Likita Linene
Mokumba na Biso na Mokili
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Mokumba na Biso na Mokili

Natatoli ete mapamboli minene koleka ya molimo elakelamaki na baoyo balingaka mpe babatelaka mokili mpe baninga na bango mibali mpe basi.

Ntango tokendaki kotala ekolo na biso ya kobotama ya France, mwasi na ngai mpe ngai kala mingi te tozwaki esengo ya komema ndambo ya bankoko na biso kotala elanga moko kitoko ezalaki na engumba moke ya Giverny. Tosepelaki kotambola-tambola na banzela na yango mpe kosepela na elalelo kitoko ya bafololo, banenufars ya mayi ya bonzenga, mpe baminda kopelaka na maziba.

Elilingi
Jardin ya Giverny

Esika yango ya kokamwa ezali mosala ya bolingo koleka ekelamaki na moto moko: mosali bilili monene Claude Monet, oyo, mpo na mibu 40, na pete nyonso abongisaki mpe alonaki elanga na ye mpo na kosala yango esika ya kosala bilili na ye. Monet amikotisaki mobimba na bonene ya bokeli; boye, elongo na bisaleli na ye, abimisaki mayoki ayokaki na loboko ya langi mpe minda. Nsima na mibu, asalaki liboke ya kokamwa koleka ya bilili ebele, oyo efulamaki mbala moko na elanga na ye ya fololo.

Elilingi
Jardin/elanga eyembami na langi na Monet

Bafololo ya Nefufars na Mai mpe Pont ya Bajaponais, 1899, na Claude Monet

Bandeko mibali mpe basi, babokutani na biso elongo na kitoko ya bokeli ezingi biso ekoki kobotisa mayele moko efulama mpe ya elengi na bomoi. Mayoki toyokaka etiaka kati na biso mposa moko ya botondi ya bozindo mpo na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, oyo bakelaki mabele oyo kitoko—na bangomba mpe ba mayi mike na yango, bilona mpe banyama—mpe baboti na biso ya yambo, Adama mpe Eva.1

Mosala ya Bokeli ezali nsuka na yango moko te. Yango ezali eteni monene ya mwango ya Nzambe mpo na bana ba Ye. Ntina monene na yango ezali kopesa esika epai wapi mibali mpe basi bakoki komekama, kosalela makoki na bango ya boponi, kozwa esengo, mpe koyekola mpe kokoba, boye ete bango bakoka mokolo moko kozonga na liboso ya Mokeli na bango mpe kozwa bomoi ya seko.

Bikelamuya bokeli ya kokamwisa wana ebongisamaki mobimba mpo na bolamu na biso mpe ezali elembo ya bomoi ya bolingo Mokeli azali na yango mpo na bana na Ye. Nkolo alobaki, “Iyo, biloko nyonso biye biyaka na mabele … bisalami mpo na bolamu mpe esaleli ya moto, mpo na bosepeli ya miso mpe kosepelisa motema.”2

Nzokande, likabo ya bonzambe ya Bokeli eyaka te na bozangi misala mpe mikumba. Misala yango elimbolami na liloba ya mokumba. Na maloba ya nsango malamu, liloba mokumba elakisi mokumba moko ya molimo to ya nzoto ya kobatela eloko moko oyo ezali ya Nzambe, mpo na yango tokotunama.3

Lokola eteyamaki na makomi masantu, mokumba na biso na mabele esangisi mabongisi oyo elandi:

Libongisi ya yambo: Mokili mobimba, mpe bomoi nyonso ezali likolo na yango, ezali ya Nzambe.

Mokeli apesaki bomengo nyonso ya mokili mpe ndenge nyonso ya bomoi epai na biso, kasi Ye atikali Nkolo na yango nyonso. Ye alobaki, “Ngai, Nkolo, napanzaki balola, mpe natongaki mokili, mosala ya maboko na ngai; mpe biloko nyonso kati na yango ezali ya ngai.”4 Nyonso oyo ezali na mokili ezali ya Nzambe, kotangaka mpe mabota na biso, banzoto na biso ya mosuni, mpe kutu bomoi na biso.5

Libongisi ya mibale: Lokola babateli ya bikelamu ya Nzambe, tozali na mosala ya kokumisa mpe kobatela yango.

Lokola bana ya Nzambe, tozwaki mokumba ya kozala babateli, basantinele, basinzili ya bikelamo na Ye ya bonzambe. Nkolo alobaki ete Ye asalaki “moto nyonso azali na mokumba, lokola mobateli likolo ya mapamboli ya mokili, oyo nasalaki mpe nalengelaki mpo na bikelamo na ngai.”6

Tata na biso ya Lola apesi biso nzela ya kosalela bomengo nyonso ya mokili kolandisaka bolingi na biso moko na bonsomi. Nzokande nguya na biso ya boponi ekoki kosalelama te lokola ndingisa ya kosalela to kolia babomengo ya mokili na bozangi bwanya to bozangi bopekisi. Nkolo apesaki likebisi oyo: “Mpe yango esepelaki na Nzambe ete apesaki biloko nyonso na moto; mpo ete yango esalamaki na ntina ete esalelama, na mayele, kolekisa ndelo te, na bobotoli mpe te.”7

Mokambi Russell M. Nelson mbala moko alobaki, “Tosengeli kosala nini, lokola babulami ya Bokeli ya bonzambe? Tosengeli kobatela mokili, kozala babateli ya bwanya likolo na yango, mpe kobomba yango malamu mpo na bankola ekoya.”8

Bosika ya kozalaka kaka ntina mpo na sianse mpe politiki, kobatela mokili mpe bisika na biso ezali mokumba ya bule epesamela biso na Nzambe, oyo esengeli kotondisa biso na ntina moko ya bozindo ya mosala mpe bomikitisi. Yango ezali lisusu ntina monene ya lolenge na biso ya bayekoli. Lolenge tokoki kokumisa mpe kolinga Tata ya Lola mpe Yesu Klisto na kozangaka kokumisa mpe kolingaka bikelamo na Ye?

Ezali na biloko ebele oyo tokoki kosala—elongo to moto yemoko—mpo na kozala babateli malamu. Na kotalaka mabaku na biso moko, moko na moko na biso akoki kosalela bomengo etondi ya mokili na limemia mpe bokebi nyonso. Tokoki kosunga bokasi ya masanga ya bato mpo na kobatela mokili. Tokoki kondima lolenge moko ya kozala ya moto ye moko mpe bizaleli oyo etosi bikelamu ya Nzambe mpe kosala bisika na biso moko ya kovanda mpeto, kitoko makasi, mpe ya kofulama koleka.9

Mokumba na biso likolo ya bikelamu ya Nzambe esangisi lisusu, likolo na nyonso, mosala moko ya bule ya kolinga, komemia, mpe kobatela bato nyonso oyo tozali kokabola na bango mokili. Bazali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali, mpe esengo na bango ya libela ezali ntina monene ya mosala ya bokeli.

Mokomi Antoine de Saint-Exupéry abetaki lisolo oyo elandi: Mokolo moko, ntango azalaki na mobembo na engunduka, amimonaki ye moko kovanda katikati ya lisanga ya bakimi bitumba. Wana ekumbamaki ye na bozindo na bozangi elikya amonaki na elongi ya mwana moko ya moke, akamwaki, “Ntango na nzela ya mbongwana fololo roza ya sika ebotami na elanga, basali na elanga nyonso basepelaka. Batiaka yango na esika na yango moko, babongisaka yango, mpe baleisaka yango. Kasi ezali na mosali bilanga moko te mpo na bato.”10

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, esengeli na biso te kozala basali bilanga mpo na baninga na biso mibali mpe basi? Ezali biso te bakengeli ya ndeko na biso? Yesu atindaki biso tolinga baninga na biso lokola tomilingaka biso moko.11 Uta na monoko na Ye, liloba moto ya pembeni elakisi kaka te pembeni esika ya kovanda; elakisi lisusu pembeni ya motema. Yango esangisi bavandi nyonso ya mabele oyo, atako bavandi pembeni na biso to ekolo ya mosika, kotalaka te epai wapi bawuti, etamboleli na bango, to makambo to bisika bazali.

Lokola bayekoli ya Klisto, tozali na mosala monene ya kosala na bozangi kotika mpo na kimya mpe bomoko kati na bato nyonso ya mokili. Tosengeli kosala nyonso tokoki mpo na kobatela mpe komema libondisi mpe lisalisi na babolembu, mosengi, mpe bato nyonso oyo bazali konyokwama mpe baoyo batutami. Likolo na nyonso, likabo monene ya bolingo tokoki kopesa baninga na biso bato ezali kokabola elongo na bango esengo ya nsango malamu mpe kobenga bango koya epai ya Mobikisi na nzela ya mayokani mpe malongi ya bule.

Mobeko ya misato: Tobiangamaki mpo na kosangana na mosala ya bokeli.

Mosala ya bonzambe ya bokeli esili nanu te. Mikolo nyonso, Bikelamo ya Nzambe ezali kokoba na kokola, kopalangana, mpe kobongolama. Eloko moko ya kokamwa koleka ezali ete Tata na biso ya Lola apesi biso libiangi ya kosangana na mosala na Ye ya bokeli.

Tosanganaka na mosala ya Bokeli atako tozali kolona na mabele to kobakisa botongi bandako na biso na mokili—na ntango nyonso tolakisi limemia na bokeli ya Nzambe. Makabo na kotiaka maboko na biso ekoki kolakisama na nzela ya bokeli ya misala ya bililingi to bikeko, botongi bandako, miziki, bokomi mikanda, mpe bonkoko, oyo engalisi mokili na biso, etomboli mayoki na biso, mpe engengisi bomoi na biso. Tokotia lisusu maboko na nzela ya sianse mpe bobimisi ya kimonganga oyo ebombi mabele mpe bomoi likolo na yango. Mokambi Thomas S. Monson alobaki na bokuse likanisi yango na maloba kitoko oyo: “Nzambe atikaki mokili esili te mpo moto kosala makoki na ye likolo … moto yango akoka koyeba bisengo mpe bankembo ya bokeli.”12

Na lisese ya Yesu ya batalanta, ntango mokonzi azongaki uta mobembo na ye, atombolaki mpe apesaki libonza na basali mibale oyo bakolisaki mpe bapesaki batalanta na bango ntina. Na bokeseni, ye abiangaki mosali oyo abombaki talanta na ye moko na mabele “goigoi,” mpe amemaki kutu na oyo ye azwaki.13

Lolenge moko, mosala na biso lokola babateli ya babokeli ya mokili ezali kaka te na ntina ya kobombaka to kobatelaka yango. Nkolo azali kozela biso kosala na lombango, ntango totindikami na Molimo Mosantu na Ye, mpo na kokolisa, kopesa bokasi, mpe kobongisa babomengo Ye asimbisaki biso—mpo na bolamu na biso moko te kasi mpo na kopambola basusu.

Katikati ya nyonso moto akokisi, moto moko te akokani na mayele ya kokomaka moko ya mokeli elongo na Nzambe na kopesaka bomoi to na kosungaka mwana na boyekoli, kokola, mpe kofongwama—atako lokola baboti, bateyi, batambwisi, to na mosala nyonso mosusu. Ezali na mokumba moko ya bule koleka, ya botondi koleka, mpe lisusu kosengaka ebele koleka, lokola ya kosangana elongo na Bokeli na kopesaka nzoto ya mosuni na bana na Ye ya molimo mpe nsima kosungaka bango kozwa likoki na bango ya bonzambe.

Mokumba ya kozala moko ya mokeli esalaka lokola likundoli ya ntango nyonso ete bomoi mpe nzoto ya moto moko na moko ezali bule, mpe yango ezali ya moto moko mosusu te kaka Nzambe, mpe ete Ye atiaki biso babateli mpo na komemia, kobatela, mpe kobatela yango. Mitindo ya Nzambe, oyo ekambi banguya ya kobota mpe kobongisama ya mabota ya libela, ezali kotambwisa biso na mokumba yango ya bule, oyo ezali mokumba monene mpo na mwango na Ye.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, tosengeli koyeba ete nyonso ezali ya molimo epai na Nkolo—mpe makambo ya nzoto koleka ya bomoi na biso. Natatoli ete mapamboli minene koleka ya molimo elakelamaki na baye oyo balingaka mpe babatelaka mokili mpe baninga na bango mibali mpe basi. Soki botikali na bondimi na mokumba oyo ya bule mpe bokumisi mayokani na bino ya libela, bokokola na boyebi ya Nzambe mpe ya Mwana na Ye, Yesu Klisto, bokoyoka bolingo na Bango mpe bozali na Bango ya kotonda koleka na bomoi na bino. Nyonso oyo ekolengela bino kotikala pembeni na Bango mpe koyamba nguya ya bokeli ya kobakisa14 na bomoi ekoya.

Na suka ya bomoi oyo ya kufa, Mokonzi akosenga biso koloba mpo na mokumba na biso ya bule, kotangaka mpe lolenge nini tobatelaki bokeli na Ye. Nasambeli ete tokoyoka bongo maloba na Ye ya bolingo kofulaka na mitema na biso: “Ezali malamu, mosali malamu mpe ya sembo: ozalaki sembo na makambo mike, nakotia yo likolo ya mingi: yingela na esengo na Nkolo na yo.”15 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Mokili mpe biloko nyonso likolo na yango (longola kaka Adama mpe Ewa) ekelamaki na Yesu Klisto na ndingisa ya Tata; Adama mpe Eva, baboti na biso ya yambo, bakelamaki na Nzambe Tata (tala Yoane 1:1–3; Mose 2:1, 26–27).

  2. malongi mpe Mayokani 59:18.

  3. Tala Spencer W. Kimball, “Welfare Services: The Gospel in Action,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1977, 76–79.

  4. Malongi mpe Mayokani 104:14.

  5. Tala Spencer W. Kimball, “Welfare Services,” 76–79.

  6. Malongi mpe Mayokani 104:13.

  7. Malongi mpe Mayokani 59:20.

  8. Russell M. Nelson, “The Creation,” Ensign, Sanza ya mitano 2000, 86.

  9. Tala Gospel Topics, “Environmental Stewardship and Conservation,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  10. Antoine de Saint-Exupéry, Terre des Hommes (1939), 214; tala lisusu Wind, Sand and Stars (1939) in Airman’s Odyssey (1984), 206.

  11. Tala Malako 12:31.

  12. Thomas S. Monson, “In Quest of the Abundant Life,” EnsignSanza ya misat. 1988, 2.

  13. Tala Matai 25:14–30.

  14. Tala David A. Bednar and Susan K. Bednar, “Moral Purity” (Brigham Young University–Idaho devotional, Jan. 7, 2003), byui.edu.

  15. Matai 25:21.