Likita Linene
Bolamu ya Liloba
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Bolamu ya Liloba

Ezali na bolamu kati ya maloba ya baprofeta ya kala mpe ya sika mingi mingi mpo ete maloba na bango ezali maloba ya Nkolo.

Kati ya Buku ya Mormon, totangi na ntina ya ekateli ya ntina oyo esalamaki na profeta Alma na molongo oyo tolingaka. Yambo ya kotanga maloba wana tomesana na yango, nasengi bobanza elongo na ngai mabaku ya mpasi oyo ekateli ezwelamaki.

Lisanga ya bato moko, bamibengi Bazolamite, bakabwanaki uta na Banefite1 mpe basanganaki na bandelo ya mabele pene ya Balamanite.2 Kala te Banefite balongaki Balamanite na etumba monene na oyo bato nkoto bazomi bakufaki,3 mpe ezalaki “bobangi makasi ete Bazolamite bayokana na Balamanite, mpe mpo ete ezala nzela ya libunga monene te.”4 Likolo ya makambo etali etumba, Alma ayekolaki ete Bazolamiite, oyo “bazalaki na liloba ya Nzambe eteyamaki epai na bango,”5 bazongelaki kumbamela bikeko mpe “batombokelaki banzela ya Nkolo.”6 Nyonso oyo etungisaki Alma makasi mpe “ntina ya mawa makasi.”7

Komimonaka ye moko na kati ya nkpokoso mpe mabaku ya motungisi oyo, Alma amanyolaki maye esengelaki kosalema. Na ekateli na ye totangi maloba oyo ebatelamaki mpo na kofula mpe koteya biso ntango tozali koleka na kpokoso mpe mabaku ya mitungisi ya mikolo na biso.8

Mpe sikawa, lokola liteya ya liloba ezalaka na bokasi monene ya kokamba bato na kosala eye eyengebeni---iyo, ezalaki na mbano ya nguya mingi likolo ya mayele ya bato mingi koleka mopanga, to eloko mosusu, oyo ekomaki epai ya bango---yango wana Alma akanisaki elongobanaki ete bameka bokasi ya liloba ya Nzambe bomeka bolamu ya liloba ya Nzambe.”9

Na kati ya biyano malamu mosusu, bondimi ya Alma ekambaki bango bayekama na nguya ya liloba. Bokokanisi ezali te ete masakoli mosusu ebele ekomami esika mosusu na kati ya makomi eteyamaki mbala moko kolandisama ekateli wana. Na kati ya mikapo 32 mpe 33 ya Alma totangaka maloba na ye ya molakisi etali bondimi kati na Nkolo Yesu Klisto, mpe na mokapo 34 tomoni mateya moboko ya Amuleki mpo na oyo etali Bomikabi ya Yesu Klisto.

Bilili ya Bolamu ya Liloba

Ya solo, na makomi mobimba totangi mapamboli ya makamwisi oyo esopanaki epai ya baoyo baponaki komeka bolamu ya liloba ya Nzambe na kati ya babomoi na bango.10 Nabengisi bino bomanyola bandakisa misato na ngai ntango tozali kotia makanisi na biso na Buku ya Mormon—buku oyo Mokambi Russell M. Nelson alimboli lokola “ya biso motambwisi ya kobikela na mikolo ya suka.”11

Yambo, ekundolisaka bato na ye lolenge nini Nkolo abikisaki batata na bango, Alma ateyaki: “Tala, abongolaki mitema mya bango; iyo, alamusaki bango uta na mpongi ya mozindo, mpe balamukaki epai ya Nzambe. Tala, bazalaki na katikati ya molili; nzokande milimo na bango epelisamaki na mwinda ya liloba ya bomoi ya libela.”12 Ntango mosusu bozali koyoka lokola bozalaki na katikati ya molili; Molimo na bino ezali na mposa ya pole? Soki bongo, nasengi bomeka bolamu ya liloba ya Nzambe.

Ya mibale, kokanisaka mpo na mbongwana kati na Nkolo ya Balamanite, oyo amonaki miso lokola misionele, Amona alobaki, “Tala, nkoto mingi boniboni ya bandeko na biso bakangolaki uta o bolozi bwa lifelo; mpe bamememi mpo ya koyemba bolingo oyo esikolaka; mpe oyo mpo na nguya ya yaliloba na ye oyo ezali kati na biso.13 Bandeko mibali mpe basi, ezali na mingi kati na biso oyo bazali na mposa ya moto moko oyo tolingaka amemama mpo na koyemba bolingo ya bosikoli. Na bokasi na biso nyonso, Alma akundolisi biso tomeka bolamu ya liloba ya Nzambe, oyo ezali kati na biso

Ya misato, na Buku ya Elamani totangaka, “Iyo, tomoni ete nyonso oyo akoki kondimela liloba ya Nzambe, oyo ezali liye ezali na bomoi mpe nguyaalingi kotia nkanga likolo ya liloba ya Nzambe, oyo ezali na bomoi mpe nguya, oyi ekokabola na katikati mayele mabe nyonso mpe mitambo ya bikelakela ya zabulu, mpe ekokamba mobali [mpe mwasi] ya Klisto na nzela moke mpe nkaka ya libulu wana ya bobola … mpe bavandisi milimo na bango … na loboko ya mobali ya Nzambe na bokonzi ya lola.”14 Ezali bino kolukaka kokata lokuta nyonso mpe mitambo mpe lokuta ya zabolo oyo epalangani na bafilozofi ya mikolo na biso? Ezali bino na mposa ya kopanza mapata ya mobulungano oyo esalemaki na bansango mingi mpo ete boyekama bobele na nzela ya liyokani? Nasengi bomeka bolamu ya liloba ya Nzambe.

Lokola moko oyo abongwamaki na nguya ya liloba ya Nzambe, natatoli ngai moko na ntina ya bosolo oyo ya kitoko oyo eteyamaki na profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson: “Mpo na ngai, nguya ya Buku ya Mormon ezali komonana na miso na mbongwana ya nguya oyo eyaka na bomoi ya baye batangaka yango na motema moko, na likanisi moko, kozalaka na bondimi kati ya Klisto.’ Babongwani mingi basundolaka makambo mingi oyo bazalaki kopesa motuya kala mpo na koyekama bobele na makambo ya buku wana. … Ekozala esalelo na yo ya makasi na komemaka milimo epai ya Yesu Klisto.”15

Liziba ya Bolamu

Na bilili oyo mpe misusu, tozali komona bolamu ya liloba ya Nzambe na bomoi ya bana na Ye. Tokoki komituna, liziba ya bolamu to ya nguya ezali nini?

Ntango tobanzi mituna oyo, ezali ntina tomikundola ete nkoma “liloba,” lokola esalelami na kati ya makomi, ezali pene na ndimbola mibale. Mpaka David A. Bednar kala te ateyaki ete “moko ya bankombo ya Yesu Klisto ezali ‘Liloba,’”mpe ete “mateya ya Mobikisi, lokola ekomamaki kati ya makomi masantu, ezali lisusu ‘liloba.’”16

Profeta Nefi atalisaki bokangano kati ya ndimbola mibale oyo ntango akomaki: “Tiaka bokebi na maloba maye mpe bondima Klisto; mpe soki bondimi maloba naye te bondima Klisto. Mpe soki bokondima na Klisto bosengeli kondima maloba naye, mpo ezali maloba ya Klisto, mpe apesaki yango epai na ngai.”17 Boye toyekoli ete bolamu ezali kati ya maloba ya baprofeta ya kala mpe ya sika mingi mingi mpo ete maloba na bango ezali maloba ya Nkolo.18 Baninga na ngai ya bolingo, kondima bosolo oyo ya seko ezali motuya makasi mpo na bomoi na biso ya molimo na mikolo mya nsuka19 ntango, lokola esakolamaki ezali na “nzala na mabele, ezali nzala ya lipa te, mpe mposa ya mai te, kasi ya koyoka maloba ya Nkolo.”20

Na nsuka, bolamu ya liloba ya Nzambe ezali Nkolo Yesu Klisto.21 Ntango tososoli yango na bozindo koleka, tokoki kosala mokangano moko ya ntina ya seko na mokumba ya baprofeta na Ye mpe Mosikoli Ye moko. Bolingo na biso mpo na Ye, mposa na biso ya kopusana pene na Ye mpe kokangama na bolingo na Ye,22 ekotinda biso tomeka bolamu ya liloba na bomoi na biso—nyonso mibale bolamu oyo ekowuta epai na Ye na nzela ya Mosikoli23 mpe bolamu oyo ekowuta na Ye na nzela ya maloba “mbeki eponama ya Nkolo.”24 Tokoya kososola ete, ntango mikanda misusu ekoki kosunga boyekoli na biso na ntina ya Yesu mpe maloba ya baprofeta na Ye, esengeli te kotia eloko mosusu na esika na bango. Tosengeli komela na bozindo mpe mbala na mbala,25 mbala moko uta na liziba.26

Natalisi bolingo na ngai epai ya moko na moko kati na bino, bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi. Na bolingo wana, nabondeli bino bosalela bolamu ya liloba ya Nzambe, mingi mingi na Buku ya Mormon, mikolo nyonso ya bomoi na bino. Ntango bokosala bongo, bokoya komona elaka oyo ya bosakoli uta na Mokambi Russell M. Nelson: “Nalaki ete ntango na nzela ya losambo bokoyekola Buku ya Mormon mokolo na mokolo, bokokamata mikano ya malmu koleka—mokolo na mokolo. Nalaki ete ntango bomanyoli maye bozali koyekola, maninisa ya lola makofungwama, mpe bokozwa biyano na mituna na bino moko mpe bokambi ya bomoi na bino moko. Nalaki ete ntango bozali komizindisa bino moko mikolo nyonso na kati ya Buku ya Mormon, bokoki komibatelema na mabe ya mokolo.”27

Natatoli ete Tata na biso ya Lola apesi biso liloba mpo ete Ye alingaka biso na lolenge ebonga nie mpe alingaka ete moko na moko na biso azonga na ndako mpo na kofanda elongo na Ye mpo na libela. Natatoli na ntina ya “liloba … esalami na nzoto,”28 kutu Yesu Klisto, mpe na nguya na Ye ya kobikisa mpe kosikola biso. Nayebi ete bolamu na Ye ewuti na maloba ya baprofeta na Ye, nyonso mibale ya kala mpe ya lelo.

Ezali losambo ya motema na ngai ete tokoka kozwa bwanya mpe boboto mpo na koyekama29 na liloba ya Nzambe mpe kotikala na nzela ya liyokani oyo ekambaka na bonetoli mpe bomoi ya seko.30 Tokoba kosalela ntango nyonso mbongwana ya nguya mpo na moko na moko na biso na nzela ya bolamu ya liloba.31 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Alma 30:59.

  2. Tala Alma 31:3.

  3. Tala Alma 28:2.

  4. Alma 31:4. Nasengi boyeba ete Alma mpe bato na ye yambo bakutanaki na “bokokani” ya boye kati ya Baamelesite mpe Balamaite, oyo ekambaki na mawa makasi mpe libunga (tala Alma 2:21–38; 3:1–3).

  5. Alma 31:8.

  6. Alma 31:1.

  7. Alma 31:2.

  8. Tala Mormon 8:34–35.

  9. Alma 31:5; nsete ebetami.

  10. Tala, ndakisa, 1 Nefi 15:24; Alma 32:41–43; 36:26; 37:8, 44–45.

  11. Russell M. Nelson, “Yamba Mikolo ya Lobi na Bondimi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 75.

  12. Alma 5:7; nsete ebetami.

  13. Alma 26:13; nsete ebetami.

  14. Elamani 3:29–30; nsete ebetami.

  15. Russell M. Nelson, “The Book of Mormon: A Miraculous Miracle” (lisikulu epesamaki na seminele mpo na bakambi ya misio ya sika, sanza ya motoba 23, 2016), kotangaka na eteni ya Moroni 10:4.

  16. David A. Bednar, “But We Heeded Them Not,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 16.

  17. 2 Nefi 33:10; nsete ebetami.

  18. Tala Doctrine et Alliances 1:38.

  19. Tala Doctrine et Alliances 1:14–18.

  20. Amos 8:11.

  21. Tala Alma 34:6.

  22. Tala Yoane 15:10.

  23. Tala Malako 5:25–34.

  24. Moroni 7:13.

  25. “Nzela ya malamu koleka ezali mpo na komilengela, mpo ete bondimi monene ezali na bolai ya ntango mokuse. Tokoki kozwa mokano ya kokoba koyekolaka maloba ya Klisto kati ya makomi mpe mateya ya baprofeta ya bomoi. Yango ezali oyo nakosalaka. Nakozongela Buku ya Mormon mpe nakomela na bozindo mpe mbala na mbala” (Henry B. Eyring, “Spiritual Preparedness: Start Early and Be Steady,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2005, 39).

  26. “Mpo na ngai, boyekoli ya makomi ezali te boluki ya koyekola na mayele. Kasi, ezali momesano ya bolingo na liloba ya Nkolo mpe mpo na baprofeta na Ye. …

    “Namitungisaka te mpo na koyekola makambo ya milai milai oyo ekomami mpo na kokolisa maye mazali na kati ya makomi. Kasi, nalingaka kotikala na liziba, mpo na komeka mai ya piyo ya moboku ya bosolo—liloba ya Nzambe lokola epesamaki mpe lokola ekomamaki na babuku oyo tondimelaka lokola makomi. Na nzela ya botangi makomi, tokoki kozwa elikya ya Molimo ete oyo tozali kotanga ewuti na Nzambe mpo na kongengisa, kopambola mpe kosepelisa bana na ye” (Gordon B. Hinckley, “Feasting upon the Scriptures,” Tambuli, June 1986, 2, 4).,

  27. Russell M. Nelson, “The Book of Mormon: What Would Your Life Be Like without It?,” Liahona, Nov. 2017, 62–63.

  28. Yoane 1:14.

  29. Tala 1 Nefi 8:30

  30. “Nzela ya liyokani ezali nzela bobele moko oyo ememaka na bonetoli mpe bomoi ya seko” (Russell M. Nelson, “The Power of Spiritual Momentum,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 98).

  31. Tala Alma 5:11–13.