2010–2019
Kotia likolo na Biso moko Nkombo ya Yesu Klisto.
Sanza ya Zomi 2018


Kotia likolo na Biso moko Nkombo ya Yesu Klisto.

Tika ete tozwa likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto—na komonaka lokola Ye amonaka, na kosungaka lokola Ye asungaki, mpe na kondimelaka ete ngolu na Ye ezali ya kokoka.

Bafndeko na ngai mibali mpe basi na mosala kala mingi te, lokola nazalaki komaniola mokumba ya Mokambi Nelson ya kobenga Eklezia na kombo na yango efulamaki, nabaluki epai wapi Mobikisi apesaki motindo na Banefite na oyo etali nkombo ya Eklezia.1 Ntango natangi maloba ya Mobikisi, nakamwaki na lolenge nini Ye asololaki lisusu na bato ete “bosengeli kotia likolo na bino nkombo ya Klisto.”2 Yango etindaki ngai komitala ngai moko mpe kotuna, “Etie ngai likolo na ngaimoko nkombo ya Mobikisi lolenge alingaki ngai nasala yango?”3 Lelo nakolinga kokabola bamoko ya mayoki nayambaki na eyano ya motuna na ngai.

Yambo, kotia likolo na bisomoko nkombo ya Klisto elingi koloba tozali koyinka mpiko na bondimi mpo na komona lokola Nzambe azali komona.4 Lolenge nini Nzambe azali komona? Joseph Smith alobaki, “Ntango liboke moko ya loposo ya bato ezali kosambisaka mpe kopesaka etumbu na basusu na bozangi mawa, Moboti Monene ya Molongo mobimba azali kotala likolo ya libota mobimba ya bato na bokebi ya botata mpe botali ya kibotata,” mpo “bolingo na Ye [ezali] ezanga bososoli.”5

Mibu mike eleki yaya na ngai ya mwasi akufaki. Azalaki na bomoi moko ya etumba. Ye abundaki na nsango malamu mpe atikala kozala ata mokolo moko te ya makasi. Mobali na ye asundolaki libala na bango mpe atikaki ye na bana ya mike ya kobokola. Na mpokwa ya liwa na ye, na kati ya kisuku moko elongo na bana bazalaki, napesaki ye lipamboli ya bozongi ndako na kimia niyonso. Na ntango wana nayaki komona nazalaki kolimbola mingi bomoi ya ndeko na ngai ya mwasi na balolenge ya bitumba mpe bolembu na ye. Lokola natiaki maboko na ngai na moto na ye na mpokwa wana, nazwaki mpamela moko ya makasi uta na Molimo. Natiaki bokebi mingi na bolamu na ye mpe napesaki nzela ya kotala ye lokola Nzambe atalaki ye—te lokola moto moko azalaki kobunda na nsango malamu mpe bomoi kasi lokola moto moko oyo esengeli komesana na makambo ya pasi oyo ngai nazalaki na yango te. Namonaki ye lokola mama moko ya malamu koleka oyo, atako makama minene, akolisaki bana minei ya kitoko, ya bolamu. Namonaki ye lokola moninga ya mama na biso oyo azwaki ntango ya kotala mpe kozala moninga na ye nsima ya tata ya biso tata kokufa.

Katikati ya mpokwa ana ya suka elongo na ndeko na ngai ya mwasi, nandimi ete Nzambe azalaki kotuna ngai, “Ekoki yo te komona ete moto nyonso nzinganzinga na yo azali na ezalela ya bule?”

Brigham Young ateyaki:

“Nakanisi kokende na lombango epai ya Bansantu … kososolaka mibali mpe basi lokola bango bazali mpe te kososola bango lokola yo ozali.”6

Mbala boni elobami —‘Ntango moto moko azali kosala mabe mpe akoki te kozala Mosantu.’ … Tozali koyoka kolapa mpe lokuta … [to] kobuka Sabata. … Bosambisa bato ya bongo te, mpo oyebi te libongisi ya Nkolo kotalaka bango … [Na esika,] ya komema elongo na bango.”7

Ekoki moko na bino kokanisa Mobikisi na biso kotikaka bino mpe mikumba na bino koleka na bomoni te na Ye? Mobikisi atalaki likolo ya Mosamalia, moto ya ekobo, mofutisi mpako, moto ya maba, moto ya maladi ya mutu, mpe mosumuki na etaleli kaka moko ya wana. Banso bazalaki bana ya Tata na Ye. Banso basikolamaki.

Ekoki yo kokanisa Ye kopesaka mokongo uta na moto moko na makanisi, na ntina ya esika na bango na bokonzi ya Nzambe to basusu elongo na mposa makasi mpe lisumu?8 Nakoki te Na miso ya Klisto, molimo moko na moko ezali na motuya ezangi ndelo. Moto moko te asalama mpo na kokueya. Bomoi ya seko ekoki mpo na moto nyonso.9

Uta na mpamela ya molimo na mbeto ya nkufa ya ndeko na ngai ya mwasi, nayekolaki liteya moko monene: ete soki tomoni lokola Ye azali komona, ya biso ekozala elonga mbala mibale—bosikoli ya baoyo totali mpe bosikoli ya bisomoko.

Yamibale, kotia likolo na bisomoko kombo ya Klisto, tosengeli te komona lokola Nzambe azali komona, kasi tosengeli kosala mosala na Ye mpe kosalela lokola ye asalelaki. Tobwaki liloba, epesami na bolingi ya Nzambe, kosangisa Yisalaele, mpe kotika polena biso “engenga liboso ya bato.”10 Toyambi mpe tozali kobika mayokani mpe makuli ya Eklezia na Ye ezongisami.11 Soki tosali yango, Nzambe akozinga biso na nguya ya kopambola bisomoko, mabota na biso, mpe babomoi ya basusu.12 Mituna yomoko, “Eyebi ngai moto moko oyo asengeli te na banguya ya lola na bomoi na bango?”

Nzambe akosala makambo minene kati na biso soki tomisantisi bisomoko.13 Tokomisantisa bisomoko na kopetolaka mitema na biso.14 tokopetola mitama na biso soki toyoki Ye,15 toyamboli masumu na biso,16 tokomi ya kobongwana,17 mpe tolingi lokola Ye alingaka.18 Moyekoli atunaki bisos, “Mpona soki bolingi baoyo balingi bino, litomba nini bokozwa?”19

Kala te nayekolaki na ntina ya mayele moko na bomoi ya Mpaka James E. Talmage oyo etindaki kopema mpe kotala lolenge nini nalingaka mpe nasalelaka baoyo nzinganzinga na ngai. Lokola elenge molakisi, yambo akoma Apostolo, na kati ya epidemie ya liwa ya diphterie ya mbala mwambe ya 1892, Mpaka Talmage akundolaki libota moko ya bapaya, bandimi ya Eklezia te, oyo bazali pembeni na ye mpe oyo ebebisamaki na bokono. Moto moko te alingaki komitia yemoko na likama ya kokende na kati ya ndako ebebisami. ¨Mpaka Talmage, atako bongo, na mbala moko akendaki na ndako yango. Ye akutaki bana minei: moko ya mibu mibale-na-ndambu-ya-mibu akufi na mbeto, moko ya-mibu-mitano mpe ya-mibu-zomi na pasi makasi, mpe moko ya kolemba ya-mibu-zomi na misato. Baboti baniokwamaki na bapota mpe kolemba.

Mpaka Talmage alatisaki bakufi mpe baye na bomoi, apangusaki bisuku, asokolaki bilamba ebebisama, mpe atumbaki bilamba ya salité makasi etondisami na bokono. Asalaki mokolo mobimba mpe nsima azongaki ntongo mosusu. Ya ya-mibu-zomi akufaki na katikati ya butu. Atombolaki mpe amemaki ya-mibu-mitano. Ye akosolaki soyi ya makila na elongo na ye mobimba mpe bilamba na ye. Ye akomaki, “Nakokaki kotia ye mosika na ngai te,” mpe amemaki ye kino ye akufaki na maboko na ye. Ye asungaki mpo na bokundi ya bana misato mpe abongisa bilei mpe asokolaki bilamba mpo na libota ya mawa. Nsima ya kozongaka na ndako, Ndeko Talmage alongolaki bilamba na ye, asokolaki na nkisi moko ya zinc, amilongolaki mosika na libota na ye, mpe aniokwamaki na bobundisi ebele ya bokon.20

Nde boye babomoi ebele ezingi biso na moboko ezali. Bansantu batie nkombo ya Mobiki likolo na bangomoko na kokomaka bule mpe kosalisaka banso kolandaka te epai wapi to boniboni bango bavandi—baboyo ekobika soki biso tosali bongo.21

Na suka, nandimi ete kotia nkombo na Ye likolo na bisomoko tosengeli kolikia na Ye. Na liyangani moko nasanganaki Eyenga moko, elenge moko ya mwasi atunaki eloko moko lokola oyo elandi: “Mobandi na ngai mpe ngai tokbwanaki, mpe ye aponi kolongwa na Eklezia. Ye ayebisi ngai ete akozala na esengo ata mokolo moko te. Lolenge yango ekoki kozala?”

Mobiki ayanolaki motuna oyo ntango alobaki na Banephite, “Kasi soki [bomoi na bino] etongami te likolo ya nsango malamu ya ngai, likolo ya misala ya bato, to likolo ya misala mya zabulu, solo nalobi epai na bino [bino boko] zali na bosepeli na [ya bino] misala mpo na eleko moko, mpe uta mpe uta wapi nsuka ezali te.”22 Kuna na pete kaka ezali te na bosepeli ya kowumela libanda ya nsango malamu ya Yesu Klisto .

Nzokande, kati ya liyangani nateyaki na oyo etali batu malamu ebele nayebi oyo bazali kobunda na mikumba minene mpe mitindo oyo ezali kokitisaka na malamu mpo na bango. Na mitunaki ngai moko, “Nini lisusu Mobikisi akokaki koloba na bango?”23 Nandimi Ye akokaki kotuna, “Bozali kolikya na ngai?”24 Na mwasi oyo ya kotanga makila Ye alobaki, “bondimi na yo ebikisi yo, kende na kimia”.25

Moko ya makomi na ngai nalingaka ezali Yoane 4:4, wapi totangi, “Ekokaki na ye koleka na Samalia.”

Ntina nini nalingi likomi oyo? Mpo ete Yesu azalaki te na bosenga ya kokende na Samalia. Bayuda ya ntango na Ye basepelaki na Basamalia te mpe kobembuka na nzela moko ya Smalia. Kasi Yesu aponaki kokende kuna koloba liboso ya mokili nyonso mpo na mbala yambo ete Ye azali Mesiya oyo alakamaki. Mpo na etinda oyo, Ye aponaki kaka te lisanga moko ya batu babwakama kasi lisusu mwasi moko—mpe kaka mwasi pamba te kasi mwasi moko kobikaka na lisumu—mutu moko azwamaki na ntango yango kozala moto pamba. Nandimi ete Yesu asaIaki yango boye ete moko na moko na biso akoka ntango nyonso kososola ete bolingo na Ye ezali monene koleka bobangi na biso, bamposa na biso, bantembe na biso, bakomekama na biso, masumu na biso, mabota na biso ebukana, makanisi na biso mpe bozangi kimia na biso, bozangi na biso esika ya kovanda, bobendi na biso ya mwasi na mwasi mpe-mobali na mobali, bokono biso ya mabe koleka, bobola na biso, bobebisamina biso, mpe kozalaka na biso ya biso moko.26 Ye alingi banso toyeba ete ezali na eloko moko te mpe moto moko te Ye azali na makoki ya kobikisa mpe kokangola na bosepeli ya kowumela.27

Ngolu na Ye ekoki.28 Ye moko akitisaki biloko nyonso na nse. Nguya ya Bomikabi na Ye ezali nguya ya koleka likolo ya mokumba na biso ya bomoi.29 Etinda na mwasi na malamu ezali ete Ye ayebi mikakatano ya bomoi na biso30 mpe ete tokoki ntango nyonso kotambola elongo na Ye atako esika tozali. Na ye mpe moko na moko na biso, Ye alobaki, “Oyo akomela mayi oyo nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mayi te; kasi [bakozwa] liziba ya mayi, kotiolaka tii na bomoi ya seko.”31

Na bamobenbo nyonso ya bomoi, mpo na nini bozali ntango nyonso kologwa mosika na Mobikisi kaka moko oyo azali na nguya nyonso ya kobikisa mpe kokangola yo? Atako ntalo nini osengeli kofuta mpo na kolikya na Ye ezali na motuya. Bandeko mibali mpe basi, ltika biso topona kokolisa bondimi na biso na Tata ya Lola mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Natatoli na nse ya molimo na ngai, ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka ezali Eklezia ya Mobikisi, ekambami na Klisto ya bomoi na nzela ya profeta. Losambo na ngai ezali et biso tokotia na bondimi nyonso likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto—na komonaka lokola Ye azali komona, mpe na na kosalisaka lokola ye asalisaka, mpe na kolikiaka ete mawa na ye ekoki po na kokangola ndako na biso mpe kokobaka na esengo. Na nkombo ya Yesu Klisto.

Matangi

  1. Tala 3 NeFi 27:3–8.

  2. Tala 3 Nefi 27:5–6; tala lisusu Doctrine et Alliances 20:77 mpe boyokani ya elambo.

  3. Tala Dallin H. Oaks, His Holy Name (1998) mpo na boyekoli ya kososola etali kozwaka likolo na biso moko mpe kozalaka nzeneneke ya nkombo ya Yesu Klisto.

  4. Tala Moziya 5:2–3. Eteni ya mbongwana ya nguya ya motema ya bato ya Mokonzi Benjamin oyo batiaki likolo na bangomoko nkombo ya Klisto ezalaki ete miso na bango efungwamaki na “na bomoni monene.” Baoyo bakozwa libula ya bokonzi ya selesitiale bazali moto se yemoko ete “komona lokola bango bamonaki” (Doctrine et Alliances 76:94).

  5. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 39.

  6. Brigham Young, in Journal of Discourses, 8:37.

  7. Mateya ya Brigham Young, sel. John A. Widtsoe (1954), 72.

  8. Tala 3 Nefi 17:7

  9. Tala Joane 3:14–17; Misala 10:34; 1 Nefi 17:35; 2 Nefi 26:33; Doctrine et Alliances 50:41–42; Mose 1:39. Mpaka D. Todd Christofferson lisusu ateyaki: “Na kondimisama totatoli ete Bomikabi ya Yesu Klisto ebendaki na lombangu mpe, na nsuka, mpe tozwa litomba ya bozangi nyonso mpe bobungi mpo na baoyo babaluki epai na Ye. Moto moko te abiangemi kozwa ndambo koleka nyonso oyo Tata azali na yango mpo na bana na Ye” (“Mpo na nini Libala, Mpo na nini Libota,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 52).

  10. Tala Matai 5:14–16; 22:35–40; Moziya 3:19; Doctrine et Alliances 50:13–14; 133:5; tala lisusu Russell M. Nelson, “The Gathering of Scattered Israel,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2006, 79–81.

  11. Tala Lewitiko 18:4; 2 Nephi 31:5–12; Doctrine et Alliances 1:12–16; 136:4; Biteni ya Bondimi 1:3–4.

  12. Tala Doctrine et Alliances 84:20–21; 110:9.

  13. Tala Yoshua 3:5; Doctrine et Alliances 43:16; tala lisusu Yoane 17:19. Nkolo amisantisaki Yemoko mpo na kozwa nguya ya kopambola biso.

  14. Tala Helamana 3:35; Doctrine et Alliances 12:6–9; 88:74.

  15. Tala Joseph Smith—History 1:17, the first command given by God to the Prophet Joseph Smith; tala lisusu 2 Nefi 9:29; 3 Nefi 28:34

  16. Tala Malako 1:15; Misala 3:19; Alma 5:33; 42:22–23; Doctrine et Alliances 19:4–20. Lisusu kanisa makanisi oyo mibale na masumu. Yambo, Hugh Nibley akomi: “Lisumu ezali bobebisi. It is doing one thing when you should be doing other and better things for which you have the capacity” (Approaching Zion, ed. Don E. Norton [1989], 66). Mama ya John Wesley, Susanna Wesley, akomelaki mwana na ye ya mobali: “Zwa mokano oyo. Atako botau ya ntina na bino, bolembu ya makanisi, bolembu ya lolenge na bino ya Nzambe, to oyo nyonso elongola mposa ya biloko ya molimo; … atako ematisi … nguya ya nzoto na bino koleka makanisi na bino; eloko wana ezali lisumu epai na bino, atako oyebi likambo te” (Susanna Wesley: The Complete Writings, ed. Charles Wallace Jr. [1997], 109).

  17. Tala Luka 22:32; 3 Nefi 9:11, 20.

  18. Tala Yoane 13:2–15, 34. Na mpokwa ya Bomikabi na Ye, Mobikisi asokolaki makolo ya moko oyo akoteka Ye, ya mosusu oyo akowangana Ye, mpe ya tii na basusu oyo bakozala ya kolala na ngonga na Ye ya bosenga makasi Ye ateyaki bongo, “Lilako ya sika napesi bino. Ete bino bolingana moko na basusu lokola ngai nalingi bino.”

  19. Matai 5:46.

  20. Tala John R. Talmage, T he Talmage Story: Life of James E. Talmage—Educator, Scientist, Apostle (1972), 112–14.

  21. Tala Alma 10:22–23; 62:40.

  22. 3 Nefi 27:11

  23. Na Matai 11:28, 30, Nkolo alobi: “Boya epai na ngai, misala na bino nyonso mpe mikumba, mpe nakopesa bino kimia. … Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na pete, mpe mokumba na ngai ezali na mpole.” Lisusu totala 2 Bakolinti 12:7–9: Paul amonai mpasi makasi “na nzoto,” yango asambelaki mpo na kokende. Klisto alobaki, “Ngolu na ngai ekoki na bino: mpo ete makasi na ngai ekomaki bobongi nie na bolembu.” Tala lisusu Etele 12:27.

  24. Tala Moziya 7:33; 29:20; Helamana 12:1; Doctrine et Alliances 124:87.

  25. Tala Luka 8:43–48; Malako 5:25–34. Mwasi kotanga makila azangi elikia ya lisungi mpe mayele na ye esukaki. Ye aniokwamaki mibu 12, abebisaki bozui na ye nyonso na minganga, mpe azwaki litomba te. Abwakami libanda uta na bato mpe bandeko na ye, ye asalaki nzela na ntina na kati na lingomba ya batu ebele mpe amibwakaku epai ya Mobikisi. Azalaki na elikia mpe bondimi na Mobikisi, mpe Ye ayoaki kosimba na ye na suka ya elamba na Ye. Uta na kondima wana Ye abikisaki na lombango mpe mobimba. HYe nsima abengaki ye “mwana mwasi.” Azalaki kala te na lisanga libwakami kasi modimi moko na libona ya Nzambe. Kobika na ye ezalaki ya mosuni, libota, makanisi, mpe molimo. Bitumba ekoki kosembolama mpo nabambulato bomoi mobimba, kasi elaka ya lobiko na Ye ezali solo mpe sembo.

  26. Tala Luka 4:21; Yoane 4:6–26. Luka, Yoane te, alobaki ete kala te na mosala ya Yesu, Ye akendaki na sunagoga na Ye na Nazareti, kotanga eteni moko uta na lisakoli ya Yisaya etali Masiya, mpe alobaki, “Mokolo oyo ezali likomi yango kotondisama na matoyi na bino.” Yango ezali mbala ya yango Mobikisi aloba mpo na Yemoko lokola Masiya. Nzokande, na libulu ya Yakobo, Yoane alobaki ezali mbala ya yambo ete Yesu alobela ki Bomasiya na Ye na lisolo ya bato ebele. Na elobeli oyo, uta Basamalia bomonamaki lokola Bayuda-te, Yesu lisusu ateyaki ete nsango malamu na Ye ezalaki mpo na bato nyonso, banso Bayuda mpe bato mosusu. Lisakolo yango ezwaki tii “ngonga motoba,” to na nzanga, ntango mabele eyambi pole na yango mobimba uta na moi. Libulu ya Yakobo ezali lisusu ngomba moke ezwami pembeni mpenza ya Yisalaele ya kala basalaki molulu ya boyokani na Nkolo nsima ya bokoti na mabele elakami Na ntina ya malonga mpenza, ngambo ya ngomba moke ezali ngomba monene moko ekauka mpe na ngambo mosusu ezali ngomba moko etondi na maziba ya mai ya kopesaka-bomoi.

  27. Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki: “Ntango na kati ya ngonga makanisi tomitungisi soki ezali na eloko moko te na ngai mpo na kopesa, tokoki kozala ya kolendisama koyeba ete Nzambe, oyo ayebi makoki na biso mingi koleka, atiaki biso na awa mpo na kolonga. Moto moko te akulisamaki yambo mpo na kokweya to kozala na botau. … Ntango toyoki mikumba na biso eleki bozito, tomikundola elikia ete Nzambe akoyanola biso na mbala moko te” (“Meeting the Challenges of Today” [Brigham Young University devotional, Oct. 10, 1978], 9, speeches.byu.edu).

  28. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki:

    “Na mikolo ekoya, okozala yomoko liboso ya mobikisi. Okozala ya kotondisama pene na mai na miso kozala liboso ya bozali na Ye ya bule. Okobanda kobundana koluka maloba ya kotonda Ye mpo na kofutaka masumu na yo, mpo na kolimbisaka yo mpo na mabe na yo liboso ya basusu, mpo na kobikisa yo uta na ba pota mpe kozanga bosembo na bomoi oyo.

    “Okotonda Ye mpo na kopesa ya makasi ya kosala oyo ekoki kosalema te, mpo na kobongola bolembu na yo babobakasi, mpe mpo na kokokisa mpo na yo kozala na Ye mpe libota na yo mpo na libela. Lolenge na Ye, bomikabi na Ye, mpe ezaleli na Ye ekokoma ya moto se yemoko mpe solo mpo na yo” (“Baprofeta, Bokambi, mpe Mobeko ya Bonzambe” [worldwide devotional for young adults, Sanza ya yambo. 8, 2017], broadcasts.lds.org).

  29. Tala Yisaya 53:3–5; Alma 7:11–13; Doctrine et Alliances 122:5–9.

  30. Tala Joseph Smith—History 1:17; Elaine S. Dalton, “He Knows You by Name,” Liahona, sanza ya mitano 2005, 109–11.

  31. Yoane 4:14.