Makomi
Elamani 14


Mokapo 14

Samwele ayebisi yambo esalema ete pole ekozala na ntango ya butu mpe monzoto moko ya sika ekozala na mbotama ya Klisto—Klisto asikoli bato uta na liwa ya ntango mpe ya molimo—Bilembo ya liwa na Ye bitalisami na mikolo misato ya molili, bopasuki ya mabanga, mpe mobulungano ya mokili. Penepene na mobu 6 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Samwele, Molamani, asakolaki makambo minene mingi ya kobakisa oyo makoki te kokomama.

2 Mpe tala, alobaki epayi na bango: Tala, napesi epayi na bino elembo moko; elingi koloba mibu mitano lisusu mikoya, mpe tala, nsima ekoya Mwana ya Nzambe mpo na kosikola bango nyonso oyo bakondima na nkombo na ye.

3 Mpe tala, nakopesa oyo epayi na bino lokola elembo na ntango ya boyei na ye; mpo tala, ekozala na minda minene na lola, na lolenge ete na butu yambo ete aya ekozala na molili te, na lolenge ete epayi na moto ekomonana lokola soki ezalaki moi.

4 Boye, ekozala mokolo moko mpe butu moko mpe moi moko, lokola soki ezalaki mokolo moko mpe butu ezalaki te; mpe oyo ekozala lokola elembo epayi na bino; mpo bokoyeba bobimi ya moi mpe lisusu bolali na yango; yango wana bakoyeba na ntembe te ete ekozala moi mibale mpe butu moko; nzokande butu ekoyinda te; mpe ekozala butu yango yambo ete abotama.

5 Mpe tala, monzoto moko ya sika ekobima, na lolenge ya moko lokola naino bomona mokolo moko te; mpe oyo ekozala lisusu elembo epayi na bino.

6 Mpe tala oyo ezali nyonso te, ekozala na bilembo mpe makamwisi mingi na lola.

7 Mpe ekosalema ete bino nyonso bokozala na kokamwa, mpe komituna, na lolenge ete bokokweya na mabele.

8 Mpe ekosalema ete moto nyonso oyo akondima Mwana ya Nzambe, se ye moko wana akozwa bomoi ya libela.

9 Mpe tala, boye nde Nkolo atindaki ngai, na anjelu na ye, ete naya mpe naloba likambo oyo epayi na bino; iyo, atindi ngai ete nasengeli kosakola makambo oyo epayi na bino; iyo, alobaki epayi na ngai: Belela epayi ya bato oyo ete, boyambola mpe bolengela nzela ya Nkolo.

10 Mpe sikawa, mpo nazali Molamani, mpe nalobeli bino maloba oyo Nkolo atindaki ngai, mpe lokola ezalaki makasi mpo na bino, bosiliki na ngai mpe boluki kobebisa ngai, mpe bobenganaki ngai uta na kati na bino.

11 Mpe bokoyoka maloba na ngai, mpo, ezali mpo na ntina oyo ete namati likolo ya bifelo ya engumba oyo, ete bokoka koyoka mpe koyeba masambisi ya Nzambe oyo ezali kozela bino na ntina ya mabe na bino, mpe lisusu ete bokoka koyeba masengami ya boyamboli;

12 Mpe lisusu ete bokoka boyeba boyei ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe Tata ya lola mpe ya mabele, Mokeli ya biloko nyonso uta na ebandeli; mpe ete bokoka koyeba bilembo ya boyei na ye, mpo na ntina ete bokoka kondima na nkombo na ye.

13 Mpe soki bondimi na nkombo na ye bokoyambola uta na masumu na bino nyonso, ete na nzela yango bokoka kozwa bolimbisi na yango na nzela ya matomba na ye.

14 Mpe tala, lisusu, elembo mosusu nakopesa epayi na bino, iyo, elembo moko ya liwa na ye.

15 Mpo tala, na ntembe te asengeli kokufa mpo ete lobiko ekoka koya; iyo, esengisami na ye mpe ekomi likambo elongobani ete akufa, mpo na kokokisa bosekwi ya bakufi, ete na yango bato bakoka komemama na miso ya Nkolo.

16 Iyo, tala, liwa oyo ekokisi bosekwi, mpe lisikoli bato nyonso uta na liwa ya yambo—liwa wana ya molimo; mpo bato nyonso, lokola bakatamaki mosika uta na miso ya Nkolo na bokwei ya Adama, bamonani lokola bakufi, ezala na makambo ya ntango mpe na makambo ya molimo.

17 Kasi tala, bosekwi ya Klisto esikoli bato, iyo, kutu bato nyonso, mpe ezongisi na miso ya Nkolo.

18 Iyo, mpe esali ete masengami ya boyamboli masalema, ete moto nyonso oyo ayamboli ye moko wana akokatama te mpe akobwakama te kati na moto; kasi moto nyonso oyo ayamboli te akokatama mpe akobwakama kati na moto; mpe likolo na bango ekoya lisusu liwa ya molimo, iyo, liwa ya mibale, mpo bakatami lisusu mosika mpo na oyo etali makambo ya bosembo.

19 Boye boyambola, boyambola, mbele na koyebaka makambo oyo mpe kosalaka yango te bokopesa bino moko nzela ete boya na nse ya bokweisami, mpe bokitisami na liwa oyo ya mibale.

20 Kasi tala, lokola nalobelaki bino mpo na oyo etali elembo mosusu, elembo ya liwa na ye, tala, na mokolo wana oyo akoyoka mpasi ya liwa, moi mokoyindisama mpe mokoboya kopesa pole na ye epayi na bino; mpe sanza mpe minzoto mpe lokola; mpe ekozala na pole te likolo ya etando ya mboka oyo, kutu uta ntango oyo akoyoka mpasi ya liwa, mpo na ntaka ya mikolo misato, kino na ntango oyo akosekwa lisusu uta na liwa.

21 Iyo, na ntango oyo akozongisa molimo ekozala na bankake mpe minkalikali mpo na ntaka ya ngonga mingi, mpe mabele makoningana mpe makolenga; mpe mabanga oyo ezali likolo ya etando ya mabele oyo, oyo ezali na likolo ya mabele mpe na nse lokola, oyo boyebi na ntango oyo ezali makasi, soki te eteni eleki mingi na yango ezali na liboke moko ya makasi, makobukana.

22 Iyo, makopasuka na biteni mibale, mpe makomonana libela lokola bipasuka-pasuka mpe biteni- biteni, mpe na biteni bibukana likolo ya etando ya mabele mobimba, iyo, ezala likolo ya mabele mpe na nse lokola.

23 Mpe tala, ekozala na bikumbaki minene, mpe ekozala na bangomba mingi elali na nse, lokola soki lobwaku, mpe ekozala na bisika mingi oyo ebiangami sikawa lobwaku oyo bikokoma bangomba, oyo kani bosanda ezali molai.

24 Mpe balabala mingi ekobukana-bukana, mpe bingumba mingi bikokoma mpamba.

25 Mpe malita mingi makofungwana, mpe makobimisa mingi ya bakufi ya yango; mpe basantu mingi bakomonana epayi ya bato mingi.

26 Mpe tala, boye elobaki anjelu epayi na ngai; mpo alobaki epayi na ngai ete ekozala na bankake mpe minkalikali mpo na ntaka ya ngonga mingi.

27 Mpe alobaki epayi na ngai ete wana ekowumela kake mpe monkalikali, mpe ekumbaki, ete makambo oyo ekozala, mpe ete molili mokozipa etando ya mabele mobimba na ntaka ya mikolo misato.

28 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai ete mingi bakomona makambo minene koleka oyo, na ntina ete bakoka kondima ete bilembo oyo mpe makamwisi oyo makosalema likolo ya etando mobimba ya mboka oyo, mpo ete ntina ya bozangi bondimi na kati ya bana ya bato esengeli kozala te—

29 Mpe oyo na ntina ete baoyo nyonso bakondima bakoka kobikisama, mpe baoyo nyonso bakondima te, bosambisi ya sembo ekoka koya likolo na bango; mpe lisusu soki bakweisami bamema likolo na bango moko bokwei na bango moko.

30 Mpe sikawa bomikundola, bomikundola, bandeko na ngai, ete oyo nyonso akowa, awei mpo na ye moko; mpe oyo nyonso akosala mabe, asali yango mpo na ye moko; mpo tala, bozali nsomi; bopesami ndingisa ya kosala mpo na bino moko; mpo tala, Nzambe apesi epayi bino boyebi mpe asali bino bansomi.

31 Apesi epayi na bino ete bokoka koyeba bolamu mpe mabe, mpe apesi bino ete bokoka kopona bomoi to mpe liwa; mpe bokoki kosala bolamu mpe kozongisama na oyo wana ezali malamu, to kozala na oyo ezali malamu ezongisami epayi na bino; to mpe bokoki kosala mabe, mpe kozala na oyo ezali mabe ezongisami epayi na bino.

Bimisa na lokasa