Likita Linene
Tokoki Kosala Makambo ya Mpasi kati na Ye
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Tokoki Kosala Makambo ya Mpasi kati na Ye

Tokolaka kati na bomoi na biso ya moyekoli ntango tosaleka bondimi kati na Nkolo na bantango ya mpasi.

Na ntango ya mosala ya Mobikisi na mabele, Amonaki moto moko oyo azalaki mokufi miso. Bayekoli ya Yesu batunaki, “Labi, nani asalaki lisumu, moto oyo soki baboti na ye ete abotami na miso makufi?”

Eyano ya sikisiki, ya bolingo, mpe ya bosembo ya Mobikisi epesi biso elikya ete Ye ayebi mpasi na biso: “Moto oyo asali mabe te soko moboti na ye mpe te, nde misala na Nzambe mimonana kati na ye.”1

Ntango mikakatano misusu ekoki koya mpo na bozangi botosi ya biso moko, toyebi ete mikakatano mingi ya bomoi eyaka mpo na bantina mosusu. Atako mikakatano na biso ewuti wapi, ekoki kozala libaku malamu mpo na kokola.

Libota na biso ebatelamaki na mikakatano ya bomoi te. Ntango nazalaki kokola, nazalaki kosepela na mabota minene. Mabota ya boye ezalaki kosepelisa ngai, mingi mingi ntango namonaki Eklezia na bolenge na ngai na nzela ya noko na ngai, Sarfo, mpe mwasi na ye na mboka Takoradi, Ghana.

Ntango Hannah mpe ngai tobalanaki, tozwaki mposa ya bokokisami ya mapamboli na biso ya botata, oyo elakisaki ete tokopambolama na bana mingi. Nzokande, yambo ya mbotama ya mwana na biso ya mobali ya misato, ekomaki polele ete Hannah akozala na likoki te ya kobota mwana mosusu. Na botondi, atako Kenneth abotamaki na ezalela moko ya kobangisa bomoi ya ye mpe ya mama na ye lokola, abotamaki, mpe mama na ye ayokaki malamu. Akokaki kobanda kosala elongo mobimba na bomoi ya libota na biso—kosangisaka bokeyi na Eklezia, nsambo ya libota mokolo na mokolo, boyekoli makomi, likita ya libota na mpokwa, mpe milulu ya masano malamu.

Atako tosengelaki kobongisa elikya na biso ya libota monene, ezalaki esengo ya kotia na misala mateya uta na “Libota: Esakola na Mokili” elongo na bana misato na biso ya bolingo. Kolandaka mateya wana ebakisaki ndimbola mingi ebele na bondimi na ngai oyo ezalaki kokola.

Lokola esakola elobi: “Libala kati na mobali mpe mwasi ezali ntina na mwango na Ye ya seko. Bana basengami kobotama kati na mikangano ya libota, mpe kobokolama na tata mpe mama oyo azali kotosa bandai ya libala na bosembo nyonso.”2 Ntango totiaki mabongisi oyo na misala, topambolamaki.

Nzokande, poso moko ezalaki ngai kosala lokola mokambi ya likonzi, tokutanaki ntango mosusu na momekano ya mabe mpenza baboti bakoki kokutana na yango. Libota na biso ewutaki na molulu moko ya Eklezia mpe esanganaki mpo na elambo moke. Nsima bana na biso ya mibali misato babimaki libanda kati na lopango na biso mpo na kosakana.

Mwasi na ngai ayokaki makanisi kozongelaka ye ete likambo moko ekokaki kozala mabe. Asengaki ngai nakengela bana ntango tozalaki kosokola basani. Nayokaki ete bazalaki malamu lokola tokokaki koyoka mingongo na bango ya esengo ya kosakana na bango.

Ntango na nsuka nsuka banso mibale tobimaki mpo na kotala bana na biso ya mibali, na mawa na biso tomonaki Kenneth moke ya basanza 18-komiyebaka te kati na katini ya mai, bandeko na ye bazalaki komona ye te. Tomemaki ye mbangu na lopitalo, kasi bomeki nyonso ya kozongisa ye na bomoi ezalaki mpamba.

Totondisamaki na mawa ete tokokaki te kozala na libaku ya kobokola mwana na biso ya motuya na bomoi ya kufa oyo. Atako toyebaki ete Kenneth akozala eteni ya libota na biso seko na seko, namimonaki ngai moko kotunaka mpo na nini Nzambe alingaki kotika likama oyo esalemela ngai ntango nazalaki kosala nyonso ekokaki ngai kosala mpo na kosalela libiangi na ngai. Nawutaki kokoma ndako uta na kokokisaka moko ya misala na ngai na kosalisaka Basantu. Mpo na nini Nzambe akokaki kotala mosala na ngai te mpe kobikisa mwana na biso ya mobali mpe libota na biso uta na likama oyo? Mingi nazalaki kokanisa mpo na ntina yango, mingi namiyokaki mpasi.

Mwasi na ngai agangelaki ngai ata mokolo moko te lokola nasalelaki makebisi na ye te, kasi nayekolaki liteya oyo ebongolaki bomoi na ngai mpe nasalaki mibeko mibale, ya kobukama mokolo moko te:

Mobeko 1: Yoka mpe salela makebisi ya mwasi na yo.

Mobeko 2: Soki oyebi solo te ntina, talela mobeko ya 1.

Atako likambo yango epesaki biso mpasi, mpe tozali kokoba kolela, mokumba na biso ya bozito na nsuka nsuka ekomisamaki pepele.3 Mwasi na ngai mpe ngai toyekolaki mateya ya solo uta na kobungisa mwana na biso. Toyaki komiyoka na bomoko mpe ya kokangisama na nzela ya mayokani ya tempelo; toyebi ete tokoki koloba ete Kenneth lokola wa biso na mokili ekoya nsima mpo ete abotamaki kati na liyokani. Tozwaki lisusu boyebi oyo esengeli mpo na kosalisa basusu mpe kososola mpasi na bango. Natatoli ete mawa na biso esilaki uta wana ntango tosalelaki bondimi kati na Nkolo. Likambo tokutanaki na yango ekobaka kozala mpasi, kasi toyekoli elongo na Apostolo Paulo ete tokoki “kosala makambo nyonso kati na Klisto oyo [ekolendisaka biso]” soki totieli Ye elikya.4

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Ntango totie makanisi na bomoi likolo ya mwango ya lobiko ya Nzambe … mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo kotalaka te oyo ezali kosalema—to kosalema te—na bomoi na biso.” Abakisaki lisusu, “Esengo eyaka uta mpe mpo na Ye.”5

Tokoki koyoka esengo mpe kotondisama na kimia na bangonga na biso ya mpasi. Bolingo toyokaka mpo na Mobikisi mpe Bomikabi na Ye ekomaka eloko ya nguya mpo na biso na bantango na biso ya komekama. “Nyonso oyo ezali malonga te [mpe mpasi] etali bomoi ekoki koyeisama malonga kati na Bomikabi ya Yesu Klisto.”6 Atindaki, “Na mokili bokozwa mikakatano: kasi bozala na esengo; Nalongi mokili.”7 Akoki kosunga biso toyika mpiko atako mpasi, bokono, mpe mimekano nini tozali kokutana na yango na bomoi oyo ya kufa.

Tomonaka masolo ya makomi mingi etali bakambi minene mpe ya lokumu, lokola Yilimia, Yobo, Joseph Smith, mpe Nefi, oyo batiamaki mosika ya bitumba mpe mikakatano ya kufa te. Bazalaki bato ya kufa oyo bayekolaki kotosa Nkolo atako na ntango ya mpasi.8

Na ntango ya mikolo ya mpasi na Boloko ya Liberty, Joseph Smith abelelaki, “O Nzambe, ozali wapi? Mpe wapi kisuku oyo ezipaka ebombelo na yo?”9 Nkolo ateyaki Yosefe “ayika mpiko na yango malamu”10 mpe alakaki ete soki ayikaki mpiko, makambo nyonso oyo ekopesa ye boyebi mpe ekozala mpo na bolamu na ye.11

Kokanisaka oyo ekomelaki ngai moko, nasosoli ete nayekolaki mwa mateya malamu mpenza na bantango ya mpasi, bangonga oyo ebimisaki ngai libanda ya esika na ngai ya bolendisi. Mpasi nakutanaki na yango lokola elenge, ntango nazalaki koyekola oyo etali Eklezia kati na seminele, lokola mobongwani ya kala te, mpe lokola misionele ya ntango mobimba mpe mikakatano nakutanaki na yango na kelasi na ngai, na kobundaka kosalela mabiangi na ngai, mpe na kobokolaka libota elengeli ngai mpo na lobi ekoya. Mingi nayanoli na esengo na makambo ya mpasi na bondimi kati na Nkolo, mingi nazali kokola kati na bomoi ya moyekoli.

Makambo ya mpasi kati na bomoi na biso esengeli koya lokola mbalakaka moko te soki tokoti na nzela ya moke mpe ya nkaka.12 Yesu Klisto ayekolaki “botosi na makambo oyo amonelaki mpasi.”13 Ntango tozali kolanda Ye, mingimingi na bangonga ya mpasi, tokoki kokola mpo na kokoma mingi lokola Ye.

Moko ya mayokani tosalaka elongo na Nkolo kati na tempelo ezali kobika mobeko ya libonza. Libonza ezali ntango nyonso eteni ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ezali ekundolisi ya libonza monene ya komikaba ya Yesu Klisto mpo na nyonso oyo azalaki mpe akozala na mabele.

Elilingi
Bamisionele ya Mpaka Morrison

Nayebi ete Nkolo ntango nyonso afutaka bamposa na biso ya bosembo. Bomikundoli bana mingi oyo balakaki ngai kati na lipamboli na ngai ya botata? Libapamboli wana ezali kokokisama. Mwasi na ngai mpe ngai tosalelaki Nzambe elongo na bamisionele nkama mingi, ya bikolo mingi koleka 25, na Misio ya Ghana Cape Coast. Bazali motuya mpo na biso lokola soki bazalaki bana na biso na nzoto.

Natatoli ete tokolaka kati na bomoi na biso ya moyekoli ntango tosaleka bondimi kati na Nkolo na bantango ya mpasi. Lokola tokosala bongo, Ye Akolendisa biso na mawa mpe Akosunga biso tomema mikumba na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.