Likita Linene
Mpo ete Bakoka Koyeba Yo
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Mpo ete Bakoka Koyeba Yo

(Yoane 17:3)

Mposa na ngai ya motema ezali ete bokoya koyeba Yesu na bankombo ebele mpe ete bokokoma lokola Ye.

Mwa mibu moke eleki, bomoi na ngai ebongwanaki na lolenge mosusu na ntango ya likita ya elambo na palwasi ya mboka na biso ya Arizona. Lokola losambo ya elambo elobi bolingi na biso ya “kozwa likolo na [biso moko] nkombo ya [Yesu Klisto],”1 Molimo Mosantu akundolisaki ngai ete Yesu azali na bankombo ebele. Motuna nsima eyaki na motema na ngai: “Bankombo nini ya Yesu nasengeli kozwa likolo na ngai moko na poso oyo?”

Misato ya bankombo eyaki na makanisi na ngai, mpe nakomaki yango. Moko na moko na bankombo misato oyo ezali na banguya ya Kimoklisto oyo nalingaki kokolisa koleka mpenza. Na poso oyo elandaki, nafandelaki bankombo misato oyo mpe namekaki kososola ndimbola na yango ya bizaleli mpe ntina. Uta na ntango wana, nakobaki komituna motuna wana lokola eteni ya bosanjoli na ngai moko: “Bankombo nini ya Yesu nasengeli kozwa likolo na ngai moko na poso oyo?” Koyanolaka na motuna wana mpe kolukaka komatisa bizalela ya Kimoklisto epambolaki bomoi na ngai.

Na libondeli na Ye ya monene ya Losambo, Yesu alobelaki bosolo ya ntina oyo: “Mpe oyo ezali bomoi ya seko ete bayeba yo Nzambe moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”2 Lelo nalingi kokabola elongo na bino mapamboli mpe nguya oyo eyaka uta na boyebi Yesu Klisto na bankombo na Ye ebele.

Lolenge moko toyebaka moto songolo ezali na boyekoli nkombo na ye. Elobami ete “nkombo ya moto ezali epai ya moto yango mongongo kitoko mpe ntina na lokota nyonso.”3 Esila kokomela yo obenga nkombo ya moto songolo mabe to kobosana nkombo na ye? Mwasi na ngai, Alexis, mpe ngai na mbalakaka, tobengaki moko ya bana na biso “Lola.” Na libaku mabe, lokola bokoki koyeba, Lola ezali mbwa na biso! Na malamu to mabe, kobosana nkombo ya moto songolo elimbolaka epai ya moto yango ete olingi mpenza koyeba ye malamu te.

Yesu ayebaki mpe abengaki bato na nkombo. Na Yisalaele ya kala, Nkolo alobaki, “Bobanga te: mpo ete nasikolaki bino, nabiangaki bino na nkombo na bino; bozali ya ngai.”4 Na ntongo ya Pasika, litatoli ya Maliya ya Klisto mosekwi ezalaki makasi ntango Yesu abengaki nkombo na ye.5 Lolenge moko, Nzambe abengaki Joseph Smith na nkombo na ye mpo na koyanola losambo na ye ya bondimi.6

Na ndenge moko, Yesu apesaki bayekoli na Ye bankombo ya sika oyo ezalaki ndimbola ya lolenge, bokasi, mpe makoki na bango. Jehova apesaki Yakobo nkombo ya sika ya Yisalaele, oyo elingi koloba “moto oyo asalaka na Nzambe” to “atika Nzambe asala.”7 Yesu apesaki Yakobo mpe Yoane bankombo ya sika ya Boanerges, oyo elimbolaki “bana mibali ya nkake.”8 Kotalaka bokambi na ye ya lobi ekoya, Yesu apesaki Simona nkombo ya sika ya Sefase to Petelo, oyo elimboli libanga.9

Kaka lokola Yesu ayebaka moko na moko na biso na nkombo, lolenge moko oyo tokoyeba malamu Yesu ezali na boyekoli bankombo na Ye ebele. Lokola bankombo ya Yisalaele mpe Petelo, bankombo ebele ya Yesu ezali bankombo ya lokumu oyo esungaka biso tososola etinda na Ye, ntina, ezalela, mpe bizaleli. Ntango toyebi bankombo ebele ya Yesu, tokoya kososola malamu etinda na Ye ya bonzambe mpe ezaleli ya bolingi ya kosalisa. Koyebaka bankombo na Ye lisusu efulaka biso mingi lokola Ye—mpo na kokolisa bizaleli ya Kimoklisto oyo ememaka esengo mpe ntina na bomoi na biso.

Mwa mibu eleki, Mokambi Russell M. Nelson ayekolaki makomi nyonso na ntina ya Yesu Klisto na Topical Guide.10 Nsima abengisaki bilenge banzemba bayekola makomi moko oyo. Na oyo etali bankombo ebele ya Yesu, Mokambi Nelson alobaki, “Koyekola makambo nyonso Yesu Klisto ezali na kosambelaka mpe kolukaka makasimpo na kososola nini moko na moko ya bankombo na Ye ya lokumu ekeseni mpe bankombo elimboli yango moko mpo na yo.”11

Kolandaka libiangi ya Mokambi Nelson, nabandaki komatisa mokanda na ngai moko ya bankombo ebele ya Yesu. Mokanda ezali sikawa na bankombo 300, mpe nayebi ezali na ebele oyo naino namoni te.

Lokola ezali na bankombo mosusu ya Yesu oyo ebombami kaka mpo na Ye,12 nalingi nakabola bankombo mitano mpe bankombo ya lokumu oyo ezali motuya epai ya moko na moko na biso. Nabengisi bino bomatisa mokanda na bino moko ya bankombo ntango boyei koyeba Yesu na bankombo ebele ya Ye. Nakosalaka bongo, bokomona ete ezali na bankombo mosusu—na ndimbola na yango ya bizalela ya Kimoklisto—oyo okolinga kozwa likolo na yo moko lokola moyekoli ya liyokani ya Yesu.13

Ya yambo, Yesu azali Mobateli mpate Malamu.14 Lokola, Yesu ayebaka mpate na Ye,15 “abengaki mpate na ye na nkombo,”16 mpe, lokola Mwana mpate ya Nzambe, abonzaki bomoi na Ye mpo na mpate na Ye.17 Lolenge moko, Yesu alingaka biso tozala babateli mpate malamu, mingi mingi na mabota na biso mpe misala ya lisalisi bandeko mibali mpe basi. Lolenge moko tolakisaka bolingo na biso mpo na Yesu ezali na koleisaka mpate na Ye.18 Mpo na mpate oyo ekoki koyenga-yenga, babateli mpate malamu basengeli kokende na zamba mpe koluka mpate oyo ebungi, nsima kotikala na yango kino ekozonga na bokengi.19 Lokola babateli mpate malamu, mpe lokola makambo ya mboka ekoki kopesa nzela, tosengeli koluka kolekisa ntango ebele na kosungaka bato na mabota na bango. Na mosala na biso ya kosalisa, esengeli tokoma mpe tosalela tekinoloji mpo na kopesa ntina, kozwa esika te, ya bokutani na moto.20

Ya mibale, Yesu azali Nganganzambe Monene ya Makambo Malamu Ekoya.21 Koyebaka ete kobakama na ye na ekulusu ezalaki bobele ya banngonga moke, Yesu alobaki: “Nalobelaki bino makambo oyo, ete na ngai nde bokozwa kimya. Kati na mokili bokozala na mitungisi: kasi bozala na esengo malamu; ngai nasili kolonga mokili.”22 Lelo, lokola mokili na biso ezali mbala na mbala ya kobeba mpe ya kokabwana, ezali na mposa monene mpo na biso tosakola mpe tosalela bolamu, bondimi mpe elikya. Atako mimekano kani oyo eleki, bondimi ntango nyonso esengeli kotala liboso na biso ya lobi ekoya,23 kotondisama na elikya, ekopesa biso ndingisa ya kokokisa libiangi ya kozala na esengo.24 Kosalela nsango malamu na esengo esungaka biso tokoma bayekoli ya makambo ya malamu ekoya lobi.

Nkombo mosusu ya bankombo ya lokumu ya Yesu ezali ete Azali Lolenge moko, Lobi, Lelo, mpe Libela.25 Kozala ntango nyonsoi ndenge moko ezali ezaleli ya Kimoklisto. Ntango nyonso Yesu asalaki bolingi ya Tata na Ye,26 mpe loboko na Ye ezali ntango nyonso ya kotandama mpo na kosunga biso, kosalisa mpe kobikisa biso.27 Ntango tozali ntango nyonso kosalela nsango malamu, tokokoma mingi koleka lokola Yesu.28 Atako mokili ekutani na mitungisi ya minene na oyo bato balingaka ntango wana bato bazali kobendana nsima to liboso komemamaka na mopepe nyonso ya malongi,29 kobika nsango malamu ntango nyonso esungaka biso totelema ngwi mpe toningana te na ntango ya mipepe makasi ya bomoi.30 Tokoki lisusu kolakisa bompikiliki na kondimaka libiangi ya Mokambi Nelson ya “kolengela ntango mpo na Nkolo.”31 Makasi monene ya molimo ewutaka na biloko ya mike mpe pete32 lokola komatisa “bizaleli bisantu mpe makambo ya malamu”33 ya losambo, boyamboli, boyekoli makomi, mpe lisungi na basusu mikolo na mikolo.

Ya minei, Yesu azali Mosantu ya Yisalaele.34 Bomoi ya Yesu ezalaki ndakisa ya bosantu. Ntango tozali kolanda Yesu, tokoki kokoma mosantu na Yisalaele.35 Tokolaka na bosantu ntango tokendaka mbala na mbala na tempelo, esika eye “Bosantu na Nkolo” ekomami na bikuke nyonso ya boyingeli. Ntango nyonso tosanjolaka na kati ya tempelo, tolatisamaka na likoki ya nguya monene mpo na kosala mabota na biso bisika ya bosantu.36 Mpo moto oyo azali na mokanda ya boyingeli na tempelo esantu te, nabengisi bino bokutana na episikopo na bino mpe bomilengela bino moko mpo na kokota to kozonga kuna na esika esantu wana. Ntango tolekisi kati na tempelo ekomatisa bosantu na bomoi na biso.

Nkombo ya nsuka ya Yesu ezali ete Ye azali Moyengebene ya Sembo mpe ya Solo.37 Kaka lokola Yesu azalaki moyengebene ya sembo mpe ya solo ntango nyonso, mposa na Ye ya motema ezali ete tolakisa makoki oyo na babomoi na biso. Ntango bondimi na biso etungisami, tokoki kobelela epai ya Yesu, “Nkolo, bikisa ngai,” kaka lokola Petelo ntango abandaki kozinda na mopepe ya mbu ya Galilea.38 Na mokolo wana, Yesu akitaki mpo na kosunga moyekoli oyo azalaki kozinda. Asalaki lolenge moko mpo na ngai, mpe Akosala lolenge moko mpo na yo. Kotika Yesu ata moke te—Akotika yo ata moke te!

Ntango tozali bayengebene mpe solo, tolandi libiangi ya Yesu ya “Bokangama na ngai,” oyo ekoki lisusu kolimbolama “botikala na ngai.”39 Ntango tozali kokutana na mituna, ntango totiolami mpo na bondimi na biso, ntango misapi ya batioli etiami likolo na biso na baoyo bafandi na bandako minene mpe milai ya mokili oyo, totikala bayengebene na bondimi mpe totikala ya solo. Na bantango oyo, tokundolaka libondeli ya Yesu, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.”40 Ntango tosali bongo, Ye apesaka biso bondimi oyo esengeli, elikya mpe makasi ya kotikala elongo na Ye.41

Bandeko mibali mpe basi, Yesu alingi biso toyeba Ye mpo ete Ye azali bobele se nkombo moko na nse ya lola na nzela eye tokoki kobikisama.42 Yesu azali nzela, solo mpe bomoi—moto moko te akoki kozonga epai ya Tata longola se na Ye.43 Yesu azali bobele nzela se moko! Mpo na ntina oyo, Yesu alobi, “Boya epai na ngai,”44 “Bolanda ngai,”45 “Botambola na ngai,”46 mpe “Boyekola epai na ngai.”47

Na motema na ngai mobimba, natatoli na ntina ya Yesu Klisto—ete Azali na bomoi, ete Alingaka bino, mpe ete Ayebi bino na nkombo. Azali Mwana ya Nzambe,48 Mwana se moko ya Tata.49 Azali libanga na biso, Likonzi, Ekimelo na biso, Ebombamelo na biso mpe Mokangoli na biso.50 Azali Pole oyo Engengaka na Molili.51 Azali Mobikisi na biso52 mpe Mosikoli na biso.53 Azali Lisekwa mpe Bomoi.54 Mposa na ngai ya motema ezali ete bokoya koyeba Yesu na bankombo ebele mpe ete bokokoma lokola Ye ntango bokolanda bizaleli na Ye ya bonzambe na bomoi na bino. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Malongi mpe Mayokani 20:77.

  2. Yoane 17:3; nsete ebetami. Na oyo etali losambo oyo, Mokambi David O. McKay ateyaki: “Nkoma oyo ezwami na kati ya moko ya nsambo ya nkembo—napesi losambo moko ya makasi—oyo naino elobama na mokili oyo te, longola se Losambo ya Nkolo. Oyo ezalaki losambo ya Klisto alobaki yango yambo akota na elanga ya Getesemane na butu ya boteki na ye. … Nayebi te mokapo ya ntina koleka kati ya Biblia” (in Conference Report, Oct. 1967, 5).

  3. Dale Carnegie, How to Win Friends and Influence People, rev. ed. (1981), 83.

  4. Yisaya 43:1; nsete ebetami.

  5. Tala Yoane 20:16.

  6. Tala Joseph Smith—History 1:17.

  7. Bible Dictionary, “Yisalaele.”

  8. Malako 3:17.

  9. Tala Luka 6:14; Yoane 1:42.

  10. Tala Russell M. Nelson, “I Studied More Than 2,200 Scriptures about the Savior in Six Weeks: Here Is a Little of What I Learned,” Inspiration (blog), Sanza ya mibale. 28, 2017, ChurchofJesusChrist.org. Nsima ya kokutana na maye, Mokambi Nelson asutukaki, “Nakomi moto mosusu!” (“Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 39).

  11. Russell M. Nelson, “Prophets, Leadership, and Divine Law” (worldwide devotional for young adults, Jan. 8, 2017), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  12. Ndakisa, Yesu azali Masiya, Klisto, Yova Monene, Mobotami ya Yambo uta na Bakufi, mpe Mwana se moko ya Nzambe.

  13. Na kobakisa na libiangi ya Mokambi Nelson mpo na koyekola makomi etali Yesu na Topical Guide, bokoki koyekola lisusu bankombo ebele ya Yesu na kolandaka ndakisa ya Bible Dictionary na nse ya “Christ, names of.” Bokoki lisusu kolinga koyekola mokanda ya Mpaka Jeffrey R. Holland Banzeneneke ya Bankombo na Ye (2019) mpe liteya ya losambo na Mpaka Ronald A. Rasband nkombo “Name Above All Names” (Brigham Young University–Hawaii devotional, Oct. 20, 2020), speeches.byuh.edu.

  14. Tala Yoane 10:11.

  15. Tala Yoane 10:14.

  16. John 10:3.

  17. Tala Yoane 10:11–15; 1 Nefi 11:31–33.

  18. Tala Yoane 21:15–17.

  19. Nalingaka mingi mingi libongoli ya Joseph Smith ya Luka 15:4, oyo etangami, “Nani kati na bino, oyo azali na bameme nkama, soki abungisi moko kati na bango, mpe atika te ntuku libwa na libwa mpe akei na esobe mpo na koluka oyo ebungi, kino azwa yango?” (na Luka 15:4, matangi na nse ya lokosa a, biso nde tobeti nsete).

  20. Lokola Mpaka David A. Bednar alimbolaki: “Moto nyonso akanisaka ete makomi ezali ya kokoka mobimba [mpo na lisungi]. Ezali na mabaku mosusu oyo olukaka kozala na ndako, mpe olukaka kotala bato na misu mpo ete okende kozwa makanisi mpe lifuli na libota oyo ekozwa lisungi mosusu te” (“An Evening with Elder David A. Bednar,” [broadcast for religious educators], Feb. 7, 2020], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).

  21. Tala Baebele 9:11.

  22. Yoane 16:33.

  23. Tala Jeffrey R. Holland, “‘Remember Lot’s Wife’: Faith Is for the Future” (Brigham Young University devotional, Jan. 13, 2009), 2, speeches.byu.edu. “Bondimi etiamaka ntango nyonso liboso na mikolo ekoya lobi. Bondimi ntango nyonso etambolaka na mapamboli mpe babosolo mpe makambo oyo ekosakolama nsima na babomoi na biso.”

  24. Tala Matai 9:2; Malako 6:50; Yoane 16:33; 3 Nefi 1:13; Malongi mpe Mayokani 61:36.

  25. Tala Baebele 13:8; tala lisusu Bible Dictionary, “Christ, names of.”

  26. Tala Yoane 8:29.

  27. Tala Alma 5:33; Alma 19:36; 3 Nefi 9:14.

  28. Tala, ndakisa, David A. Bednar, “More Diligent and Concerned at Home,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 20: “Consistency is a key principle as we lay the foundation of a great work in our individual lives. … Tosengeli kozala mpe kokoma na bompikiliki mingi koleka.”

  29. Tala Baefese 4:14.

  30. Tala Moziya 5:15.

  31. Russell M. Nelson, “Pesa Ntango Mpo na Nkolo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 120.

  32. Tala Alma 37:6.

  33. Oyo ezali liloba Mokambi Dallin H. Oaks abandelaki mbala ebele na mosala na ye. Tala, ndakisa, “YSA Face to Face with Elder Oaks and Elder Ballard” (broadcast for young single adults, Sanza ya zomi na moko 19, 2017), ChurchofJesusChrist.org.

  34. Tala 2 Nefi 9:18–19, 41.

  35. Kala te na losambo ya mokili mobimba mpo na bilenge banzemba, Ndeko mwasi Wendy Nelson atunaki motuna oyo alobaki ekoki kobongola babomoi, komatisa elikya mpe kokitisa mawa, kolendisa, komatisa botondi mpe kokitisa mitungisi, kosunga mpo na kotelemela masenginya, mpe komema esengo, libondisi, bolingo, mpe kimya. Motuna oyo ezalaki “Nini elenge mosantu akola akoki kosala?” Alendisaki nsima na bosaleli motuna oyo na likambo moko mpo na moko na moko, mpo na mikolo misato milandisami. Tala “One Question That Can Change Your Life” (worldwide devotional for young adults, May 15, 2022), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  36. Tala Malongi mpe Mateya 109:12–13, 22.

  37. Tala Emoniseli 19:11.

  38. Matai 14:30.

  39. Yoane 15:4. Liloba ya Greki ya kotikala ezali μείνατε (meinate to menó), oyo elimboli kotikala to kovanda.

  40. Malongi mpe Mayekoli 6:36.

  41. Mpaka Jeffrey R. Holland akomaki ete, na Espanyole, liloba oyo na Lingala “atikala na ngai” ebongolami lokola “permaneced en mi.” Akobaki: “Ndimbola na yango ezali ‘kotikala—kasi kotikala mpo na libela.’ … Yaka libela, mpo na bolamu na yo mpe bolamu ya bankola nyonso oyo esengeli kolanda yo, mpe tokosalisana mpo kozala makasi kino nsuka” (“Abide in Me,” Liahona, Sanza ya mitano 2004, 32).

  42. Tala 2 Nefi 31:21.

  43. Tala Yoane 14:6.

  44. Matai 11:28; 3 Nefi 9:14, 22.

  45. Matai 16:24; Luka 18:22; Yoane 21:19; tala lisusu 2 Nefi 31:10.

  46. Emoniseli 3:4; Mose 6:34.

  47. Matai 11:29; Malongi mpe Mayokani 19:23.

  48. Tala 3 Nefi 9:15.

  49. Tala Yoane 1:14; Alma 5:48.

  50. Tala 2 Samwele 22:2–3.

  51. Tala Malongi mpe Mayokani 6:21.

  52. Tala Luka 2:11.

  53. Tala Malongi mpe Mayokani 18:11–13.

  54. Tala Yoane 11:25.