2010–2019
Kozokisama
Sanza ya Zomi 2018


Kozokisama

Na mikakatano ya mokili, na motema kimia bokende liboso, mpe libiki ya nguya ya Mobikisi ekomemela bino pole, bososoli, kimia, mpe elikia.

Na sanza ya misato mwa 22, 2016, yanmbo ya mwambe na ntongo, ba terroriste mibale babetaki bombe na Libanda ya mpepo na Bruxelles. Mpaka Richard Norby, Mpaka Mason Wells, mpe Mpaka Joseph Empey bazwaka ndeko mwasi Fanny Clain mpo na libanda ya mpepo mpo na akende na misio na ye na Cleveland, Ohio. Bato ntuku misato na mibale babungisaki bomoi na bango, mpe bamisionele banso bazokaki.

Oyo azokaki makasi koleka ezalaki Mpaka Richard Norby, ya mibu 66, kosalaka elongo na molongani na ye, ndeko mwasi Pam Norby.

Mpaka Norby akanisaki na ngonga wana:

“Na mbalakata, nayebaki nini esalemaki.

“Namekaki kokima mpo na bokengi, kasi mbala moko nakweyaki na nse. … Nakokaki komona ete lokolo na ngai ya mwasi ezokisamaki mabe mpenza. Na [monaki ] molinga ya mwindo komata, maboko nyonso epakolamaki na putulu ya mwindo. Na kimia napusaki yango kasi, nayaki komona ete yango ezalaki putulu te kasi loposo na ngai oyo ezikaki . Simisi na ngai ya pembe ekomaki na makila uta na mpota na mokongo na ngai.

“Lokola elindo ya oyo esalemaki elekaki na makanisi na ngai, [nazwaki] likanisi ya makasi oyo, … Mobikisi ayebaki wapi nazalaki, nini esalemaki, mpe [nini] nazalaki komona na ngonga oyo.”1

Elilingi
Richard Norby na likomi moko

Wana ezalaki mikolo ya mikakatano kolandisama na likama mpo na Richard Norby mpe mpo na molongani na ye, Pam. Akotaki na koma to mpe kifwafwa, kolandisama na mapaso, mikolobbe, mpe bozangi kimia bonene.

Richard Norby abikaki, kasi molongani na ye abikaki te. Mibu mibale na ndambo nsima, bampota na ye ezalaki kokoba kokauka; lokolo ya kobamba etiamaki na esika ya eteni ya likolo oyo elongwaki; litambe moko na moko ekeseni kolekaliboso ya ngonga wana na Libanda mpepo ya Bruxelles.

Elilingi
Richard and Pam Norby

Mpo na nini oyo esalamaki epayi ya Richard mpe PamNorby?2 Bazalaki solo na mayokani na bango, basalaki misio ya yambo na Ivory Coast, mpe babokolaki libota malamu. Basusu bakoki koloba, “Ezali malamu te! Ezali kaka bosolo te! Bazalaki kopesa bomoi na bango mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto; boniboni oyo ekokaki kosalema?”

Oyo Ezali Bokufi

Atako mambi ekozala ya kokesena, makama, mimekamo ya mbalakata mpe bitumba, nyonso ya nzoto to ya molimo, eyaka epayi na moko na moko kati na biso.

Ntango nakanisaki na ntongo oyo na ntina ya balobeli na liyangani oyo ya likita, emonisamaki epai na ngai ete mibale babungisaki bana mpe misato babungisaki bankokooyo na koyebaka te bazongaki na ndako na bango ya lola. Moto moko maladi to mawa elandaki te, mpe lokola elobelami, na mposo oyo mpenza anzelu na mabele oyo tolingaka banso, Ndeko mwasi Barbara Ballard, alekaki na boboto na elamba. Mokambi Ballard, tokotikala kobosana litatoli na yo ya ntongo oyo te.

Tozali koluka esengo. Tozali koluka kozwa kimia. Tokolikya mpo na bolingo. Mpe Nkolo alakisi biso elongo na mapamboli mingi ya kokamwa. Kasi na nzelaya esengo mpe bosepeli eloko moko ezali solo: ekozala na bangonga, ntango, mikolo ntango mosusu mibu lokola molimo ekozokisama.

Makomi eteyi ete tokomeka bololo mpe sukali3 mpe wapi oyo ekozala “bobendani na makambo nyonso.”4 Yesu alobaki, “[Tata na bino] asalaka moyi na ye mpo ebima likolo ya mabe mpe malamu, mpe atindaka moyi likolo ya oyo eza sembo mpe ezangi sembo.”5

bampota ya molimo na biso ezali te mpo na se bonkoko moko na moto ya bozwi to mobola, ekolo moko, to nkola moko . Yango ekomelaka bato nyonso mpe ezali eteni ya boyekoli tozwaka uta na boyebi ya bomoi ya nkufa oyo.

Bayengebene Babosanami Te

Nsango na ngai ya lelo ezali mingi mpo na baoyo bazali kotosa mitindo ya Nzambe, babteli bilaka na bango epai ya Nzambe, mpe, lokola Banorbys mpe mibali misusu, basi mpe bana na bosangani ya mokili mobimba oyo, batungisami na mikakatano mpe mitungisi oyo ezali ya kokima te mpe ya mpasi.

Bampota na biso ekoki kouta na libomi monene to likama eyebani ntina te. Ekoki kouta na mwasi to mobali ya kozanga botongono, kotukaka bozali na mwasi mpe bana. Bampota ekoki kowuta na molili mpe mawa ya makanisi, uta na bokolo ya mbalakata, uta na mpasi to liwa ya mbalakata ya moto oyo tolingaka, uta na mawa ya moko kati na libota abungisi kondima na ye, uta na kozala ye moko ntango mabaku ememi moninga ya seko te, to uta na baminkama misusu ya bopaswami, mpasi “[mawa] oyo liso ekoki komona te.”6

Tososoli banso ete mikakatano ezali eteni ya bomoi, kasi eyaki epaayi na biso na lolenge ya moto na moto, eyaka kokota biso pema na nzela. Na kozanga kobangla, tosengeli komilengela. Apostolo Petelo alobaki, “Kanisa yango ekokamwisa te na ntina ya etumba moke oyo wapi ezali kobundisa yo, yango esengeli koya.”7 Na nzela elongo na langi esengo mpe bosepeli, langi ya molili singa ya momekano mpe bobomi monene azali bozindo mpenza kati lolenge ya mwango ya Tata. Bitumba biye, atako ya mikakatano, mbala mingi ekomaka bateyi na biso ya minene.8

Ntango tozali koloba lisolo ya kokomwa ya bilombe 2,060 ya Helaman, tolingaka makomi oyo: “Engebene na bolamu bwa Nzambe, mpe o bokamwi bonene bwa biso, mpe lisusu bosepeli bwa limpinga lya biso mobimba, ezalaki moto moko te wa bango oyo awaki.”

Kasi maloba ezali kokoba: “Mpe ezalaki wana ata na molimo moko te kati na bango ezwaki mpota .”9 Moko na moko 2,060 azwaki bampota ebele, mpe moko na moko kati na biso akozwa bampota ya etumba ya bomoi, na nzoto, na molimo, to nyonso mibale.

Yesu Klisto Azali Mosamaliya na Biso

Kotika te—atako bozindo ya bampota ya molimo na yo, ezala ntina na yango, kouta to koselema na yango, mpe bokuse to koumela na yango, okobebisama na molimo te. Osengeli kobikisama na molimo kofuluka na bondimi na yo mpe kotia elikya na Nzambe.

Nzambe akelaki milimo na biso te mpo na kozala na bonsomi na Ye. Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, na nzela ya likabo ezanga motango ya Bomikabi na Ye, asikolaki biso kouta kaka na liwa te mpe kopesa biso na nzeala ya boyamboli, bolimbisi masumu na biso, kasi Atelemi pene mpo na kobikisa biso uta na mawa mpe mpasi ye bampota ya milimo na biso.10

Elilingi
Mosamalia Malamu

Mobikisi azali Mosamaliya na biso Malamu,11 atindamaki “mpo na kokangola mitema mibukana.”12 Ye ayaki epai na biso ntango basusu balekaka biso. Na mawa, Ye apakolaka mafuta na Ye ya libiki na bampota na biso mpe akausaka yango. Ye ayebi biso. Asungi biso malamu. Abiangi biso, “Boya epayi na ngayi … mpe nakobikisa [bino].”13

“Mpe [Yesu] asengeli … [konyokwama] bapasi mpe minyokoli mpe mimekamo ya bato; … ete … [asengeli] kozwa likolo na ye bapasi mpe babokono ya bato na ye. … [kozwaka likolo na Ye moko] mikumba na biso, [kozalaka] kotondisama na ngolu.”14

Boya, bino bozangi kimia, bokozwa bopemi;

Yaka kovanda na esika ya ngolu mpe yaka kofukama na etingia.

Aakosilisa bampota ya mitema mitema na bino; awa ezali epemeli na bino.

Nse ezali te na mawa oyo lola ekoki kobikisa te.15

Na ntango ya mpasi maasi, Nkolo alobelaki Profeta Joseph, “Makambo nyonso oyo ekopesa yo boyebi, mpe ekozala mpo na bolamu na yo.”16 Asalaka eloko moko te soki mpo na litomba na biso ? Na momekano ya bitumba ya bomoi, na bompikiliki kende liboso, mpe nguya ya kobikisa ya Mobikisi ekomemela yo pole, bososoli, kimia mpe elikya.16

Kosundola Atako Moke Te

Boluka Nzambe na motema na bino mobimba. Bokolisa bondimi na bino na Yesu Klisto, na bosolo na Ye, na ngolu na Ye. Kangama na liloba na Ye, “Ngolu na ngai ekoki na bino: mpo ete makasi na ngai ekomaki bobongi nie na bolembu.”18

Mikundola, boyamboli ezali nguya monene na lisalisi ya molimo.19 Tosaka mitindo mpe zala sembo na Bolendisi, kokanisaka ete Mobikisi alakaki, “Nakotika bino moko te: Nakoya epai na bino.”20

Kimia ya Mobikisi ekokonza kobaluka ya mvula ya mupepe makasi ya mokili. Zonga na ndako ya Nkolo na motema na yo ezokisama mpe ibobata yo mobimba mbala na mbala ntango esengeli. Tempelo elakisi bokuse ya ngonga na biso kati na bomoi ya kufa elakiseli nzela ya seko.21

Look backward, remembering that you proved your worthiness in your premortal state. Tala sima, mikundola ete bolakisaki bolongobani na bino na bomoi ya yambo ya kobotama Bosalaki yango liboso, mpe bokoki kosala yango lisusu.

Tala liboso. Mikakatano mpe mawa na bino ezali solo mpenza, kasi ekoumela mpo na libela te.22 Molili na yo ekoleka, mpo ete “Mwana mobali … [alamukaki] elongo na libiki na ye na mapapu.”23

Bandeko Norby bayebisaki ngai, “Koyokisama nsoni eyaka na mbala moko kasi ekoki te kopesama mpo na koumela.”24 Apostolo Polo alobaki, “Tozali koyika mpiko … kolanda mokili te; totungisami, kasi tobungisi elikya te; tonyokwami, kasi tobwakisami te; tonyatami na nse te, kasi tobebisami te.”25 You may be exhausted, but don’t ever give up.26

Ata na mpasi na yo ya bampota, okotanda loboko mpo na basusu, kolikiaka na elaka ya Mobikisi: “Oyo akobungisa bomoi na ye na ntina na ngai akozwa yango.”27 Bazokisami oyo bazali kokawusa bampota ya basusu bazali banzelu ya Nzambe na mabele.

Na mwa ntango moke, tokoyoka profeta na biso ya bolingo profeta, Mokambi Russell M. Nelson, moto na bondimi koleka na Yesu Klisto, moto na kimia, alingami na Nzambe kasi azali mpe na bampota na ye na molimo.

Na 1995 wana na ye ya mwasi Emily, ntango azala na zemi, amonanaki na cancer. Wana ezalaki mikolo ya elikia mpe esengo ntango mwana na ye abotamaki malamu. Kasi cancer ezongaki, mpe mwana na bango ya bolingo Emily akufaki kaka mposo mibale sima ya bokundoli mibu 37 na ye, kotikaka molongani na ye ya bolingo mpe bana bilenge mitano.

Elilingi
Liteya ya Mokambi Nelson na 1995

Na likita linene, kaka sima ya kufa na ye, Mokambi Nelson amipesaki: “Mpinzoli ya mawa ekitaki elongo na kotombela ete akoki kosala mingi mpo na mwana na ye ya mwasi. … Soki nazalaki na nguya ya kosekwisa, nakokaki komeka kozongisa [ye] azonga. … [Kasi] Yesu Klisto azali na bafungola oyo mpe akosalela yango mpo na Emily … mpe mpo na bato nyonso na ntango ya Nkolo ye moko.”28

Elilingi
Mokambi Nelson na Puerto Rico

Sanza eleki, ntango nakendaki kotala basantu na Puerto Rico mpe komikundolaka mopepe makasi ya na kombo ya hurricane ya bobomibomi ya mobu moleki, Mokambi Nelson alobaki na bolingo mpe mawa:

“[Oyo] ezali eteni ya bomoi. mpo na yango nde tozali awa. Tazali awa mpo na kozwa nzoto mpe mpo na komeka mpe komekama. Mimekano mingi na yango ezali ya nzoto; mingi ezali ya molimo, mpe bitumba yo awa ezali mibale ya nzoto mpe ya molimo.”29

“Okoki kotika te. Tozali [mpenza] na esengo mpo na yo. Bino Basantu ya botongono bobungi mingi, kasi na nzela na yango nyonso, bozali kotia bondimi na bino epayi ya Yesu Klisto.”30

“Na kobatela mitindo ya Nzambe, tokoki kozwa esengo na kati ya bantango na biso ya mabe.”31

Mpinzoli nyonso Ekopangusama

Bandeko na ngai ya basi mpe mibali, ezali elaka na ngai epayi na bino ete kokolisa bondimi na bino epayi ya Nkolo Yesu Klisto ekobakisa bino bokasi mpe elikya monene. mpo na bino, bosembo, Mobikisi ya milimo na biso akoki, na ntango na Ye mpe na nzela na Ye, akosilisa bampota na bino nyonso.32 Kozanga bosembo te, kotuaka te, kobundisa te, mawa te, mutu pasi te, konyokwama te, kozoka te—boniboni bozindo, ata lolenge, atako pasi—ekolongola uta na libondisi, kimia, mpe elikya koumela na Ye oyo afungoli maboko mpe oyo atandoli akoki kobianga biso kozonga na pembeni na Ye. Na mokolo wana, Apostolo Yoane atatolaki, bosembo “oyo [ekoya] sima ya mikakatano”33 ekotelema “na monkoto ya pembe … liboso ya ngbende ya Nzambe.” Mwana na Mpate “akofanda kati na bango … mpe Nzambe akopangwisa mpinzoli nyoso na miso na bango.”34 Mokolo oyo ekoya. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Personal conversation, Sanza ya Yambo. 26, 2018.

  2. Na masolo mobu moleki, Richard Norby ayebisaki ngai, “Toyanoli oyo epesamelaki biso.” Akabolaki oyo uta na zulunale na ye: “Mimekano mpe bitumba oyo eyelaki biso epesi libaku mpe likoki ya koyeba malamu Mobikisi mpe kososola na bozindo mpenza likabo ya bomikabi na ye. Ezali bobele epayi na Ye nde totiaka elikya. Ezali bobateli na ye nde tolukaka. Ezali epayi na ye totalelaka. Ezali epayi na ye nde tolie elikya. Ezali ye nde oyo tolingi na motema mobimba . Mosikoli ayokakaki nyoso ya nzoto mpe mpasi ya ete ezali eteni ya bomoi ya kufa. Azwaki bapasi na biso. Amelaka mawa na biso.”

  3. Tala Doctrine et Alliances 29:39

  4. 2 Nefi 2:11

  5. Matai 5:45

  6. “Lord, I Would Follow Thee,” Hymns, no. 220.

  7. 1 Petelo 4:12.

  8. “Tokomeka bango awa, mpo na kotala soki bakosala nyonso oyo Nkolo akotinda bango” (Abraham 3:25; tala lisusu Doctrine et Alliances 101:4–5).

  9. Alama 57:25

  10. Moninga moko akomelaki ngai: “Etumba ya pene mibu mitano mileki na liyoki ya ‘molili mpe kozanga esengo’ na ndenge ekseni ememaka yo na nsuka mpenza ya makoki, mokano, bondimi,mpe motema kokita na yo. Nsima ya mikolo ya ‘mpasi,’ olembi. Nsima ya bamposo ya ‘mpasi,’ olembi makasi. Nsima ya basanza ya ‘mpasi,’ obandii kobungisa elikya. Nsima ya mobu ya ‘mpasi,’ omitiki na likanisi ete okozala lisusu malamu te. Elikya ekomaka na motuya monene, mpe makabo ya motuya. Na bokuse, nandimi te nayebi boni nalongaki mikakatano, kobomba yango ezalaki [Mobikisi]. Ezali ndimbola bobele mokondi. Nakoki te kolimbola boni nayebi yango, longola se oyo nasali. Na ngolu na Ye, nalongaki yango.”

  11. Tala Luka 10:30–35

  12. Luka 4:18; tala lisusu Yisaya 61:1.

  13. 3 Nefi18:32.

  14. Alama 7:11–12. “Akitaki na nse ya makambo nyonso, na oyo ayebaki nyoso” (Doctrine et Alliances 88:6).

  15. “Come, Ye Disconsolate,” Hymns, no. 115.

  16. Doctrine et Alliances 122:7.

  17. “Oyebi bonene ya Nzambe; mpe akobulisa matungisi na yo mpo na litomba na yo” (2 Nefi 2:2). “I do know that whosoever shall put their trust in God shall be supported in their trials, and their troubles, and their afflictions, and shall be lifted up at the last day” (Alma 36:3).

  18. 2 Bakolinti 12:9

  19. Tala Neil L. Andersen, “The Joy of Becoming Clean,” Ensign, Sanza ya minei. 1995, 50–53.

  20. Yoane 14:18

  21. “Soki totiaka elikya na Klisto bobele na bomoi oyo, tozali banso bato ya mawa koleka” (1 Bakolinti 15:19).

  22. Na molongo ya yambo ya Buku ya Mormon, Nefi alimbolaki ete “Amonaka mpasi mingi na bomoi [na ye]i” (1 Nefi 1:1 NsimaNefi alobaki, “Natalelaki Nzambe na ngai, mpe nakumisaki ye mokolo mobimba”; mpe nalobelaki Nkolo mabe na nse ya motema te na ntina ya minyoko na ngai.”(1 Nefi 18:16

  23. 3 Nefi 25:2

  24. Personal conversation, Sanza ya Yambo. 26, 2018.

  25. 2 Bakolinti 4:8–9

  26. Mokambi Hugh B. Brown, ntango akendaki kotala na Israel, atunamaki motuna mpo na nini Abalayama atindamaki kobonza mwana na ye ya mobali. Ayanolaki, “Abalayama azalaki na mposa ya koyekola eloko moko na ntina ya Abalayama” (na Truman G. Madsen, Joseph Smith the Prophet [1989], 93).

  27. Matai 16:25

  28. Russell M. Nelson, “Children of the Covenant,” Ensign, Sanza ya mitano 1995, 32.

  29. Russell M. Nelson, in Jason Swensen, “Better Days Are Ahead for the People of Puerto Rico,” Church News, Sept. 9, 2018, 4.

  30. Russell M. Nelson, na Swensen, “Better Days Are Ahead,” 3.

  31. Russell M. Nelson, na Swensen, “Better Days Are Ahead,” 4.

  32. Tala Russell M. Nelson, “Jesus Christ—the Master Healer,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2005, 85–88.

  33. Emoniseli 7:14.

  34. Tala Emoniseli 7:13, 15, 17