Likita Linene
Fandisa Makanisi na Tempelo
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Fandisa Makanisi na Tempelo

Nalaki ete botomboli ntango na tempelo ekopambola bomoi na bino na banzela mingi lokola eloko moko te mosusu ekoki.

Bandeko mibali mpe basi, katikati ya mayangani mitano oyo ya nkembo ya likita linene, tomonaki mbala moko lisisi ete balola ezali ya kofungwama! Nabondei ete bosangisa makanisi bini mpe bokolanda elongo na yango. Nzambe Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, batelemi kozelaka mpo na kosunga bino. Nasengi bino na lombango bobakisa makasi na bino ya kolukaka lisungi na Bango.

Kala te, ndeko mwasi Nelson mpe ngai tozuaki libaku ya kotalaka yambo ya bato nyonso milongo ya bobimisi ya sika ya eleko ya 4 ya bavideo ya Buku ya Mormon na milongo.1 Tofulamaki makasi na yango! Tika ngai nalakisa bini eteni ya bokuse ya lisano kolakisaka bobimeli ya Mobikisi epai ya Banefite.

Ezali ntina ete Nkolo aponaki kobimela bato kati na Tempelo. Ezali Ndako na Ye! Etondisami na nguya na Ye. Tika ete tobungisa soki moke te bomoni ya maye Nkolo azali kosala mpo na biso sikawa. Azali kokomisa batempelo na Ye ekoma pembeni mpenza na bato. Azali komemaka na lombango lolenge ya kotanga batempelo. Azali kotombolaka makoki na biso ya kosunga bosangisi Yisalaele. Azali kosalaka yango lisusu pete mpo na bopetuami ya molimo ya moko na moko na biso. Nalaki ete botomboli ntango na tempelo ekopambola bomoi na bino na banzela mingi lokola eloko moko te mosusu ekoki.

Tozali sikawa na 168 tempelo ezali kosalaka mpe 53 tempelo ya sika na nse ya botongi, mpe 54 misusu na misala ya ebandeli ya kotonga!2 Nasepeli kosakola miango ya kotonga tempelo moko ya sika na bisika elandi: Busan, Korea; Naga, Philippines; Santiago, Philippines; Eket, Nigeria; Chiclayo, Peru; Buenos Aires City Center, Argentina; Londrina, Brazil; Ribeirão Prêto, Brazil; Huehuetenango, Guatemala; Jacksonville, Florida; Grand Rapids, Michigan; Prosper, Texas; Lone Mountain, Nevada; mpe Tacoma, Washington.

Tobongisi lisusu kotonga batempelo ebele na bituka minene eponami epai wapi ntango ya kokende na tempelo oyo etongama ezali etumba monene. Yango wana, nasepeli kosakola mpo na bisika minei ya bobakisi penepene ya México City epai wapi batempelo ekotongama na Cuernavaca, Pachuca, Toluca, mpe Tula.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, tika bino botalrla tempelo na balolenge moko bosala ata mokolo moko te yambo. Napamboli bino bokola pembeni ya Nzambe mpe Yesu Klisto mikolo nyonso. Nalingi bino. Tika Nzambe azala na bino kino tokokutana lisusu, nasambeli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Bavideo wana ya sika ekozwama na nkota ebele na aplikasio ya Gospel Library mpe na bachaines misusu. Ba episode ekobima na lolenge ya mposo kobanda lelo sima ya Likita.

  2. Kobanda mokolo ya 1 ya sanza ya zomi, 2022 batempelo minei mosusu ezali kozongisama sika (St. George Utah, Manti Utah, Salt Lake, mpe Columbus Ohio), mpe misato ezali kozela babulisa yango (Hamilton Nouvelle Zelande Quito Ecuador, mpe Belém Brazil).