Makomi
Elamani 8


Mokapo 8

Basambisi babe baluki kopusa bato batomboka na Nefi—Abalayama, Mose, Zenosi, Zenoki, Eziasi, Yisaya, Yilimia, Lehi, mpe Nefi banso batatolaki etali Klisto—Na bofuli Nefi asakoli mobomi wa mosambisi mokonzi. Penepene na 23–21 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Nefi maloba maye, tala, izalaki bato baye bazalaki basambisi, baye lisusu bazalaki ba lingomba lya nkuku lya Gadiatoni, mpe basilikaki, mpe bazomelaki ye, kolobaka epai ya bato: Ntina nini bosimbi te likolo lya moto oyo mpe bomemi ye te, ete akoka kotumbolama engebene na bobe asali?

2 Ntina nini botali moto oyo, mpe boyoki ye atiola bato baye mpe mibeko mya biso?

3 Mpo tala, Nefi alobaki epai ya bango etali bobebi bwa mibeko mya bango; iyo, makambo mingi Nefi alobaki maye makoki te kokomama; mpe eloko te alobaki eye ezalaki na bokeseni na mitindo mya Nzambe.

4 Mpe basambisi bana basilikaki na ye zambi alobaki polele epai ya bango etali misala mya nkuku mya bango mya molili; nzokande, bamekaki te kotia loboko la bango likolo lya ye, mpo babangaki bato mbele bazomela bango.

5 Yango wana babelelaki epai ya bato, kolobaka: Ntina nini botika moto oyo atiola biso? Mpo tala atumboli bato baye banso, kutu kina epai ya bobebisami; iyo, mpe lisusu ete iye bingumba bya biso bikokamatama uta na biso, ete tokozala na esika te na yango.

6 Mpe sikawa toyebi ete oyo ekoki kosalema te, mpo tala, tozali na nguya, mpe bingumba bya biso bizali binene, yango wana bayini ba biso bakoki te kozala na nguya likolo lya biso.

7 Mpe esalemaki ete boye balamusaki bato na nkanda na Nefi, mpe babimisaki boweli o ntei ya bango; mpo izalaki boko baye bagangaki: Tikani moto oyo kimia, mpo azali moto molamu, mpe makambo mana maye alobi makosalema solo longola se soko toyamboli;

8 Iyo, tala, masambisi manso makoya likolo lya biso maye atatoli epai ya biso; mpo toyebi ete atatoli alima epai ya biso etali mabe ma biso. Mpe tala mazali mingi, mpe ayebi lisusu makambo manso maye makomela biso lokola ayebi mabe ma biso;

9 Iyo, mpe tala, soko azalaka te profeta akokaki te kotatola etali makambo mana.

10 Mpe esalemaki ete bato bana baye balukaki kobebisa Nefi basengisamaki na ntina ya bobangi bwa bango, ete batiaki te maboko ma bango likolo lya ye; yango wana abandaki lisusu koloba epai ya bango, komonoko ete azwaki lisungi o miso mya boko, mpenza ete etikali ya bango babangaki.

11 Yango wana asengisamaki koloba lisusu epai ya bango kolobaka: Tala, bandeko ba ngai, etangi bino te ete Nzambe apesaki nguya na moto moko, kutu Mose, mpo ya kobete likolo lya mai ma Mbu Etane, mpe makabwanaki ngambo na ngambo, mpenza ete Bayisalaele, baye bazalaki batata ba biso, bayaki katikati likolo lya mabele makauka, mpe mai makangamaki likolo lya mampinga ma Baejipito mpe maminaki bango nie?

12 Mpe sikawa tala, soko Nzambe apesaki epai ya moto oyo nguya ya lolenge loye, nde ntina nini bokoswana o ntei ya binomei, mpe bokoloba ete apesi ngai te na wapi nakoki koyeba etali masambisi maye makoya likolo lya bino longola se soko boyamboli?

13 Kasi, tala, bowangani bobele maloba ma ngai te, kasi bowangani lisusu maloba manso malobamaki na batata ba biso, mpe lisusu maloba maye malobamaki na moto oyo, Mose, oyo nguya enene ya lolenge loye epesamaki epai ya ye, iyo, maloba maye alobi matali boyei bwa Masiya.

14 Iyo, epesaki ye te litatoli ete Mwana Mobali wa Nzambe akoya? Mpe lokola atombolaki elembo ya nioka ya motako o esobe, kutu boye ekotombolama ye oyo akoya.

15 Mpe lokola mingi bakotala likolo lya nioka ena bakozala na bomoi, kutu boye mingi lokola bakotala likolo lya Mwana Mobali wa Nzambe na bondimi, kozalaka na molimo moko mwa mawa, bakoka kozala na bomoi, kutu mpo ya bomoi boye bozali bwa seko.

16 Mpe sikawa tala, Mose atatolaki bobele makambo maye te, kasi lisusu baprofeta basantu banso, uta mikolo mya ye o mikolo mya Abalayama.

17 Iyo, mpe tala, Abalayama amonoki boyei bwa ye, mpe atondisamaki na nsai mpe bosepeli.

18 Iyo, mpe tala nalobi epai ya bino, ete bobele Abalayama te ayebaki makambo maye, kasi ezalaki mingi yambo ya mikolo mya Abalayama oyo babiangemaki na molongo mwa Nzambe; iyo, kutu nsima ya molongo mwa Mwana Mobali wa ye; mpe eye ete eyebena epai ya bato, mibu nkoto yoko minene mingi yambo ya boyei bwa ye, ete kutu bosikoli bokoya epai ya bango.

19 Mpe sikawa nalingi ete boyeba, ete kutu uta o mikolo mya Abalayama izalaki baprofeta mingi batatolaki makambo maye; iyo, tala, profeta Zenosi atatolaki na bobangi te; mpo ya yango abomamaki.

20 Mpe tala, lisusu Zenoki, mpe lisusu Eziasi, mpe lisusu Yisaya, mpe Yilimia, (Yilimia kozalaka profeta ona kaka oyo atatolaki etali bobebisami bwa Yelusaleme) mpe sikawa toyebi ete Yelusaleme ebebisamaki engebene na maloba ma Yilimia. O nde ntina nini te Mwana Mobali wa Nzambe aya, engebene na bobikuli bwa ye?

21 Mpe sikawa ekoswana bino ete Yelusaleme ebebisamaki? Ekoloba bino ete bana babali ba Sidikiya babomamaki te, banso longola se Muleki? Iyo, mpe emoni bino te ete nkona ya Sidikiya ezali elongo na biso, mpe babenganamaki libanda lya mboka ya Yelusaleme? Kasi tala, eye ezali enso te—

22 Tata wa biso Lehi abenganamaki libanda lya Yelusaleme zambi atatolaki etali makambo maye. Nefi lisusu atatolaki etali makambo maye, mpe lisusu penepene na batata ba biso banso, kutu kina o ntango eye; iyo, batatolaki boyei bwa Klisto, mpe batalaki o boso, mpe basepelaki na mokolo mwa ye moye mokoya.

23 Mpe tala, azali Nzambe, mpe azali elongo na bango, mpe amimonisaki epai ya bango, ete basikolamaki na ye; mpe bapesaki epai ya ye nkembo, na ntina ya ena eye ekoya.

24 Mpe sikawa, komonoko boyebi makambo maye mpe bokoki te kowangana mango longola se soko bokokosa, yango wana na eye bosumuki, mpo bobwaki makambo maye manso, ata polele mingi bozwi; iyo, kutu bozwi biloko binso, biloko o lola, mpe biloko binso biye bizali o nse lokola, lokola litatoli lyoko ete bizali solo.

25 Kasi tala, bobwaki bosolo, mpe botomboki na Nzambe mosantu wa bino; mpe kutu o ntango eye, esika ya komibongisela bomengo o lola, kuna eloko te ebebi, mpe kuna eloko te ekoki koya eye ezali bosoto, bozali kobakisaka mpo ya binomei nkele mokolo mwa bosambisi.

26 Iyo, kutu o ntango eye bozali kotelaka, na ntina ya bobomi bwa bino mpe bondumba bwa bino mpe nkuna ya bino, mpo ya bobebisami bwa libela; iyo, mpe longola se soko boyamboli bokoya epai ya bino noki.

27 Iyo, tala ezali sikawa kutu o bikuke bya bino; iyo, kotani epai ya kiti ya bosambisi, mpe lukani; mpe tala, mosambisi wa bino abomami, mpe alali o makila ma ye; mpe abomami na ndeko mobali wa ye, oyo aluki kofanda o kiti ya bosambisi.

28 Mpe tala, bango babale bazali ba lingomba lya bino lya nkuku, liye lya lyango mokeli azali Gadiatoni mpe mobe moko oyo aluki kobebisa bozo bwa bato.