Makomi
Elamani 5


Mokapo 5

Nefi mpe Lehi bamipesi na koteya—Nkombo ya bango ebiangi bango na komekola bomoi bwa bango nsima ya batata ba bango—Klisto asikoli bango baye bayamboli—Nefi mpe Lehi basali babongwani mingi mpe batiami o boloko, mpe moto mozingi bango—Lipata lyoko lya molili lizipi nkama isato ya bato—Mabele maningani mpe mongongo moko motindi bato bayambola—Nefi mpe Lehi basololi elongo na banzelu, mpe ebele bazingami na moto. Penepene na 30 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o mobu moye kaka, tala, Nefi atikaki kiti ya bosambisi na moto oyo ya ye nkombo ezalaki Sezolami.

2 Mpo lokola mibeko mpe boyangeli bwa bango botiamaki na mokano mwa bato, mpe baye boponoki bobe bazalaki motango monene koleka bango baye baponoki bolamu, yango wana bazalaki kotelaka mpo ya bobebisami, mpo mibeko mikomaki mibeba.

3 Iyo, mpe eye ezalaki enso te; bazalaki bato boko ba mito mikasi, mpenza ete bakokaki te koyangelama na mobeko to boyengebene, longola se soko ezalaki o bobebisami bwa bango.

4 Mpe esalemaki ete Nefi akomaki motau na ntina ya bobe bwa bango; mpe atikaki kiti ya bosambisi, mpe akamataki yango likolo lya ye koteya liloba lya Nzambe etikali enso ya mikolo mya ye, mpe ndeko mobali wa ye Lehi lokola, etikali enso ya mikolo mya ye;

5 Mpo bamikundolaki maloba maye tata wa bango Elamani alobaki epai ya bango. Mpe iye izali maloba alobaki:

6 Tala, bana babali ba ngai, nazali na mposa ete bomikundola kobatela mitindo mya Nzambe; mpe nalingi ete bosakola epai ya bato maloba maye. Tala, napesi epai ya bino nkombo ya baboti ba biso ba yambo baye bayaki libanda lya mboka ya Yelusaleme; mpe eye esali ngai ete emikundoli bino nkombo ya bino bokoka komikundola bango; mpe emikundoli bino bango bomikundola misala mya bango; mpe emikundoli bino misala mya bango bokoka komikundola boniboni ete elobami, mpe lisusu ekomami, ete mizalaki milamu.

7 Yango wana, bana babali ba ngai, nalingi ete bosala eye ezali elamu, mpo ete elobama etali bino, mpe lisusu ekomama, kutu lokola elobamaki mpe ekomamaki etali bango.

8 Mpe sikawa bana babali ba ngai, tala nazali na mwa mingi ya kozala na mposa na bino, eye mposa ezali, ete bokoki te kosala makambo maye ete bokoka komikumisa, kasi ete bokoka kosala makambo maye mpo ya kotonga mpo ya binomei bomengo boko o lola, iyo, boye bozali seko, mpe bokopolo te; iyo, ete bokoka kozala na likabo lina lya motuya lya bomoi bwa seko, boye tozali na ntina ya kobanza ete bopesami na batata ba biso.

9 O bomikundola, bomikundola, bana babali ba ngai, maloba maye mokonzi Benyamina alobaki epai ya bato ba ye; iyo, bomikundola ete ezali te nzela to mayele masusu na wapi bato bakoki kobikisama, bobele na nzela ya makila ma botumbulami bwa Yesu Klisto, oyo akoya; iyo, bomikundola ete ayei mpo ya kosikola mokili.

10 Mpe bomikundola lisusu maloba maye Amuleki alobaki epai ya Zezilomi, o engumba ya Amoniya; mpo alobaki epai ya ye ete Nkolo solo akoya mpo ya kosikola bato ba ye, kasi akoya te mpo kosikola bango o masumu ma bango, kasi mpo ya kosikola bango uta o masumu ma bango.

11 Mpe azali na nguya epesami epai ya ye uta na Tata mpo ya kosikola bango uta o masumu ma bango na ntina ya boyamboli; yango wana atindi banzelu ba ye mpo ya kosakola nsango ya masengeli ma boyamboli, boye bomemi epai ya nguya ya Mosikoli, epai ya lobiko la bozo bwa bango.

12 Mpe sikawa, bana babali ba ngai, bomikundola, bomikundola ete ezali na likolo lya libanga lya Mosikoli wa biso, oyo azali Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, ete bosengeli kotonga nse ya bino; ete ekotinda zabulu mipepe mikasi mya ye, iyo, makula ma ye o mopepe mwa kaina, iyo, ekobete mvula inso ya mabanga ya ye mpe moketi mokasi mwa ye likolo lya bino, ekozala na nguya te likolo lya bino mpo ya kobenda bino o nse o libulu lya bobola mpe lisuma lizanga nsuka, na ntina ya libanga likolo lya lyango botongami, liye lizali nse yoko ya solo, nse yoko na wapi soko bato batongi bakoki te kokweya.

13 Mpe esalemaki ete iye izalaki maloba maye Elamani alakisaki bana babali ba ye; iyo, alakisaki bango makambo mingi maye makomami te, mpe lisusu makambo mingi maye makomami.

14 Mpe bamikundolaki lisusu maloba ma ye; mpe yango wana bakendeki, kobatelaka mitindo mya Nzambe, mpo ya kolakisa liloba lya Nzambe o ntei ya bato banso ba Nefi, kobandaka o engumba Beboo;

15 Mpe uta kuna o engumba ya Gidi; mpe uta engumba ya Gidi o engumba ya Muleki;

16 Mpe kutu uta engumba yoko o esusu, kina bakendeki o ntei ya bato banso ba Nefi baye bazalaki o mboka ya epai ya sudi; mpe uta kuna o kati ya mboka ya Zalayemila, o ntei ya Balamani.

17 Mpe esalemaki ete bateyaki na nguya enene, mpenza ete babulunganisaki mingi ya bakabwani baye balongwaki uta na Banefi, mpenza ete bayaki mpe batubelaki masumu ma bango mpe babatisamaki mpo ya boyamboli, mpe sasaipi bazongaki na Banefi mpo ya kosala makasi mpo ya kobongisa epai ya bango mbeba iye basalaki.

18 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi bateyaki Balamani na nguya mpe bokulaka bonene bwa lolenge loye, mpo bazalaka na nguya mpe bokulaka bapesama epai ya bango ete bakoka koloba, mpe lisusu bazalaki na nini bakoloba epesama epai ya bango—

19 Yango wana balobaki mpo ya bokamwi bonene bwa Balamani, na bondimisi bwa bango, mpenza ete nkoto mwambe ya Balamani baye bazalaki o mboka ya Zalayemila mpe zingazinga mpembeni babatisamaki mpo ya boyamboli, mpe bandimisamaki na nkuna ya mimeseno mya batata ba bango.

20 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi balongwaki uta kuna mpo ya kokende o mboka ya Nefi.

21 Mpe esalemaki ete bakamatamaki na limpinga lya Balamani mpe babwakamaki o kati ya boloko; iyo, kutu o boloko bona kaka o bwango Amona mpe bandeko babali ba ye babwakamaki na basali ba Limiyi.

22 Mpe esilaka bango kobwakama o kati ya boloko mikolo mingi na bozangi bilei, tala, bakendeki o kati ya boloko mpo ya kokamata bango ete bakoka koboma bango.

23 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi bazingamaki mpembeni lokola soko na moto, kutu mpenza ete bamekaki te kotia maboko ma bango likolo lya bango mpo ya bobangi mbele bakozikisama. Nzokande, Nefi mpe Lehi bazikisamaki te; mpe bazalaki lokola batelemeki o katikati ya moto mpe bazikisamaki te.

24 Mpe emonoki bango ete bazingamaki mpembeni na likonzi lyoko lya moto, mpe ete ezikisaki bango te, mitema mya bango mizwaki mpiko.

25 Mpo bamonoki ete Balamani bamekaki te kotia maboko ma bango likolo lya bango; mpe bamekaki te koya penepene na bango, kasi batelemeki lokola soko bakomisamaki baba na bokamwi.

26 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi batelemeki mpe babandaki koloba epai ya bango, kolobaka: Bangani te, mpo tala, ezali Nzambe oyo alakisi bino likambo liye lya bokamwi, o lyango elakisami epai ya bino ete bokoki te kotia maboko ma bino likolo lya biso mpo ya koboma biso.

27 Mpe tala, elobaki bango maloba maye, mabele maninganaki mpenza, mpe bifelo bya boloko bininganaki lokola soko bizalaki penepene na kokweya o mabele; kasi tala, bikweyaki te. Mpe tala, baye bazalaki o boloko bazalaki Balamani mpe Banefi baye bazalaki bakabwani.

28 Mpe esalemaki ete bazipamaki na lipata lyoko lya molili, mpe bobangi boko bwa nsomo mpe bonene boyaki likolo lya bango.

29 Mpe esalemaki ete eyaki mongongo moko lokola soko mozalaki likolo lya lipata lya molili, kolobaka: Yambolani, yambolani, mpe lukani lisusu te kobebisa basali ba ngai baye natindi epai ya bino mpo ya kosakola nsango elamu.

30 Mpe esalemaki ete eyokaki bango mongongo moye, mpe emonoki bango ete ezalaki te mongongo moko mwa nkake, mpe ezalaki te mongongo moko mwa makelele ma lokito lonene, kasi tala, ezalaki mongongo moko mwa kimia mpe elengi ebongo nie, lokola soko ezalaki lisololi lyoko, mpe etobolaki kutu na bozo mpenza—

31 Mpe ata elengi ya mongongo, tala mabele maninganaki mpenza, mpe bifelo bya boloko bilengeki lokola, lokola soko bizalaki penepene na kokweya o mabele; mpe tala lipata lya molili, liye lizipaki bango, lipanzanaki te—

32 Mpe tala mongongo moyokanaki lisusu, kolobaka: Yambolani, yambolani, mpo bokonzi bwa lola bozali penepene; mpe lukani lisusu te koboma basali ba ngai. Mpe esalemaki ete mabele maninganaki lisusu, mpe bifelo bilengeki.

33 Mpe lisusu mbala ya isato mongongo moyaki, mpe molobaki epai ya bango maloba ma bokamwi maye makoki te kolobama na moto; mpe bifelo bilengeki lisusu, mpe mabele maninganaki lokola soko mazalaki penepene na kokabwana o katikati.

34 Mpe esalemaki ete Balamani bakokaki te kokima na ntina ya lipata lya molili liye lizipaki bango; iyo, mpe lisusu bazalaki molende na ntina ya bobangi boye boyaki likolo lya bango.

35 Sikawa ezalaki moko o ntei ya bango oyo azalaki Monefi moko wa mbotama, oyo azalaka mbala yoko wa eklezia ya Nzambe kasi akabwanaka uta na bango.

36 Mpe esalemaki ete amibalukaki mpembeni, mpe tala, amonoki o ntei ya lipata lya molili bilongi bya Nefi mpe Lehi; mpe tala, bazalaki kongenge mpenza, kutu lokola bilongi bya banzelu. Mpe amonoki ete batombolaki miso mya bango o lola; mpe bazalaki na ezalela lokola soko kolobaka to kotombolaka mingongo mya bango epai ya yoko mozali oyo bamonoki.

37 Mpe esalemaki ete moto oyo agangaki epai ya ebele, ete bakoka kobaluka mpe kotala. Mpe tala, epesamaki epai ya bango nguya ete kobaluka mpe batala; mpe bamonoki bilongi bya Nefi mpe Lehi.

38 Mpe balobaki epai ya moto ona: Tala, nini makambo maye manso malingi koloba, mpe ezali nani elongo na ye bato baye basololi?

39 Sikawa nkombo ya moto ona ezalaki Aminadabi. Mpe Aminadabi alobaki epai ya bango: Basololi elongo na banzelu ba Nzambe.

40 Mpe esalemaki ete Balamani balobaki epai ya ye: Nini tokosala, ete lipata liye lya molili likoka kolongwa na kozipaka biso?

41 Mpe Aminadabi alobaki epai ya bango: Bosengeli koyambola, mpe kobelela epai ya mongongo, kutu kina bokozala na bondimi na Klisto, oyo alakisamaki epai ya bino na Alama, mpe Amuleki, mpe Zezilomi; mpe ekosala bino eye, lipata lya molili likolongwa na kozipaka bino.

42 Mpe esalemaki ete banso babandaki kobelela epai ya mongongo mwa ye oyo aningisaka mabele; iyo, babelelaki kutu kina lipata lya molili lipanzanaki.

43 Mpe esalemaki ete ebwakaki bango miso mya bango mpembeni, mpe emonoki bango ete lipata lya molili lipanzanaki uta na kozipaka bango, tala, bamonoki ete bazingamaki mpembeni, iyo moto na moto, na likonzi lyoko lya moto.

44 Mpe Nefi mpe Lehi bazalaki o katikati ya bango; iyo, bazingamaki mpembeni; iyo, bazalaki lokola soko o katikati ya moto mokopela na mololi, kasi mosalaki bango mpasi te, mpe mokamataki te likolo lya bifelo bya boloko; mpe batondisamaki na bosepeli boye boleki maloba mpe botondi na nkembo.

45 Mpe tala, Molimo Mosantu mwa Nzambe akitaki uta o lola, mpe akotaki o kati ya mitema mya bango, mpe batondisamaki lokola soko na moto, mpe bakokaki koloba maloba ma bokamwi.

46 Mpe esalemaki ete eyaki mongongo epai ya bango, iyo, mongongo mwa elengi, lokola soko mozalaki lisololi lyoko, kolobaka:

47 Kimia, kimia ezala epai ya bino, na ntina ya bondimi bwa bino na Molingami Molamu wa ngai, oyo azalaki uta o bokelami bwa mokili.

48 Mpe sikawa, eyokaki bango eye babwakaki miso mya bango lokola soko mpo ya kotala uta wapi eyaki mongongo; mpe tala, bamonoki lola lofungwani; mpe banzelu bakitaki libanda lya lola mpe basalaki epai ya bango.

49 Mpe ezalaki penepene na nkama isato ya bato baye bamonoki mpe bayokaki makambo maye; mpe batindamaki bakende mpe bakamwa te, mpe batia ntembe te.

50 Mpe esalemaki ete bakendeki, mpe basalaki epai ya bato, kosakolaka o ntaka ya bikolo binso zingazinga mpembeni makambo manso bayokaki mpe bamonoki, mpenza ete eteni mingi koleka ya Balamani bandimisamaki na bango, na ntina ya bonene bwa polele iye bazwaki.

51 Mpe mingi lokola bandimisamaki, batiaki o nse mandoki ma bango ma etumba, mpe lisusu boyini bwa bango mpe momeseno mwa batata ba bango.

52 Mpe esalemaki ete batikaki mpenza epai ya Banefi mboka ya bozwi bwa bango.