Likita Linene
Bolonga Mokili mpe Bozwa Bopemi
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Bolonga Mokili mpe Bozwa Bopemi

Bozwa bopemi uta na makasi, bozangi solo, minioko ya motema ya mokili na kolongaka mokili na nzela ya mayokani na Nzambe.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, nazali na botondi mpo na kopesa bino mbote na ntongo ya Saba ya nkembo oyo. Bozali ntango nyonso na makanisi na ngai. Nasepelaka na lolenge bosalaka ntango nyonso bomonaka basusu na bosenga. Nakamwaka bondimi mpe litatoli bolakisaka mbala na mbala. Nalelaka mito mpasi, mawa, mpe mitungisi na bino. Nalingaka bino. Nayebisi bino ete Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, balingaka bino. Bayebi bango mibale makambo na bino, bolamu na bino, bosenga na bino, mpe nsambo na bino mpo na lisungi. Mbala na mbala, nasambelaka mpo na bino mpo na koyoka bolingo na Bango mpo na bino.

Koyokaka bolingo na Bango ezali motuya, mpo ezali komonana lokola tozingami mokolo na mokolo na bansango mingi ya moto mpasi. Bokoki kosila kozala na mikolo oyo bolingaki kokoka kolata pyjamas na bino, komigumba lokola ndembo, mpe kosenga moto moko alamusa bino ntango mobulungano oyo ekosila.

Kasi, bandeko na ngai, makambo ya kafukafu mingi mazali liboso. Na mikolo ekoya, tokomona bomilakisi minene mpenza ya nguya ya Mobikisi oyo mokili emona naino te. Kati na sikawa mpe ntango Ye akozonga “na nguya mpe na nkembo monene,”1 Akopesa matomba, mapamboli, mpe makamwisi ebele likolo ya bayengebene.

Atako bongo, tozali sikawa kati na oyo solo ezali ngonga ya mindondo mpenza na mambi ya kala ya mokili. Mindondo mpe mikakatano etikaka bato mingi bayoka kolongama mpe botawu. Nzokande, bokanisa likambo moko ya kala te oyo ekoki kosopa pole likolo ya lolenge nini bino mpe ngai tokoki kozwa kimia.

Na bokei kotala ya Tempelo ya Washington D.C. kala te, moto moko ya lisanga ya bokei kotala azalaki nzeneneke ya lisolo makasi ntango azalaki kolakisa nzela na bapanzi nsango mingi bayebana kati na tempelo. Na lolenge oyo to na lolenge mosusu libota moko ya sika esanganaki na kotala ya bapanzi nsango oyo. Moko ya bapanzi nsango akobaki kotuna etali “mobembo” ya moke kotala moko ya tempelo ntango azalaki kotambola kati na tempelo. Alingaki koyeba soki mobembo ya tempelo ezali elembo ya mikakatano na mobembo ya moto na nzela ya bomoi.

Elenge mobali moko na libota yango asalaki keba na lisolo. Ntango liboke ya mobembo ekotaki na kisuku ya dotasio, mwana mobali yango alakisaki etumbelo, wapi bato bafukamaka mpo na kosala mayokani elongo na Nzambe, mpe alobaki, “O, ezali kitoko. Tala esika mpo ete bato bapema na mobembo na bango ya tempelo.”

Natie ntembe ete elenge mobali yango ayebaki lolenge nini likanisi na ye ezalaki mozindo. Azalaki lokola na likanisi moko te etali mokangano ya solo kati ya kosala boyokani na Nzambe na tempelo mpe elaka ya kokamwa ya Mobikisi:

“Boya liboso na ngai, bino banso bozali ya kolemba na mosala mpe kokumba bozito, mpe nakopesa bino bopemi.

“Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino, mpe boyekola na ngai; … mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.

“Mpo ete ekanganeli na ngai ezali botau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”2

Bandeko, nayokaka mawa mpo na baoyo batikaka Eklezia mpo bakanisaka kimondimi esengaka bango mingi mpenza. Bamoni naino te ete kosala mpe kobatela mayokani solo ekomisaka bomoi pete koleka! Moto na moto oyo asalaka mayokani na maziba ya libatisi mpe na batempelo—mpe babatelaka yango—azalaka na bozwi ebuta ya nguya ya Yesu Klisto. Nasengi bomaniola bosolo ya kokamwa wana!

Mbano ya kobatela mayokani elongo na nzambe ezali nguya ya lola—nguya oyo elendisaka biso mpo na kotelemela mimekano na biso, masenginia, mpe mito mpasi malamu koleka. Nguya oyo ekomisaka nzela na biso pete. “Baoyo babikaka mobeko ya likolo koleka ya Yesu Klisto bakozwa nguya na Ye. Yango wana, babateli mayokani bazali na ndingisa na lolenge bopemi kitoko oyo eyaka na nzela ya mokangano na bango ya liyokani na Nzambe.

Liboso ete Mobikisi amipesa Yemei na bolozi ya Getesemane mpe Kalivari, Alobaki na Bapostolo na Ye, “Na mokili tokozala na mitungisi: kasi bozala ya kosepela; Na longi mokili.”3 Mpo na bongo, Atindaki biso koko moko kosala lolenge moko ntango Alobaki, “Ngai nakolingal ete bino bosengeli kolonga mokili.”4

Bandeko, etinda na ngai lelo ezali ete lokola Yesu alonga mokili ekweyisama oyo mpe lokola Ye asikolaki moko na moko na biso, bino mpe bokoki mpe kolonga mokili oyo etondisama na masumu, etia yomei na katikati, mpe mbala mingi ya botau.

Lokola Mobikisi, na nzela ya Bomikabi ezangi ndelo, asikolaki moko na moko na biso na botau, mabungi, mpe lisumu, mpe lokola Ye ayokaki mpasi, motungisi, mpe bozito nyonso oyo ayoka naino te,5 nde, ntango boyamboli solo mpe boluki lisungi na Ye, bokoki kotelama likolo ya mokili ya kotepatepa oyo.

Bokoki kolonga bokono bobe ya botau ya molimo mpe ya kosola motema ya mokili, koloba na lofundo, lolendo, nkanda, bonsoni, boyini, lokoso, zuwa, mpe bobangi. Atako botambwisi mayele mpe bobebisi oyo ezali kobalukabaluka nzinganzinga na biso, bokoki kozwa bopemi—elingi koloba bokangoli mpe kimia—kutu na kati ya bapkokoso makasi mpenza.

Bosolo ya motuya oyo eboti mituna ya ntina misato:

Yambo, elingi koloba nini kolonga mokilii?

Ya mibale, lolenge nini tokosala yango?

Mpe ya misato, lolenge nini kolonga mokili epambolaka bomoi na bino?

Elingi koloba nini kolonga mokili”? Elingi koloba kolonga masenginia mpo na kosala keba mingi mpo na oyo etali makambo ya mokili oyo koleka makambo ya nzambe. Elingi koloba kotia motema na malongi ya Klisto mingi koleka bafilozofi ya bato. Elingi koloba kosepela na bosolo, koboya mawa, mpe kokoma “balandi na bomikitisi ya Klisto.”6 Elingi koloba kopona koboya eloko nyonso oyo kobengana Molimo. Elingi koloba kozala na bolingi ya “kotika” kutu masumu na biso ya momesano.7

Sikawa kolonga mokili solo elingi koloba te kokoma ya kobonga nie na bomoi oyo, to elingi koloba te ete bapkokoso na bino ekolimwa na mopepe lokola soloka—mpo ekolimwa te. Mpe elingi te koloba ete bokosala mabungi te. Kasi kolongaka mokili elingi koloba ete makasi na bino mpo na kosumuka ekobuta. Motema na bino ekolembisama ntango bondimi na bino kati na Yesu Klisto ebuti.8 Kolonga mokili elingi koloba kokolaka mpo na kolinga Nzambe mpe Mwana wa Ye ya Bolingo mingi koleka bolingaka moto mosusu to eloko mosusu.

Nsima, lolenge nini tolongaka mokili? Mokonzi Benyamina ateyaki biso lolenge nini. Ye ateyaki ete “moto ya mokili azali moyini ya Nzambe” mpe akozala libela na libela “longola kaka soki amitiki na bobendi ya Molimo Monsantu, mpe abwaki mosika moto ya mokili mpe akomi moko mosantu na nzela ya bomikabi ya Klisto Nkolo.”9 Ntango nyonso boluki mpe bolandi botindiki ya Molimo, ngonga nyonso oyo bosali likambo moko malamu—makambo oyo “moto ya mokili” akolinga kosala te—bozali kolonga mokili.

Kolonga mokili ezali likambo moko esalamaka na mokolo moko to mibale te. Esalamaka na bomoi mobimba ntango tozali koyamba mbala na mbala malongi ya Klisto. Tolonaka bondimi na Yesu Klisto na koyambolaka mokolo na mokolo mpe kobatelaka mayokani oyo epambolaka biso na nguya. Totikalaka na nzela ya boyokani mpe topambolamaka na bokasi ya molimo, emoniseli ya moto ye moko, bondimi ya kobuta, mpe mosala ya banzelu. Kosalela malongi ya Klisto ekoki kobota zolongano ya nguya, ya malamu mingi mpenza, kosalaka bomilengeli na bopumbwe na bomoi na biso.10

Ntango tobundaka mpo na kobika mibeko ya likolo koleka ya Yesu Klisto, mitema na biso mpe bomoto na biso mpenza ebandaka kobongwana. Mobikisi atombolaka biso likolo mpo na kobenda mokili ekweisama na kopambolaka biso na bolingani, bomikitisi, bokabi, boboto, bomitosi, kimia, mpe bopemi.

Sikawa, bokoki kokanisa oyo ezali koyokana mingi lokola mosala ya molimo makasi esika ya kozala bopemi. Kasi tala bosolo monene: ntango mokili ezali kolobela mpenza ete nguya, bozwi, boyebani, mpe bosepeli ya mosuni ememaka esengo, ememaka te! Ekoki te! Maye esalaka ezali eloko moko te kasi mokitani ya mpamba mpo na “bozali bopambolama mpe bwa bosepeli” bwa [baoyo] babateli mitindo mya Nzambe.”11

Bosolo ezali ete ezali mpenza botau mingi mpo na koluka esengo epai bokoki mokolo moko te kozwa yango! Nzokande, ntango omikangi yomei na Yesu Klisto mpe osali mosala ya molimo oyo esengeli mpo na kolonga mokili, Ye, mpe Ye moko, azali mpenza na nguya ya kotombola yo likolo ya bobendi ya mokili oyo.

Sikawa, lolenge nini kolonga mokili epambolaka bomoi na biso? Eyano ezali polele: Kokota na mokangano ya boyokani na Nzambe ekangisaka biiso epai na Ye na lolenge oyo ekomisaka makambo nyonso etali bomoi pete koleka. Tosengi bososola ngai mabe te: Na lobaki te ete kosala mayokani ekomisaka bomoi pete. Ya solo, bozela botelemeli, mpamba te monguna alingi bino bomona nguya ya Yesu Klisto te. Kasi kozala na nse ya nkanga ya Mobikisi elingi koloba bozali koyingela na ya Ye nguya ya bokasi mpe bosikoli.

Elilingi
Mokambi Ezra Taft Benson

Nalobi lisusu liteya ya mozindo ya Mokambi Ezra Taft Benson, “Mibali mpe basi oyo batikaka bomoi na bango epai ya Nzambe bakomona ete bakoki kosala mingi uta na bomoi na bango koleka bango moko. Akokomisa esengo na bango monene, kokolisa emoneli na bango, kopelisa mayele na bango, … kotombola milimo na bango, koyikiniisa mapamboli na bango, kobuisa mabaku na bango, kobondisa milimo na bango, mpe kosopa kimia.”12

Matomba oyo ya komekolama te elandaka baoyo balukaka lisungi ya lola mpo na kosalisa bango balonga mokili oyo. Na ntina oyo, nasemboli epai ya bandimi ya Eklezia mobimba mokumba kaka yango napesaki na bilenge babala te lna sanza ya mitano eleki. Nateyaki bango ntango wana—mpe nabondeli bino sikawa—mpo ete bozwa mokumba ya litatoli na bino moko ya Yesu Klisto. Sala mpo na yango. Boleisa yango mpo ete ekola. Boleisa yango bosolo. Bobebisa yango te na bafilosofi ya lokuta ya mibali mpe basi bazanga bondimi. Ntango bozali kokoba kolendisa litatoli na bino ya yesu Klisto mpo ezala priorite ya likolo mpenza, kengela makamwisi esalama na bomoi na bino.13

Bosenga na ngai epai na bino na ntongo oyo ezali kozwa bopemi uta na makasi, bozangi solo, minioko ya motema ya mokili na kolongaka mokili na nzela ya mayokani na Nzambe. Botika Ye ayeba na nzela ya nsambo mpe misala na bino ete bozali na lokengo na oyo etali bolongi mokili. Bosenga Ye angengisa mayele na bino mpe atinda lisalisi bosengeli na yango. Mokolo na mokolo, bokoma makanisi oyo eyelaka bino ntango basambelaka; nsima bolanda yango na etingya. Bolekisaka ngonga mingi na tempelo mpe bolukaka kososola lolenge nini tempelo eteyaka bino botelema likolo ya mokili oyo ezali ekweya.14

Lokola nalobaki liboso, bosangani ya Yisalaele ezali mosala eleki motuya oyo ezali kosalemaka na mabele lelo. Eloko moko ya ntina na bosangani oyo ezali kolengela bato moko oyo bazali na makoki, babelemi, mpe balongobani mpo na koyamba Nkolo ntango Akoya lisusu, bato oyo basili kopona Yesu Klisto likolo ya mokili ekweya oyo; bato oyo basepelaka na likoki na bango ya kobika mibeko ya likolo koleka, misantu koleka ya Yesu klisto.

Nabengi bino, bandeko babolingo, bokoma bato ya bosembo oyo. Bolinga mpe botosa mayokani na bino likolo ya bomipesi na bino mosusu. Ntango botiki Nzambe akonza bomoi na bino, nalaki bino kimia monene koleka, elikya, esengo, mpe iyo, bopemi.

Na nguya ya bopostolo oyo nalatisami, napamboli bino kati na boluki na bino ya kolonga mokili oyo. Napamboli bino bobutisa bondimi na bino kati na Yesu Klisto mpe boyekola malamu koleka lolenge nini koyekama likolo ya nguya na Ye. Napamboli bino mpo na kozala na makoki ya kososola bosolo na bobungi. Napamboli bino bosala keba mingi na makambo ya Nzambe koleka makambo ya mokili. Napamboli bino bomona bosenga ya baye bazali nzinganzinga na bino mpe bolendisa baye baye bolingaka. Lokola Yesu Klisto alongaki mokili oyo, bokoki kolonga mpe. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Joseph Smith—Matai 1:36: “Nsima nde elembo ya Mwana ya Moto ekomonana na lola, mpe mabota nyonso ya mabele makozala na mawa; mpe bakomona Mwana ya Moto koyaka na mapata ya lola, na nguya mpe nkembo monene.”

  2. Elamani 3:29–30; nsete ebetami.

  3. Yoane 21:15; nsete ebetami.

  4. Malongi mpe Mayokani 59:5; nsete ebetami.

  5. Tala Alma 7:11–13.

  6. 2 Nefi 28:14.

  7. Tala lisolo ya tata ya Mokonzi Lamoni na Alma 22, mingi mingi Alma 22:18.

  8. Tala Mosiya 5:7.

  9. Mosiya 3:19; nsete ebetami.

  10. Tala 2 Nefi 31; 3 Nefi 27:16–20.

  11. Mosiya 2:41.

  12. Teachings of Presidents of the Church: Ezra Taft Benson (2014), 42–43.

  13. Tala Russell M. Nelson, “Choices for Eternity” (losambo ya mokili mobimba mpo na bilenge babala te, sanza ya mitano 15, 2022), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org

  14. Mokambi David O. McKay alobaki ete na tempelo tokolaka “moke moke mpo na kokota na Liboso ya Seko” (na Truman G. Madsen, The Temple: Where Heaven Meets Earth [2008], 11).