Likita Linene
Bozali Kaka na Bolingi
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Bozali Kaka na Bolingi

Bolingi na biso ya kolanda Yesu Klisto ekokani na motango ya ntango tolekisaka mpo na kozala na bisika ya bule.

Mokolo moko ya eyenga, ntango nazalaki komilengela mpo na kolia elambo nsima ya baposo mingi ya mikumba ya likita ya likonzi, likanisi moko ya malamu etambolaki na makanisi na ngai.

Ntango nganganzambe abandaki kopambola lipa, maloba nayokaki mbala ebele yambo etutaki makasi mpenza molimo mpe motema na ngai. “Mpe kotatola epai ya yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete bazali na bolingi ya kokamata likolo lya bango nkombo ya Mwana Mobali wa yo, mpe komikundola ye ntango inso mpe kobomba mitindo mya ye miye apesi bango, ete bakoka ntango inso kozwa Molimo mwa ye mpo ya kozala elongo na bango.”1 Mbala boni etatola biso epai na Nzambe ete tolingi?

Ntango namanyolaki ndimbola ya maloba oyo ya bule, liloba bolingi etutaki ngai makasi ata mokolo moko te liboso. Na mbala moko makanisi malamu etondisaki molimo mpe motema na ngai, na bolingo mpe botondi mpo na libonza ya bomikabi ya Mobikisi, mpe mokumba na Ye monene ya bosikoli na moango ya Tata mpo na libota na ngai mpe ngai. Na yango, nayokaki maloba malamu mpenza ya losambo na mayi: “Ete bakoka kotatola likolo lya yo … ete bakoka ntango inso kokundola ye.”2 Nasosolaki polele mpenza na ngonga wana ete kobomba mayokani esengeli kozala malamu koleka makanisi malamu.

Kolia elambo ezali te molulu ya lingomba na biso ya kotala na miso oyo esengi kaka bondimi na biso. Ezali likundoli ya nguya mpenza ya bosolo mpe esika monene ya Bomikabi ezanga ndelo ya Mobikisi mpe mposa ya kukondola Ye ntango nyonso mpe kobomba mitindo na Ye. Bolingi ya kofandisa makanisi na Mobikisi ezali ntina mingi ezali nsango monene ya makomi mibale matangemi na Eklezia: bansambo ya elambo. Kososola bosolo ya oyo Tata ya Lola alingi bongo kopesa moko na moko na biso na nzela ya Mwana se Moko na Ye esengeli kopesa likanisi ya makasi na biso mpenza ya kozala ntango inso ya kolinga na bozongi.

Moboko na biso ya molimo etongami makasi likolo ya Yesu Klisto?

Soki moboko na biso ya molimo ezali bozindo mingi te to ya kotepatepa, tokoki kofandisa bolingi na biso na elembo moko ya makanisi na biso moko. Mpe soki tondimi lisolo ete Eklezia efandi liboso liboso likolo ya mibeko ya bato, bipekisi ya bato bango moko ya solo te mpe mikumba ya ntango, boye bosukisi na biso na oyo etali bolingi ekozala ya lokuta. Tosengeli te kozela mobeko ya bolingi kokola malamu mpenza elongo na bopusi ya bato to baoyo balinga Tik Tok. Mibeko ya bato eyokanaka mpenza te na bosolo ya bonzambe.

Eklezia ezali esika ya bosangani mpo ya bato babongi te oyo balingi Nzambe mpe oyo balingi kolanda Nkolo Yesu Klisto. Bolingi wana ezwi mpenza misisa na bosolo mpenza ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe na bomoi. Bosolo oyo ya bonzambe ekoki koyebana bobele na nguya ya Molimo Mosantu. Yango wana, bolingi na biso ekokani na ntango tolekisaka mpo kozala na bisika ya bule epai wapi bopusi ya Molimo Mosantu ezali.

Tolingaki kosala malamu na kolekisaka ntango mingi na masalo ya ntina kolobelaka mitungisi na biso na Tata na Lola ya bolingo mpe ntango moke kolukaka makanisi mpe mingongo ya bato. Tolingaki kopona kobongola bansango na biso ya mokolo na mokolo na maloba ya Klisto na makomi masantu mpe na maloba ya baprofeta na bomoi.

Ntina totiaka na botosi ya mokolo na biso ya Saba, kofutaka moko na zomi na sembo, kozalaka na mokanda mpo ya tempelo ya sika, kokendaka na tempelo, mpe kotosaka mayokani masantu ya tempelo ezali nyonso wana bilembo ya nguya ya bolingi na biso mpe bosolo ya bomipesi na biso. Elingi biso kosala makasi koleka likolo likolo mpo kolendisa bondimi na biso na Klisto?

Tata ya Lola alingaka biso malamu mpenza, kasi bolingo yango eyaka elongo na babozeli minene. Ye azelaka biso kolinga kotya Mobikisi na katikati ya babomoi na biso. Mobikisi azali ndakisa na biso malamu ya bolingi ya kopesa na Tata na makambo nyonso. Ye azali “nzela, solo, mpe bomoi.”3 Ye amikabaki mpo na masumu na biso. Na bolingi mpenza amikabaki mpo na masumu na biso, Akomisaka mikumba na biso pepele, akitisaka bobangi na biso, apesaka biso makasi, mpe amemaka kimia mpe bososoli na mitema na biso na ntango ya mawa mpe mpasi.

Kasi bondimi na Yesu Klisto ezali liponi. “Soki [biso] tokoki mingi te koleka kozala na mposa ya kondima”4 maloba na Ye, tozali na esika ya ebandeli mpo na kobanda to koyeisa sika mobembo na biso ya bondimi. Maloba na Ye, soki elonami kati na mitema na biso lokola nkona mpe eleisami na bokebi monene, ekozwa misisa, mpe bondimi na biso ekokola na elikya mpe ekokoma mobeko ya mosala mpe nguya. Buku ya Mormon ezali mokanda na biso moko ya nguya mpo na kokolisa mpe kozongisa bondimi na biso. Bolingi esungaka biso kokolisa bondimi.

Bokufi, na mwango na Nzambe, ezali pete te mpe na bantango ekoki kosala mpasi. Nzokande “[biso] tozali, ete [biso] tokoka kozala na bosepeli”!5 Kotyaka makanisi mingi na Mobikisi mpe mayokani na biso esantu epesaka esengo ya libela! Litomba ya bokufi ezali mpo komonisa mpenza bolingi na biso. “Mokumba monene oyo ya bomoi [mpe talo ya kimoyekoli, ezali koyekola bolingi ya Nkolo mpe nsima kosala yango.”6 Kimoyekoli ya solo ekambaka na bofuluki ya esengo. Ezali biso na bolingi ya kofuta talo ya kozala moyekoli?

Nzela ya liyokani ezali kaka te kotala lokasa na pete, ezali nzela ya bokoli na molimo mpe kozindisa bomipesi na Nkolo Yesu Klisto. Ntina monene ya motindo, mobeko, liyokani, mpe likuli nyonso ezali kotonga bondimi mpe elikya na Klisto. Ekateli na biso ya kofandisa babomoi na biso likolo ya Klisto, yango wana, esengeli kozala ya kokoka ntango nyonso—ya liloba te, ya mwa ntango te, to ya likolo likolo te. Tokoki kopema te mwa mikolo to bantango ya moto ye moko na kolinga “kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ngonga nyonso na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso.”7 Kimoyekoli ezali talo te, mpo ete kiboninga ya Molimo Mosantu ezali ya ofele.

Solo mpenza, Nkolo akanisaki mikolo na biso ntango ateyaki lisese ya baseka zomi. Kati na mitano oyo bazalaki bwania alobaki: ba “zwaki Molimo Mosantu lokola mokambi na bango, mpe bakosamaki te,”8 ntango minda ya bazoba “ezangaki” mafuta.9 Ntango mosusu maloba ya Nefi elimboli malamu mpenza bandimi oyo ya sembo ya Eklezia: “Mpe basusu akopemisa, mpe akolalisa bango na bozangi bobangi bwa mosuni, ete bakoloba: manso mazali malamu na Siona.”10

Bozangi bobangi ya mosuni elukaka mpe etyaka elikya na makambo ya mokili na esika ya Klisto—na maloba mosusu, etalaka makambo na lolenge ya mokili na esika ya molimo. Molimo Mosantu apesaka biso makoki ya komona “makambo lolenge ezali mpenza, mpe … lolenge makambo ekozala mpenza.”11 Bobele “na nguya ya Molimo Mosantu [tokoki] koyeba bosolo ya makambo manso”12 mpe kokosama te. Totiaka Klisto na katikati ya bomoi na biso mpe totalaka bolingi na biso na kotosa mitindo na Ye, te mpo ete tozali bakufi miso kasi mpo ete tokoki komona.13

Kasi boni boni mpo na baseka ya bazoba? Mpo na nini balingaki te komema mbeki ya mafuta ya molimo? Bazongisi makambo nsima na pete? Bazalaki ntango mosusu likolo likolo koleka mpo ete ebongaki te to emonanaki ntina te? Atako ndenge wana, bayokisamaki nsoni na ntina ya mokumba monene ya Klisto. Oyo ezali bokosi monene ya Satana uta na ebandeli, mpe mpo na nini minda na bango ya litatoli ezangaki mafuta ya molimo. Lisese oyo ezali maloba ya elilingi mpo na ntango na biso. Ebele batika Nkolo mpe mayokani na bango kala mpenza yambo batika Eklezia na Ye.

Tozali kobika na eleko emonanaki liboso te kasi esakolamaki na baprofeta ya kala, mokolo Satana akongala “o mitema mya bana ya bato, mpe akolamusa bango na nkanda likolo lya eye ezali malamu.”14 Mosika mingi kati na biso bazali kobika na mokili ya makanisi etondisami na masano mpe bansango mabe kotemela bomoto ya bonzambe mpe kondimela Klisto.

Bopusi ya makasi mpenza ya molimo na bomoi ya mwana ezali ndakisa ya bosembo ya kolinga baboti mpe bankoko baoyo babombaki na sembo nyonso mayokani na bango esantu. Baboti ya makanisi malamu bateyaka bana na bango bondimi na Nkolo Yesu klisto, mpo ete bango mpe “bakoka koyeba o liziba kani bakoki koluka bolimbisi bwa masumu ma bango.”15 Bobombi liyokani ya mwqa ntango mpe ekoka te ememaka na bobungisi ya molimo. Bobebi ya molimo ezali mbala na mbala monene mpenza na bana mpe bankoko na biso. Baboti mpe bankoko, bzali biso kaka na bolingi?

Mokambi Russell M. Nelson ateyi, “Na mikolo ekoya, ekokoka kosalama te kotikala na bomoi na molimo kozangaka nguya ekambaka, eyangelaka, elendisaka, mpe nguya ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.”16 Ezali solo mpe likebisi ya malamu mpo kotondisa minda na biso mpe komatisa bibombameli ya mafuta na biso ya molimo. Ezali biso kolinga kolanda baprofeta na bomoi? Ndelo nini ya mafuta ya molimo ezali na mwinda na yo? Mbongwana nini na bomoi na yo moko ekopesa makoki mpo ete ozala na nguya ya Molimo Mosantu ntango nyonso?

Lelo, lokola na bantango ya Yesu, ekozala na baoyo bakotika kolanda Klisto, kosala oyo esengeli mpo ya kimoyekoli. Ntango maloba mabe ya mpasi mpe boyini ezali komata kati na Eklezia ya Mobikisi mpe baoyo balandi Ye, kimoyekoli na biso ekosenga bolingi monene ya kosembola mpe kolendisa mikongo na biso ya molimo mpe kolanda yango te.17

Soki moboko na biso ya molimo etongami makasi mpenza likolo ya Yesu Klisto, tokokweya te, mpe tosengeli kobanga te.

“Tala, Nkolo asengi motema mpe mayele ya bolingi; mpe molingi mpe motosi akolia biloko bya mboka ya Siona na mikolo oyo mya nsuka.”18

Tika tozala ntango nyonso na bolingi. Na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amen.