Likita Linene
Eyano Ezali Yesu
Likita linene ya sanza ya zomi 2022


Eyano Ezali Yesu

Atako mokakatano to kobulunganisa ya bitumba ekoki kozala, bokoki ntango nyonso kokundola ete eyano ezali pete; yango ezali ntango nyonso Yesu.

Oyo lokumu nini ya koloba na bino na liyangani oyo ya likita linene. Lelo nakosolola na bino lokola baninga. Kati na Nsango Malamu ya Yoane, Mobikisi ateyaki ete tozali baninga na Ye soki tosali oyo Ye asengi biso tosala.1

Yango ezali bolingo na biso ya moto ye moko mpe ya bato nyonso ya Mobikisi, mpe mayokani na biso elongo na Ye, oyo esangisi biso. Lokola Mokambi Henry B. Eyring ateyaki: “Na bino nasepeli koloba boniboni mingi Nkolo alingi bino mpe atielaka bino motema. Mpe, mingi koleka, nakolinga koyebisa bino lolenge nini atalelaka bino.”2

Ntango nabengamaki lokola Mokambi Monene na Mokambi Russell M. Nelson, natondisamaki na mayoki mingi na motema. Ezalaki kilo makasi Mwasi na ngai, Julie mpe ngai na kolengalenga nyonso tozelaki liyangani ya Eyenga na sima ya nzanga ya likita linene. Ezalaki likambo ya bomikitisi ete nasungama Natangaki matambe na bokebi kino esika na ngai ya kovanda mpo ete nakweya te na mosala na ngai ya yambo.

Na bosukisi ya liyangani, eloko moko ekomaki oyo esimbaki ngai makasi. Bandimi ya lisanga likoki basalaki molongo moko mpe bapesaki mbote na Bakambi Banene moko na moko. Moko mpe mosusu bakabolaki bolingo mpe bosimbi na bango. Elongo na abrazo ya motema balobaki, “Kobanga te—ozali na kati.”

Na mokangano na biso na Mobikisi, Ye atalaka motema mpe “aponaka bilongi te.”3 Tala lolenge Ye aponaki Bapostolo na Ye. Atalaki ezalela to bozui te. Azali kobenga biso tolanda Ye, mpe nandimi ete Andimisi biso ete biso tozali ya Ye.

Etinda oyo epesami mingi mingi mpenza mpo na bilenge ya Eklezia. Namoni kati na bino oyo Mokambi Nelson azali komona kati na bino. Ye alobaki ete “ezali na eloko moko ya motuya ya kowangana te na ntina ya ekeke oyo ya bilenge. Tata na bino ya Lola asengeli kozala na elikya monene na bino mpo na kotinda bino na mabele na ntango oyo. Bobotamaki mpo na makambo minene!”4

Nazali na botondi mpo na oyo nayekolaki uta na bilenge. Nazali na botondi mpo na oyo bana na ngai batangisaki ngai, mpo na oyo bamisionele batangisaka ngai, mpe mpo na oyo bana ya bandeko na ngai ya basi mpe mibali batangisaka ngai.

Kala te, nazalaki kosala na elanga na biso elongo na mwana ya ndeko na ngai ya mobali Nash. Azali na mibu motoba mpe azali motema mpeto. Azali mwana ya ndeko na ngai ya mobali nasepelaka na ye mingi nkombo na ye Nash, mpe nandimi ete nazali noko na ye asepelaka na ye mingi oyo azali koloba na likita lelo.

Lokola azalaki kosunga ngai mpo na kokanisa mayele mpo na mosala na biso, nalobaki, “Nash, oyo ezali likanisi monene. Boni ozali mayele makasi boye? Ye atalaki ngai na mwa boyoki soki nini na miso na ye oyo elobaki, “Noko Ryan, boniboni oyebi te eyano ya motuna oyo?”

Ye atombolaki mapeka na ye na bopete nyonso, asekaki, mpe nakondimisama nyonso alobaki, “Yesu.”

Nash akundolisaki ngai mokolo wana liteya oyo ya pete mpe kasi ya bozindo. Eyano na mituna ya pete mpenza mpe makambo ya pasi koleka ezalaka ntango nyonso ndenge moko. Eyano ezali Yesu Klisto. Eyano nyonso ezuamaka kati na Ye.

Na nsango malamu ya Yoane, Mobikisi alobaki na bayekoli na Ye ete Akobongisela esika moko mpo na bango. Toma abulunganaki makanisi mpe alobaki na Mobikisi:

“Nkolo, toyebi te soko okokende wapi; mpe tokoyeba nzela lolenge boni?

“Yesu alobaki epai na ye, Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi: moto akokoma na Tata te, soki na ngai te.”5

Mobikisi ateyaki bayekoli na Ye ete Ye azali “nzela, solo, mpe bomoi.” Ye azali eyano na motuna lolenge nini ya koya epai ya Tata ya Lola. Kozwaka litatoli ya ntina ya Bonzambe na ye na bomoi na biso ezalaki eloko moko nayekolaki ntango nazalaki elenge mobali.

Ntango nazalaki kosalela lokola misionele na Argentina, Mokambi Hunter abengaki biso kosala eloko moko oyo ezalaki na ntina ya bozindo na bomoi na ngai. Ye alobaki, “tosengeli koyeba Klisto malamu koleka lolenge toyebeli ye; tosengeli kokundola Ye mingi mingi koleka lolenge tokundolaka ye; tosengeli kosalela Ye na konzo koleka lolenge tosalelaka ye.”6

Na ntango wana, namitunaki lolenge kozala misionele moko ya malamu koleka. Yango ezalaki eyano: koyeba Klisto, kokundola Ye, mpe kosalela Ye. Bamisionele katikati na mokili mobimba basangani na ntina oyo: kobengisa basusu baya epai ya Klisto na kosalisaka bango bayamba nsango malamu ezongisami na nzela ya bondimeli Ye mpe Bomikabi na Ye, mpe na nzela ya boyamboli, libatisi, kozwaka likabo ya Molimo Mosantu, mpe kotia molende kino na nsuka.”7 Na baninga na biso nyonso oyo bazali koyoka bamisionele, nabakisi libiangi ya koya epai ya Klisto. Elongo tokobunda mpo na koyeba Ye, kokundola Ye, mpe kosalela Ye.

Kosala misio ezalaki ngonga moko ya bule ya bomoi na ngai. Na lisolo na ngai ya suka elongo na ye lokola misionele ya ntango-mobimba, Mokambi Blair Pincock alobaki mpo na mbonguana ekoya kala te na bakambi ya misio, ntango ye mpe mwasi na ye bazalaki pene ya kosilisa mosala na bango. Biso nyonso tozalaki na mawa ya kotika eloko moko tolingaki mingi koleka. Nakokaki komona ete natungisamaki na likanisi ya kozalaka misionele moko ya ntango-mobimba te. Azalaki moto moko ya bondimi makasi mpe ateyaki ngai na bolingo nyonso lokola asalaki mpo na mibu mibale liboso. Alakisaki mosapi na elilingi ya Yesu Klisto likolo ya mesa na ye mpe alobaki, “Mpaka Olsen, nyonso ekozala MALAMU mpo ete yango ezali mosala na Ye.” Namiyokaki ya kondimisama koyebaka ete Mobikisi akosunga biso, kaka te ntango tozali kosalaka kasi ntango nyonso—soki tokopesa Ye nzela.

Ndeko mwasi Pincock ateyaki biso uta na bozindo ya motema na ye na maloba ya Espagnole ya pete koleka. Ntango alobaki, “Jesucristo vive,” nayebaki ete ezalaki ya solo mpe ete Ye azalaki na bomoi. Ntango alobaki, “Elderes y hermanas, les amo,” Nayebaki ete alingaki biso mpe alingaki biso tolanda mobikisi, ntango nyonso.

Mwasi na ngai mpe ngai topambolamaki kala te kosala lokola bakambi ya misio kosala elongo na bamisionele ya sikisiki na Uruguay. Nakoki koloba ete bango bazalaki bamisionele ya malamu koleka na mokili, mpe nandimisami ete mokambi nyonso ya misio ayoki yango. Bayekoli wana bateyaki biso mokolo nyonso na ntina ya kolandaka Mobikisi.

Katikati ya masolo ya ntango na ntango, moko ya bamisionele na biso ya monene ya basi akotaki na kati ya bilo. Azalaki misionele moko ya kokoka, molakisi moko malamu koleka, mpe mokambi moko amipesa. Asepelamaki makasi na baninga na ye mpe alingamaki na bato. Azalaki na botosi, ya komikitisa, mpe moto ya kotia elikya. Botali na biso ya liboso etiamaki likolo ya etuka na ye mpe bato azalaki kotangisa. Botali oyo ezalaki ya kokesena. Ntango natunaki ye lolenge nini azalaki, nakokaki koloba ete azalaki ya kotungisama. Ye alobaki, “Mokambi Olsen, nayebi te soki nakoki kosala yango. Nayebi te soki nakozala kaka mpenza malamu. Nayebi te soki soki nakoki kozala misionele oyo Nkolo asengi nga nazala.”

Azalaki misionele moko ya kokamwisa. Malamu mingi na makambo nyonso. Lolenge ya misionele moko mokambi ya misio nyonso akoki kolinga. Namitungisaki ata moke te na ntina ya makoki na ye lokola misionele.

Lokola nazalaki koyoka, na bundanaki koyeba eloko nini koloba. Nasambelaki na kimia nyonso: “Tata ya Lola , oyo azali misionele moko akokani na basusu te. Ye azali ya yo. Ye asalaka makambo nyonso malamu. Nalingi kobebisa yango te. Nasengi osunga ngai nayeba nini koloba.”

Maloba eyaki epai na ngai. Nalobaki, “Hermana, nazali mpenza na mawa ete ozali koyoka boye. Tika ngai natuna yo motuna moko. Soki ozalaki na moninga moko ozalaki kotangisa oyo ayokaki boye, olingaki koloba nini?”

Ye atalaki ngai mpe asekaki. Elongo na molimo wana mpe kondimisama wana ya misionele ya kotia tembe, alobaki, “Mokambi, yango ezali pete. Nalingaki koyebisa ye ete Mobikisi ayebi ye malamu koleka. Nalingaki koyebisa ye ete Ye azali na bomoi. Ye alingi biso. Yo ozali malamu kokoka mpe ozwi oyo!”

Elongo na mua koseka moke alobaki, “nakanisi ete soki ezali bongo mpo baninga na biso, boye yango mpe ezali mpo na ngai.”

Ntango tozali na mituna mpe bantembe, tokoki koyoka ete biyano ezali mpasi mingi to ete kozwa eyano ezali kobulunganisa mingi. Tosengeli kokundola ete monguna, kutu tata ya balokuta nyonso, azali mosali ya bobulunganisi.8

Mosikoli azali Mokonzi ya bopete.

Mokambi Nelson alobaki:

“Monguna azali mayele. Na bafunda ya mibu, azali kosala ete malamu emonana mabe mpe mabe emonana malamu. Mateya na ye ezali koyokana makasi, ya mpiko, mpe ya lofundo.

“Nzokande, bansango ya Tata na Lola ezali mpenza ya kokesana. Asololaka na pete, na kimia, mpe na pete moko mpenza ete tokoki kozanga kososola Ye te.”9

Boniboni tozali na botondi ete Nzambe alingi biso mpenza ete Atindaki Mwana na Ye. Ye azali eyano.

Makambi Nelson kala mingi te alobaki:

“Mokambi Nelson kala te alobaki: “Nsango malamu ya Yesu Klisto etikala kosengela mokolo moko te lokola ezali lelo. …

“… Yango emonisi ntina ya lombango mpo na biso kolanda motindo ya Nkolo epai ya bayekoli na ye bo ‘kende … na mokili mobimba mpe boteya nsango malamu na ekelamu nyonso.’”10

Na baye nyonso bakopona kosala, nakoki kotatola mapamboli ekoya soki boyanoli na mbela ya profeta. Kosala ezali na ntina bino te; yango ezali na ntina ya Mobikisi. Bokobiangema na esika moko, kasi ya motuya koleka bokobiangema mpo na bato. Bokozwa mokumba monene mpe lipamboli ya kosunga baninga ya sika kososola ete eyano ezali Yesu.

Oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe ezali epai wapi ezali esika na biso. Nyonso oyo Mokambi Nelson na bolingo nyonso apesi biso makasi ya kosala ekopusa biso tokoma pene ya Mobikisi.

Bilenge na biso ya kitoko—kosangisaka na muana nkasi na ngai Nash—katikati ya bomoi na bino, atako mokakatano to kobulunganisa ya bitumba ekoki kozala, bokoki ntango nyonso komikundola ete eyano ezali pete: yango ezali ntango nyonso Yesu.

Ntango nayokaka baye oyo tosungaka lokola ba profeta, bamoni, mpe babimisi koloba na mabaku ebele, ngai mpe nalobi ete tolingi bino, totondi bino, mpe tozali na bosenga na bino. Awa nde epai na bino.

Nalingi Mobikisi. Napesi litatoli ya Nkombo na ye, kutu Yesu Klisto. Natatoli ete Ye azali Mokeli mpe mosukisi ya bondimi na biso,”11 mpe Azali Mokonzi ya makambo ya pete. Eyano ezali Yesu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.