Likita Linene
Omilatisa Nguya na Yo, O Siona
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Omilatisa Nguya na Yo, O Siona

Moko moko kati na biso tposengeli kotuya makambo ya kotia na esika ya liboso na bomoi na biso ya ntango mpe ya molimo na solo mpe na nzela ya losambo.

Masese ezali eteni ya kitoko ya lolenge ya koteya ya Yesu Klisto. Elimbolami na pete, masese ya Yesu ezali masolo esalelami mpo na kokokisanisa bosolo ya molimo na makambo ya ntango mpe makambo tokutanaka na yango na bomoi ya kufa. Ndakisa, bansango malamu ya Kondimana na Sika etondi na mateya oyo ekokani na bokonzi ya Likolo kino na mbuma ya mosuke,1 na liyaka ya ntalo monene,2 na mokengeli ndako mpe mokati elanga na elanga ya vinyo,3 na baseka,4 mpe mingi mosusu. Na eteni ya lotomo ya Nkolo na Galilea, makomi elobi ete “Alobaki na bango te soko na masese te.”5

Ndimbola to nsango ekanama ya lisese na mingi mingi elobami na polele te. Kasi, lisolo ezalaka kaka na bosolo ya bonzambe na mozwi moko engebene na bondimi na ye kati na Nzambe, bomilengeli ya molimo ya moto ye moko, mpe bolingi mpo na koyekola. Bongo, moto na moto asengeli kosalela bonsomi ya kopona mpe kosala na makasi “kosenga, koluka, mpe kobeta kokoko”6 mpo na kokundola bososoli ezali kuna na kati ya lisese.

Nasambeli makasi ete Molimo Mosantu akongengisa moko na moko na biso sikawa ezali biso kotala motuya ya lisese ya feti ya libala ya mokonzi.

Feti ya Elambo na Libala ya Mokonzi

“Mpe Yesu … lisusu alobi na bango na masese, mpe alobaki,

“Bokonzi na likolo ezali lokola mokonzi oyo abongisaki elambo na libala mpo na mwana na ye ya mobali,

“Atindaki baombo na ye ete babianga baoyo bazwi lokumu koya na elambo na libala: nde balingaki koya te.

“Lisusu atindaki baombo mosusu ete, Loba na baoyo bazwi lokumu ete, Tala bilei na ngai bisili kokoka, nabomi ngombe na ngai mpe bana ngombe na mafuta, yonso ebongi: yaka na elambo na libala.

“Kasi batioli liloba yango mpe bakei moko na elanga na ye mpenza, mosusu na mombongo na ye.”7

Na ntango ya kala, moko ya mabaku ya esengo mpenza na bomoi ya Bayuda ezalaki feti ya elambo ya libala—likambo moko oyo ekokaki kozwa poso moko to mibale. Likambo ya boye ezalaki kosenga mwango ya makasi, mpe bato bayebisamaki liboso mpenza, elongo na bokundolisi oyo etindamaki na mokolo ya ebandeli ya milulu. Libengisi uta na mokonzi mpo na basali na ye baya na elambo ya libala lokola oyo ezwamaka lokola motindo. Kasi, mingi ya bapaya ya lokumu kati na lisese bayaki te.8

“Boboyi kokende na feti ya mokonzi ezalaki ekela kouta na motema ya botombokeli likoki ya bokonzi mpe bozangi bolongobani kotelemelaka ngwende ya mokonzi mpe mwana na ye ya mobali. … Kokende moko na elanga na ye mpenza, mosusu na ya ye [litomba ya mombongo]”9 elakisi makambo na bango ekambaka bango na mabe oyo batie esika ya liboso mpe botali mpamba ya bolingi ya mokonzi.10

Lisese ekobi:

“Alobi na baombo na ye ete, Elambo na libala ekoki, kasi baoyo babiangami bakoki te.

“Bokenda na kokabwana na nzela mpe bobianga banani bakozwa bino, kati na elambo ya libala.

“Bawumbo yango bakendaki na balabala mpe bayanganisi yonso ezwi bango, na mabe mpe na malamu. Bongo libala etondisamaki na babiangami.”11

Momesano na mikolo wana ezalaki mpo na mokolo feti ya elambo ya libala—kati na lisese oyo, mokonzi—mpo na kopesa bilamba mpo na bapaya ya elambo ya libala. Bilamba ya boye ya libala ya elambo ezalaki lope ya mindondo te, ezanga bolimboli oyo bato nyonso ya feti balataki. Na lolenge oyo, molongo mpe ebonga elongolamaki, mpe bato nyonso na pene bakokaki kosangana lokola ya kokokana.12

Bato oyo babengisamaki uta na nzela monene mpo na kozala na elambo ya libala bazwaki ngonga to makoki te ya kosomba bilamba bilongobani mpo na likambo yango. Na yango mokonzi apesaki bapaya bilamba uta na ebombelo na ye ya bilamba. Moto nyonso apesamaki libaku ya komilatela bilamba ya bokonzi.13

Ntango mokonzi akotaki na kisuku ya elambo ya libala, atalaki bapaya oyo bayaki mpe nokinoki amonaki ete moko ya mopaya ya lokumu azalaki kolata elamba ya elambo ya libala te. Bamemaki moto yango liboso, mpe makonzi atunaki, “Moninga, oyingela awa na nzela nini nakozanga elamba ya libala? Ayebi kozongisa liloba te.”14 Na mokuse, mokonzi atunaki, “mpo na nini bozali kolata bilamba ya elambo ya libala te?”15

Moto na solo alataki na lolenge elongobani te mpo na likambo ya kafukafu oyo, mpe liloba, “Mpe azangaki liloba,” elakisi ete moto yango azangaki bolimbisi.16

Mpaka James E. Talmage apesi bikoma ya malako oyo mpo na oyo etali ndimbola ya misala ya moto: “Ete mopaya azanga lopo yango azalaki na elindo ya kotala mpamba, bozangi limemia na makanisi, to mwa kotuka mingi ya mawa, azali mabe na likambo ya boye. Liboso mokonzi azalaki na mawa malamu, kotunaka kaka lokola lolenge nini moto yango akotaki kozangaka elamba ya elambo ya libala. Soki moto yango akokaki kolimbola lolenge na ye ya kokamwa, to soki akokaki kosenga bolimbisi ya malonga, alingaki solo koloba; kasi bayebisi biso ete azangaki liloba. Motindo ya mokonzi esembolamaki na makasi te na baoyo banso ya bawumbo na ye bamonaki; kasi moko na moko na bango asengelaki kokota na ndako ya mokonzi na nzela ya ekuke; mpe liboso ya kokoma na kisuku ya elambo, kati na oyo mokonzi akomibimisa ye moko, moko na moko akolata malamu; kasi moko oyo atosaki te, na mwa banzela akotaki na lolenge mosusu; mpe kozangaka koleka mokengeli ya bapaya na ekuke, azalaki mozangi ndingisa ya kokota.”17

Mokomi moko ya Moklisto, John O. Reid, akomaki ete boyei ya moto yango mpo na kolata elamba ya elambo ya libala ezalaki ndakisa ya “bozangi limemia ya solo mpo na mokonzi mpe mwana na ye ya mobali lokola.” Azangaki kaka elamba ya elambo ya libala te; kasi, aponaki kolata moko te. Aboyaki na botomboki kolata malamu mpo na libaku yango. Eyano ya mokonzi ezalaki nokinoki mpe ya motuya : “Kanga ye makolo, mpe maboko, bwaka ye na molili na libanda; wana bileli mpe kokatakata mino ekozala.”18

Bosambisi ya mokonzi na oyo etali moto yango evandisamaki yambo likolo ya bozangi elamba ya elambo ya libala te—kasi ete “azalaki, solo, na mokano ya kolata moko te. Moto yango … azalaki na mposa ya lokumu ya kozala na feti ya elambo ya libala kasi … alingaki kolanda momesano ya mokonzi te. Alingaki kosala makambo na lolenge na yemei. Bozangi na ye ya elamba malamu elakisaki botomboki na ye ya kati kotelemelaka mokonzi mpe mitindo na ye.”19

Mingi Babiangami, kasi Moke Baponami

Lisese yango esukisi na likomi oyo ya mozindo, “Nzambi mingi babiangami, nde motuya moke baponami.”20

Na esengo, Joseph Smith abongolaki molongo oyo ya Matai kati na bobongoli na ye efulama ya Biblia: “Naboye mingi babiangami, kasi moke baponami; yango wana banso balataki elamba ya elambo ya libala te.”21

Yango Libengisi na feti ya elambo ya libala mpe boponami mpo na kolia na feti ekangani kasi ekeseni. Libengisi epesami na mibali mpe basi nyonso. Moto moko akoki kondima libengisi yango mpe kofanda na feti—kasi koponama mpo na kolia te mpo ete ye azali na elamba ya elambo ya libala esengeli te ya bondimi ebongolama kati na Nkolo Yesu mpe ngolu na Ye ya bonzambe. Boye, tozali na libiangi ya Nzambe mpe na eyano ya moto na moto lokola na libiangi yango, mpe mingi bakoki kobiangama kasi moke baponami.22

Kozala to kokoma ya koponama ezali ezaleli epesami na biso banso te. Kasi, Yo mpe ngai nsuka nsuka tokoki koponama na nzela ya bosaleli na bosembo ya bonsomi ya kopona na bokufi.

Tosengi boyeba ndenge basaleli liloba koponama na milongo ya momesano oyo elandi uta na Malongi mpe Mayokani:

“Tala, ezli na mingi babiangemi, kasi bake kaka baponami. Mpe mpo na nini baponami te?

Mpo ete mitema na bango etiami mingi mpenza likolo ya makambo ya mokili oyo, mpe bamipesi na lokumu ya bato.”23

Nandimi ete likanisi ya milongo oyo ezali solo. Nzambe azali na molongo ya bankombo alingaka mingi na oyo tosengeli kotiela elikya ete bankombo na biso ekobakisama. Ye azali kotia ndelo ya “baponami” te na mwa bato moke. Kasi, ya biso mitema, ya biso bamposa, ya biso bokumisi mayokani ya nsango malamu, ya biso botosi ya mitindo, mpe ya motuya mpenza, ngolu ya bosikoli ya Mobikisi elakisaka soki totangami lokola moko ya baponami ya Nzambe to te.24

“Mpo tosali na etingia mpo ya kokoma, mpo ya kondimisa bana ba biso, mpe lisusu bandeko ba biso, kondima na Klisto, mpe kozongisa boyokani na Nzambe; mpo toyebi ete ezali na boboto bwa ye tobikisami, nsima ya manso tokoki kosala.”26

Na mosala ya bomoi ya mokolo na mokolo mpe mobulungano ya mokili ya lelo kati na yango tofandi, tokoki kobendama makanisi libanda uta na makambo ya seko oyo ezali motuya mpenza na kotiaka esengo, bofuluki, mpe boyebani mingi, mpe elonga makambo na biso ya liboso. Likambo na biso ya ntango mokuse na “makambo ya mokili” mpe “bokumisi bato” ekoki kokamba biso na kobungisa bongengi na biso ya molimo mpo na moke mosika koleka potopoto ezanga ntina.26

Elaka mpe Litatoli

Nazongeli likebisi ya Nkolo na bato na Ye oyo alobaki na nzela ya profeta Haggai kati Kondimana na Sika : “Nzokande sikawa boye elobaki Nkolo ya bakolo feti; Botala banzela na bino.”27

Moko na moko na biso asengeli apesa motuya na makambo na biso ya kotia esika ya liboso ya ntango mpe ya molimo na bosembo mpe na losambo komona makambo kati na bomoi oyo ezali kobebisa bolamu ya mapambooli oyo Tata na Lola mpe Mobikisi bazali na bolingi ya kosopa likolo na biso. Mpe solo mpenza Molimo Mosantu akosunga biso tomimona lokola tozali mpenza.28

Ntango tozali koluka malamu likabo ya molimo ya miso mpo na komona mpe matoi mpo na koyoka,29 nalaki ete tokopambolama na makoki mpe bosambisi mpo na kolendisa bokangisami ya liyokani na biso elongo na Nkolo na bomoi Tokozwa lisusu nguya ya Bonzambe kati na bomoi na biso30—mpe nsukansuka kobiangama mpe koponama lokola mpo na feti ya Nkolo.

Lamuka! lamuka! omilatisa nguya na yo, O Siona.”31

“Mpo Siona esengeli kokola na kitoko, mpe na bosantu; ndelo na ye esengeli eyeisama milai, mpe makonzi na ye esengeli kolendisama; iyo, solo nalobi epayi na bino,  Siona esengeli kolamuka mpe kolata  bilamba na ye ya kitoko.”32

Nalobi na esengo litatoli na ngai ya bonzambe mpe bosolo ya bomoi ya Nzambe Tata na biso ya Seko mpe ya Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto. Natatoli ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso, mpe ete Azali na bomoi. Mpe atatoli lisusu ete Tata mpe Mwana babimelaki elenge mobali Joseph Smith, mpe na boye babandaki bozongisi ya nsango malamu ya Nkolo na mikolo ya nsuka. Tika moko na moko na biso aluka mpe apambolama na miso mpo na komona mpe matoyi mpo na koyoka, nasambili na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.