Likita Linene
Esengo mpe Libela na libela
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Esengo mpe Libela na libela

Solo, Esengo mpe seko ya libela elongo na balingami na biso ezali mpenza ntina ya mwango ya esengo ya Nzambe.

Baninga ya bolingo, Bandeko mibali, mpe bandeko basi, bomikundoli ete bondimeli to bolingi kondimela, na esengo ezanga suka?

Nsima bomoi ekomaki. Biso “tokolaki.” Mikangano ekomaki mobulu. Mokili oyo ezali makelele, etondisami na bato, ya mbamba, na balolenge ya komikumisa mpe ya lokuta. Nzokande, na “mozindo ya motema” na biso,”1 tondimeli, to tolingi kondimela, esika moko, lolenge moko, esengo mpe libela na libela ezali ya solo mpe ekoki kokokisama.

“Esengo mpe libela na libela” ezali te makanisi mpamba ya masapo ya lokuta. Solo, Esengo mpe seko ya libela elongo na balingami na biso ezali mpenza ntina ya mwango ya esengo ya Nzambe. Ye abongisaki na bolingo mpenza nzela ekoki kokomisa mobembo na biso esengo mpe libela na libela.

Tozali na mingi ya kosepela mpe mpo na yango kotonda Ye. Nzokande, moko te kati na biso abongi nie, ilbota moko pe te. Kimoninga na biso esangisi bolingo, bondeko, bomoto kasi mbala mingi mpe kobendana, bampota, ntango mosusu mpasi ya mozindo.

“Mpo lokola na Adama banso bakwei, kaka bongo na Klisto banso bakozonga na bomoi.”2 Kozonga na bomoi kati na Yesu Klisto esangisi bozangi kufa—likabo na Ye mpo na lisekwa na biso ya nzoto. Ntango tozali kobika na kondima mpe botosi, kozonga na bomoi kati na Klisto ekoki kosangisa bomoi ya seko etodisami na esengo na Nzambe mpe na baye tolingaka.

Na lolenge ya komona, profeta ya Nkolo azali kopusa biso penepene ya Mobikisi, Kobakisa na nzela ya makuli mpe mayokani ya bule ya tempelo oyo ezali kosangisa biso na bisika ebele. Tozwi libaku monene mpe likabo ya koyeba bososoli ya sika ya molimo, bolingo, boyamboli, mpe bolimbisi na moko mpe mosusu mpe libota na biso, na ngonga mpe seko.

Na ndigisa, na kaboli makambo ya bule mibale elobamaki na baninga na ntina na Yesu Klisto kosangisaka mabota na nzela ya kobikisaka mawa kati na bakitani.3 “ezanga suka mpe ya libela na libela,”4 “makasi koleka basinga ya liwa,”5 Bomikabi ya Yesu Klisto ekoki kosunga biso komema kimia na lobi na biso eleki mpe elikya na lobi na biso ekoya.

Ntango bakotaki na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka, moninga na ngai mpe mobali na ye bayekolaki na esengo kimoninga ya libota esengeli te kozala “kino liwa ekokabola bino.” Kati na ndako ya Nkolo, mabota ekoki kokangama mpo na libela na libela (bokangisami).

Kasi moninga na ngai alingaki te kokangema na tata na ye. “Azalaki te mobali malamu mpo na mama na ngai. Azalaki te tata malamu mpo na bana na ye,” Ye alobaki. “Tata na ngai esengeli azela. Nazali na mposa ata moko te ya kosala mosala ya tempelo oyo mpe kokangema na ye libela na libela.”

Mbula mobimba, ye akilaki bilei, asambelaki, asololaki mingi na Nkolo na ntina ya tata na ye. Sukasuka, alengelamaki. Mosala ya tempelo mpo na tata na ye esalemaki. Sima, ye alobaki, “na mpongi na ngai tata na ngai a mimonisaki epayi na ngai, mobimba alati mpembe. Ye abongwamaka. Ye alobaki, ‘Tala ngai. Nazali mobimba peto. Matondo mingi na yo ndenge osali mosala mpo na ngai na kati ya tempelo.’” Tata na ye abakisaki, “telema mpe zonga na tempelo; ndeko na yo ya mobali azali kozela abatisama.”

Moninga na ngai alobaki, “Bankoko na ngai mpe baoyo bakufa bazali kozela na lombango misala na bango misalema.”

“Mpo na ngai,” ye alobaki, “tempelo ezali esika ya kobikela, boyekoli, mpe boyebi Bomikabi ya Yesu Klisto.”

Likambo ya mibale namonaki. Moninga mosusu alukaki na lombango lisitwale ya libota na ye. Alingaki koyeba tata ya nkoko na ye.

Na ntongo moko, moninga na ngai ayokaki bozali ya molimo ya moto moko na kati ya ndako na ye. Moto yango alingaki amonana mpe ayebana na libota na ye. Moto yango ayokaki mpasi mpo na mbeba moko oyo ye asengelaki koyambola sikawa. Moto yango asungaki moninga na ngai koyeba ete moninga na ngai azalaki na singa ya ADN na moto oyo moninga na ngai akanisaki et azalaki tata ya nkoko na ye. “Na maloba mosusu,” moninga na ngai alobaki, “na monaki tata ya nkoko na ngai mpe na sosolaki ete azalaki te moto makomi ya libota na biso ekomaki ete azalaki tata ya nkoko na ngai.”

Boyokani na libota na ye ekomaki ya koyebana, moninga na ngai alobaki, “na miyoki nsomi, na kimia. Esali nyonso bokeseni ya koyeba nini libota na ngai ezali.” Moninga na ngai akanisaki, “Etape moko egumbama elakisi te nzete mabe. Lolenge nini tokomi na mokili oyo ezali na motuya moke kokokanisa na lolenge oyo tokotika yango.”

Makomi masantu mpe mayele ya bule ya lobiko ya moto yemei mpe kimia, kobakisa boayo bazali kobika na mokili ya milimo, ezali kobeta nsete na mabongisi ya malongi mitano.

Ya yambo: Na kati kati ya moango ya bosikoli mpe ya esengo ya Nzambe, Yesu Klisto, na nzela ya Bomikabi na Ye, alaki kosangisa molimo mpe nzoto na biso, “ekokabolama lisusu te, ete biso tozwa esengo etonda meke.”6

Ya mibale: Bomikabi—bosangisami na Klisto—ekomaka ntango totie kondima na misala mpe tobimisi mbuma ya mbongwana.7 Lokola na bokufi, boye na bozangi kufa. Makuli ya tempelo ekoki te yango moko kobongola biso to baoyo kati na mokili ya milimo. Kasi makuli ya bonzambe oyo ezali kopesa nzela ya kobulisa baboyokani na Nkolo, Ye oyo akoki komema kimia na Ye mpe moko mosusu.

Esengo na biso ekomaka meke ntango toyoki ngolu ya Yesu Klisto mpe bolimbisi mpo na biso. Mpe, ntango tozali kopesa bikamwa ya ngolu na Ye mpe bolimbisi ya moko mosusu, boboto tozwi mpe boboto topesi ekoki kosunga kokomisa bomoi ya bozangi bosembo sembo.8

Ya misato: Nzambe ayebi mpe alingaka biso malamu koleka. “Nzambe atiolamaka te,”9 Ye akoki kokosama mpe te. Na boboto na Ye ebongi nie mpe bosembo, Azingi na maboko na Ye ya bozangi likama moto na komikitisa mpe moyamboli.

Na tempelo ya Kirtland, profeta Joseph Smith amonaki na limoni ndeko na ye ya mobali Alvin abikisami na bokonzi ya selestiale. profeta Joseph asepelaki, uta Alvin akufaki liboso ye azwa makuli ya lobiko ya libatisi.10 Na kobondisa, Nkolo alimbolaki mpo na nini: Nkolo akosambisa [biso] engebene na misala mpe bamposa ya ya [biso] mitema.”11 Milimo na biso etalaka na misala mpe bamposa na biso.

Na botondi, toyebi babiki mpe “bakufi oyo bayamboli masumu bakosikolama, na nzela ya botosi na makuli ya ndako ya Nzambe”12 mpe na Bomikabi ya Klisto. Na mokili ya milimo, atako baoyo na masumu mpe bobuki mibeko bazali na libaku ya koyambola.13

Nzokande, baoyo baponi bango mei nkuna, oyo na koyeba ememi bango na bopusi boyamboli mbala ya sima, to oyo na lolenge moko ya nko mpe boyebi abuki mobeko mpo na kosala moango ya boyamboli na pete ye akosambisama na Nzambe mpe akozala na “bokundoli ya makasi ya ngambo ya elindo [na bango] nyonso.”14 Tokoki te kosala lisumu na nko mokolo ya mposo, mpe kozela mbala moko bolimbisi na koliaka elambo mokolo na Eyenga. Na bamisionele to basusu oyo balobaka kolanda Molimo elakisi te kotosa mabongisi to mibeko ya misio, nabondeli bino boyeba ete kotosa mabongisi mpe mibeko ya misio ebengaka Molimo. Tosengeli te kopusa boyamboli na biso mbala ya sima. Mapamboli ya boyamboli ebandaka ntango tobandi koyambola.

Ya minei: Nkolo apesi biso libaku ya bonzambe ya kokoma mingi lokola Ye ntango tozali kosala makuli ya tempelo mpo na basusu bazali na mposa kasi bakoki kosala te mpo na bango moko. Tokomaka mingi ya kokoka mpe kobonga nie15 ntango tokomi “babikisi … likolo ya ngomba siona.”16 Ntango tosalisi basusu, Molimo Mosantu ya elaka akoki kondimisa makuli mpe kobulisa banso mibale mopesi pe mozwi. Banso mibale mopesi mpe mozwi bakoki kasala mpe kozwa makuli ya mbongwana, kozwaka ntango nionso mapamboli elakama na Abalayama, Isaka, mpe Yakobo.

Na nsuka, ya mitano: Lokola Lilako Lileki Motuya17 eteyi, bokokani ya boyamboli mpe bolimbisi ezali kobenga biso kopesa basusu oyo biso moko tosengeli mpe tozali na mposa.

Ntango mosusu bolingi na biso ya kolimbisa moto mosusu epesaka biso makoki biso nionso ye mpe biso kondima ete tokoki koyambola mpe kolimbisama. Ntango mosusu bolingi ya koyambola mpe makoki ya kolimbisa eyaka na ngonga moko te. Mobikisi na biso azali Moyokanisi na biso na Nzambe, kasi mpe asungaka komema biso na biso moko mpe basusu lolenge toyaka epai na Ye. Mingimingi Ntango bampota mpe mpasi ezali mozindo, Kobongisa boyokani na biso mpe kobikisa mitema na biso ezali pasi, ntango mosusu ekoki kosalema te na biso moko. Kasi lola ekoki kopesa biso bokasi mpe bwania koleka ya biso moko mpo na koyeba ntango nini kosimba makasi, mpe ndenge nini kotika.

Tozali mpenza biso moko te ntango tokanisi ete tozali biso moko te. “Mobikisi na biso asosolaka ntango nionso.18 Na lisalisi ya Mobikisi na biso, tokoki kotika lofundu na biso, bampota na biso, masumu na biso epai na Nzambe. Atako lolenge kani tomiyoki na ebandeli, tokomaka mingi mobimba ntango to ndimeli Ye kokomisa mikanganona biso mibimba.

Nkolo, oyo Azali komona mpe kososola malamu mpenza, alimbisaka nani Alingi; biso (kozalaka na bozangi kobonga nie) tosengeli kolimbisana banso. Ntango toyei epai ya Mobikisi na biso, totie makanisi mingi te na bisomoko. Tosambisi moke mpe tolimbisi mingi koleka. Kondimela na matomba, boboto, mpe ngolu na Ye19 ekoki kosikola biso na bobendani, kanda, Bobebisi, bosundoli, na bozangi sembo, mpe na kpokoso ya nzoto mpe makanisi oyo ntango mosusu eyaka na nzoto ya bomoto kati na mokili ya bakufi. Esengo mpe libela na libela elingi koloba te ete boyokani nyonso ekozala ya esengo mpe libela na libela. Kasi mbula nkoto oyo Satana akangami na singa20 ekoki kopesa biso ngonga esengeli mpe balolenge ya kokamwa ya kolinga, kososola, mpe kosala makambo, ntango tozali komilengela mpo na seko.

Tomoni kibondeko ya lola kati na moko na moko.21 Mosala mpe nkembo na Nzambe esangisi kokisa ya esengo mpe libela na libela.22 Bomoi ya seko mpe bonetoli ezali koyeba Nzambe mpe Yesu Klisto bongo, na nzela ya nguya ya bonzambe, esika Bazali biso tosengeli kozala.23

Bandeko mibali mpe basi, Nzambe Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo bazali na bomoi. Bango bapesi kimia, esengo, mpe lobiko na mabota mpe bankota, na mabota nyonso, na moko moko na biso. Profeta ya Nkolo azali kokamba nzela. Emoniseli ya mikolo mya nsuka ezali kokoba. Tika ete topusana pene ya Mobikisi na biso na ndako na Ye esantu, mpe tika ete apusa biso penepene na Nzambe mpe moko mosusu, ntango tozali kosangisa mitema na biso elongo na motema mawa ya boklisto, bosolo, mpe boboto na bakitani nionso—na ntango mpe boseko, esengo mpe libela na libela. Na Yesu Klisto, ekosalema; na Yesu Klisto, ezali ya solo. Natatoli boye na nkombo na Ye esantu, Yesu Klisto, amene.