Likita Linene
Boleisa mpe Bopesa Litatoli na Bino
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Boleisa mpe Bopesa Litatoli na Bino

Nabengisi bino boluka mabaku ya kopesa litatoli na bino na liloba mpe mIsala.

Boyingisi

Bantango ya mikano na bomoi eyaka mingi mingi mpe na lolenge bozali kozela te, ata kutu ntango bozali naino bilenge. Tika ngai nakabola na bino lisolo ya moyekoli moko ya kelasi ya likolo, Kevin, aponaki kokende mobembo libanda ya mboka mpo na molulu moko ya bakambi ya bayekoli, lokola alobaki na maloba na yemoko.

“Ngonga na ngai na molongo ekokaki, kalaka oyo azalaki kokoma bankombo oyo amonanaki ya kobongama mpo na ngai atunaki nkombo na ngai. Atalaki na lokasa na ye mpe alobaki, ‘Boye ozali elenge mobali oyo awuti na Utah.’

“‘Olingi koloba nazali bobele ngai moko?’ Ngai natunaki:

“‘Iyo, bobele yo moko.’ Apesaki ngai badge na ngai ekomami ‘Utah’ na nse ya nkombo na ngai. Ntango nalataki yango, nayokaki lokola natiamaki elembo.

“Nafinanaki na ascenseur ya hotel elongo na bayekoli mitano mosusu ya kelasi ya likolo na bankombo na badge lokola ngai. ‘Mbote, owuti na Utah. Ozali Mormon?’ moyekoli moko atunaki.

“Namiyokaki na esika na ngai te elongo na bakambi ya bayekoli ya ekolo mobimba. ‘Iyo,’ nandimaki na kobanga moke.

“‘Ozali bato oyo bandimelaka Joseph Smith, oyo alobaki ete amonaki banjelu. Ondimelaka yango mpenza te, ezaLI bongo?

“Nayebaki te nini mpenza koloba. Bayekoli na kati ya ascenseur bazalaki kotala ngai bango nyonso. Nawutaki kokoma, mpe bato nyonso bakanisaki nazalaki ya kokesana. Nakomaki koluka koboya kasi nsima nalobaki, ‘Nayebi ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe.’

“‘Yango ewutaki wapi?’ Namitunaki. Nayebaki te ete nazali na yango kati na ngai. Kasi maloba eyokamaki ya solo.

“‘Iyo, Bayebisaki ngai ete bazalaka kaka bayambi ya maboma,’ ye alobaki.

“Na wana, ezalaki na bopemi moko ya malamu te ntango ekuke ya ascenseur ofungwamaki. Ntango tozalaki kosangisa bisaka na biso, alekaki na nse na kosekaka.

“Boye, mongongo moko na nsima na ngai etunaki, ‘E, bamormon bazalaka te na Biblia ya lolenge mosusu?’

“O te. Lisusu te. Nabalukaki mpo na komona moyekoli mosusu oyo azalaki na ngai, Christopher.”

“‘Nkombo na yango Buku ya Mormon,’ nalobaki, kozelaka mpo na kotika lisolo yango. Nakamataki bisaka na ngai mpe nabandaki kotambola na couloir.

“‘Yango ezali buku Joseph Smith abongolaki?’ ye atunaki.

“‘Iyo, ezali yango,’ nayanolaki. Nakobaki kotambolaka, kolikyaka koboya motungisi.

“‘Malamu, oyebi epai wapi nakoki kozwa moko?’

“Makomi moko nayekolaki na seminele na mbala moko eyelaki ngai. ‘Nazali na nsoni te ya nsango malamu ya Yesu Klisto.’1 Ntango yango ekotaki na makanisi na ngai, nayokaki nsoni namiyokaki mabe.

“Kino eteni etikali ya mposo makomi wana elongwaki na makanisi na ngai te. Nayanolaki mituna ebele oyo etali Eklezia lolenge nakokelaki, mpe nazwaki baninga mingi.

Nayaki koyeba ete nazali na fiele na eyamba na ngai.

“Napesaki Christopher Buku moko ya Mormon. Nsima ye akomelaki ngai, koyebisaka ngai ete abengisaki bamisionele na ndako na ye.

“Nayekolaki ete namiyoka nsoni te mpo na kokabola litatoli na ngai.”2

Nafulamaki na makasi ya Kevin na kokabolaka litatoli na ye. Ezali mpiko moko ebandelamaki mikolo nyonso na bandimi ya sembo ya Eklezia na mokili mobimba. Lokola nazali kokabola makanisi na ngai, nabengi bino kobanza na ntina ya mituna minei oyo:

  1. Ngai nayebi mpe nasosoli oyo litatoli ezali?

  2. Ngai nayebi kopesa litatoli na ngai?

  3. Makama nini ezali na kokabolaka litatoli na ngai?

  4. Lolenge nini nazali kobomba litatoli na ngai?

Ngai Nayebi mpe Nasosoli oyo Litatoli Ezali?

Litatoli na yo ezali libula ya motuya koleka, esanganaka mbala mingi na mayoki malamu ya molimo. Mayoki yango eyokanaka lokola momeseno na kimya mpe elimbolami lokola “mongongo moko ya kimya, ya moke.”3 Yango ezali boyambi to boyebi ya bosolo oyo epesamaki lokola nzeneneke ya molimo kati na nguya ya Molimo Mosantu. Kozwaka litatoli yango ekobongola oyo ozali koloba to lolenge ozali kosala. Kati na makambo ya motuya na litatoli na yo, maye mandimisami na Molimo Mosantu, ezali na:

  • Nzambe azali Tata na yo ya Lola; ozali mwana na Ye. Ye alingi biso.

  • Yesu Klisto azali na bomoi. Azali Mwana ya Nzambe na bomoi mpe Mobikisi mpe Mosikoli na bino.

  • Joseph Smith azali profeta ya Nzambe abiangemaki mpo na kozongisa Eklezia ya Yesu Klisto.

  • Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali Eklezia ya Nzambe ezongisama na mabele.

  • Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama ekambami na profeta ya bomoi lelo.

Nayebi Lolenge ya Kopesa Litatoli na Ngai?

Opesaka litatoli na yo ntango okabolaka mayoki ya molimo elongo na basusu. Lokola mondimi ya Eklezia, mabaku ya kopesa litatoli na yo na maloba eyaka na makita ya mikolo nyonso na Eklezia to ya mikolo nyonso mpenza te, masolo ya moko na moko na libota, baninga, mpe basusu.

Nzela mosusu ya kokabola litatoli na yo ezali na nzela ya bizaleli ya sembo. Litatoli na yo na Yesu Klisto ezali kaka maye olobi—kasi ezali nani ozali.

Ntango nyonso ozali kotatola na monoko to kolakisa na nzela ya misala na yo bomipesi na yo ya kolanda Yesu Klisto, ozali kobenga basusu “baya epai ya Klisto.”4

Bandimi ya Eklezia batelemi lokola banzeneneke ya Nzambe na ntango nyonso, na makambo nyonso mpe na bisika nyonso.5 Mabaku ya kosala yango na mokili ya internet na kosalela biloko na biso moko efulama to kokabolaka ya bolendisi elengelami na basusu ezanga nsuka. Totatolaka ntango tolingi, tokabolaka, mpe tobengisaka, kutu na internet. Batweeti, bansango ya mikuse, mpe nkoma na yo ekomema na ntina ya likolo, mpe esantu koleka ntango ozali mpe kosalela bamedia sociaux mpo na kolakisa lolenge boni nsango malamu ya Yesu Klisto epesi ntina na bomoi na yo.

Makama nini Ezali na Kokabolaka Litatoli na Ngai?

Makama ya kokabolaka litatoli na yo ekoki kokotisa mwa ntembe na oyo ozali koloba. Matthew Cowley, moko Apostolo ya yambo, akabolaki mayele na ye ntango akendaki mpo na mibu-mitano ya misio na mbula 17 na Nouvelle Zeland:

“Nakobosana ata mokolo moko te nsambo ya tata na ngai mokolo oyo nakendaki. Natikala koyoka lipamboli ya kitoko koleka na bomoi na ngai te. Boye liloba na ye ya nsuka epai na ngai, ‘Mwana na ngai ya mobali, okende libanda ya misio wana; mpe bangonga mosusu ntango obiangemi, okokanisa ete omilengelaki malamu, kasi ntango okotelema, makanisi na yo nyonso ekobunga.’ Nasila kokutana na likambo wana koleka mbala moko.

“Nalobaki, ‘okosala nini ntango makanisi na yo ebungi?’

“Ye alobaki, ‘otelemi mpe na makasi nyonso ya molimo na yo , opesi litatoli ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe na bomoi, mpe makanisi ekokita na mayele na yo mpe maloba na monoko na yo … na motema ya moto nyonso oyo azali koyoka.’ Mpe boye makanisi na ngai, ezalaki kobunga mingi mingi katikati ya … misio … , na ngai epesaki ngai libaku ya kopesa litatoli ya molulu monene ya mambi ya mokili kobanda bobakami ya Molakisi. Bomeka yango ntango mosusu, bandeko mpe bilenge basi. Soki ozali na eloko mosusu ya koloba te, tatola ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe, mpe lisituale ya Eklezia mobimba ekokita na makanisi na yo.”6

Na ndenge moko, Mokambi Dallin H. Oaks akabolaki, “Matatoli mosusu ezwamaka malamu koleka na makolo na kotatolaka yango koleka na kobukaka mabolongo kosambelaka mpo na yango.”7 Molimo apesaka litatoli na molobi mpe na moyoki lokola.

Libaku mosusu, lokola lisolo ya Kevin ebetaki sete, ezali bobangi. Lokola Paulo akomelaki Timote:

“Nzambe apesi biso molimo ya kobanga te; kasi ya nguya, mpe ya bolingo. …

“Boye oyoka nsoni te mpo na litatoli ya Nkolo na biso.”8

Mayoki ya bobangi ewutaka epai na Nkolo te kasi mingi koleka epai ya monguna. Kozalaka na bondimi, lokola Kevin azalaki na yango, ekopesa yo nzela ya kolonga mayoki wana mpe na bonsomi mpenza kokabola oyo ezali kati na motema na yo.

Lolenge nini Nazali Kobomba Litatoli na Ngai?

Nandimi ete litatoli ebotamaka na kati na biso, bongo, mpo na kobomba yango mpe kokolisa yango na mobimba, Alma ateyaki ete tosengeli “koleisa [litatoli na biso] na bokebi mingi.9 Mpe sikawa tala, soko boleisi yango na bokebi ebele, ekozwa mosisa, mpe ekokola, mpe ekopesa mbuma.”10 Na bozangi yango, “yango ekokufa.”11

Molingami moko moko ya Bokambi ya Yambo apesi biso boambi na lolenge ya kobomba litatoli.

Mokambi Henry B. Eyring na bolingo bonso ateyaki biso ete “kosala lipati na liloba ya Nzambe, losambo ya motema, mpe botosi na mibeko ya Nkolo esengeli kosalelama na lolenge moko mpe ntango nyonso mpo ete litatoli na yo ekola mpe efuluka.”12

Mokambi Dallin H. Oaks akundolisi biso ete mpo na kobatela litatoli na biso, “tosengeli kolia elambo poso nyonso (tala D&C 59:9) mpo na kokoka na elaka ya motuya ete tokozala ‘ntango nyonso na Molimo na ye elongo na [biso]’ (D&C 20:77).”13

Mpe Mokambi Russell M. Nelson kala mingi te awa apesaki na boboto toli:

“Boleisa [litatoli na bino] bosolo. …

“… Bomileisa bino moko na liloba ya baprofeta ya kala mpe ya sikawa. Bosenga Nkolo ateya bino lolenge nini koyoka Ye malamu koleka. Bolekisa ntango ebele na tempelo mpe na mosala ya mambi ya kala ya libota.

“… Bokomisa litatoli na bino eloko ya kotia na esika ya liboso koleka nyonso.”14

Mpo na Kosukisa

Bandeko na gai balingami mibali mpe basi, nalaki bino ete soki bososoli mobimba mpenza nini litatoli ezali, ntango bokaboli yango, bokolonga mimekano ya bozangi kondimela mpe bobangi, ekopesa bino ndingisa ya koleisa mpe kobatela eloko oyo ya motuya mpenza, litatoli na bino.

Topambolami na kozalaka na bandakisa ezangi ndelo ya baprofeta ya kala mpe ya sikawa oyo bapesaka na bokasi matatoli na bango.

Nsima ya kufa ya Klisto, Petelo atelamaki mpe atatolaki:

“Tika ete eyebana na bino nyonso … ete na nkombo ya Yesu Klisto ya Nazalete, oyo bino bobakaki ye na ekulusu, oyo Nzambe asekwisi na bakufi, … moto oyo atelemi liboso na bino. …

“… Mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango.”15

Amuleki, kolandaka liteya ya Alma na ntina ya bondimi, alobaki na nguya nyonso: “nakotatola epai ya bino ete makambo maye mazali solo. Tala, nalobi epai ya bino, ete nayebi ete Klisto akoya o ntei ya bana ba bato, … mpe ete akotumbolama mpo ya masumu ma mokili; mpo Nkolo Nzambe alobi bongo.”16

Joseph Smith mpe Sidney Rigdon, nsima ya kozalaka banzeneneke ya limoni ya nkembo ya Mobikisi asekwa, batatolaki:

“Mpe sika awa, nsima ya matatoli mingi oyo epesamaka na ntina na ye, oyo ezali litatoli, nsuka ya nyonso, oyo topesi mpo na ye: Ete azali na bomoi!

“Mpo ete tomonaki ye, kutu na loboko ya mobali ya Nzambe; mpe toyokaki mongongo kotatolaka ete azali Mwana se Moko ya Tata.”17

Bandeko mibali mpe basi, nabengisi bino boluka mabaku ya kopesa litatoli na bino na liloba mpe mosala. Libaku moko ya lolenge oyo eyelaki ngai kala te, na suka ya liyangani moko elongo na kapita ya engumba ya mboka ya Amerique du Sud, na kati ya kisuku na ye elongo na motango moko ya basali ya bilo na ye. Ntango tozalaki kosukisa na mayoki ya motema, nakanisaki na bobangi moke nasengelaki kokabola litatoli na ngai. Kolandaka bitinda ya molimo Napesaki litatoli ete Yesu klisto azali Mwana ya Nzambe na bomoi mpe Mobikisi ya mokili. Makambo nyonso ebongwanaki na ntango wana. Molimo kati na ndako ezalaki ya kowangana te. Emonanaki ete moto nyonso asimbamaki. “Molendisi … azali kotatola na ntina ya Tata mpe ya Mwana.”18 Nazalaki na botondi mpenza nazwaki mpiko ya kopesa litatoli na ngai.

Ntango eleko ya boye eyaka, kanga yango mpe yambo yango. Okoyoka esengo ya Molendisi kati na yo soki osali.

Napesi litatoli na ngai mpe nasakoli na bino—Nzambe azali Tata na biso na Lola, Yesu Klisto azali na bomoi, mpe Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali eklezia ya Nzambe na mabele lelo ekambami na molingami profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.