Boyokani ya Sika 2023
Bobakisi: Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi mobimba na Nzela ya Liyokani na Nzambe


“Bobakisi: Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi mobimba na Nzela ya Liyokani na Nzambe,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Bobakisi,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023

Bobakisi

Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi mobimba na Nzela ya Liyokani na Nzambe

Mpo ete Ye alingaka bino, andimelaka bino, mpe ayebi bokasi na bino, Tata na Lola apesaki bino libaku ya kosunga bana na bino bakota mpe bakoba na nzela na Ye ya liyokani, nzela ya bomoi ya seko (tala Malongi mpe Mayokani 68:25–28). Yango esangisi kosunga bango basala mpe babatela mayokani ya bule, lokola liyokani ya libatisi mpe mayokani oyo esalamaka na tempelo. Na nzela ya mayokani oyo, bana na bino bakomikangisa bango moko epai ya Mobikisi, Yesu Klisto.

Nzela ezali ebele ya kolengela bana na biso na mobembo oyo na nzela ya liyokani, mpe Tata na Lola akosunga bino bomona lolenge malamu ya kosunga bango. Ntango bozali koluka bofulami, botia na makanisi ete boyekoli nyonso eyaka te na ntango ya mateya ebongisami. Na yango, eteni oyo esalaka boyekoli na libota ezala na nguya ezali libaku ya koyekola na ndakisa mpe na nzela ya bantango moke mpe ya pete—lolenge oyo esalemaka na pete nyonso na momesano ya mokolo na mokolo. Kaka lokola kolanda nzela ya liyokani ezali motuya, boluki ya bomoi mobimba, ezali lolenge moko na boyekoli na ntina ya nzela ya liyokani. (Tala “Home and Family,” Teaching in the Savior’s Way [2022], 30–31.)

Elilingi
mama na mwana

Ndenge ezali ebele ya kolengela bana na bino mpo na mobembo na nzela ya liyokani ya Nzambe.

Oyo elandi ezali mwa makanisi oyo ekoki kokamba na bofulami mosusu. Bokoki kozwa makanisi mosusu mpo na koteya bana bakola ya Eteyelo ya bana na “Kolengela Bana mpo na Bomoi mobimba na Nzela ya Liyokani ya Nzambe” na kati ya Yaka Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya bana.

Libatisi mpe Nkotisa

Nefi ateyaki ete “ekuke oyo [biso] tosengeli kokota” na nzela ya liyokani “ezali boyamboli mpe libatisi ya mayi” (2 Nefi 31:17). Bokasi na bino ya kosunga bana na bino bamilengela mpo na libatisi mpe nkotisa ekoki kopesa bango mpiko ya kotelema ngwi na nzela yango. Bokasi oyo ebandaka na koteyaka na ntina ya bondimi na Yesu Klisto mpe boyamboli. Yango ezali mpe na liteya na ntina ya lolenge nini tokomisaka sika mayokani na biso ya libatisi na koliaka elambo poso nyonso.

Oyo ezali mwa makanisi oyo ekoki kosunga bino: 2 Nefi 31; Gospel Topics, “Baptism,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  • Ntango nyonso ozali kokutana na likambo oyo ezali kolendisa bondimi na yo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto, kabola yango na mwana na yo. Salisa ye asosola ete bondimi ezali eloko moko oyo ekoki kokola makasi makasi koleka na bomoi mobimba. Makambo nini mwana na yo akoki kosala mpo na kokolisa bokasi ya bondimi na Klisto yambo ye azwa libatisi?

  • Ntango mwana na yo asali boponi ya mabe, lobela ye na esengo na ntina ya likabo ya boyamboli. Mpe ntango yo osali boponi ya mabe, kabola esengo oyo eyeli yo ntango oyamboli. Tatola ete lokola Yesu Klisto anyokwamaki mpe akufaki mpo na masumu na biso, Ye apesaki biso nguya ya kobongwana. Ntango mwana na yo aluki bolimbisi, limbisa ye na yo moko mpe na esengo.

  • Lobela mwana na yo oyo etali libatisi. Lakisa ye bilili mpe kabola makundoli. Lobela oyo etali lolenge nini oyokaki, lolenge nini mayokani ya libatisi na yo esungaki yo oyeba Yesu Klisto malamu koleka, mpe lolenge ezali kokoba kopambola bomoi na yo. Lendisa mwana na yo atuna mituna.

  • Ntango libatisi esalemi na libota to na palwasi na bino, mema mwana na yo atala yango. Bosolola elongo mpo na oyo etali maye yo mpe mwana na yo bomonaki mpe boyokaki. Soki ekokoka kosalema, solola na moto oyo azali kozwa libatisi mpe tuna mituna lokola oyo elandi: “Lolenge nini ozwaki mokano oyo? Lolenge nini omilengelaki?

  • Ntango nyonso omoni mwana na yo azali kosala likambo oyo alakaki kosala, pesa longonia ya solo. Yebisa ye ete kobatelaka mitindo esungaka biso tomilengela mpo na kobomba mayokani oyo tosalaka ntango tobatisami. Nini tolakaka Nzambe ntango tobatisami? Alakaka biso nini? (tala Mozia 18:8–10, 13).

  • Ntango yo mpe mwana na yo bozali kokutana na makambo ya bule elongo (lokola na eklezia, ntango ya kotangaka makomi, to na ntango ya kosungaka moto songolo), lobela ye oyo etali mayoki ya molimo to makanisi oyo ozali na yango. Bengisa mwana na yo akabola lolenge nini ye azali koyoka. Talisa lolenge ya ndenge na ndenge Molimo akoki kolobela bato, mpe lisusu balolenge ebele Ye alobelaka yo moko. Sunga mwana na yo ayeba lisusu bangonga oyo akoki koyoka nguya ya Molimo Mosatnu.

  • Botala elongo mwa bavideo na kati ya babuku ya Gospel Library na nkombo ya “Hear Him!” Bosolola elongo na ntina ya ndenge ekeseni basali ya Nkolo bayokaka mongongo na Ye. Bengisa mwana na yo ayema elilingi to asala video oyo etali lolenge nini ayokaka mongongo ya Mobikisi.

  • Bosolola oyo etali lolenge nini kokoma mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka epambolaki yo. Lolenge nini oyaki pene ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto ntango osalisaki basusu mpe lolenge basusu basalisaki yo? Sunga mwana na yo akanisa ndenge mingi ya kosalisa mpe kolendisa basusu lokola mondimi ya Eklezia.

  • Bosala elambo ezala bule mpe molulu ya esengo na libota na bino. Sunga mwana na yo abongisa ndenge kotalela bobele Yesu Klisto na ntango ya elambo. Lolenge nini tokolakisa ete elambo ezali bule mpo na biso?

  • Magazini Friend mbala mini ezali na baartikele, masolo mpe milulu mpo na kosunga bana bamilengela mpo na libatisi mpe nkotisa. Sala ete mwana na yo apona mosusu na kati mpo na kotanga mpe asepela na yo. (Tala lisusu na eteni “Preparing for Baptism” kati na eteni ya bana ya Gospel Library.)

    Elilingi
    elenge mobali azali kobatisama

    Nefi ateyaki ete “ekuke oyo [biso] tosengeli kokota” na nzela ya liyokani “ezali boyamboli mpe libatisi ya mayi” (2 Nefi 31:17).

Teya Bana na Yo oyo etali Bonganganzambe

Bonganganzambe ezali likoki mpe nguya ya Nzambe na nzela na yango apambolaka bana na Ye. Bonganganzambe ya Nzambe ezali na mabele lelo na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bandimi nyonso ya Eklezia oyo babatelaka mayokani na bango bapambolami na nguya ya bonganganzambe ya Nzambe na mabota na bango mpo na kolendisa bango moko mpe mabota na bango (tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 3.5, ChurchofJesusChrist.org). Nguya oyo ekosunga bandimi na kosalaka mosala ya Nzambe ya lobiko mpe bonetoli na babomoi na bango moko mpe mabota (tala General Handbook, 2.2).

Tozwaka makuli na likoki ya bonganganzambe. Ntango mibali mpe basi bazali kosala na mabiangi ya Eklezia, basalaka yango na likoki ya bonganganzambe, na nse ya boyangeli ya baoyo basimbi bafungola ya bonganganzambe. Bana nyonso ya Tata na Lola—bazali bana mibali mpe bana basi na Ye—bakopambolama ntango bakososola malamu bonganganzambe.

Mpo na koyekola mingi koleka na ntina ya bonganganzambe, tala Russell M. Nelson, “Spiritual Treasures,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 76–79; Russell M. Nelson, “The Price of Priesthood Power,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 66–69; “Priesthood Principles,” mokapo ya 3 na General Handbook.

  • Sala mayokani ya bonganganzambe eteni ya moboko ya bomoi ya libota na yo. Ndakisa, sunga mwana na yo amilengela na molimo mpo na elambo poso nyonso. Lendisa mwana na yo aluka mapamboli ya bonganganzambe ntango abeli to azali na bosenga ya bolendisi to boyangeli. Sala yango ezaleli ya kolukaka ndenge Nkolo azali kopambola libota na yo na nzela ya nguya ya bonganganzambe.

  • Ntango bozali kotanga makomi elongo, botala mabaku ya kosolola lolenge nini Nzambe apambolaka bato na nzela ya nguya na Ye. Kabola makambo na yo okutanaki na yango ntango Nzambe apambolaki yo na nzela ya bonganganzambe na Ye. Ndakisa ya mapamboli tozwaka uta na Nzambe na nzela ya bonganganzambe, tala General Handbook, 3.2, 3.5.

  • Yekola monkoloto ya likoki ya bonganganzambe ya moto songolo kati ya libota na yo. (Bamemi Bonganganzambe ya Melikisedeke bakoki kozwa kopi moko ya molongo ya likoki na bango nakotindaka email na LineofAuthority@ChurchofJesusChrist.org; tala lisusu “Request a Priesthood Line of Authority” na Help Center ChurchofJesusChrist.org.) Bosolola oyo etali mpo na nini ezali motuya koyeba ete likoki ya bonganganzambe ewutaka na Yesu Klisto Ye moko. Mpo na nini akabolaka yango na biso?

  • Teya mwana na yo ete nsima ya libatisi, akoki kozwa nguya ya bonganganzambe na kobatelaka liyokani ya libatisi. Botala elongo nsango ya Mokambi Russell M. Nelson “Spiritual Treasures” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 76–79). Yebisa mwana na yo lolenge nini makuli ya bonganganzambe ememaki nguya ya Nzambe kati na bomoi na yo. Mpo na mokanda etali ndenge topambolamaka na nguya ya bonganganzambe, tala General Handbook, 3.5.

  • Bosolola motuna “Mosali ya Nkolo asengeli kozala lolenge nini?” Botanga elongo Malongi mpe Mayokani 121:36–42, mpe boluka biyano. Ntango nyonso omoni ete mwana na yo (to moto mosusu) azali kosalela moko ya mabongi oyo to bandakisa malamu na kati ya milongo oyo, bosalela yango.

  • Ntango yo to mwana na yo bosaleli bafungola mpo na kofungola ekuke to kopelisa motuka, bozwa mwa ntango ya kokokanisa bafungola oyo na bafungola oyo bakambi ya bonganganzambe bazali na yango. (Mpo na ndimbola ya bafungola ya bonganganzambe, tala General Handbook, 3.4.1). Bafungola ya bonganganzambe “efungolaka” to “epelisaka” nini mpo na biso? Tala lisusu Gary E. Stevenson, “Where Are the Keys and Authority of the Priesthood?,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 29–32; “Where Are the Keys?” (video), ChurchofJesusChrist.org.

  • Ntango otiami pembeni mpo na libiangi, bengisa mwana na yo azala wana, soki ekoki kosalema. Tika mwana na yo amona lolenge ozali kokokisa libiangi na yo. Okoki koluka ndenge elongobani oyo akoki kosunga yo. Limbola lolenge nini oyokaka nguya ya Nkolo na libiangi na yo.

Kokende na Tempelo—Mabatisi mpe Nkotisa mpo na Bawei

Batempelo ezali eteni ya mwango ya Tata na Lola mpo na bana na Ye. Na kati ya batempelo, tosalaka mayokani ya bule elongo na Tata na Lola ntango tosalaka makuli ya bule, oyo nyonso ezali kolakisa nzela epai ya Yesu Klisto. Tata na Lola apesi nzela mpo na bana na Ye nyonso basala mayokani mpe basala makuli, mpe lisusu na baoyo bazwaki yango te na bomoi oyo. Na ebandeli ya mobu ntango akokisi mibu 12, mwana na yo akoli mwa moke mpo na kozwa libatisi mpe nkotisa na kati ya tempelo mpo na bankoko bakufa.

Mpo na koyekola mingi oyo etali mabatisi mpe nkotisa mpo na bawei, tala “About Proxy Baptism and Confirmation,” temples.ChurchofJesusChrist.org.

  • Kendaka tempelo mbala na mbala ntango ozwi libaku malamu. Solola na mwana na yo oyo etali mpo na nini okendaka mpe lolenge nini tempelo esungaka yo oyoka kozala pene ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

  • Botala mpe bosolola mituna ya mokanda ya tempelo elongo. Solola na mwana na yo oyo etali maye masalamaka na lisolo ya kozwa mokanda ya tempelo. Kabola na ye mpo na nini kozala na mokanda ya tempelo ezali ntina mpo na yo.

  • Botanga elongo Malaki 4:6. Solola na ntina ya lolenge nini mitema na bino ekoki kozonga na bankoko na bino. Boyekola mingi oyo etali bankoko na bino na kosalelaka mambi ma kala ma libota na bino elongo na FamilySearch.org. Luka bankoko oyo basengeli kobatisama mpe kokotisama. Mosungi ya palwasi ya tempelo mpe mambi ma kala ma libota akoki kosunga yo.

  • Botala elongo mwa mikanda na lisanga ya babuku na nkombo ya “Temple” kati ya eteni ya bana ya Gospel Library. (Tala lisusu “Preparing Your Child for Temple Baptisms and Confirmations” na ChurchofJesusChrist.org.)

Kozwa Lipamboli ya Batata

Lipamboli ya batata ekoki kozala ebandeli ya bokambi, bolendisi mpe bofuli. Ezali na toli ya moto ye moko kowuta na Tata na Lola epai na biso mpe esungaka biso tososola nkombo mpe ntina na biso ya seko. Sunga mwana na yo amilengela mpo na kozwa lipamboli ya batata na koteyaka ye ndimbola mpe lolenge ya bule ya mapamboli ya batata.

Mpo na koyekola ebele, tala Gospel Topics, “Patriarchal Blessings,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  • Kabola na mwana na yo likambo na yo ya kozwaka lipamboli ya batata. Okoki kokabola makambo lokola lolenge nini omilengelaki mpo na kozwa yango, lolenge nini esungaki yo opusana pene ya Nzambe, mpe lolenge nini osalelaka lipamboli na bomoi na yo. Okoki lisusu kobengisa mwana na yo asolola na bandeko mosusu ya libota oyo basila kozwa mapamboli na bango ya batata.

  • Bozwa ntango ya kotala elongo mikanda mosusu na kati ya Mikanda ya Nsango malamu, “Patriarchal Blessings.” Mpo na koyekola oyo etali lolenge ya kozwa lipamboli ya batata, tala General Handbook, 18.17.

  • Soki bozali na bankoko oyo basila kozwa mapamboli ya batata, ekoki kofula botanga mwa ndambo na yango elongo na mwana na yo. Mpo na kosenga mapamboli ya bankoko oyo bakufa, kota na ChurchofJesusChrist.org, fina elembo ya konte likolo na ngambo ya loboko ya mobali ya etando, mpe pona “Patriarchal Blessing.”

  • Nsima ya mwana na yo kozwa lipamboli ya batata, bengisa bandeko ya libota oyo bazalaki mpo na kolobela mayoki na bango mpe bakabola yango na mwana na yo.

Kokende na Tempelo—Dotasio

Nzambe alingaka kodote, to kopambola, bana na Ye nyonso na “nguya kouta na likolo” (Malongi mpe Mayokani 95:8). Tokendaka na tempelo mpo na kozwa dotasio na biso moko bobele mbala moko, kasi mayokani tosalaka na Nzambe mpe nguya ya molimo Ye apesaka biso lokola eteni ya dotasio ekoki kopambola biso mikolo nyonso ya babomoi na biso.

Mpo na koyekola mingi oyo etali dotasio ya tempelo, tala “About the Temple Endowment,” temples.ChurchofJesusChrist.orgRussell M. Nelson, “Prepare for the Blessings of the Temple,” Liahona,, Sanza ya zomi 2010, 41–51.

  • Botala elilingi ya tempelo na kati ya ndako na bino. Lobela mwana na yo oyo etali mayoki oyokaka na kati ya tempelo. Lobela mbala ebele na ntina ya bolingo na yo mpo na Nkolo mpe ndako na Ye mpe mayokani oyo osalaki kuna.

  • Toluka elongo temples.ChurchofJesusChrist.org. Botanga elongo mikanda lokola “About the Temple Endowment” mpe “Prepare for the House of the Lord.” Tika ete mwana na yo atuna mituna nyonso oyo azali na yango miye etali tempelo. Mpo na bokambi na ntina ya nini okoki kosolola na ntina ya libanda ya tempelo, tala etinda ya Mpaka David A. Bednar “Prepared to Obtain Every Needful Thing” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 101–4; tala mingi mingi nkombo ya eteni “Home-Centered and Church-Supported Learning and Temple Preparation”).

  • Ntango yo mpe mwana na yo bosala elongo to bozala nzeneneke ya makuli mosusu (lokola elambo to lipamboli ya libiki), bozwa ntango ya kosolola bilembo oyo ezali kati ya likuli. Bilembo yango etalisi nini? Lolenge nini etatolaka na ntina ya Yesu Klisto? Yango ekoki kosunga mwana na yo amilengela mpo na komanyola ndimbola ya elembo ya makuli ya tempelo, oyo etatolaka lisusu na ntina ya Yesu Klisto.

  • Sunga mwana na yo ayeba lolenge nini azali kobatela liyokani ya libatisi oyo elimbolami na kati ya Mozia 18:8–10, 13. Lisusu sunga mwana na yo ayeba lolenge nini Nkolo azali kopambola ye. Tonga elikya ya mwana na yo na likoki na ye ya kobatela mayokani.

  • Solola na ye na mpwasa mpe mbala na mbala mpo na oyo etali lolenge nini mayokani na yo ya tempelo ekambaka maponi na yo mpe esungaka yo opusana pene ya Yesu Klisto. Okoki kosalela General Handbook, 27.2, mpo na kotala lisusu mayokani tosalaka na kati ya tempelo.

Kosala Misio

Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Eloko moko ya motuya koleka okoki kosala mpo na komilengela na libiangi ya kosunga ezali ya kokoma misionele yambo okende na misio. … Likambo ezali ya kokende misio te; kasi ezali ya kokoma misionele mpe kosunga na bomoi mobimba na motema na yo mobimba, mpiko, makanisi, mpe bokasi nyonso. … Ozali komilengela mpo na bomoi mobimba ya mosala ya misionele” (“Becoming a Missionary,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2005, 45–46). Baboyebi oyo mwana na yo azali na yango kokoma misionele ekopambola ye mpo na seko, kaka mpo na ntango moke te oyo akoki akosunga lokola misionele.

Mpo na koyekola mingi, tala Russell M. Nelson, “Preaching the Gospel of Peace,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 6–7; M. Russell Ballard, “Missionary Service Blessed My Life Forever,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 8–10; Missionary Preparation: Adjusting to Missionary Life, ChurchofJesusChrist.org.

  • Lakisa lolenge nini kokabola nsango malamu na ndenge ya pete. Zala ntango nyonso ekenge na mabaku malamu ya kokabola na basusu mayoki na yo na ntina ya Tata na Lola mpe Mobikisi mpe mapamboli ozwaka lokola mondimi ya Eklezia na Ye. Bengisa basusu baya na libota na yo mpo na milulu ya Eklezia mpe na libota.

  • Luka mabaku malamu mpo na libota na yo esolola na bamisionele. Bengisa bango bateya baninga na yo, to tika bango bateya bandeko ya libota na yo. Tuna bamisionele oyo etali boyebi na bango mpe lolenge nini mosala ya kimisionele ezali kosunga bango baya pene ya Yesu Klisto. Lisusu tuna nini basalaki (to balingaki kosala) mpo na komilengela mpo na kozala bamisionele.

  • Soki osalaki misio, solola na mpwasa mpe mbala na mbala oyo etali baboyebi na yo. To bengisa baninga to bandeko ya libota oyo basalaki misio balobela masolo na bango. Okoki lisusu kosolola oyo etali ndenge okabolaki nsango malamu elongo na basusu na bomoi na yo mobimba. Sunga mwana na yo akanisa ndenge akoki kokabola nsango malamu.

  • Pesa mwana na yo mabaku malamu ya koteya libota na yo mabongi ya nsango malamu. Mwana na yo akoki lisusu kosalela kokabola kondima na ye na basusu. Ndakisa, bokoki kosolola na ntina mituna lokola “Lolenge nini tokoki kolakisa Buku ya Mormon epai ya moto songolo oyo naino ayoka yango te?” to “Lolenge nini tokolakisa bosenga mpo na Mobikisi epai ya moto oyo azali Moklisto te?”

  • Sunga mwana na yo alenda na kolobelaka bato. Ndenge nini ya malamu mpo na kobanda lisolo? Lendisa mwana na yo ayekola lolenge nini ya koyoka maye basusu bazali koloba, asosola maye mazali kati ya mitema na bango, mpe kokabola babosolo ya nsango malamu oyo ekoki kopambola bomoi na bango.

  • Luka mabaku malamu mpo na mwana na yo ayekola oyo etali bizalela mpe bondimi ya basusu. Sunga ye ayeba lisusu mpe atosa mabongi ya malamu mpe ya solo na baboyambi ya basusu.

Kokende na Tempelo—Kokangisama

Na kati ya tempelo, mobali mpe mwasi bakoki kobalana mpo na boseko. Yango esalemaka na likuli ebengami bokangisi. Atako likuli oyo ekosalema mibu ebele nsima mpo na mwana na yo ya mobali to ya mwasi, makambo ya mike, ya pete mpe ya sikisiki oyo bosalaka elongo na ntango ya mibu oyo ekoki kosunga ye amilengela mpo na lipamboli kitoko oyo.

Mpo na koyekola mingi, tala Gospel Topics, “Sealing,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  • Botanga elongo “Libota: Esakola na Mokili” na ChurchofJesusChrist.org. Esakola oyo eteyaka nini oyo etali esengo na bomoi ya libota mpe oyo etali mabala ya bosembo? Na mwana na yo, bopona moko ya mabongi oyo etalisami na kati ya esakola mpo na koyekola. Okoki kotala makomi ekokana na libongi na kati ya Guide to the Scriptures. Okoki kozwa lisusu mikano ya kosalela libongi wana mobimba mingi koleka kati ya libota na yo. Ntango bozali kosalela mikano na bino, bosolola elongo mbano ya botosi libongi wana ememaka na bomoi ya libota na bino.

  • Elongo na mwana na yo, botanga nsango ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf “In Praise of Those Who Save” (Liahona, Sanza ya mitano 2016, 77–80). Ntango bokomi na eteni babengi “A Society of Disposables,” bokoki koluka biloko na libota na bino oyo ezali ya kobwaka mpe oyo ezali ya kobwaka te. Bosolola oyo etali lolenge nini bozwaka biloko na bokeseni ntango bolingi yango ewumela mpo na ntango molai. Yango elimboli nini oyo etali lolenge nini tosengeli kosalela bondeko ya libala mpe ya libota? Nini lisusu toyekoli uta na nsango ya Mokambi Uchtdorf na ntina ya lolenge nini Mobikisi akoki kosunga biso totonga mabala mpe mabota makasi?

  • Soki obala, lobela mwana na yo polele polele nini etali makambo oyokaka ozali kosala malamu lokola babalani, makambo bozali koyekola mpe ndenge bozali komeka kobongola yango. Soki yo na mwasi na yo bosila kokangisama na tempeIo, lakisa mwana na yo na nzela ya ndakisa lolenge ozali koluka kobatela mayokani na bino moko na mosusu mpe na Nkolo. Yebisa mwana na yo lolenge nini olukaka kotia Tata na Lola mpe Mobiksi na katikati ya mokangano na yo mpe lolenge Bazali kosunga yo.

  • Ntango mikano ya libota esengeli kozwama, bosala makita mpe bobeta masolo na libota. Tia na makanisi ete makanisi nyonso ya bandeko ya libota eyokani mpe ezali na motuya. Bosalela masolo oyo lokola libaku ya kolakisa lisolo elongobani mpe boboto kati ya mikangano ya libota, atako ntango moto nyonso te azali komonela makambo na lolenge moko.

  • Ntango bozangi koyokana to makelele ezali na libota, lakisa motema monene mpe mawa. Sunga mwana na yo amona lolenge nini ya kosilisa makelele na ndenge ya Kimoklisto ekoki kosunga ye amilengela mpo na libala ya esengo. Botanga elongo Malongi mpe Mayokani 121:41–42, mpe bosolola na ntina ya lolenge nini mabongi kati ya milongo oyo ekoki kosalemela na libala.