Makomi
Elamani 2


Mokapo 2

Elamani, mwana mobali wa Elamani, akomi mosambisi mokonzi—Gadiatoni akambi lingomba lya Kisikumeni—Mosali wa Elamani abomi Kisikumeni, mpe lingomba lya Gadiatoni likimi o kati ya esobe. Penepene na 50–49 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku minei na mibale mwa bokonzi bwa basambisi, esilisaka Moloniya kotia lisusu kimia o kati ya Banefi na Balamani, tala ezalaki moko te mpo ya kokamata kiti ya bosambisi; yango wana ebandaki kozala boweli boko lisusu o ntei ya bato botali nani akokamata kiti ya bosambisi.

2 Mpe esalemaki ete Elamani, oyo azalaki mwana mobali wa Elamani, aponomoki mpo ya kokamata kiti ya bosambisi, na mokano mwa bato.

3 Kasi tala, Kisikumeni, oyo abomaki Pawolani, atikalaki kozela mpo ya koboma Elamani lokola; mpe asungamaki na lingomba lya ye, oyo bakotaka o kati ya boyokani boko ete moko te akoyeba nkuna ya ye.

4 Mpo ezalaki Gadiatoni moko, oyo azalaki nganga mpenza o maloba mingi, mpe lisusu o bikelakela bya ye, mpo ya kokamba misala mya nkuku mya koboma mpe koyongolo yango wana akomaki mokambi wa lingomba lya Kisikumeni.

5 Yango wana aleteke bango, mpe lisusu Kisikumeni, ete soko bakotia ye o kiti ya bosambisi akopesa epai ya bango baye bazali ba lingomba lya ye ete batiama o nguya mpe o bokulaka o ntei ya bato; yango wana Kisikumeni azalaki koluka koboma Elamani.

6 Mpe esalemaki ete lokola ekendeke ye ona kiti ya bosambisi mpo ya koboma Elamani, tala moko wa basali ba Elamani, ezalaki ye libanda o butu, mpe ezwaki ye, na kobombana, boyebi boko bwa miango mina miye mitiamaki na lingomba liye mpo ya koboma Elamani—

7 Mpe esalemaki ete akutanaki na Kisikumeni, mpe apesaki epai ya ye elembo yoko; yango wana Kisikumeni asalaki eyebana epai ya ye ntina ya mposa ya ye, kozalaka na mposa ete ameme ye o kiti ya bosambisi ete akoka koboma Elamani.

8 Mpe eyebaka mosali wa Elamani motema monso mwa Kisikumeni, mpe boniboni ete ezalaki mongete mwa ye mpo ya koboma, mpe lisusu ete ezalaki mongete mwa lingomba lya ye mpo ya koboma, mpe koyongolo, mpe kolonga nguya, (mpe eye ezalaki mwango mwa nkuku, likelemba lya bango) mosali wa Elamani alobaki epai ya Kisikumeni: Tokende epai ya kiti ya bosambisi.

9 Sikawa eye esepelisaki Kisikumeni mpenza, mpo abanzaki ete akokokisa mokano mwa ye; kasi tala, mosali wa Elamani, lokola bazalaki kokendeke epai ya kiti ya bosambisi, atobolaki Kisikumeni kutu o motema, ete akweyaki mokufi na eleli yoko te. Mpe akimaki mpe alobelaki Elamani makambo manso amonoko, mpe ayokaka, mpe asalaka.

10 Mpe esalemaki ete Elamani atindaki mpo ya kokamata lingomba lina lya bayongoli mpe babomi ba nkuku, ete bakoka kobomama engebene na mobeko.

11 Kasi tala, emonoki Gadiatoni ete Kisikumeni azongaki te abangaki mbele ete abebisamaki; yango wana asalaki ete lingomba lya ye lilanda ye. Mpe bakamataki bokimi bwa bango libanda lya mboka, na nzela yoko ya nkuku, o kati ya esobe; mpe boye etindaki Elamani bato mpo ya kokamata bango bakokaki komonono esika yoko te.

12 Mpe mingi ya Gadiatoni oyo ekolobama nsima. Mpe boye esukaki mobu mwa tuku minei na mibale mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

13 Mpe tala, o nsuka ya buku eye bokomono ete Gadiatoni oyo akolakisa bokwei, iyo, penepene na bobebisami mobimba bwa bato ba Nefi.

14 Tala nalingi koloba te nsuka ya buku ya Elamani, kasi nalingi koloba nsuka ya buku ya Nefi, uta wapi nakamati nsango enso eye nakomi.