2010–2019
Tata
Sanza ya Zomi 2018


Tata

Moko na moko ati na biso azali na makoki ya kokoma lokola Tata. Nakosala bongo, tosengeli kokumbambela Tata na nkombo ya Mwana.

Na bomoi na ye mobimba, mwasi na ngai, Melinda, ameki na motema na ye mobimba kozala moyekoli ya botongono ya Yesu Klisto. Kasi, kobanda na bolenge na ye, azalaki komiyoka ya kolongobana te na oyo etali bolingo mpe mapamboli ya Tata na Lola mpo asosolaki te lolenge na Ye. Na esengo, Melinda akobaki kobatela mitindo atako mawa oyo azalaki koyoka. Mwa mibu eleki, akutanaki na makambo oyo elandanaki oyo esalisaki ye asosola malamu koleka lolenge ya nzambe, kobakisaka bolingo na Ye mpo na bana na Ye mpe ngolu na Ye mpo na babokasi na biso atako ebongi nie te mpo na kosala mosala na Ye.

Alimbolaka lolenge nini oyo etindiki ye: “Nayebi solo ete mwango ya Tata ezali kosala, ete Amipesi ye moko na elonga na biso, mpe ete Azali kopesa biso mateya mpe makambo tozali na yango mposa mpo na kozonga na miso na Ye. Nazali komimona mpe basusu mingi lokola Nzambe amonaka biso. Nazali na makoki ya kozala tata, koteya, mpe kosala na bolingo mingi koleka mpe bobangi moke. Nazali koyoka kimia mpe elikya na esika ya motema likolo mpe bozangi kimia. Na esika ya komiyoka ya kosambisama, nazali komiyoka ya kosungama. Bondimi na ngai ezali sikisiki. Nazali koyoka bolingo ya Tata na ngai mbala mingi mpe na mozindo koleka.”1

Kozalaka “na likanisi malamu ya ezalela, babongi nie, mpe mabongi [ya Tata na Lola]” ezali ntina mpo na kosalela bondimi ekoka mpo na kozwa bonetolami.2 Bososoli malamu ya ezalaela ya Tata na lola ekoki kobongola lolenge tozali komimona bisomei mpe basusu mpe kosalisa biso tososola bolingo monene ya Tata mpo na bana na ye mpe mposa na Ye monene mpo na kosalisa biso tokoma lokola Ye. Emoneli moko ya malamu te ya lolenge na Ye ekoki kotika biso koyokaka lokola soki tozali na makoki te ya kozongaka te na miso na Ye.

Ntina na ngai lelo ezali koteya makambo ya malongi ya motuya etali Tata oyo ekopesa nzela na moko na moko na biso, kasi mingimingi baoyo bakomituna soki Nzambe alingaka bango, mpo na kososola malamu koleka ezalela na Ye ya solo mpe kosalala bondimi monene koleka kati na Ye, Mwana na Ye, mpe mwango na Ye mpo na biso.

Bomoi Yambo na Mbotama

Na mokili yambo ya mbotama, tobotamaki lokola milimo na Baboti ya Lola mpe tofandaki elongo na Bango lokola libota.3 Bayebaki biso, bateyaki biso, mpe balingaki biso.4 Tolingaki mingi mpenza kozala lokola Tata na biso na Lola. Nzokande, mpo na kosala bongo, toyebaki ete tossengelaki:

  1. Kozwa banzoto ya nkembo, ezanga kufa, ya mosuni;5

  2. Kobala mpe kosala mabala na nzela nguya ya kokangisa ya bonganganzambe;6 mpe

  3. Kozwa boyebi nyonso, nguya, mpe bizalela ya bonzambe.7

Mpo na yango, Tata akelaki mwango oyo ekopesa biso nzela soki makambo mosusu ekoki,8 kozwa banzoto ya mosuni oyo ekokoma ya kufa te mpe ya nkembo na Bosekwi; kobala mpe kosala mabota na bokufi to, mpo na bato ya botongono oyo bazwaki libaku oyo te, nsima ya bokufi;9 kotambola epai ya bobongi nie; mpe na nsuka kozonga epai ya Baboti ya Lola mpe kofanda elongo na bango mpe mabota na biso na bozali ya bonetwami mpe esengo ya seko.10

Makomi ebengi yango mwango ya lobiko.11 Tozali na matondi mpenza mpo na oyo mwango oyo ntango elakisamaki epai na biso, togangaki na esengo.12 Moko na moko na biso andimaki basoki ya mwango yango, kobakisaka boyebi mpe mikakatano ya kufa oyo ekosalisa biso tokolisa bizalela ya bonzambe.13

Bomoi ya Kufa

Na bokufi, Tata na Lola apesi biso basoki oyo tozali na yango mposa mpo na kotambola o ntei ya mwango na Ye. Tata abotaki Yesu Klisto na mosuni14 mpe apesaki Ye lisalisi ya bonzambe mpo na kokokisa etinda na Ye ya kufa. Tata na Lola akosalisa lisusu moko na moko na biso soki tokobunda na kobatela mitindo na Ye.15 Tata apesi biso bonsomi ya kopona.16 Bomoi na biso ezali na maboko na Ye, mpe ya biso “mikolo eyebani” mpe “ekokitisama te.”17 Mpe Asalaka ete na nsuka makambo nyonso esalaka mpo na bolamu ya bango oyo bakolingaka Ye.18

Ezali Tata na Lola oyo apesaka biso limpa na biso ya mokolo na mokolo,19 oyo ebakisi nyonso mibale bilei toliaka mpe bokasi tozali na yango mposa mpo na kobatela mitindo na Ye.20 Tata apesaka makabo ya malamu.21 Ayokaka mpe ayanolaka nsambo na biso.22 Tata na Lola akangolaka biso uta na mabe ntango topesi Ye nzela.23 Alelaka mpo na biso ntango toyokaka mpasi.24 Na nsuka, ya biso mapamboli nyonso eutaka na Tata.25

Tata na Lola akambaka mpe apesaka biso boyebi tosengeli na yango koyekamaka na bokasi, botau, mpe maponi na biso mpo ete tokoka kobota mbuma malamu.26 Tata apesaka biso etumbu ntango esengeli mpo Alingaka biso.27 Azali “Moto ya Toli,”28 oyo akopesa biso toli soki tosengi.29

Ezali Tata na Lola oyo atindaka nyonso mibale botindiki mpe likabo ya mpe likabo ya Molimo Mosantu kati na bomoi na biso.30 Na nzela ya likabo ya Molimo Mosantu, nkembo—to mayele, pole, mpe nguya—ya Tata ekoki kofanda kati na biso.31 ISoki tobundi mpo na kobuta na pole mpe solo kino miso na biso ekotaka kaka nkembo ya Nzambe, Tata na Lola akotinda Molimo Mosantu ya Elaka mpo na kokangisa biso tii na bomoi ya seko mpe kobimisela biso elongi na Ye likolo na bisos—ata na bomoi oyo to ya nsima.32

Bomoi ya Nsima na Kufa

Na mokili ya nsima ya kufa, Tata na Lola akobaka kosopa Molimo Mosantu mpe kotinda bamisionele na baoyo bazali na mposa ya nsango malamu. Ayanolaka nsambo mpe asalisaka baoyo bazangi yango bazwa makuli ya lobiko ya bozwili.33

Tata atombolaki Yesu Klisto mpe apesaki Ye nguya ya komema Bosekwi esalema,34 oyo ezali banzela na yango tozwaka banzoto ya bozangi kufa. TBosikoli ya Mobikisi mpe Bosekwi ememaka biso tozonga na miso ya Tata, wapi tokosambisama na Yesu Klisto.35

Baoyo bayekamaka na “matomba, mpe ngolu, mpe boboto ya Masiya Mosantu”36 bakozwa banzoto ya nkembo lokola Tata37 mpe bakofanda elongo na Ye “na bozali moko ya esengo ekosuka mokolo moko te .”38 Kuna, Tata akolongola mpisoli na biso nyonso39 mpe akosalisa biso tokoba na mobembo na biso mpo na kokoma lokola Ye.

Emonani polele, Tata na Lola azali ntango nyonso wana mpo na biso.40

Ezalala ya Tata

Mpo na kokoma lokola Tata, tosengeli kokolisa bilembo ya ezalela na Ye. Babongi nie mpe Bizalela ya Tata na Lola ezali na maye malandi:

  • Tata azali “Nsuka te mpe Seko.”41

  • Azali na bobongi nie kaka, ngolu, boboto, motema molai, mpe alingaka bobele maye mazali malamu mingi mpo na biso.42

  • Tata na Lola azali bolingo.43

  • Abatelaka mayokani na Ye.44

  • Abogwani te.45

  • Akoki kokosa te.46

  • Tata azalaka motosi ya bato te.47

  • Ayebi makambo nyoso—eleka, ya lelo, mpe ekoya—uta na ebandeli.48

  • Tata na Lola azali mayele koleka49 biso bansol.50

  • Tata azali na nguya nyonso51 mpe asalaka nyonso oyo azwaka kati na motema na Ye mpo na kosala.52

Bandeko mibali mpe basi, tokoki kolikya kati mpe koyekama likolo na Tata. Mpo Azali na emoneli ya seko, Tata na Lola akoki komona makambo oyo tokoki te. Bosepeli, mosala, mpe nkembo na Ye ezali kosala bozangi kufa mpe bonetwami na biso.53 Likambo nyonso Asalaka ezali mpo na litomba na biso. Ye “alingi [ya biso] esengo ya seko kutu mingi koleka [biso] tolingi.”54 Mpe Ye “akosenga te [biso] tokutana na ngonga moko ya mpasi koleka to oyo esengelami solo mpo na [ya biso] litombo to mpo na ya baye [ya biso] tolingaka.”55 Lokola mbano, atalaka kosalisa biso mpo na kokende liboso, kasi kosambisa mpe kokweisa biso te.56

Kokoma Lokola Tata na biso

Lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, moko na moko na biso azali na likoki ya kokoma lokola Tata. Nakosala bongo, tosengeli kokumbambela Tata na nkombo ya Mwana.57 Tosallaka yango na kobundaka kozala botosi na bolingi ya Tata, lokolola ezalaki Mobikisi,58 mpe na kokobaka koyambola.59 Wana ezali biso kosala makambo oyo, biso “tozwi ngolu likolo na ngolu” kino tozwi mobimba ya Tata60 mpe tolatisami na “ezalela, babobongi nie, mpe bizalela na Ye.”61

Kotalaka bokeseni katikati oyo tozali lokola bato ya kufa mpe oyo Tata akomi, ezali kokamwa te ete basusu bamiyoka ete kokomaka lokola Tata ekoki kosalama. Nzokande, makomi ezali polele. Soki tokangami kati na bondimeli Klisto, toyamboli, mpe toluki ngolu ya Nzambe na nzela ya botosi, na nsuka tokoma lokola Tata. Nazwaka limbondi monene na likambo ete baoyo babundaka mpo na kozala botosi bako “zwa ngolu likolo ya ngolu” mpe na nsuka “zwa mobimba na ye.”62 Na maloba mosusu, tokokoma te lokola na bisomei.63 Kasi, ekokoma na nzela ya makabo ya ngolu, mosusu monene kasi mingimingi moke, oyo etongamaka likolo ya moko na mosusu kino tozwi mobimba. Kasi, bandeko mibali mpe basi, yango ekosalema!

Nabengisi yo kotia elikya ete Tata na Lola ayebi boniboni ya konetola yo ; luka lisalisi na Ye ya mokolo na mokolo ya ntango nyonso; mpe kende liboso na bondimi kati na klisto kutu ntango okoki te koyoka bolingo ya Nzambe.

Ezali na mingi tososolaka te etali kokomaka lokola Tata.64 Kasi nakoki kotatola na solo ete kobundaka mpo na kokoma lokola Tata esengaka libonza ya lollenge nyonso.65 Mabonza tosalaka awa na kufa, atako ezali monene nini, ekokani te na bosepeli, esengo, mpe bolingo ezanga emekoli tokoyoka na miso ya Nzambe.66 Soki ozali kobunda mpo na kondima ete ezali litomba mabonza oyo osengami kosala, Mobikisi abiangi yo, kolobaka, “Bososoli naino te mapamboli minene boni Tata a … lengeli mpo na bino; … bokoki te komema makambo nyonso sikawa, kasi, bozala na esengo malamu, mpo nakokamba bino na nzela.”67

Natatoli ete Tata wa yo na Lola alingaka yo mpe alingi yo ozala na elongo na Ye lisusu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.