2010–2019
Mosala ya Bozongisi Boyokani
Sanza ya Zomi 2018


Mosala ya Bozongisi Boyokani

Natatoli na kimia na motema ete bozongeli Nzambe mpe moko na moko mosusu akomema soki tozali na komikitisa mpe bokasi ya kokoka ya koluka yango.

Na sanza ya minei eleki, Mokambi Russell M. Nelson akotisaki likanisi ya kosalisa lokola nzela moko ya kobatela mitindo minene ya kolinga Nzambe mpe kolinga moko na mosusu.1 Biso, lokola bayangeli ya Eklezia, na motema ya kofungwama mpe bosepeli epai na bino na biyano oyo babandaki na likambo wana. Totondi bino mpo na kolandaka profeta na biso na mosala ya ntina mpe tomoni ete bozeli te na ntina ya bansango ebele. Kota na liziba mpe sokola. Bokende epai ya baoyo bazali na bosenga. Botelema te komitunaka soki bosengeli kokata mai na mokongo to kokata mai na maboko mibale mpe makolo mibale. Soki tolandi mabongi ya ebandeli oyo eteyami, totikali na boyokani elongo na bafungola ya bonganganzambe, mpe toluki Molimo Mosantu mpo na kokamba biso, tokoki kokweya te.

Na ntongo oyo nalingi kolobela kutu eteni moko ya moto se moko mingi ya kosalisa oyo ezali na nzela ya lotomo te, esengi lisolo elengelami te, mpe ezali te na molongo ya raport te longola se na lola. Tika nakabola elongo na bino ndakisa moko ya libota ya lolenge ya lisalisi wana.

Grant Morrell Bowen azalaki molongani mpe tata moko ayebi mosala, amipesa oyo, lokola mingi oyo babikelaka na bilanga, azalaki na mobuli ya mosolo ntango bobuki mbuma ya mbala ya mboka ezalaki mabe. Ye mpe mwasi na ye, Norma, bazwaki mosala mosusu, na nsuka bakendaki na engumba mosusu, mpe babandaki kozongela nkita na bango lisusu. Nzokande, na likama moko ya mawa, Ndeko mobali Bowen azokisamaki makasi ntango, kati na lisolo ya lekomande ya tempelo, episikopo atiaki mwa ntembe na oyo etali esakola ya Morrell ete azalaki mofuti moko na zomi mobimba.

Nayebi te nani na mibali oyo azalaki na makambo ya solo mokolo wana, kasi nayebi mpenza ete Ndeko mwasi Bowen abimaki na lisolo wana na mokanda ya tempelo na ye ya sika, ntango Ndeko mobali Bowen abimaki na nkanda moko oyo ememaki ye libanda ya Eklezia mpo na mibu 15.

Kotalaka te nani azalaki na solo na ntina ya moko na zomi, emonani na miso bango mibale Morrell mpe episikopo babosanaki etinda ya Mobikisi ya “kobongisana noki na motemeli na yo”2 mpe Paulo apesi toli “tika te ete moi elimwa nainonainobozali na nkanda.”3 Likambo ezali ete bayokanaki tempe moi elimwaki mpenzalikolo ya nkanda ya Ndeko mobali Bowen mikolo ebele, nsima bamposo, nsima mibu, engebene na liloba elobama na oyo aleki bwania ya Baloma ya kala, oyo alobaki, “Nkanda, soki ekonzami te, mbala mingi [ebukaka] koleka mpota oyo etumboli yango.”4 Kasi likamwisi ya bozongisi boyokani ezali ntango nyonso mpo na biso, mpe mpo na bolingo mpo na libota na ye mpe Eklezia oyo ayebaki kozala solo, Morrell Bowen azongelaki koya na milulu nyonso ya Eklezia . Tika ngai nayebisa na mokuse boni boni yango esalemaki.

Mwana mobali ya Ndeko mobali Bowen, Brad, azali moninga malamu na biso mpe Ntuku Nsambo ya Etuka kosalaka na sudi ya Idaho. Brad azalaki na mibu 11 na ntango ya likama oyo, mpe mpo na mibu 15 azalaki kotala bokiti ya bomipesi na bonzambe ya tata na ye, nzeneneke moko ya mbuma mabe kobukamaka na esika wapi nkanda mpe boyokaniate elonamaka. Elomoko esengelamaki kosalema. Wana feti ya Bozongisi matondi ebelamaki na 1977, Brad, moyekoli ya mibu 26 na Université Brigham Young; mwasi na ye, Valerie; mpe bebe ya sika ya mobali, Mic, bamataki na motuka moke ya lolenge ya bayekoli mpe, atako eleko mabe, bakumbaki tii na Billings, Montana. Ata kutu koniata liboke ya mvula ya mpembe te mpembeni ya West Yellowstone ekokaki te kopekisa bato misato oyo na kokokisaka bokutani ya kosalisa to lisungi elongo na Ndeko mobali Bowen Sr.

Na bokomi na bango, Brad mpe ndeko na ye ya mwasi Pam basengaki ngonga ya bango moko elongo na tata na bango. “Ozali tata moko ya kafukafu,” Brad abandaki na mwa liyoki, “mpe toyebi boniboni olingi biso. Kasi elokomokoezali mabe, mpe esali mikolo molai. Mpo ozokisamaki mbala moko, libota oyo mobimba ezali koyoka mpasi mpo na mibu ebele. Tozali ya kobukana, mpe ozali bobele moko oyo akoki kobongisa biso. Nasengi, nasengi, nsima ya ntango oyo nyonso, ekoki yo komona yango na motema na yo mpo na kotia mpembeni likama moke wana na episikopo wana mpe lisusu kokamba libota oyo kati na nsango malamu lokola ozalaki kosala kala?”

Ezalaki na kimia ya liwa. Nsima Ndeko mobali Bowen atalaki likolo na mibale oyo, bana na ye, mokwa na mikwa na ye mpe mosuni na mosuni na ye,4 mpe alobaki na kimia mpenza, “Iyo. Iyo, nakosala yangol.”

Na esengo kasi na kokamwa na eyano ya mbalakaka, Brad Bowen mpe libota na ye batalaki molongani mpe tata na bango kokende na episikopo na ye ya sika na molimo ya bozongisi boyokani mpo na kobongisa makambo malamu kati na bomoi na ye. Na eyano moko malamu mpenza epai ya botali ya mpiko kasi ya mbalakaka mpenza, episikopo, oyo mbala na mbala azalaki kobengisa Ndeko Bowen mpo ete azonga, ayambaki Morrel maboko ya kofungwama mpe kaka akangaki ye— akangaki ye ngonga molai mingi.

Na bobele bamposo moke, —azwaki ntango molai te—Ndeko mobali Bowen amipesaki mobimba na likambo ya Eklezia lisusu mpe amilongobanisaki mpo na kozongela tempelo. Kala te andimaki libiangi ya kokamba mwa etape ya makambo ya bato 25 mpe akolisaki yango lingomba efulukaki ya mingi malamu koleka bato 100. Nyonso oyo esalamaki mibu 50 eleki, kasi mbano ya libondeli ya kosalisa ya mwana mobali mpe mwana mwasi moko epai ya tata na bangomei mpe bolingi ya tata wana mpo na kolimbisa mpe kokende liboso na esika ya babotau ya basusu ememi mapamboli oyo ezali kokoba koyela—mpe ekoya mpo na libela— libota ya Bowenfamily

Bandeko mibali mpe basi, Yesu asengi ete biso “tobika elongo kati na bolingo”6 na “boswani te kati na binona nsango te.”7 “Oyo azali na molimo ya boswani azali ya ngai te,” Akebisaki Banefite.8 Solo, na mingi, bozalani na biso na Klisto ekotalisama—to mwa moke ekosimbama—na nzela ya bozalani na biso na moko na mosusu.

“Soki yo … okozala na mposa ya koya epai ya ngai,” Alobaki, “mpe omikundoli ete ndeko wa yo azali na likambo lya yo—

“Kende nzela ya yo epai ya ndeko wa yo, yambo zongiisa boyokani na [ye]mpe nde yaka epai ya ngai na mokano motonda mwa motema, mpe nakoyamba yo.9

Solo moko na moko na biso akoki kotanga ndenge ebele yaklutu yatompota ya kala mpe mawa mpe makundoli ya mpasi oyo ngonga oyo mpenza ezali kobebisa kimia na motema ya moto moko to libota to nzinganzinga. Ata soki biso nde tosalaki mpasi wana to toyokisamaki mpasi yango, bampota wana esengeli kobikisama mpo ete bomoi ekoka kozala na litomba lokola Nzambe akanaki yango ezala. Lokola bilei kati na ebombelo ya malili oyo bankoko na yo na bokebi batalaka na nkombo na yo, bampota ya kala wana elekisi mikolo na yango ya bobebi wuta kala. Nasengi esika ya motuya te kati na molimo na yo epai na yango lisusu te. Lokola Prospero alobelaki na nkondo Alonso na The Tempest “Tika tomemisa makundoli na biso mokumba te na bozito oyo eleka.”10

“Bolimbisa mpe bokolimbisama,”11 Klisto ateyaki na ntango ya Boyokani ya sika. Mpe na mokolo na biso: “Ngai, Nkolo, nakolimbisa oyo Nasengeli kolimbisa, kasi mpo na bino bosengeli kolimbisa bato nyonso.”12 Nzonkande, ezali motuya mpo na boko na bino kozalaka kati na mposa ya solo koyeba nini Alobaki te Alobaki teOpesami nzela ya koyoka mpasi ya solo to mawa ya solo euti na misala ya kobebisa oyo osali mpo na moto mosusu.” Mpe Alobaki te , “Na ntina ya kolimbisa mobimba, osengeli kokoba bozalani bobe to kozongela likambo moko ya kokakema, ya kobebisa.” Kasi atako kutu masenginia ya mabe koleka oyo ekoki koyefla biso, tokoki kotelema likolo ya mpasi na biso bobele ntango totie matambe na biso kotambolaka na nzela ya lobiko ya solo. Nzela wana ezali moko ya kolimbisa etambolamaki na Yesu ya Nazaleti, oyo abengi moko na moko na biso, “Yaka kobila ngai.”13

Na libengisi ya boye mpo na kozala moyekoli na Ye mpe komeka kosala bo esalaki Ye, Yesu azali kosenga biso tozala bisaleli ya ngoulu na Ye—kozalabantoma mpo na Klisto” na “mosala ya bozongisi boyokani,” lokola Paulo alimbolaki epai ya Bakolinti.14 Mobikisi ya mpota nyonso, Ye oyo abongisaka mabe nyonso, asengi biso tosala elongo na Ye na mosala ya mpasi ya kosalaka kimia na mokili oyo ekoki kozwa yango na nzela mosusu kani te.

Yango wana, lokola Phillips Brooks akomaki: “Yo oyo ozali kotika bozangi boyokani ya mawa ekoba mibu na mibu, kolingaka kosilisa yango mokolo mosusu; yo oyo ozali naino koswana mpo okoki mpenza kokana ete sikawa ezali mokolo ya kobonza lolendo na yo mpe [kosilisa] yango; yo oyo ozali koleka na mawa bato mosusu ntango ozali kosala mosala na yo, kolobelaka bango te nsima ya nkanda ya buzoba … ; yo oyo ozali kotika … motema ya [moto moko] enyokwama mpo na liloba moko ya kokumisa to ya bolingo, oyo elingi koloba kopesa … mwa mokolo, … kokeonde na nokinoki mpe kosala likambo oyo okokaki mokolo te kozala na libaku mosusu mpo na kosala.”15

Bandeko na ngai babolingo mibali mpe basi, natatoli ete bolimbisi mpe botiki masenginia, ya kala to ya sika, ezali eteni ya ntina ya bonene ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Natatoli ete na nsuka bobongisi ya molimo ya boye ekoki koya bobele uta na Mosikoli na biso ya bonzambe, Ye oyo ayaka mbangu epai ya lisungi na biso “na lobiko na mapapu na ye.”16 Totondi Ye, mpe Tata na biso na Lola oyo atindaki Ye, ete bozongisi sika mpe mbotama ya sika, lobi ekoya ezanga mpasi mpe mabungi ya kala, ekoki bobele kosalema te, kasi esili kozwama, kosombama, na ntalo ya mpasi elakisami na nzela ya makila ya Mwana Mpate oyo asopaki yango.

Na likoki ya kiapostolo epesameli ngai na Mobikisi ya mokili, natatoli na ntina ya kimia epai ya molimo oyo boyokani na Nzambe mpe na moko na mosusu ekomema soki tozali na bomikitisi mpe mpiko ya kokoka mpo na kolanda yango. “Botika kowela bino na bino.” Mobikisi asengaki.17 Soki boyebi oyo etali mpota moko ya kala, bobongisa yango. Bobatelana kati na bolingo.

Baninga na ngai ya bolingo, na mosala na biso ya elongo ya boyokani, nazali kosenga bino kozala basali kimia—bolinga kimia, boluka kimia, bosala kimia, bolinga kimia mingi koleka. Nasali libiangi wana na nkombo ya Nkolo na Kimia, oyo ayebi makambo nyonso etali lombotonu mpe bozangi boyengebeni, etali babofundi ya lokuta mpe kozalaka “ya kkozokisama na ndako ya [ya yengaibaninga,”18 kasi oyo kaka azwaki bokasi mpo na kolimbisa mpe kobosana—mpe ntango nyonso akosala, kutu Nkolo Yesu Klisto, amene. Na yango nasambeli, mpo na bino mpe mpo na ngai, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.