Likita Linene
Libula ya Bolendisi
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Libula ya Bolendisi

Nalendisi bino bokoba koluka bolongobani mpo na kozonga epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

Balingami na ngai ya mibali mpe basi, nazali na botondi ya kosangana elongo na bino na likita linene oyo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Toyokaki bondimi na bino mpe bolingo bisika nyonso bozali. Topambolamaki na mateya efulama, matatoli ya nguya mpe miziki kitoko.

Nalendisi bino bokoba koluka bolongobani mpo na kozonga epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Bisika nyonso bozali na nzela ya liyokani, bokokutana na kimonguna ya mimekano ya nzoto ya bokufi to bitumba ya Satana.

Lokola mama na ngai ayebisaki ngai ntango nazalaki komitungisa lolenge likambo ezalaki mpasi, “O, Ya, solo ezali mpasi. Esengelaki kozala bongo. Bomoi ezali momekano.”

Azalaki koloba yango na kimia nyonso, kutu koseka, mpo ete ayebaki makambo mibale. Kotalaka te mpasi, oyo ezalaki ntina ezalaki ya kozonga na ndako mpo na kobika elongo na Tata na ye ya Lola. Ayebaki ete akokaki kosala yango bobele na nzela ya bondimi ya Mobikisi na ye.

Ayokaki ete Ye azalaki pena na ye. Na mikolo oyo oayokaki ete akomi pene ya kokufa, asololaki na ngai na ntina ya Mobikisi ntango alalaki na kisuku na ye. Ezalaki na ekuke mpo na kokota na kisuku mosusu pene ya mbeto na ye. Asekaki mpe atalaki na ekuke ntango alobaki na kimia ete akomona Ye kala te. Nakanisaka yango kotalaka na ekuke mpe kobanzaka kisuku mosusu na nsima na yango.

Azali sikawa na mokili ya molimo. Azalaki na makoki ya kobatelaka miso na ye na motuya oyo alingaki uta na mibu ebele ya mimekano ya nzoto mpe makanisi.

Libula ya bolendisi oyo atikaki mpo na biso ezali elimbolami malamu na Moroni 7, epai wapi Mormon azali kolendisa mwana na ye Moroni mpe bato na ye. Ezali libula ya bolendisi na nkola lokola ya mama na ngai mpo na libota na ye. Mormon apesaki libulu yango epai ya bolendisi epai ya baye banso bazali na ekateli ya kolongobana, na mimekano na bango nyonso ya nkufa, mpo na bomoi ya seko.

Mormon abandi na milongo ya yambo ya Moroni 7 na litatoli ya Yesu Klisto, banjelu, mpe ya Molimo ya Klisto, oyo epesaka biso nzela toyeba bolamu uta na mabe mpe mpo tozala na makoki ya kopona bolamu.

Atie Yesu Klisto na ebandeli, lokola baye banso balongaka na kopesaka bolendisi epai ya baye balukaka kotambola na nzela na bango ya ndako ya lola:

Mpo moto te akoki kobikisama, engebene na maloba ma Klisto, longola se soko azali na bondimi o nkombo ya ye; yango wana soko makambo maye masili, nde bondimi bosili lokola; mpe nsomo ezali bozali bwa moto, mpo bazali lokola soko bosikoli bosalemi te.

“Kasi tala, bandeko balingami ba ngai, nasambisi makambo malamu mingi na bino, mpo nasambisi ete bozali na bondimi na Klisto na ntina ya bosokemi bwa bino; mpo soko bozali na bondimi na ye te nde bokoki te kotangema o ntei ya bato ba eklezia ya ye.”1

Mormon azwaki boboto lokola bondimisi ya bokasi ya bondimi na bango. Amonaki ete bayokaki kozalaka epai ya Mobikisi. Alendisaki bango na kokomaka bondimi oyo. Mormon akobaki kopesa bango bolendisi na kosungaka bango bamona ete bondimi mpe bosembo na bango ekokaki kotonga elikya mpe bondimeli na bango ya bolongi na boluki na bango:

“Mpe lisusu, bandeko balingami ba ngai, nalingi koloba epai ya bino na oyo etali elikia. Boniboni bokoki kokoma na bondimi, longola se soko bozali na elikia?

“Mpe mpo ya nini ete bokozala na elikia? Tala nalobi epai ya bino ete bokozala na elikia na nzela ya botumbolami ya Klisto mpe na nguya ya bosekwi naa ye, mpo na kosekwisama epai ya bomoi ya seko, mpe yango na ntina ya bondimi naa bino na ye engebene na elaka.

“Yango wana, soko moto moko azali na bondimi esengeli mpenza azala na elikia; mpo na bozangi bondimi, ekoki te kozala elikia.

“Mpe lisusu, tala nalobi epai na bino ete akoki te kozala na bondimi mpe elikia, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mikita.”2

Nsima Mormon alendisi bango na kotatolaka ete bazali na nzela ya kozwa likabo ya mitema na bango oyo etondisami na bolingo ya peto ya Klisto. Azali kolengela mpo na bango mikangano ya bondimi epai ya Yesu Klisto, bosembo, bomikitisi, Molimo Mosantu, mpe elikya ya mpiko ya kozwaka bomoi ya seko. Alendisi bango na lolenge oyo:

“Mpo moko te ayambami liboso ya Nzambe, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mokita; mpe soko moto moko azali mosokemi mpe na motema mokita, mpe andimi na nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu azali Klisto, asengeli mpenza kozala na bolingo; mpo soki azali na bolingo te azali eloko te; yango wana asengeli mpenza kozala na bolingo.”3

Kotalaka nsima, nayebi sikawa lolenge nini likabo yango ya bolingo—bolingo ya peto ya Klisto—elendisaki, ekambaki, esungaki, mpe ebongolaki mama na ngai na boluki na ye ya nzela ya ndako.

“Mpe bolingo etikalaka libela, mpe boboto azali motema molai, mpe azali boboto, aluli te, mpe avimbani te o lolendo, aluki ya yemei te, atumolami mpambampamba te, akanisi bobe te, mpe asepeli o bobe te kasi asepeli o bosolo, akangi motema na makambo manso, andimi makambo manso, alikii makambo manso, atii molende o makambo manso.

“Yango wana, bandeko babali ba ngai, soko bozangi lolango, bozali eloko te, mpo lolango lolembi mokolo moko te. Yango wana, kangamani epai ya lolango, loye lozali lonene mingi koleka inso, mpo biloko binso bikolembe---

“Kasi bolingo ezali bolingi ya peto ya Klisto, mpe botii molende libela; mpe oyo amonani kozalaka na yango na mokolo ya nsuka, ekozala bolamu na ye.

“Yango wana, bandeko balingami ba ngai, bosambela epai ya Tata na makasi nyonso ya motema na bino, ete bokoka kotonda na bolingo yango, oyo apesi epai ya baye nyonso bazali balandi ba solo ba Mwana Mobali wa ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana mibali ya Nzambe, ete ekobima ye tozala lokola ye, mpo tokomona ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikia yango; ete topetolama, kutu lokola ye azali peto.”4

Nazali na botondi na bolendisi ya ndakisa ya Mormon mpe liteya. Napambolamaki na libula ya mama na ngai. Baprofeta uta na Adama kino na profeta ya lelo, na nzela ya mateya mpe ndakisa, balendisaki ngai.

Na botosi po na baoyo nayebi ngai moko mpe mabota na bango, naponaki te koluka kotala makambo ya baboluki na bango to koloba na ntina ya makabo na bango na miso ya bato. Na yango oyo ngai namonaki elendisaki ngai mpe ebongolaki ngai nakoma malamu koleka.

Na likama ya kokota na bomoi na ye, nakobakisa mwa liloba moke ya bolendisi ya mwasi na ngai. Nasali na bokebi nyonso. Azali moto moko sembo oyo alingaka lokumu te.

Tobalanaki uta mibu 60 eleki. Ezali mpo na boyebi wana oyo nasosoli sikawa ndimbola ya maloba ya molimo oyo: bondimi, elikya, boboto, boyiki mpiko, bopimi, bosepeli na bosolo, kokanisa mabe te, mpe likolo ya nyonso, bolingani.5 Na kotalaka likambo wana, nakoti na bamoi na ye mpo ete nakoka kotatola ete bato bakoki kosalela makanisi kitoko oyo na bomoi na bango ya mikolo na mikolo lokola bazali koleka na mipepe ya bomoi.

Bayike kati na bino baye bazali koyoka bayebi bato yango. Mingi kati na bino bazali bato oyo. Banso kati na biso tosengeli na ndakisa ya bolendisi oyo mpe bolingo ya baninga.

Ntango ofandi na ndeko songolo lokola ndeko mwasi to ndeko mobali; ozwi esika ya Nkolo. Kanisa na oyo akokaki kosala to koloba. Akokaki kobengisa bango baya epai na Ye. Akokaki kolendisa bango. Akokaki komona mpe kokumisa ebandeli ya mbongwana oyo basengeli kosala. Mpe Akokaki kozala ndakisa ebonga nie mpo na bango balanda.

Bokoki kosala yango mobimba te, kasi koyokaka na likita oyo, bokoki koyeba ete bozali na nzela. Mobikisi ayebi mitungisi na bino na mobimba. Ayebi bokasi na bino monene ya kokola na bondimi, elikya mpe bolingo.

Mitindo mpe mayokani Ye apesaka bino bomekami te mpo na kotuka bino. Ezali likabo ya kotombola bino mpo na kozwa makabo nyonso ya Nzambe mpe kozonga na ndako epai ya Tata na bino ya Lola mpe Nkolo, oyo alingaka bino.

Yesu Klisto afutaki motuya ya masumu na biso. Tokoki kosenga mapamboli yango ya bomoi ya seko soki tozali na bondimi ya kokoka mpo na Ye ya koyambola mpe kokoma lokola mwana, peto mpe ya kolengelama mpo na kozwa bonene ya nyonso ya makabo ya Nzambe.

Nasambeli ete bokondima libiangi na Ye mpe ete bokopesa yango epai ya basusu ya bana ya Tata na biso ya Lola.

Nasambeli mpo na bamisionele na biso na mokili mobimba. Bakoka kofulama mpo na kolendisi moto nyonso alinga mpe andimela ete libiangi ewuti na Yesu Klisto na nzela ya basali na Ye oyo bazwaki nkombo na Ye likolo na bango.

Natatoli ete Ye azali na bomoi mpe akambaka Eklezia na Ye. Nazali nzeneneke na Ye. Mokambi Russell M. Nelson azali profeta ya bomoi ya Nzambe mpo na bato nyonso na mabele. Nayebi wana ezali ya solo. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.