Likita Linene
Kopusana Penepene ya Mobikisi
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Kopusana Penepene ya Mobikisi

Kolukaka koyeba mpe kolinga Mobikisi, tokabwanaka biso moko uta na mokili na nzela ya mayokani na biso na Nzambe, na kozalaka na bokeseni, lolenge moko te, na kozangaka komibomba biso moko uta na basusu na mokili oyo tondimelaka na bokeseni.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, na mpokwa oyo nazali kolobela bayekoli ya sembo mpe bamipesa ya Yesu Klisto. Ntango natali bolamu ya bomoi mpe bondimi na bino epai ya Mobikisi na biso awa na ekolo oyo mpe bikolo ya mokili, nalingaka bino nyonso mingi koleka.

Epai na nsuka ya mosala na Ye, bayekoli ya Yesu basengaki Ye ayebisa bango etali “elembo ya [Boyei na Ye ya Mibale], mpe ya nsuka ya mokili.”1

Yesu ayebisaki bango makambo masengelaki kokoma yambo ya boyei na Ye mpe asukisaki na kolobaka ete, “ntango bokomona makambo nyonso oyo, [bino] bokoyeba ete [ntango] ekomi pene.”2

Na likita linene eleki, nalandelaki na bokebi maloba ya Mokambi Henry B. Eyring: “Moko na moko kati na biso,” elobaki ye, “bisika nyonso tozali, ayebi ete tozali kobika na bantango moko ya kebakeba. … Moto oyo azali na miso ya komona bilembo ya bantango mpe matoi ya koyoka maloba ya baprofeta ayebi ete ezali solo.”3

Mobikisi atindaki bayekoli na Ye ya bilombe: “Epambwami ezali ya bino miso, mpo ete ezali komona: mpe ya bino matoyi, mpo ete ezali koyoka.”4 Tika ete mapamboli maye ezali ya biso lokola tozali koyoka na bokebi maloba ya Nkolo na nzela ya baprofeta na Ye mpe basusu na likita oyo.

Ble mpe Matiti Mabe

Nkolo alimbolaki ete na ntango ya nsuka oyo yambo ya bozongi na Ye, “ble,” oyo Alimbolaki lokola “bana ya bokonzi,”5 esengelaki kokola elongo na “matiti ya mabe,” to baoyo balingaka Nzambe te mpe babatelaka mitindo na Ye te. Esengelaki “kokola elongo”6 ngambo na ngambo.

Oyo ekozala mokili na biso kino Mobikisi akozonga, elongo na mingi oyo ezali malamu mpe mingi oyo ezali mabe na ngambo nyonso.7

Ekoki kozala ete na ntango wana omiyoka lokola mbuma ya ble oyo ekomi makasi mpe ekoli te. Zala na bompikiliki mpo na yo moko. Nkolo alobaki ete ble ezali kolobela na mitu na yango ya sika kobimaka.8 Tozali banso Basantu na Ye ya Mikolo mya Nsuka, mpe atako naino tokokisi oyo tosengeli kozala te, tozwi mokano ya mposa na biso mpo na kozala bayekoli na Ye ya solo.

Kolendisaka Bondimi na Biso na Yesu Klisto.

Tomoni ete lokola mabe ezali komata na mokili, libiki na biso ya molimo, mpe libiki ya molimo ya baoyo tolingaka, ekosenga ete toleisa mingi, tolendisa, mpe tokembisa misisa ya bondimi na Yesu Klisto. Apostolo Paulo ateyaki biso tokembisama na misisa,9 topikama, mpe tolenda10 na bolingo mpo na Mobikisi mpe ekateli ya kolanda Ye. Lelo mpe mikolo mizali koya liboso esengi mingi tofandisa makanisi mpe makasi, na koboyaka kobunga nzela, bomoni mpamba, mpe bopotu.11

Kasi ata na kobakisama ya makambo ya mokili nzinga nzinga na biso, tosengeli kobanga te. Nkolo akosundola te bato na Ye ya liyokani. Ezali na nguya ya litomba ya makabo ya molimo mpe bokambi ya bonzambe mpo na bayengebene.12 Lipamboli oyo ebakisami ya nguya ya molimo, nzokande yango evandi kati biso kaka te mpo tozali eteni ya ekeke oyo. Esalemaka ntango tolendisaka bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto mpe tobatelaka mitindo na Ye, ntango toyei koyeba Ye mpe kolinga Ye. “Oyo ezali bomoi ya seko,” Yesu Klisto asambelaki, “ete bayeba yo Nzambe moko ya solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”13

Lokola toyebi malamu, kozala na bondimi na Yesu Klisto mpe kozala moyekoli ya solo eleki kozwa mokano ya mbala moko—mpe koleka likambo monene ya ntango moko. Ezali mosala ya bule oyo ekolaka mpe epalanganaka na bileko nyonso ya bomoi na biso, kokobaka kino tokofukama na makolo na Ye.

Ntango ble ezali kokola na kati ya matiti mabe na mokili, lolenge nini tokoki kolendisa mpe kokembisa bomipesi na biso na Mobikisi na mikolo ezali koya?

Oyo ezali makanisi misato:

Tomizindisa na Bomoi ya Yesu

Ya yambo, tokoki komizindisa mobimba na bomoi ya Yesu, na mateya na Ye, na bokonzi na Ye, na nguya na Ye, mpe na libonza na Ye ya bomikabi. Mobikisi alobaki, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso”14 Apostolo Yoane akundoli biso, “Tolingaka ye, mpo ete ye alingaki biso yambo.”15 Lokola tokoyoka malamu bolingo na Ye, tokolinga Ye nkutu mingi koleka mpe, na lolenge ya solo, kolanda ndakisa na Ye ya kolinga mpe kosalisa baye nzinga nzinga na biso. Na litambe nyonso ya bosembo epai na Ye, tokomona ye polele malamu koleka.16 Tokumbamelaka Ye, mpe tomekaka na ndenge na biso ya mike mike kolanda ndakisa na Ye.17

Sala Mayokani na Nkolo

Nsima, ntango toyebi mpe tolingi Mobikisi malamu, tolingaka mingi kutu kolaka Ye botosi mpe bondimeli na biso. Tosalaka mayokani na Ye. Tobandaka na bilaka na biso na libatisi, mpe tondimisaka bilaka oyo mpe mosusu ntango toyambolaka mokolo na mokolo, tosengaka bolimbisi, mpe solo tomilengelaka mpo na kozwa elambo mposo nyonso. Tolakaka “ntango nyonso tokomikundola ye mpe kobatela mitindo na ye.”18

Ntango tolengelami, tozwaka makuli mpe mayokani ya tempelo. Koyokaka nguya ya seko na bantango na biso ya bule mpe kimia na ndako ya Nkolo, na esengo tosalaka mayokani na Nzambe mpe tolendisaka makanisi na biso mpo na kobatela yango.

Kosalaka mpe kobatelaka mayokani epesaka ndingisa ya kolinga Mobikisi mpo na kosopa na bozindo kati na motema na biso. Na Liahona ya sanza oyo Mokambi, Nelson alobaki: “[Ya biso] mayokani ekokamba biso penepene na Ye. … Nzambe akotika te mokangano na Ye na baoyo basali mokangano ya lolenge oyo na Ye.”19 Mpe lokola elobaki Mokambi Nelson na lolenge ya kitoko na ntongo oyo, “Na bobulisi ya tempelo moko moko ya sika, nguya ya kobakisa ya bonzambe ezali koya na mokili mpo na kolendisa biso mpe kobundisa bokasi oyo ezali kaka mingi ya monguna.”20

Ekoki biso komona mpo na nini Nkolo asengelaki kokamba profeta na Ye mpo na komema bandako ya Nkolo pene na biso mpe kopesa biso ndingisa ya kozalaka kati ya ndako na Ye mbala na mbala?

Ntango tokotaka na ndako ya Nkolo, tobikisamaka mpo na ntango moko uta na banguya ya mokili oyo ezali kobundisa biso ntango toyekolaka ntina na biso na bomoi mpe makabo ya seko oyo epesameli biso na nzela ya Mobikisi, Yesu Klisto.

Batela Likabo ya Molimo Mosantu

Nsuka nsuka, likanisi na ngai ya misato: na boluki oyo ya bule, totuyaka, tobatelaka, mpe tobombaka likabo ya Molimo Mosantu na motema na biso mobimba. Banso mibale Mokambi M. Russell Ballard na ebandeli mpe Mpaka Kevin W. Pearson mwa bantango eleki balobelaki likebisi ya posakoli ya Mokambi Nelson oyo nakozongela lisusu: “Ekozala pete mpo na kobika na molimo te sokii tozangi bokambi, botambwisami, bolendisi mpe nguya ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu.”21 Ezali likabo ya motuya koleka ntalo nyonso. Tosalaka manso koleka tokoki mpo na kobatela boyebi na biso ya mokolo na mokolo ete nguya ya Molimo Mosantu etikala elongo na biso. Tozali pole ya mokili, mpe ntango elongobani, toponaka kozala ya kokesena na basusu. Mokambi Dallin H. Oaks kala mingi te atunaki bilenge banzemba: “Bomekaka [bino] ‘kozala ya kokesena?’ … [Mingimingi] ya motuya… ezali maponi oyo bozali kosala na bomoi na bino moko. … Botambolaka ngambo mosusu na mimekano ya mokili?”22

Pona Kozala Moto na Bokeseni uta Na Mokili

Na bobambi moko ya kala te na rezo sosio, natunaki bandeko bayekoli bakabola maponi oyo basalaki maye esengaki bango bazala ya kokesena uta na mokili. Nazwaki biyano koleka bankoto.23 Oyo ezali kaka ndambo:

Amanda: nazali monganga nasalaka na boloko ya etuka. Namekaka kosalisa bakangami lokola Klisto asalaki.

Rachel: Nazali moyembi ya opera, mpe batindaka ngai nalata elamba nyonso oyo bapesi nagi, batalaka ata bomoto na ngai te. [Mpo ete nasila kozwa dotasio,] nayebisaka [bakonzi] ete elamba esengeli kozala [malamu]. Basepelaki te … kasi batindaki nalata mosusu na mitema mibale. Nakobongola te kimya oyo eyaka uta na bozali nzeneneke ya Klisto na ntango nyonso.

Chriss: Namelaka masanga (na mbongwana ), molongobani ya tempelo, mondimi ya Eklezia. Nazalaka kimya te na ntina ya kokangama na masanga na ngai mpe bolongi ya litatoli ya Bomikabi [ya Yesu Klisto].

Lauren: Nazalaki kokoma lisano na baninga na ngai ya kelasi na eteyelo ya sekondere. Balingaki ezalela na ngai ya kimya mpe ya komibatela na mbalakaka ekoma ya mbwa akata singa. Bakobaki kotindaka ngai na makasi, kasi naboyaki mpe natikalaki bongo.

Adam: Bato ebele bandimelaka ngai te ntango nalobaka nabatelaka mobeko ya bopeto mpe kopona kotala bilili ya mabe te. Basosolaka te ntina ya esengo mpe kimya ya makanisi oyo epesaka ngai.

Ella: Tata na ngai azali mondimi ya lingomba ya LGBTQ. Namekaka ntango nyoso kobatela mayoki ya bato mosusu na ntango ya botelemi lokola nzeneneke ya Klisto mpe kozala solo na oyo nandimelaka.

Andrade: nazwaki mokano ya kokoba ya kokende na eklezia ntango libota na ngai ekanaki kokende ata moke te.

Mpe na nsuka, uta na Sherry: Tokendaki na molulu ya ndako ya guvernere. Babandaki kokabola champagne mpo na “lipa.” Ngai nasengaki mai, atako bato mosusu bamonaki yango mabe. Topesaki governere lokumu, mpe natombolaki kopo na ngai ya mai! Governere atukamaki te.

Mokambi Nelson alobaki, “Iyo, bozali kobika na mokili, kasi bozali na mibeko ya kokesena uta na mokili mpo na kosunga bino bokima mimekano ya mokili.”24

Anastasia, elenge mama moko na Ukraine oyo azalaki na lopitalo oyo awutaki kobota mwana mobali ntango bitumba ebandaki na Kyiv na Sanza ya mibale oyo eleki. Monganga afungolaki ekuke ya kisuku ya lopitalo mpe alobaki na mongongo likebisi, “Mema mwana na yo, linga ye na bulanketi, mpe kende na kisuku ya monene—sikawa!”

Nsima, Anastasia alobaki:

“Natikala soki mokolo moko te kokanisa ete mokolo na ngai ya yambo ya kozala mama elingaki kozala mpasi boye, kasi natalekaka mapamboli mpe bikamwisi oyo namonaki.

“Sikawa, … ekokaki komonana likambo ekoki kosalema te mpo na kolimbisa baoyo basalaki mbeba makasi mpe mabe … , kasi lokola moyekoli ya Klisto, Nazali na bondimi ete nakokoka [kolimbisa]. …

“Nayebi te nyonso oyo ekosalama lobi ekoya … kasi nayebi ete kobatela mayokani na biso ekopesa ndingisa na Molimo azala elongo na biso ntango nyonso, … kopesaka biso ndingisa ya koyoka esengo mpe elikya, atako na bantango ya mpasi.”25

Elaka ya Bomoi ya Seko mpe Nkembo ya Selesitiale

Bandeko mibali mpe basi, napambolamaki mpo na kozwa na lolenge ya kofuluka bolingo ya molingami Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nayebi azali na bomoi mpe azali kokama mosala na Ye Mosantu. Nazali na maloba makoki te mpo na kolakisa bolingo na ngai epai na Ye.

Tozali banso “bana ya liyokani” bapalangana mokili mobimba na bikolo mpe bonkoko na etando nyonso ya mokili, kotangamaka na nkoto, awa tozali kozela bozongi ya nkembo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso. Kongengaka lokola pole epai ya baoyo bazali nzinganzinga na biso, tobongisaka na mayele bamposa makanisi, maponami, mpe misala na biso,. Kolukaka na motema na biso mobimba mpo na koyeba mpe kolinga Mobikisi, tokabwanaka biso moko uta na mokili na nzela ya mayokani na biso na Nzambe, na kozalaka na bokeseni, lolenge moko te, mpe kozala ntina lokola totosaka Ye mpe mateya na Ye, na kozangaka komibomba biso moko uta na basusu na mokili oyo tondimelaka na bokeseni.

Ezali mobembo moko ya kokamwa kozala ble na kati ya matiti mabe, ntango mosusu kobundaka na mpasi kasi ntango nyonso na kimia na bokoli mpe kofandisama ya bondimi na biso. Ntango bozali kopesa ndingisa na bolingo na bino mpo na Mobikisi mpe bolingo na Ye mpo na bino ekota na bozindo kati ya motema na bino, nalaki bino elikya ebakisama mpe kimia mpo na kolongaka mimekano ya bomoi. Mpe Mobikisi alakaki biso: “[Nakosangisa] na lisanga moko bato na ngai, engebene na lisakoli ya ble mpe matiti mabe, ete ble ekoka kobatelama na ebombelo mpo na kolonga bomoi ya seko, mpe elatisama ekoti ya nkembo ya lola.”26 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 24:3.

  2. Matai 24:33.

  3. Henry B. Eyring, “Steady in the Storms,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 27.

  4. Matai 13:16; nsete ebetami.

  5. Matai 13:38.

  6. Matai 13:30.

  7. Mpaka Neal A. Maxwell alobaki: “Bandimi ba Eklezia bakozala na ezalela oyo ya ble mpe matiti mabe maye kino Mibu Nkoto. Ndambu ya matiti ya mabe ya solo nkutu emonanaka lokola ble” (“Becometh as a Child,” Ensign, Sanza ya mitano 1996, 68).

  8. Tala Doctrine et Alliances 39:4–6.

  9. Tala Bakolose 2:7

  10. Tala Bakolose 1:23; tala lisusu Baefese 3:17; Neal A. Maxwell, “Grounded, Rooted, Established, and Settled” (Brigham Young University devotional, Sept. 15, 1981), speeches.byu.edu.

  11. Na Matai 13:22, Yesu akebisaki bayekoli na Ye bapesa ndingisa te na makambo mpe lokuta ya bozwi ya mokili “ebungisa liloba” mpe kotelemisa bokobi na ye ya molimo. Nalingi nakangisa liloba “kobungisa liloba” na mokapo ya yambo ya Yoane, wapi Yoane alobi liloba ezali Yesu: “Na ebandeli ezalaki Liloba mpe Liloba ezalaki na Nzambe. …. “Biloko nyonso esalemaki na ye; mpe soki ye te ezalaki na eloko moko te esalemaki.” (Yoane 1:1, 3). Bondimi na biso na Yesu Klisto, ekateli ya kolanda Ye, bolingo na biso mpo na Mobikisi ekoki kobungisama, to kotelemisama na bokoli ntango pole ya molimo mpe boleisami elongolami (tala Alma 32:37–41).

  12. Tala Neil L. Andersen, “A Compensatory Spiritual Power for the Righteous” (Brigham Young University devotional, Sanza ya mwambe 18, 2015), speeches.byu.edu.

  13. Yoane 17:3.

  14. Doctrine et Alliances 6:36.

  15. 1 Yoane 4:19.

  16. Mpaka David B. Haight alobaki:

    “Ezali solo ete boko bamonaki solo Mobikisi, kasi soki moto atali na dikisionele, akoyekola ete liloba wana ezali na bantina mingi tala, ndakisa koya koyeba Ye, kososola Ye, kokitola Ye mpe mosala na Ye, koyeba motuya na Ye, koya kososola Ye.

    “Bongengisi mpe mapamboli ya boye ezali mpo na moko moko na biso” (“Temples and Work Therein,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1990, 61).

  17. Tala Moziya 5:13.

  18. Doctrine et Alliances 20:77.

  19. Russell M. Nelson, “The Everlasting Covenant,” Liahona, Sanza ya zomi 2022, 5.

  20. Russell M. Nelson, “What Is True?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 29.

  21. Russell M. Nelson, “Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Bomoi na Biso,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 96.

  22. Dallin H. Oaks, “Going Forward in the Second Century” (Brigham Young University devotional, Sanza ya libwa 13, 2022), speeches.byu.edu. Mokambi Oaks alimbolaki liloba “meka kozala ya kokesena” na nsango moko ya kala te Deseret Magazine na Mpaka Clark G. Gilbert, the Church Educational System’s commissioner, on preserving religious identity in higher education (tala “Dare to Be Different,” Deseret Magazine, Sanza ya libwa. 2022, www.deseret.com).

  23. Soki olingi koyekola uta na basusu oyo balobaki lolenge nini bamekaki kozala ya kokesana na baye ya mokili, okoki kotanga bansango na bango na Facebook (tala Neil L. Andersen, Facebook, Aug. 18, 2022, facebook.com/neill.andersen) or Instagram (see Neil L. Andersen, Instagram, Aug. 18, 2022, instagram.com/neillandersen).

  24. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (worldwide youth devotional, June 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  25. Anastasia Kocheva, “Facing the Conflict in Ukraine, Healing the Conflict in My Heart,” YA Weekly, Sanza ya mitano 2022.

  26. Malongi mpe Mayokani 101:65.