Likita Linene
Nkanga na Ye Ezali Pete, mpe Mokumba na Ye Ezali Pepele
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Nkanga na Ye Ezali Pete, mpe Mokumba na Ye Ezali Pepele

Tika tokundola ete moto nyonso na mabele oyo azali mwana ya Nzambe mpe Ye alingi moko na moko.

Lisolo elobami mpo na moto moko nkombo Jack oyo azalaki na mbwa ya bokila ya bandeke na nkombo ya Cassie. Jack azalaki kotuta tolo mpona Cassie mpe kokumisa ye mingi kozala mbwa ya mayele. Mpo na kolakisa yango, Jack abengaki baninga kotala makoki ya Cassie. Sima ya kokoma na club ya bokila, Jack atiki Cassie libanda kokima-kimaka ntango ye akendakii kopesa nkombo.

Ntango ekomaki ngonga ya kobanda, Jack akomaki komitungisa mpo na kolakisa makoki ya kokamwa Cassie azalaki na yango. Nzokande, Cassie akomaki kosala na ndenge ya kokamwa. Alingaki lisusu te kotosa na bitinda ya Jack ndenge asalaka na bolingi mpenza. Nyonso alingaki kosala ezalaki kotikala pene na ye.

Jack abetisamaki libaku mpe asilikaki na Cassie; mbala moko apesaki makanisi bakende. Cassie alingaki te ata kopumbwa na sima ya motuka, mpe bongo Jack na motema mokuse alokotaki ye mpe akotisaki ye na kati ya motuka. Asilikaki na motema ntango baoyo bazalaki kotshola bizaleli ya mbwa na ye na nzela mobimba ya bozongi ndako. Jack akokaki te kososola mpona nini Cassie akomaki na bizaleli mabe. Atangisamaki malamu, mpe mposa na ye mobimba uta kala ezalaki kosepelisa mpe kosalela ye.

Sima ya bokomi ndako, Jack abandaki kotalaka Cassie mpo na bapota, bozikisi, to bantshombokila, kaka ndenge asalaka mikolo na mikolo. Ntango atie loboko na ye na tolo na ye, ayoki eloko moko epoli mayi mpe loboko na ye epoli na makila. Na soni mpe nkele na ye, amonaki ete Cassie azalaki na pota ya molayi mpe monene tii na mokuwa ya tolo na ye. Amonaki mosusu na lokolo na ye ya mobali ya liboso, lisusu tii na mokuwa.

Jack azingi Cassie na maboko mpe abandi kolela. Soni na ye sikawa na lolenge asambisaki mpe azwaki ye mabe ekomaki kilo. Cassie amitambwisaki na bizaleli ya momeseno te na ebandeli ya mokolo mpamba te azalaki ya kozoka. Bizaleli na ye etambwisamaki na mpasi na ye, na minyoko na ye, mpe na bapota na ye. Ezalaki te na likambo ya kosala na bozangi mposa ya kotosa to bozangi bolingo na ye.1

Nayoka lisolo oyo bambula ebele mpe nabosana yango te. Motango nini ya bato bazoka bazali na kati na biso? Mbala boni tosambisaka basusu na kotalaka ezaleli na bango ya libanda mpe misala, to bozangi kosala, ntango, soki tososoli mobimba, tolingaki kutu koyanola na mawa mpe posa ya kosunga na esika ya kobakisa kosambisa na biso na mikumba na bango?

Namiyokaka na foti bambala ebele na bomoi na ngai, kasi Nkolo na motema molayi ateyaka ngai na nzela ya makambo mpe ntango nayokaka makambo ya bomoi ya bato mosusu. Nakomaka kosepela mingi na ndakisa ya Mobikisi na biso lolenge Ye apesaki mingi ya ntango na Ye mpo na kosalela basusu na bolingo.

Makambo na bomoi ya mwana na ngai ya mwasi ya nsuka esangisaki bakpokoso ya bokono ya mutu uta ntango azalaki mwana moke ya mwasi. Ekomaki bambala ebele na bomoi na ye oyo ayokaki ete akoki kokoba lisusu te. Tokoyoka botondi libela na libela na banjelu ya mabele oyo bazalaki wana na bantango wana: kovanda elongo na ye; koyoka ye; kolela na ye; mpe kokabola elongo likabo se moko, babososoli ya molimo, mpe mokangano ya moko na mosusu ya bolingo. Na makambo ya bolingo ya boye , mikumba ememamaka mingi na bangambo mibale.

Mpaka Joseph B. Wirthlin, kotangaka 1 Bakolinti, alobaki, “Ata nakoloba na nkota ya bato mpe banjelu, mpe nazangi bolingani, Nazali bobele ngonga ekolobaka ngbaa ngbaa to elonja ekolobaka ngbengbele ngbengbele.”2

Ye akobaki:

“Nsango ya Paulo na lisanga ya sika ya basantu ezalaki pete mpe semba: Eloko moko te bokosala epesa bokeseni soki bozangi bolingani. Bokoki koloba na minoko ya sika, kozwa likabo ya bosakoli, kososola misala nyonso,kozala na boyebi nyonso; ata soki bozali na kondima ya kotindika bangomba, na kozanga bolingani ezali na litomba moko te mpo na bino.

“‘Bolingani ezali “bolingo ya peto ya Klisto’ [Moroni 7:47]. Mobikisi apesaki ndakisa ya bolingo oyo.”3

Na Yoane tokoki kotanga, “Na eye nde bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli ba ngai, soki bolingani ya moko epai na mosusu3

Balisikulu mingi epesami na bakambi ya Eklezia na ntina ya bolingani, bomoko, bolingo, kimoninga malamu, mawa, bolimbisi, mpe bokaboli mawa. Nandimi ete Mobikisi abengi biso tobika nzela ya likolo, ya bule5ya Ye nzela ya bolingo wapi banso bakoki koyoka solo bazali na kati mpe azali na mposa na bango.

Topesa motindo ya kolinga basusu,6 kasi ya kosambisa bango te.7 Tokitisa mokumba oyo; ezali biso te tosengeli komema yango.8 Na esika na yango, tokoki kolata nkanga ya bolingo mpe mawa ya Mobikisi.

“Boya liboso na ngai, bino banso bozali ya kolemba na mosala mpe bokumbi bozito, mpe nakopesa bino bopemi.

“Bokamata nkanga na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; …

“Mpo ya ngai nkanga ezali pete, mpe ya ngai mokumba ezali bozito te.”9

Mobikisi andimaka masumu te kasi apesaka biso bolingo na Ye mpe akomisaka monene bolimbisi ntango toyambolaka. Epai ya mwasi bakangaki na ekobo, Alobaki, “Nakweisi I yo te: kende, mpe kosumuka lisusu te.”10 Baoyo Asimbaki bayokaki ya Ye bolingo, mpe bolingo yango ebikisaki mpe ebongolaki bango. Ya Ye bolingo efuli bango balinga kobongola bomoi na bango. Kobika na ya Ye nzela ememaki esengo mpe kimia, mpe Ye abengakibasusu na nzela ya kobika na boboto, kimoninga malamu, mpe bolingo.

Mpaka Gary E. Stevenson alobaki: “Ntango tokutanaka na mipepe mpe bikumbaki ya bomoi, bokono mpe bampota, Nkolo—Mobateli mpate na biso, Monganga na biso—akoleisa biso na bolingo mpe kimonginga malamu. Akobikisa mitema na biso mpe akozongisa milimo na biso.”11 Lokola balandi ya Yesu Klisto, esengeli te tosala lolenge moko?

Mobikisi asengi biso toyekola Ye12 mpe tosala makambo tomoni Ye kosala.13 Azali bolingani, bolingo ya solo elati nzoto. Mokemoke ntango tozali koyekola kosala nini Asengi biso—kaka te mpo na etinda to mpo na mapamboli tokoki kozwa kasi kaka mpo na bolingo mpo na Ye mpe Tata na biso na Lola14—Bolingo na Ye ekosopana kati na biso mpe ekosala nyonso Azali kosenga ekokisama ntango mosusu na bopete mpe pepele15 mpe esengo mingi koleka oyo tokoki kokanisa. Ekosenga kotia na misala; ekoki kosala bambula, ndenge ezalaki mpo na ngai, kasi ntango tolingi ete bolingo ezala bokasi ya botindiki na biso, Akoki kozwa mposa wana,16 nkona wana, mpe kobongola yango na nzete moko kitoko, etondisami na mbuma sukali.17

Toyembaka na loyembo na biso moko ya bolingo: “Nazali nani mpo na nasambisa basusu ntango nazali kotambola na bonginie te? Na kati ya motema ya makelele te ebombani mawa oyo miso ekoki komona te.”18 Nani kati na biso akoki kozala na bamawa ebombana? Elenge mwana amonanaki lokola motomboki, bana ya baboti bakabwana, mama to tata monzemba, baoyo bazali na mikakatano ya nzoto to ya mutu, baoyo bazali na mituna ya kondima na bango, bampaka, liboke ya bato ya loposo oyo bazali mingi te, baoyo bazali komiyoka bango moko, baoyo balingi kobala, baoyo bazali na bowumbo bakanaki te, mpe baoyo nyonso bazali na kpokoso ya bandenge ebele—mingi kutu baoyo bomoi ezali komonana na miso ebongi nie.

Moko te na kati na biso azali na bomoi to libota ebongi nie; ata moko te. Ntango toluki kozala malamu na basusu oyo lisusu bazali kobika makambo mpe bozangi kobonga, ekoki kosunga bango koyoka ete bazali bango moko te ya bango bitumba. Moto nyonso azali mpenza na mposa ya koyoka kosangana mpe bazali na mposa na kati ya nzoto ya Klisto.19 Mposa monene ya Satana ezali kokabola bana ya Nzambe, mpe azali kosala yango malamu, kasi nguya monene ya bomoko ezali.20 Mpe boniboni tosengeli kotambola loboko na loboko moko na mosusu na bitumba ya mobembo ya nkufa!

Profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, alobaki: “nyonso mbeba to kokanisela na moto mosusu mpo na ekolo, loposo, lolenge ya kosangisa nzoto, mwasi to mobali, botangi kelasi, momesano, to ndenge mosusu ya kotala bato ezali libaku mpo na Mokeli na biso! Bisaleli ya mabe boye ekumbaka biso kobika na nse ya bomoto na biso ya bana mibali mpe basi ya boyokani na Ye!”21

Ntango Mokambi Nelson abengi banso bakota mpe bakofanda na nzela ya mayokani oyo ezongisaka epai ya Mobikisi na biso mpe Tata na biso ya lola, apesaki lisusu toli oyo elandi: “Soki baninga mpe libota … bakomi mosika ya Eklezia, koba kolinga bango. Ezali mpo na yo te kosambisa maponi ya moto mosusu koleka ndenge osengeli te ete batonga yo mpo na kotikala na kondima.”22

Baninga, tokundola ete moto nyonso na mabele azali mwana na Nzambe23 mpe Alingi moko na moko.24 Ezali na bato na nzela na yo oyo bayoki mposa ya kosambisa? Soki iyo, kanisa ete ezali na mabaku kitoko mpo na biso kotia na misala kolinga ndenge Mobikisi alingaki.25 Ntango tolandi ya Ye ndakisa, tokoki kozala na nkanga na Ye mpe kosunga na kopesaka nzela na boyoki ya bolingo mpe kozala na mitema ya bana nyonso ya Tata.

“Tolingi ye, mpo ye alingaka biso yambo.”26 Ntango to tondisami na bolingo ya Mobikisi, nkanga na Ye solo ekoki kozala pete, mpe bozito na Ye ekoki koyokama pepele.27 Na yango natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Jack R. Christianson, Healing the Wounded Soul (2008), 27.

  2. 1 Bakolinti 13:1; tala Moroni 7:44–48.

  3. Joseph B. Wirthlin, “The Great Commandment,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2007, 28.

  4. Yoane 13:35, sete biso nde tobakisi; tala lisusu molongo 34.

  5. Tala Russell M. Nelson, “Makebisi ya Bofungoli,” Liahona,, sanza ya zomi na moko 2018, 6–8.

  6. Tala Matai 22:36-40; Yoane 13:34-35.

  7. Tala Matai 7:1–4; Dieter F. Uchtdorf, “The Merciful Obtain Mercy,” Liahona, May 2012, 70–77; see also Robert C. Gay, “Taking upon Ourselves the Name of Jesus Christ,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 97–100.

  8. Elongobani bobele mpo na baepisikopo mpe bakambi ya makonzi. “Episikopo nyonso mpe mokambi nyonso ya likonzi azali ‘mosambisi ya Yisalaele’ (Doctrines et alliances 107:72). Na likoki oyo basungaka bandimi bayambola masumu na bango mpe baya epai ya Klisto, oyo alimbisaka masumu (tala 32.1 mpe 32.3)” (General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 31.1.7, ChurchofJesusChrist.org

  9. Elamani 3:29–30; nsete ebetami.

  10. Luka 17:14nsete ebetami; tala lisusu milongo 3–10.

  11. Gary E. Stevenson, “Hearts Knit Together,” Liahona, Sanza ya Mitano 2021, 23.

  12. Tala Matai 11:29.

  13. Tala 3 Nefi 27:21–22.

  14. Tala Matai 22:37–39.

  15. Tala Mosiya 24:15.

  16. Tala Alama 32:27.

  17. Tala Alama 32:27.

  18. Lord, I Would Follow Thee,” Hymns,, no. 220.

  19. Tala 1 Bakolinti 12:12–27; tala lisusu Jeffrey R. Holland, “Songs Sung and Unsung,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 49–51.

  20. Tala Sharon Eubank, “By Union of Feeling We Obtain Power with God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 55–57; see also Dale G. Renlund, “The Peace of Christ Abolishes Enmity,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 83–86; Sharon Eubank, “Turning Enemies into Friends” (Brigham Young University devotional, Jan. 23, 2018), speeches.byu.edu.

  21. Russell M. Nelson, “Choices for Eternity” (worldwide devotional for young adults, May 15, 2022), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  22. Russell M. Nelson, “Choices for Eternity,” broadcasts.ChurchofJesusChrist.org

  23. Tala Baloma 8:16.

  24. Tala Yisaya 49:16; Baloma 8:35, 38–39.

  25. Tala Luka 6:31–38.

  26. 1 Yoane 4:19. “Tozali kolobela awa motindo monene ya yambo mopesami na libota ya mokili mobimba—ya kolinga Nzambe na motema mobimba, na kozangaka komipekisa to kobebisa, elingi koloba, na motema na biso, makasi na biso, mayele na biso, mpe nguya na biso mobimba. Bolingo oyo ya Nzambe ezali ya yambo mpe ya monene ya mobeko na mokili. Kasi ya yambo bosolo ya monene liboso na molongo mobimba ezali ete Nzambe alingi biso mpenza na nzela wana—motema mobimba, kozanga komibomba to kobuka mibeko, na nyonso ya motema na Ye nguya, molimo, mpe bokasi bonso” (Jeffrey R. Holland, “The Greatest Possession,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 9).

  27. Tala Matai 11:28–30.