Makomi
Elamani 13


Bobikuli bwa Samwele, Molamani, epai ya Banefi.

Kokwaka mikapo 13 o 15 eye o kati.

Mokapo 13

Samwele Molamani abikuli bobebisami bwa Banefi longola se soko bayamboli—Bango mpe bozwi bwa bango balakelami botutu—Babwaki mpe babambi baprofeta mabanga, bazingami mpembeni na bazabulu, mpe baluki esengo na kosalaka bobe. Penepene na 6 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o mobu tuku mwambe na motoba, Banefi batikalaki kaka o nkuna, iyo, o nkuna enene, ntango etosaki sikisiki Balamani kobatela mitindo mya Nzambe, engebene na mobeko mwa Mose.

2 Mpe esalemaki ete o mobu mona ezalaki Samwele moko, Molamani moko, ayaki o kati ya mboka ya Zalayemila, mpe abandaki koteya epai ya bato. Mpe esalemaki ete ateyaki, mikolo mingi, boyamboli epai ya bato, mpe babwakaki ye libanda, mpe azongaki o mboka ya yemei.

3 Kasi tala, mongongo mwa Nkolo moyaki epai ya ye, ete azonga lisusu, mpe abikula epai ya bato makambo manso makoya o kati ya motema mwa ye.

4 Mpe esalemaki ete balingaki te kondima ete akota o kati ya mboka; yango wana amataki mpe akomaki likolo lya efelo ya yango, mpe atandolaki loboko la ye mpe abelelaki na mongongo moko mokasi, mpe abikulaki epai ya bato makambo manso Nkolo atiaki o kati ya motema mwa ye.

5 Mpe alobaki epai ya bango: Tala, ngai, Samwele, Molamani moko, nakoloba maloba ma Nkolo maye atii o kati ya motema mwa ngai; mpe tala atii mango o kati ya motema mwa ngai mpo ya koloba epai ya bato baye ete mopanga mwa boyengebene modiembeli likolo lya bato baye; mpe mibu nkama minei mikoleka te longola se soko mopanga mwa boyengebene mokweyi likolo lya bato baye.

6 Iyo, bobebisami bonene bokozela bato baye, mpe bokoya solo epai ya bato baye, mpe eloko te ekoki kobikisa bango longola se soko ezali boyamboli mpe bondimi likolo lya Nkolo Yesu Klisto, oyo solo akoya o kati ya mokili, mpe akoyoka mpasi na makambo mingi mpe bakoboma ye mpo ya bato ba ye.

7 Mpe tala, anzelu wa Nkolo asakoli yango epai ya ngai, mpe amemeki nsango ya nsai o bozo bwa ngai. Mpe tala, natindamaki epai ya bino mpo ya kosakola yango lokola epai ya bino, ete bokoka kozala na nsango ya nsai; kasi tala bino bolingi te koyamba ngai.

8 Yango wana, boye elobi Nkolo: Na ntina ya bokasi bwa mitema mya bato banso ba Banefi, longola se soko bayamboli, nakolongola liloba lya ngai uta o ntei ya bango, mpe nakolongola Molimo mwa ngai uta na bango, mpe nakotikela bango lisusu te, mpe nakobalola mitema mya bandeko ba bango na kobundisa bango.

9 Mpe mibu nkama minei mikoleka te yambo nasala ete bakobeteme; iyo, nakobimela bango na mopanga mpe na nzala mpe na bokono.

10 Iyo, nakobimela bango na nkanda ekasi ya ngai, mpe ekozala bango baye ba nkola ya inei baye bakozala na bomoi, ba bayini ba bino, mpo ya komono bobebisami bwa bino mobimba; mpe eye solo ekoya longola se soko boyamboli, elobi Nkolo; mpe bango baye ba nkola ya inei bakobimela bobebisami bwa bino.

11 Kasi soko bokoyambola mpe bokozonga epai ya Nkolo Nzambe wa bino nakobalola mosika nkanda ya ngai, boye elobi Nkolo; iyo, boye elobi Nkolo, bapambolami bango baye bakoyambola mpe bakobaluka epai ya ngai, kasi lisuma epai ya ye oyo akoyambola te.

12 Iyo, lisuma epai ya engumba eye enene ya Zalayemila; mpo tala, ezali na ntina ya bango baye bazali sembo ete ebikisami; iyo, lisuma o engumba eye enene, mpo namoni, elobi Nkolo, ete bazali mingi, iyo, kutu eteni eleki mingi ya engumba eye enene, baye bakoyeisa mitema mya bango mikasi na ngai, elobi Nkolo.

13 Kasi bapambolami bango baye bakoyambola, mpo bango nakobikisa. Kasi tala, soko ezalaka te mpo ya basembo baye bazali o engumba eye enene, tala, nalingaki kosala ete moto mokita libanda lya lola mpe mobebisa yango.

14 Kasi tala, ezali mpo ya litomba lya basembo ete ebikisami. Kasi tala, ntango eyei, elobi Nkolo, ete ekobwaka bino libanda basembo uta o ntei ya bino, nde ekotela bino mpo ya bobebisami; iyo, lisuma lizala epai ya engumba eye enene, na ntina ya nkuna mpe bonsomo boye bozali o ntei ya ye.

15 Iyo, mpe lisuma lizala epai ya engumba ya Gideona, mpo ya nkuna mpe bonsomo boye bozali o ntei ya ye.

16 Iyo, mpe lisuma lizala epai ya bingumba binso biye bizali zingazinga mpembeni, biye bizwami na Banefi, na ntina ya nkuna mpe bonsomo boye bozali o byango.

17 Mpe tala, botutu boko bokoya likolo lya mboka, elobi Nkolo wa Bibele, na ntina ya litomba lya bato baye bazali likolo lya mboka, iyo, na ntina ya nkuna ya bango mpe bonsomo bwa bango.

18 Mpe ekosalema, elobi Nkolo wa Bibele, iyo, Nzambe wa biso monene mpe wa solo, ete oyo mpenza akobomba bomengo bwa ye o mabele akomono bwango lisusu te, na ntina ya botutu bonene bwa mboka, longola se soko ezali moto moko sembo mpe akobomba bwango epai ya Nkolo.

19 Mpo nalingi, elobi Nkolo, ete babomba bomengo bwa bango epai ya ngai; mpe balakelama botutu bango baye bakobomba te bomengo bwa bango epai ya ngai; mpo boko te babombi bomengo bwa bango epai ya ngai longola se basembo; mpe ye oyo akobomba te bomengo bwa ye epai ya ngai, elakelami ye botutu, mpe lisusu bomengo bwa ye, mpe moko te akosikola ye na ntina ya botutu bwa mboka.

20 Mpe mokolo mokoya moye bakobomba bomengo bwa bango, zambi batii mitema mya bango na bomengo; mpe zambi batii mitema mya bango na bomengo bwa bango, mpe bakobomba bomengo bwa bango ekokima bango bayini ba bango; zambi bakobomba yango te epai ya ngai, balakelama botutu mpe bomengo bwa bango lokola, mpe o mokolo mona, bakobeteme, elobi Nkolo.

21 Talani, bato ba mboka eye enene, mpe yokemelani epai ya maloba ma ngai; iyo, yokemelani epai ya maloba maye Nkolo alobi; mpo tala, alobi ete bolakelami botutu na ntina ya bozwi bwa bino, mpe lisusu ilakelami botutu bozwi bwa bino zambi botii mitema mya bino likolo lya bwango, mpe boyokemeli te epai ya maloba ma ye oyo apesaki bwango epai ya bino.

22 Bomikundoli te Nkolo Nzambe wa bino o biloko na byango apamboli bino, kasi bomikundoli ntango inso bozwi bwa bino, mpo ya kotonda te Nkolo Nzambe wa bino mpo ya bwango; iyo, mitema mya bino mibendani te libanda epai ya Nkolo, kasi mivimbani o lolendo lonene, mpo ya komikumisa, mpe mpo ya bovimbami bonene, bilula, songisongi, nko, boniokoli mpe bobomi, mpe ndenge inso ya mabe.

23 Mpo ya ntina eye Nkolo Nzambe asalaki ete botutu boko boya likolo lya mboka, mpe lisusu likolo lya bozwi bwa bino, mpe eye na ntina ya mabe ma bino.

24 Iyo, lisuma epai ya bato baye, na ntina ya ntango eye eyei, eye bobwaki libanda baprofeta, mpe boseki bango, mpe bobwaki mabanga na bango, mpe bobomi bango, mpe bosali ndenge inso ya bobe epai ya bango, kutu lokola basalaki o ntango ya kala.

25 Mpe sikawa elobi bino, bolobi: Soko mikolo mya biso mizalaka o ntango ya batata ba biso ba kala, tolingaki te koboma baprofeta; tolingaki te kobamba bango mabanga, mpe kobwaka bango libanda.

26 Tala bozali babe koleka bango; mpo lokola Nkolo azali na bomoi, soko profeta moko ayei o ntei ya bino mpe asakoli epai ya bino liloba lya Nkolo, liye litatoli mpo ya masumu ma bino mpe mabe ma bino, bosiliki na ye, mpe bobwaki ye libanda mpe boluki ndenge inso ya nzela mpo ya kobebisa ye; iyo, bokoloba ete azali profeta moko wa lokuta, mpe azali mosumuki moko, mpe wa zabulu, zambi atatoli ete misala mya bino mizali mibe.

27 Kasi tala, soko moto moko akoya o ntei ya bino mpe akoloba: Salani eye, mpe ezali te bobe; salani ena mpe bokoyoka mpasi te; iyo, akoloba: Tambolani nsima ya lolendo la mitema mya binomei; iyo, tambolani nsima ya lolendo la miso mya bino, mpe salani eye enso motema mwa bino mozali na mposa—Mpe soko moto moko akoya o ntei ya bino mpe akoloba eye, bokoyamba ye, mpe bokoloba ete azali profeta moko.

28 Iyo, bokotombola ye, mpe bokopesa epai ya ye biloko bya bino; bokopesa epai ya ye wolo ya bino, mpe mpauni ya bino, mpe bokolatisa ye bilamba bya ntalo; mpe zambi alobi maloba makolete epai ya bino, mpe alobi ete manso mazali malamu, nde bokomono te ziko na ye.

29 O bino nkola wa nkuna mpe ebeba; boyeisi bato mitema mpe mito mikasi, boniboni ntango elai bobanzi ete Nkolo akotika bino? Iyo, boniboni ntango elai bomitiki mpo ya kokambema na bakambi ba ligboma mpe ba lolanda? Iyo, boniboni ntango elai bokopono molili kutu koleka mwinda?

30 Iyo, tala, nkanda ya Nkolo epeli kala mpo ya bino; tala, alakeli mboka botutu na ntina ya bobe bwa bino.

31 Mpe tala, ntango eyei eye alakeli bozwi bwa bino botutu, ete bokoma boselu, ete bokoka kosimba bwango te; mpe o mikolo mya bozangi bwa bino bokoka te kosimba bwango.

32 Mpe o mikolo mya bozangi bwa bino bokobelela epai ya Nkolo; mpe na mpamba ekobelela bino, mpo mpamba ya bino eyei kala likolo lya bino, mpe bobebisami bwa bino bozali na ntembe te; mpe nde bokolela mpe bokoganga o mokolo mona, elobi Nkolo wa Bibele. Mpe nde bokomilela, mpe bokoloba:

33 O ete nayambolaka, mpe nabomaka te baprofeta, mpe nabambaka bango te mabanga, mpe nabwakaka bango te libanda. Iyo, o mokolo mona okoloba: O ete tomikundolaka Nkolo Nzambe wa biso o mokolo moye apesaki biso bozwi, mpe nde bolingaki te kokoma boselu ete tobungisa bwango; mpo tala, bozwi bwa biso bokei mosika uta na biso.

34 Tala, totii esalele yoko awa mpe o mokolo mwa nsima ekei; mpe tala, mipanga mya biso mikamatami uta na biso o mokolo toluki myango mpo ya etumba.

35 Iyo, tobombi bomengo bwa biso mpe bosielumuki mosika uta na biso, na ntina ya botutu bwa mboka.

36 O ete toyambolaka o mokolo moye liloba lya Nkolo liyaki epai ya biso; mpo tala mboka elakelami botutu, mpe biloko binso bikomi boselu, mpe tokoki kosimba byango te.

37 Tala, tozingami na bazabulu, iyo, tozingami mpembeni na banzelu ba ye oyo aluki kobebisa bozo bwa biso. Tala, mabe ma biso mazali manene. O Nkolo, ekoki yo te kobalola mosika nkanda ya yo uta na biso? Mpe eye ekozala elobeli ya bino o mikolo mina.

38 Kasi tala, mikolo mya bino mya momekano mileki; bozelisaki mokolo mwa lobiko la bino kina ntango eleki libela, mpe bobebisami bwa bino bokomi na ntembe te; iyo, mpo boluki mikolo minso mya bomoi bwa bino mpo ya ena eye bokokaki te kozwa; mpe boluki esengo na kosalaka bobe, eye eloko ezali na bokeseni na lizali lya bosembo boye bozali na Moto wa biso monene mpe wa Seko.

39 O bino bato ba mboka, ete bolinga koyoka maloba ma ngai! Mpe nasambeli ete nkanda ya Nkolo ebaluka mosika uta na bino, mpe ete bolinga koyambola mpe kobikisama.