Likita Linene
Mpiko mpo na Kosakola Bosolo
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Mpiko mpo na Kosakola Bosolo

Soki toyekoli bosolo, Nkolo akopesa biso libaku ya kosala maye Ye alingaki kosala soki Ye azalaki awa lelo.

Na 1982, nazalaki kosilisa kelasi na ngai mpo na diplomi ya gradiwa na topogalafi na eteyelo ya tekiniki.

Na nsuka ya mobu, moninga ya kelasi abengisaki ngai mpo na kosolola. Namikundoli ete totikaki bato mosusu ya kelasi mpe tokendaki na esika moko pene ya libanda ya masano. Ntango tokomaki kuna, alobelaki ngai oyo etali bondimi ya eyamba na ye, mpe alakisaki ngai kaka buku moko mpamba te, kasi apesaki ngai buku yango. Na bosembo, nazali komikundola te maloba nyonso oyo alobaki, kasi namikundoli ngonga wana malamu mpenza mpe lolenge namiyokaki ntango alobaki, “Nalingi napesa litatoli na ngai epai na yo ete buku oyo ezali solo, mpe ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisamaki.”

Nsima ya lisolo na biso, nakendaki ndako, nafungolaki mwa nkasa kati na buku, mpe natiaki yango na likolo ya ebombelo buku. Lokola tozalaki na nsuka ya mobu mpe ezalaki mobu ya nsuka ya diplomi na ngai na topogalafi, nasalaki mpenza bokebi na buku te, mpe na moninga na ngai ya kelasi oyo akabolaki yango na ngai te. Nkombo ya buku okoki kosila kokanisa. Iyo, ezalaki Buku ya Mormon.

Mwa motango ya basanza nsima, bamisionele bayaki na ndako na ngai; bazalaki kozonga kaka ntango nazalaki kokoma na ndako uta na mosala. Nabengisaki bango bazonga na kati. Tovandaki na esika moke liboso ya ndako na ngai, mpe bateyaki ngai.

Na boluki na ngai ya bosolo, natunaki bango eklezia nini ezalaki ya solo mpe lolenge nini nakokaki komona yango. Bamisionele bateyaki ngai ete nakokaki kozwa eyano wana na ngai moko. Na elikya mpe mposa monene, nandimaki momekano na bango ya kotanga mikapo ebele uta na Buku ya Mormon. Nasambelaki na motema bosembo mpe na mokano ya solo (tala Moroni 10:4–5). Eyano na motuna na ngai ezalaki polele, mpe mikolo mingi nsima—mingi mingi mpenza na sanza ya mitano 1, 1983—nabatisamaki mpe nakotisamaki mondimi ya Eklezia ya Yezu Klisto ya Basntu ba Mikolo mya Suka.

Lelo, ntango nakanisaka oyo etali bolandani ya makambo oyo esalemaki, namonaka polele motuya nini mpiko ya moninga na ngai ya kelasi ezalaki ntango atatolaki oyo etali bosolo ezongisama mpe alakisaki ngai na elembo ekoki kosimbama ya Bozongisami ya nsango malamu ya Yesu Klisto, kutu ya Buku ya Mormon. Ekela ya pete wana, kasi ya ntina ya mozindo epai na ngai, esalaki mokangano katikati na ngai mpe bamisionele yango ntango nakutanaki na bango.

Bosolo elakisamaki epai na ngai, mpe nsima ya libatisi, nakomaki moyekoli ya Yesu Klisto. Na ntango ya mibu elandaki nsima, mpe na lisungi ya bato ya malonga mpenza lokola bakambi, bateyi, baninga, mpe lisusu na nzela ya boyekoli ya ngai moko, nayekolaki ete ntango nazwaki mokano ya kozala moyekoli ya Yesu Klisto, nandimaki mokumba ya bobele kobatelaka bosolo te, kasi lisusu ya kosakolaka yango.

Ntango tondimaka kodimela bosolo mpe kolanda yango, mpe ntango tosalaka makasi ya kokoma bayekoli ya solo ya Yesu Klisto, tozwaka likundoli moko te na elaka ete tokosala mabunga te, ete tokotongama te, ete tokomekama kokende mosika ya bosolo te, to kutu ete tokoyoka mawa te. Kasi boyebi ya bosolo eteyaka biso ete ntango tokotaka na nzela moke mpe ya nkaka oyo ekozongisa biso liboso ya Tata na Lola, ekozala ntango nyonso na nzela ya kokimela makambo oyo (tala 1 Bakolinti 10:13); ekozala na libaku ya kotiaka ntembe na bantembe na biso liboso ya kotiaka ntembe na bondimi na biso (tala Dieter F. Uchtdorf, “Come, Join with Us,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2013, 21); mpe nsuka nsuka, tozali na elaka ete tokozala mokolo moko te biso moko ntango tozali kati na mawa, mpo ete Nzambe akendeke kotala bato na Ye kati na mawa na bango (tala Mosiya 24:14).

Soki toyekoli bosolo, Nkolo apesaka biso libaku ya kosala maye Ye alingaki kosala soki Ye azalaki awa lelo. Solo, Ye alakisaki biso na nzela ya mateya na Ye maye tosengeli kosala: “Mpe bokokende na nguya ya Molimo na ngai, koteyaka nsango malamu na ngai, mibale na mibale, na nkombo na ngai, kotombolaka mingongo na bino lokola na lokito ya kelelo, kosakolaka liloba na ngai lokola banjelu ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 42:6). Libaku mpo na mosala ya misio na bilenge na biso ezangi bokokanisi!

Tosengi, bilenge mibali, bozelisa mokolo na bino ya komilengela mpo na kosalela Nkolo lokola bamisionele te. Ntango bozali kokutana na makambo oyo ekoki kosala mokano ya kosala misio ezala mpasi—lokola kokataka boyekoli na yo mpo na ntango moko, kolobaka mbote ya bokabwani na elenge mwasi moninga na yo kozangaka elaka ya sikisiki ete okobima na ye lisusu, to kutu kotika mosala ya malonga—mikundola ndakisa ya Mobikisi. Na ntango ya mosala na Ye, na lolenge moko mpe na biso, Ye akutanaki na mikakatano, totangi matongi, monyokoli, mpe nsuka nsuka kopo ya bololo ya mbeka na Ye ya bomikabi. Nzokande na mabaku nyonso wana Alukaki kosala bolingi ya Tata na Ye mpe kopesa nkembo epai na Ye. (Tala JYoane 5:30; 6:38–39; 3 Nefi 11:11; Doctrine et Alliances 19:18–19.)

Bilenge basi, totombeli bino boyei malamu na mosala kati na elanga ya vinyo ya Nkolo, mpe ntango bozwi mokano ya kosalela lokola misionele ya ntango mobimba, bokozanga kokutana na mikakatano ya lolenge moko te.

Na basno oyo bakozwa mokano ya ya kosalela Ye, nalaki bino ete basanza 24 to 18 ya mosala ekoleka kati na elanga ya misio kaka lokola elingaki koleka soki otikalaki na ndako, kasi mabaku oyo ezali kozela bilenge mibali to bilenge basi ya Eklezia oyo balongobani na elanga ya misio ezangi bokokanisi. Litomba ya kozala ntoma ya Mobikisi Yesu Klisto mpe Eklezia na Ye ekoki kobosanama te. Kozwamaka na baninga kati na nsambo nzike, kokolisaka mpe kopesaka litatoli na yo mbala ebele na mokolo, bangonga mingi ya boyekoli makomi, kokutanaka na bato oyo okokaki mokolo moko te kokutana na bango soki otikalaki na ndako, ezali makambo ezanga bolimboli. Ndelo se moko ya boyebi ezali mpo na bilenge oyo Nkolo abiangaka na misala ya misio. Totombeli bino boyei bolamu mpe bozali ntina. Tosengi, bokitisa motuya ya mosala ya misio te, mpo mosala ya misio epesaka mpe mayele oyo ekoki kolimbolama te. “Motuya ya milimo ya bato ezali monene na miso na Nzambe” (Doctrine and Covenants 18:10), mpe lisusu motuya ya molimo na yo m.

Nsima ya kozonga uta na mosala na yo, ntango mosusu likango na yo ya mwasi azali lisusu kozela yo te, kasi okosila koyekola malamu mpenza lolenge nini kosolola na bato na lolenge ya malamu koleka. Boyekoli na yo ya universite ekozala na ndimbola mingi elongo na baemoneli ozwi oyo etali komilengele malamu mingi mpo na mosala, mpe nsuka nsuka, okozala na boyebi mobimba ya kosila kosakola na mpiko nsango malamu ya kimya, kotatolaka na ntina ya bosolo ezongisama.

Mpo na baye kati na bino oyo babala mpe bozali na bitape ekeseni ya bomoi, bozali na ntina mpenza kati na mosala ya Nkolo. Bomilengele bino moko. Bobika bomoi ya kolongonu, kolukaka bomikoki ya ntango mpe ya molimo, mpo ete mabaku ya kosala maye Nkolo alingaki kosala mpo na bana na Ye esuki na liboke ya bato ya mibu moko te. Makambo ya esengo mpenza mwasi na ngai mpe ngai tokutanaki na yango na mibu eleki kala te, ekomelaki biso ntango tozalaki kosalela Nzambe na babalani ya malonga, na bisika ya kafukafu, mpe kosalisaka bato ya malonga mpenza.

Likambo nakutanaki na yango na nsuka ya dipolome na ngai na topogalafi eteyaki ngai ete tobatelaka ntango nyonso bosolo ntango tosakolaka yango mpe ete kobatelaka bosolo ezali eloko ya kosala na yomoko. Bobateli ya bosolo esengeli mokolo moko te kosalama na lolenge ya makasi kasi nzokande na litomba ya mayele mpo na kolinga, kokabola, mpe kobengisa bato oyo tozali kotatolela oyo etali bosolo, kokanisaka bobele oyo etali bozwi ya ntango mpe ya molimo ya bana ya Tata na Lola ya bolingo (tala Mosiya 2:41).

Na likita linene ya sanza ya zomi 2021, Mokambi Russell M. Nelson, profeta na biso wa bolingo, ateyaki ete na bokeseni na maye basusu bakanisaka, ezali solo mpenza na maye tobengaka malamu mpe mabe. Ezali solo mpenza bosolo oyo ezali ya solo—bosolo ya seko. (Tala “Russell M. Nelson, “Pure Truth, Pure Doctrine, and Pure Revelation,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 6.)

Makomi masantu eteyi biso ete “bosolo ezali boyebi ya makambo lolenge ezali, mpe lolenge ezalaki, mpe lolenge ekozala” (Doctrine et Alliances 93:24).

Boyebi ya bosolo ekomisaka biso malamu te koleka bato mosusu, kasi eteyaka biso maye tosengeli kosala mpo na kozonga liboso ya Nzambe.

Ntango ozali kotambola sikisiki kati na Klisto mpe na mpiko kaka mpo na kosakola bosolo te kasi kobika bosolo, okozwa bolendisi mpe kimya na mobulungano oyo okokutana na yango na mikolo oyo.

Mikakatano ya bomoi ekoki kokweisa biso, kasi boyeba ete ntango tozali kosalela bondimi kati na Yesu Klisto, “[ya biso] mawa ekowumela mingi te koleka ngonga moko” (Doctrine et Alliances 121:7) na mwango monene ya boseko. Tosengi, bokela ndelo mpo na nsuka ya mpasi mpe mikakatano te. Botiela Tata na lola motema mpe botika te, mpo soki totiki, tokotikala te koyeba mokolo moko lolenge nini nsuka ya mobembo na biso elingaki kozala kati na bokonzi ya Nzambe.

Kangama na na bosolo, koyekolaka uta na maziba ya bosolo:

Napesi litatoli na ngai na ntina ya Yesu Klisto mpe ete oyo ezali Eklezia na Ye. Tozali na profeta na bomoi, mpe tokomiyoka ntango nyonso ya bonsomi ntango tozali kosakola bosolo na mpiko. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.