Likita Linene
Tika Ete Nzambe Alonga
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Tika Ete Nzambe Alonga

Ozali na bolingi ya kotika Nzambe alonga kati ya bomoi na yo? Ozali nabolingi kotika Nzambe azala nnguya ya monene koleka nyonso na kati ya bomoi na yo?

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, nazali na botondi koleka mpo na bansango malamu ya likita oyo mpe mpo na libaku ya kolobela bino na ntango oyo.

Mibu 36 uta nazali Apostolo, malongi ya bosangisi Yisalaele etutisaka makanisi na ngai.1 Makambo manso matali yango ekokata ngai na motema, mpe lisusu misala mpe bankombo2 ya Abalayama, Yisaka mpe Yakoba; bomoi na bango na basi na bango; liyokani liye Nzambe asalaki na bango mpe apalanganisaki yango na molongo na bango mobimba;3 eleko ya mabota zomi na mibale; mpe masakoli ebele na ntina ya bosangani na mikolo na biso.

Nayekolaki bosangani, nasambelaki na ntina na yango, nakilaki na ntina ya makomi ebele, mpe nasengaki Nkolo abakisa bososoli na ngai.

Na yango, kanisa esengo na ngai ntango nakambamaki na bomoni ya sika. Na lisalisi ya banganga mayele mibale ya Baebele, nayekolaki ete moko ya bandimbola na Ebelaiki ya liloba Yisalaele ezali “tika ete Nzambe Alonga na nyonso.”4 Boye, nkombo mpenza ya Yisalaele elimboli moto oyo azali na bolingi ya kotika ete Nzambe alonga na bomoi na ye. Likanisi liye ebalusaki molimo na ngai.

Liloba bolingi ezali na ntina koleka na bolimboli oyo ya Yisalaele.5 Biso banso tozali na bonsomi na biso ya kopona. Tokoki kopona kozala moko ya Yisalaele, to te. Tokoki kopona ete Nzambe azala ntina koleka kati na bomoi na biso, to te. Tokoki kopona kotika ete Nzambe azala nguya ya koleka nyonso na bomoi na biso, to te.

Mpo na ntango moko, tika tokanisa eleko moko ya motuya na bomoi ya Yakobo, nkoko ya Abalayama. Na esika eye Yakobo apesaki nkombo na Peniele (oyo elimboli “elongi ya Nzambe”),6 Yakobo akutanaki na motungisi makasi. Bonsomi na ye ya kopona emekamaki. Na nzela ya mutungisi oyo, Yakobo andimaki nini ezalaki ya motuya koleka epai na ye. Alakisaki ete azalaki na bolingi ete Nzambe alonga koleka na bomoi na ye. Na eyano, Nzambe abongolaki nkombo ya Yakobo na Yisalaele,7 elimboli “tika ete Nzambe alonga.” Nsima Nzambe alakaki Yisalaele mapamboli manso maye malobamaki likolo ya moto na ye esengelaki kozala ya ye.8

Na mawa, bana ya Yisalaele babebisaki mayokani wana na Nzambe. Babambaki baprofeta mabanga mpe bazalaki te na bolingi ya kotika ete Nzambe azala ntina na bomoi na bango. Nsima, Nzambe apanzaki bango na matumu manso minei ma mabele.9 Libaku malamu, Alakaki nsima kosangisa bango, lokola elobamaki na Yisaya: “Mpo na mwa ntango moke natikaki yo [Yisalaele]; kasi na ngolu monene na kosangisa yo.”10

Elongo na ndimbola ya Ebelayiki ya Yisalaele na makanisi, bosangisi ya Yisalaele ezwaki ndimbola mosusu. Nkolo azali kosangisa baye bazali na bolingi ete Nzambe alonga na bomoi na bango. Nzambe azali kosangisa baye bakopona ete Nzambe azala na nguya koleka na babomoi na bango.

Uta bikeke eleki, baprofeta balobelaki bosangani oyo,11 mpe ezali kokokisama lelo! Lokola nsango ya ntina na Boyei ya Mibale ya Nkolo, ezali mosala ya ntina mingi koleka nyonso ya kosala na mokili!

Bosangani ya nkoto ya mibu ya yambo oyo ezali lisolo ya moto ye moko ya kopalanganisa bokasi ya bondimi mpe molimo mpo na bamilio ya bato. Mpe lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, to “liyokani ya Yisalaele ya mikolo mya nsuka,”12 topesami mokumba ya kosunga Nkolo na mosala moye ya ntina koleka.13

Ntango tozali kolobela bosangisi ya Yisalaele na ngambo mibale ya elamba, tozali kolobela, ya solo, mosala ya misionele, ya tempelo, mpe ya mambi ma kala ya libota. Tozali lisusu kolobela botongi ya bondimi mpe litatoli na mitema mya baye tozali kobika na bango, kosala, mpe kosunga. Ntango nyonso tosalaka eloko oyo ezali kosalisa moto songolo—atako na ngambo mosusu ya elamba—mpo na kosala mpe kobatela mayokani na bango elongo na Nzambe, tozali kosunga kosangisa Yisalaele.

Kala mingi te, mwasi ya moko ya bankoko na biso azalaki kobunda-bunda na molimo. Nakobenga ye “Jill.” Atako kokila, losambo, mpe mapamboli ya bonganganzambe, tata ya Jill azalaki kokufa. Azalaki na bobangi ya kobungisa mbala moko tata na ye mpe litatoli na ye.

Nsima na mpokwa moko, mwasi na ngai, Ndeko mwasi Wendy Nelson, ayebisaki ngai likambo ya Jill. Ntongo elandi Wendy ayokaki motema kotinda ye asolola na Jill ete eyano na ngai na likambo na ye ya molimo ezalaki liloba moko! Liloba ezalaki myope.

Nsima Jill andimaki koyebisa Wendy ete yambo atungisamaki makasi na eyano na ngai. Alobaki, “Nazalaki kolikia ete Nkoko na ngai alaka ngai bikamwisi mpo na tata na ngai. Nakobaki komitungisa mpo na nini liloba myope ezalaki liloba oyo esengelaki koloba.”

Nsima ya liwa ya tata ya Jill, liloba myope ekobaki koyaka na makanisi naye. Afungolaki motema na ye mpo na kososola kutu na bozindo ete myope elakisaki “bomoni ya pembeni.” Mpe makanisi ebandaki kobongwana. Nsima Jill alobaki, “Myope esalaki ete natika, kokanisa, mpe kobikisa. Liloba wana etondisi ngai sikawa na kimia. Yango ekundolisi ngai na namona mosika mpe naluka boseko. Ekundolisi ngai ete ezali na moango ya bonzambe mpe ete tata na ngai azali kaka na bomoi mpe alingaka mpe akengelaka ngai.. Myope ekambi ngai epai ya Nzambe.”

Nazali na lolendo ya bokilo na biso ya mwasi. Na ntango ya motungisi oyo ya motena na bomoi na ye, ndeko Jill azali koyekola koyamba bolingi ya Nzambe mpo na tata na ye, mpe na bomoni ya seko mpo na bomoi na ye moko. Na koponaka ete Nzambe azala ntina koleka, azali kozwa kimia.

Soki tokopesa yango ndingisa, ndenge ezali ebele ete bobongoli oyo ya Baebele ya Yisalaele ekoka kosunga biso. Bokanisa lolenge nini nsambo na biso mpo na bamisionele na biso—mpe bokasi na biso ya kosangisa Yisalaele—ekoki kobongwana na likanisi oyo na kati ya mitema. Tosambelaka ntango nyonso ete biso mpe bamisionele tokambama epai ya baye balengelami mpo na koyamba nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto. Namitungisaka, mpo na baoyo tokokambama ntango tobondeli mpo na kokutana na baye bazali na bolingi ya kotika Nzambe azala ntina koleka na babomoi na bango?

Tokoki kokambama epai ya moto songolo oyo naino andimela Nzambe to Yesu Klisto te kasi oyo bazali sikawa na mposa ya koyekola na ntina na Bango mpe moango na bango ya esengo. Basusu bakoki kozala ya “botama na kati ya liyokani”14 kasi bamilongoli na nzela ya liyokani. Bakoki kozala sikawa pene ya koyambola, kozonga mpe kotika ete Nzambe azala ntina koleka. Tokoki kosalisa mpo na koyamba bango na maboko ya kofungwama mpe mitema. Mpe epai ya baoyo mosusu tokoki kokambama bakoki koyoka ntango nyonso ezalaki na eloko moko ezalaki kozanga na bomoi na bango. Bango, mpe lisusu, bazali na ntina ya litondi mpe esengo oyo eyaka epai ya baoyo bazali na bolingi ya kotika ete Nzambe azala ntina na bomoi na bango.

Monyama ya nsango malamu mpo na kosangisa Yisalaele oyo epalanganaki ezali monene. Ezali na kisuku mpo na moto moko na moko oyo akoyamba na botondi nsango malamu ya Yesu Klisto. Mobongwami nyonso akomaka mwana ya liyokani ya Nzambe,15 ezala na mbotama to na kokamata mwana. Moko na moko akomaka mobulami ya nyonso oyo Nzambe alakaki na bana ya boyengebene ya Yisalaele!16

Moko na moko kati na biso azali na likoki ya bonzambe mpo ete moko na moko azali mwana ya Nzambe. Moko n moko azali lolenge moko na misu na Ye. Kozwama ya bosolo boye ezali ya bozindo mpenza. Bandeko mibali mpe basi, nasengi bolanda na bokebi nini nalingi koloba. Nzambe alingaka langi ya loposo moko te koleka mosusu. Malongi na ye na likambo liye ezali polele. Abengisaka banso baya epai na Ye, “moindo mpe mpembe, mokangemi mpe monsomi, mobali mpe mwasi.”17

Nayebisi bino solo ete botelemi na bino liboso ya Nzambe etali langi ya loposo na yo te. Libongi mpe kozanga libongi na Nzambe etali bomipesi to kozanga bomipesi na yo na Nzambe, kasi loposo ya nzoto na yo te.

Nayoki mabe ete bandeko na biso baindo ya mokili mobimba bazali koyoka mpasi ya koboyama mpo na loposo na bango me makanisi mabe. Lelo nabeleli bandimi bipai nyonso bazwa ekateli ya kotika bizaleli mpe misala ya kosalisa basusu mabe. Nabeleli bino kotombola limemia mpo na bana nyonso ya Nzambe.

Motuna mpo na moko na moko kati na biso, kotala te langi ya loposo, ezali lolenge moko. Ozali na bolingi ya kotika Nzambe azala ntina koleka na kati ya bomoi na yo? Ozali na bolingi kotika Nzambe azala ndakisa ya ntina koleka na kati ya bomoi na yo? Okopesa ndingisa na maloba na Ye, mitindo na Ye mpe mayokani na Ye epesa nguya na oyo ozali kosala mikolo nyonso? Okopesa ndingisa ete mongongo na Ye elonga koleka mosusu? Ozali na bolingi ya kotika oyo nyonso Ye azali kolinga yo osala yambo koleka makambo mosusu? Ozali na bolingi ya kotika bolingi na yo emelama na kati ya bolingi na Ye?19

Banza lolenge nini bolingi wana ekoki kopambola yo. Soki ozali monzemba mpe ozali koluka moninga ya libela, mposa na yo ya kozala moko “ya Yisalaele” ekosunga yo ozwa mokano ya moto oyo olingi mpe lolenge nini.

Soki obala na moninga oyo abuka mayokani na ye, bolingi na yo epai ya Nzambe ezala ntina koleka na bomoi na yo ekopesa ndingisa na mayokani na yo elongo na Nzambe otikala ngwi. Mobikisi akokangola motema na yo ezokisama. Balola ekofungwama ntango ozali koluka koyeba lolenge nini kokoba liboso. Osengeli te komitungisa to koluka.

Soki ozali na mituna ya solo na ntina ya nsango malamu to Eklezia, ntango oponi kotika Nzambe alonga nyonso, okokambama mpo na kozwa mpe kososola oyo ezali motuya, bosolo ya seko oyo ekokamba bomoi na yo mpe kosunga yo otikala ngwi na nzela ya liyokani.

Soki ozali kokutana na masenginya—atakutu soki masenginya eyaka ntango olembi to omiyoki kozala yo moko to kozanga bososoli—banza nguya eye okoki kozwa ntango oponi kotika Nzambe alonga likolo ya nyonso na bomoi na yo mpe ntango ozali kobondela epai na Ye mpo na kolendisa yo.

Ntango mposa na yo makasi ezali kotika ete Nzambe alonga likolo ya nyonso, mpo na kozala moko ya Yisalaele, mpe bikateli ebele ekomaka pete. Mpe mikakatano mingi ekomaka ezanga mpasi! Oyebi malamu lolenge nini kobongisa yo moko. Oyebi nini kotala mpe kotanga, esika nini kolekisa ntango na yo, mpe na nani kosangana. Oyebi nini osengeli kokokisa. Oyebi lolenge ya moto oyo olingi mpenza kokoma.

Sikawa, bandeko na ngai ya mibali mpe basi, esengaka nyonso mibale bondimi mpe bokasi ya kotika ete Nzambe alonga nyonso. Esengeli mosala ya ntango nyonso, ya makasi ya molimo mpo na koyambola mpe kolongola bomoto ya mokili na nzela Bomikabi ya Yesu Klisto.20 Esengaka makoki makasi mpe ya mikolo nyonso mpo na kotombola bizaleli ya bomoto koyekola nsango malamu, koyekola ebele na ntina ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto, mpe koluka mpe koyanola na emoniseli na yo moko.

Na ntango ya mpasi oyo wapi Apostolo Paulo asakolaki,21 Satana azali kutu te komeka kobomba mandoki na ye na moango ya Nzambe. Mabe ezali kokoma makasi. Na yango, nzela bobele moko mpo na kobika na molimo ezali ya kozwa mokano ete Nzambe alonga nyonso na kati ya bomoi na biso, mpo na koyekola koyoka mongongo na Ye, mpe mpo na kosalela bompikiliki na biso mpo na kosunga kosangisa Yisalaele.

Sikawa, lolenge nini Nkolo ayokaka na ntina ya bato baye bakotika Nzambe alonga likolo ya nyonso? Nefi atalisaki yango malamu: “[Nkolo] alingaka baoyo bakozwa ye lokola Nzambe na bango. Tala, alingaki batata na biso, mpe ayokanaki elongo na bango, iyo, kutu Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo; mpe akundolaki mayokani oyo ye [a] salaki.”22

Bolingi ya Nzambe ezali nini kosala mpo na Yisalaele? Nkolo alakaki ete Ye “akobundela biso [bitumba] na biso, mpe [bitumba] ya bana na biso, mpe bitumba ya bana ya bana na [biso] … kino na nkola ya mbala misato mpe minei”!23

Ntango ozali koyekola makomi na ntango ya basanza motoba ekoya, nalendisi yo okoma nyonso oyo Nkolo alakaki Ye akosala mpo na liyokani ya Yisalaele. Nakanisi okokamwa! Manyola bilaka oyo. Bosolola na ntina na yango elongo na libota na bino mpe baninga. Nsima bika mpe kengela mpo na bilaka oyo ekokisama na bomoi na yo moko.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, ntango boponi ete Nzambe alonga nyonso koleka na bomoi na bino, bokomona bino moko ete Nzambe na biso azali “Nzambe ya bikamwa.”24 Lokola bato, tozali bana na Ye ya liyokani, mpe tokobiangema na nkombo na Ye. Na oyo natatoli na nkombo ya bule ya Yesu Klistu, amene.

Matangi

  1. Nalobeli na ntina ya Yisalaele na moke ya 378 ya koleka 800 ya bansango oyo nalobelaki uta mibu na ngai 36 ya kozala Apostolo.

  2. Na Ebele, Abram ezali nkombo ya moto ya lokumu oyo elakisi “tata monetolami.” Kasi ntango nzambe abongolaki nkombo oyo na Abalayama, nkombo ezwaki ndimbola ya ntina koleka, elakisi “tata ya baike.” Ya solo, Abalayama asengelaki kozala “tata ya bikolo ebele.” (Tala Genese 17:5; Nehemiah 9:7.)

  3. Nkolo Nzambe Yewova asalaki liyokani na Abalayama na ntina ete Mobikisi ya mokili abotama uta na nkona ya Abalayama, mabele misusu esengelaki kozwama libula, mpe bikolo nyonso esengelaki kopambwama na nzela ya molongo ya Abalayama (tala Bible Dictionary, “Abraham, covenant of”).

  4. Tala Bible Dictionary, “Israel.”

  5. Liloba Yisalaele emonisami koleka mbala nkoto na kati ya makomi. Ekoki komonisama epai ya libota ya Yakobo (Yisalaele) ya bana mibali zomi na mibale, kobakisa bana ya basi (tala Genese 35:23–26; 46:7 Lelo ekoki komonisama lokola esika eye na Mabele. Kasi esaleli ya malongi na yango esalemaka na bato oyo bazali na bolingi ya kondima bonene ya Nzambe na kati ya bomoi na bango.

  6. Tala Genese 32:30; elimbolami lisusu lokola Penuel na kati ya Genese 32:31.

  7. Tala Genese 32:28.

  8. Tala Genese 35:11–12.

  9. Mpo na boyekoli koleka, talae Topical Guide, “Israel, Scattering of.”

  10. Yisaya 54:7.

  11. Tala Yisaya 11:11–12; 2 Nephi 21:11–12; Mozia 15:11.

  12. Tala Encyclopedia of Mormonism (1992), “Covenant Israel, Latter-Day,” 1:330–31.

  13. Ntango tozali kosala mpo na kosangisa Yisalaele, Nkolo Nkolo azali na nzela malamu ya kolakisa baoyo bazali kosangana. Alobeli biso na lisanga lokola ya Ye “eloko ya motuya” (Esode 19:5; Banzembo 135:4), lokola ya Ye “mabanga ya ntalo” (Malaki 3:17; Doctrine et Alliances 101:3), mpe lokola “ekolo ya bule” (Esode 19:6; tala lisusu Dutelunome 14:2; 26:18).

  14. Liyokani liye mpenza Nzambe asalaki na Abalayama, kolobaka, “Kati ya nkona na yo bikolo binso ya mabele ekopambolama” (3 Nefi 20:27). “Mobotami kati ya liyokani” elakisi ete yambo moto abotama, mama ya moto wana mpe tata bakangisamaki na kati ya tempelo.

  15. Elaka ya boye Nzambe ateyaki Abalayama: “Ntango baike bazwi Nsango malamu eye bakobiangema nsima na nkombo na yo, mpe bakotangema nkona na yo, mpe bakotombwama mpe bakopambolama yo, lokola tata na bango” (Abalayama 2:10; tala lisusu Baloma 8:14–17; Bagalatia 3:26–29).

  16. Mondimi nyonso ya boyambi akoki kosenga lipamboli ya bonkoko. Na nzela ya lifuli ya Molimo Mosantu, nkoko akosala molongo ya moto na kati ya ndako ya Yisalaele. Esakola wana ezali te mpenza esakola ya langi ya loposo na ye, ekolo na ye, to ya misisa na ye. Kasi, esakola ya molongo elimboli ekolo ya Yisalaele na nzela ya oyo moto akozwa mapamboli na ye.

  17. 2 Nefi 26:33.

  18. Tala Moziya 15:7. Kozala moko ya Yisalaele ezali te mpo na baye mitema mitukama. Mpo na kozwa mapamboli manso maye Nzambe azali na yango mpo na nkona ya Abalayama, tokoki banso kozela kozwa momekano na biso moko ya “Abalayama.” Nzambe akosenginya biso, lokola Profeta Joseph Smith ateyaki, na kokataka basinga na biso ya mpasi. (Tala recollection of John Taylor, na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 231.)

  19. Tala Moziya 3:19.

  20. Tala 2 Timote 3:1–13.

  21. 1 Nefi 17:40; nsete ebetami.

  22. Doctrine et Alliances 98:37; tala lisusu Banzembo 31:23; Yisaya 49:25; Doctrine et Alliances 105:14.

  23. Mormon 9:11.