Makomi
Elamani 1


Buku ya Elamani

Nsango yoko ya Banefi. Bitumba mpe boweli bwa bango, mpe bokabwani bwa bango. Mpe lisusu mabikuli ma baprofeta basantu mingi, yambo ya boyei bwa Klisto, engebene na makundoli ma Elamani, oyo azalaki mwana mobali wa Elamani, mpe lisusu engebene na makundoli ma bana babali ba ye, kutu kina o boyei bwa Klisto. Mpe lisusu mingi ya Balamani babongwani. Nsango yoko ya mbongwana ya bango. Nsango yoko ya bosembo bwa Balamani, mpe nkuna mpe bonsomo bwa Banefi, engebene na makundoli ma Elamani mpe bana babali ba ye, kutu kina o boyei bwa Klisto, eye ebiangemi buku ya Elamani, mpe bongo na bongo.

Mokapo 1

Pawolani wa babale akomi mosambisi mokonzi mpe abomami na Kisikumeni—Pakumeni akamati kiti ya bosambisi—Koliatumili akambi mampinga ma Balamani, akamati Zalayemila, mpe abomi Pakumeni—Moloniya alongi Balamani mpe akamati lisusu Zalayemila, mpe Koliatumili abomami. Penepene na 52–50 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa tala, esalemaki ete o ebandeli ya mobu tuku minei mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, ebandaki kozala kpokoso yoko ya ndongo o ntei ya bato ba Banefi.

2 Mpo tala, Pawolani akufaka, mpe akendeki nzela ya mabele manso; yango wana ebandaki kozala boweli boko bwa ndongo botali nani akozwa kiti ya bosambisi o ntei ya bandeko, baye bazalaki bana babali ba Pawolani.

3 Sikawa iye izali nkombo ya baye bawelaki mpo ya kiti ya bosambisi, baye basalaki bato bawela: Pawolani, Paaki, mpe Pakumeni.

4 Sikawa iye izali te bana babali banso ba Pawolani (mpo azalaki na mingi), kasi iye izali bango baye bawelaki mpo ya kiti ya bosambisi; yango wana, basalaki makabwani masato o ntei ya bato.

5 Nzokande, esalemaki ete Pawolani aponomoki na mokano mwa bato mpo ya kozala mosambisi mokonzi mpe moyangeli likolo lya bato ba Nefi.

6 Mpe esalemaki ete Pakumeni, emonoki ye ete akokaki te kozwa kiti ya bosambisi, asalaki bomoko na mokano mwa bato.

7 Kasi tala, Paaki, mpe eteni ena ya bato baye bazalaki na mposa ete azala moyangeli wa bango, azalaki na nkanda mpenza; yango wana, azalaki penepene na kolete mosika bato bana mpo ya koteleme o botomboki na bandeko ba bango.

8 Mpe esalemaki ete lokola azalaki penepene na kosala eye, tala, akamatamaki, mpe asambisamaki engebene na mokano mwa bato, mpe atumbolamaki mpo ya liwa; mpo atelemeki o botomboki mpe alukaki kobebisa lipanda lya bato.

9 Sikawa ntango emonoki bato baye bazalaki na mposa ete azala moyangeli wa bango ete atumbolamaki mpo ya liwa, yango wana basilikaki, mpe tala, batindaki Kisikumeni moko, kutu o kiti ya bosambisi ya Pawolani, mpe abomaki Pawolani efandaki ye likolo lya kiti ya bosambisi.

10 Mpe alandamaki na basali ba Pawolani; kasi tala, boye mbangu ezalaki bokimi bwa Kisikumeni ete moto te akokaki kokamata ye.

11 Mpe akendeki epai ya bango baye batindaki ye, mpe banso bakotaki o kati ya boyokani boko, iyo, na kolapaka na Mozalisi wa bango wa libela, ete bakolobela moto te ete Kisikumeni abomaka Pawolani.

12 Yango wana, Kisikumeni ayebanaki te o ntei ya bato ba Nefi, mpo azalaki elongi ebombama o ntango eye abomaki Pawolani. Mpe Kisikumeni mpe lingomba lya ye, baye bayokanaka elongo na ye, bamisangisaki o ntei ya bato, na lolenge loko ete banso bakokaki koyebana te; kasi mingi lokola bayebanaki batumbolamaki mpo ya liwa.

13 Mpe sikawa tala, Pakumeni aponomoki, engebene na mokano mwa bato, mpo ya kozala mosambisi mokonzi mpe moyangeli wa bato, mpo ya kokonza o esika ya ndeko mobali wa ye Pawolani; mpe ezalaki engebene na likoki lya ye. Mpe enso eye esalemaki o mobu mwa tuku minei mwa bokonzi bwa basambisi; mpe esukaka.

14 Mpe esalemaki ete o mobu mwa tuku minei na moko mwa bokonzi bwa basambisi, Balamani basangisaka elongo limpinga liike ya bato, mpe bapesaki bango mandoki ma mipanga, mpe ma nsendo mpe ma matimbo, mpe ma makula, mpe ma bibende bya mito, mpe ma bibende bya ntolo, mpe ma ndenge inso ya nguba ya lolenge na lolenge.

15 Mpe bakitaki lisusu ete bakoka kobunda na Banefi. Mpe bakambemaki na moto moko oyo ya ye nkombo ezalaki Koliatumili; mpe azalaki eboto moko ya Zalayemila; mpe azalaki mokabwani uta o ntei ya nkona ya Banefi; mpe azalaki moto moko molai mpe moto moko mokasi.

16 Yango wana, mokonzi wa Balamani, oyo ya ye nkombo ezalaki Tubaloti, oyo azalaki mwana mobali wa Amoloni, kobanzaka ete Koliatumili, ezalaki ye moto moko mokasi, akokaki koteleme mpo ya kobunda na Banefi, elongo na makasi ma ye mpe lisusu elongo na bwania bwa ye bonene, mpenza ete na kotindaka ye liboso akolonga nguya likolo lya Banefi—

17 Yango wana alamusaki bango na nkanda, mpe asangisaki elongo mampinga ma ye, mpe aponoki Koliatumili mpo ya kozala mokambi wa bango, mpe asalaki ete batambola o nse o mboka ya Zalayemila mpo ya kobunda na Banefi.

18 Mpe esalemaki ete na ntina ya boweli boike boye mpe kpokoso nzike boye o boyangeli, ete batikaka bakengeli bakoka te o mboka ya Zalayemila; mpo babanzaki ete Balamani bakomeka te koya o kati ya motema mwa mboka ya bango mpo ya kobanda etumba na mboka ena enene ya Zalayemila.

19 Kasi esalemaki ete Koliatumili atambolaki liboso o moto mwa limpinga linene lya ye, mpe ayaki likolo lya bato ba mboka, mpe botamboli bwa bango bozalaki na lombangu mpenza la lolenge loye ete ezalaki ntango te mpo ya Banefi kosangisa elongo mampinga ma bango.

20 Yango wana Koliatumili akataki o nse bakengi mpembeni ya ekotelo ya engumba, mpe atambolaki elongo na mampinga ma ye mobimba o kati ya engumba, mpe babomaki onso oyo atelemelaki bango, mpenza ete bakamataki engumba mobimba.

21 Mpe esalemaki ete Pakumeni, oyo azalaki mosambisi mokonzi, akimaki liboso lya Koliatumili, kutu o bifelo bya engumba. Mpe esalemaki ete Koliatumili ena abambaki ye na efelo, mpenza ete akufaki. Mpe boye esukaki mikolo mya Pakumeni.

22 Mpe sikawa emonoki Koliatumili ete azwaki engumba ya Zalayemila, mpe emonoki ye ete Banefi bakimaka liboso lya bango, mpe babomamaki, mpe bakamatamaki, mpe babwakamaki o kati ya boloko, mpe azwaki bisika bileki bikasi o mboka mobimba, motema mwa ye mozwaki mpiko mpenza ete azalaki penepene na kokende kobunda na mboka mobimba.

23 Mpe sikawa awumelaki te o mboka ya Zalayemila, kasi atambolaki elongo na limpinga lyoko linene, kutu ona engumba ya Beboo; mpo ezalaki mokano mwa ye kokende mpe kokata nzela ya ye na mopanga, ete akoka kozwa biteni bya nordi bya mboka.

24 Mpe, kobanzaka ete makasi ma bango maleki manene mazalaki o katikati ya mboka, yango wana atambolaki, kopesaka bango ntango te mpo ya komisangisa elongo longola se soko ezalaki nzoto ike; mpe na lolenge loye bakweyaki likolo lya bango mpe bakataki bango o nse o mabele.

25 Kasi tala, botamboli bwa Koliatumili o ntei ya mboka bopesaki Moloniya litomba linene likolo lya bango, ata bonene bwa motango mwa Banefi baye babomamaki.

26 Mpo tala, Moloniya abanzaka ete Balamani bakomeka te koya o ntei ya mboka, kasi ete bakolinga kobanda etumba o bingumba bizalaki zingazinga mpembeni ya ndelo lokola kina sikawa basalaki; yango wana Moloniya asalaki ete mampinga makasi ma ye masimba biteni bina biye zingazinga mpembeni ya ndelo.

27 Kasi tala, Balamani babangaki te engebene na mposa ya ye, kasi bayaki o kati ya ntei ya mboka, mpe bakamataki engumba mokonzi eye ezalaki engumba ya Zalayemila, mpe bazalaki kotambolaka katikati ya biteni bileki motuya bya mboka, kobomaka bato na bobomi bonene, babali, basi, mpe bana, kokamataka bingumba mingi mpe bisika bikasi mingi.

28 Kasi ebombolaki Moloniya eye, atindaki sasaipi Lehi elongo na limpinga lyoko zingazinga mpembeni mpo ya kokamba bango yambo ya koya o mboka Beboo.

29 Mpe boye asalaki; mpe akambaki bango yambo baya o mboka Beboo, mpe apesaki epai ya bango etumba, mpenza ete babandaki kozonga nsima ona mboka ya Zalayemila.

30 Mpe esalemaki ete Moloniya akambaki bango o ebombelo ya bango, mpe apesaki epai ya bango etumba, mpenza ete ekomaki etumba ya makila mpenza; iyo, mingi babomamaki, mpe o ntei ya motango oyo babomamaki Koliatumili lokola amononoki.

31 Mpe sikawa, tala, Balamani bakokaki te kobombama, o nordi te, to o sudi te, to o esti te, to o westi te, mpo bazingamaki ngambo na ngamba na Banefi.

32 Mpe boye eyingisaka Koliatumili Balamani o kati ya ntei ya Banefi, mpenza ete bazalaki o nguya ya Banefi, mpe yemei abomamaki, mpe Balamani bamitikaki o kati ya maboko ma Banefi.

33 Mpe esalemaki ete Moloniya akamataki engumba ya Zalayemila lisusu, mpe asalaki ete Balamani baye bakamatamaka bato ba boloko bakendeki o libanda lya mboka na kimia.

34 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku minei na moko mwa bokonzi bwa basambisi.