemelaki epai ya maloba ma ngai elobaki ngai, Tika ezala nzala yoko, ete bokono bwa mopanga bokoka kosila; mpe nayebi ete olingi, kutu o ntango eye, koyokemela epai ya maloba ma ngai, mpo olobaki ete: Soko bato baye bayamboli nakobikisa bango.

15 Iyo, O Nkolo, mpe omoni ete bayamboli, na ntina ya nzala mpe bokono mpe bobebisami boye boyei epai ya bango.

16 Mpe sikawa, O Nkolo, ekobalola yo mosika nkanda ya yo, mpe ekomeka yo lisusu soko bakosalela yo? Mpe soko boye, O Nkolo, okokoka kopambola bango engebene na maloba ma yo maye olobi.

17 Mpe esalemaki ete o mobu mwa ntuku sambo na motoba Nkolo abalolaki mosika nkanda ya ye uta na bato, mpe asalaki ete mvula ekweya likolo lya mabele, mpenza ete ememeki mbuma na mango o eleko ya mbuma na mango. Mpe esalemaki ete ememeki mboto na mango o eleko ya mboto ya mango.

18 Mpe tala, bato basepelaki mpe bakembelaki Nzambe, mpe etando mobimba ya mboka etondaki na bosepeli; mpe balukaki lisusu te kobebisa Nefi, kasi bamonoki ye lokola profeta moko monene, mpe moto moko wa Nzambe, kozalaka na nguya enene mpe bokulaka epesama epai ya ye uta na Nzambe.

19 Mpe tala, Lehi, ndeko mobali wa ye, azalaki moke te nsima ya ye o makambo matali bosembo.

20 Mpe boye esalemaki ete bato ba Nefi babandaki kozwa lisusu bomengo o mboka, mpe babandaki kotonga bisika bibebaki, mpe babandaki koyikana mpe kopanzana, kutu kina bazipaki etando mobimba ya mboka, epai ya nordi mpe epai ya sudi lokola, uta mbu ya westi o mbu ya esti.

21 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku sambo na motoba mosukaki na kimia. Mpe mobu mwa tuku sambo na sambo mobandaki na kimia; mpe eklezia epanzanaki o ntaka ya etando ya mboka mobimba; mpe eteni eleki mingi ya bato, Banefi mpe Balamani lokola, bazalaki ba eklezia; mpe bazalaki na kimia enene mpenza o mboka; mpe boye esukaki mobu mwa tuku sambo na sambo.

22 Mpe lisusu bazalaki na kimia o mobu mwa tuku sambo na mwambe, longola se soko boweli boke botali biteni bya malongi maye matiamaka na baprofeta.

23 Mpe o mobu mwa tuku sambo na libwa ebandaki kozala boswani boike. Kasi esalemaki ete Nefi mpe Lehi, mpe mingi ya bandeko ba bango bayebaki biteni bya solo bya malongi, kozalaka na mabimisi mokolo na mokolo, yango wana bateyaki epai ya bato, mpenza ete batiaki nsuka yoko o boswani bwa bango o mobu mona kaka.

24 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku mwambe mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, ezalaki yoko motango mwa bakabwani uta na bato ba Nefi, baye yoko mibu yambo bakendeka libanda epai ya Balamani, mpe bakamataki likolo lya bango nkombo ya Balamani, mpe lisusu yoko motango baye bazalaki biboto bya solo bya Balamani, elamusamaki bango na nkanda na bango, to na bakabwani bana, yango wana babandaki etumba yoko na bandeko ba bango.

25 Mpe basalaki bobomi mpe bopunzi; mpe nde balingaka kozonga nsima o kati ya ngomba, mpe o kati ya esobe mpe bisika bya nkuku, komibombaka ete babombolama te, koyambaka mokolo na mokolo bobakisi boko bwa motango mwa bango, mbala nzike lokola izalaki bakabwani baye bakendeki epai ya bango.

26 Mpe boye o ntango, iyo, kutu o ntaka ya mibu mingi te, bakomaki lingomba lyoko linene mpenza lya bayongoli; mpe balukaki miango minso mya nkuku mya Gadiatoni; mpe boye bakomaki bayongoli ba Gadiatoni.

27 Sikawa tala, bayongoli bana basalaki mosukusuku monene, iyo, kutu bobebisami bonene o ntei ya bato ba Nefi, mpe lisusu o ntei ya bato ba Balamani.

28 Mpe esalemaki ete elongobanaki ete etiama nsuka yoko o mosala mwa bobebisami; yango wana batindaki limpinga lyoko lya bato bakasi o kati ya esobe mpe likolo lya ngomba mpo ya koluka lingomba lya bayongoli, mpe mpo ya kobebisa bango.

29 Kasi tala, esalemaki ete o mobu mona kaka babenganamaki nsima kutu o kati ya mboka ya bangomei. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku mwambe mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

30 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku mwambe na moko bakendeki lisusu kobunda na lingomba lya bayongoli, mpe babebisaki mingi; mpe babimelamaki na bobebisami boike lokola.

31 Mpe basengisamaki kozonga libanda lya esobe mpe libanda lya ngomba epai ya mboka ya bangomei, na ntina ya bonene boluti bwa motango mwa bayongoli bana baye bafulusaki ngomba mpe esobe.

32 Mpe esalemaki ete boye esukaki mobu moye. Mpe bayongoli babakisamaki lisusu mpe bayikaki bokasi, mpenza ete babundisaki mampinga mobimba ma Banefi, mpe lisusu ma Balamani; mpe basalaki bobangi bonene boya epai ya bato likolo lya etando mobimba ya mboka.

33 Iyo, mpo babimelaki biteni mingi bya mboka, mpe basalaki bobebisami bonene epai ya bango; iyo, babomaki mingi, mpe bamemeki mosika basusu bakangemi o kati ya esobe, iyo, mpe mingi koleka basi ba bango mpe bana ba bango.

34 Sikawa bobe bonene boye, boye boyaki epai ya bato na ntina ya mabe ma bango, bolamusaki bango lisusu na bokundoli bwa Nkolo Nzambe wa bango.

35 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku mwambe na moko mwa bokonzi bwa basambisi.

36 Mpe o mobu mwa tuku mwambe na mibale babandaki lisusu kobosana Nkolo Nzambe wa bango. Mpe o mobu mwa tuku mwambe na misato babandaki koyika bokasi o bobe. Mpe o mobu mwa tuku mwambe na minei babongisaki te nzela ya bango.

37 Mpe esalemaki o mobu mwa tuku mwambe na mitano bakolaki bakasi mingi o lolendo la bango, mpe o nkuna ya bango; mpe boye bazalaki kotelaka lisusu mpo ya bobebisami.

38 Mpe boye esukasi mobu mwa tuku mwambe na mitano.