2010–2019
Kobatelaka Milimo
Sanza ya Zomi 2018


Kobatelaka Milimo

Tosalisaka na bolingi basusu mpamba te ezali oyo Mobikisi atindi biso tosala.

Na lisolo moko ya kala te na moninga na ngai moko, alobelaki ngai ete ntango azalaki elenge, mondimi abatisami sika na Eklezia, na mbala moko ayokaki lokola mwa moke amikokaki lisusu te na palwasi. Bamisionele oyo bateyaki ye batindaki bango mosika, mpe ye ayokaki lokola atiamaki pembeni. Kozangaka baninga na palwasi, akutanaki na baninga na ye ya kala, mpe elongo na bango akotaki na milulu oyo ememaki ye mosika na kosangana na eklezia—mingi mpenza ete abandaki kopengwa na etonga. Na pinzoli na miso na ye, ye alimbolaki botondi ya mozindo boni ayokaki ntango mondimi moko ya palwasi apesaki ye loboko ya lisalisi mpe, na lolenge moko ya boboto mpe ya kosangisa abengisaki ye mpo na kozonga . Na basanza moko, azongaki na kimia ya etonga, kolendisaki basusu lokola ye moko. Ezali biso te na botondi mpo na mobateli wana na Brezil oyo alukaki elenge mobali oyo, Mpaka Carlos A. Godoy, oyo sikawa afandi nsima na ngai lokola moko ya Bokambi ya Bantuku Nsambo?

Ezali esengo te komona mpenza boniboni bokasi ya boye ekoki kozala na mbano ya seko. Oyo ezali motema ya makasi ya kosalisa na Eklezia. Tata ya Lola akoki kokamata makasi moke na biso ya mokolo na mokolo mpe kobongola yango na eloko ya kokamwa. Ezali kaka sanza motoba uta Mokambi Russell M. Nelson asakolaki ete “Nkolo asali bokokisi ya motuya na lolonge tozali kolengelana,”1 kosembolaka, “Tokosala lolenge moko ya sika, ya bule mingi mpo na kosalisa basusu. Tokolobela makasi wana bobole lokola ‘kosalisa.’”2

Mokambi Nelson lisusu alimboli: “Elembo monene ya Eklezia ya Nkolo ya solo mpe ya bomoi ekozala ntango nyonso makasi moko ebongisaka, ekambama mpo na kosalisa bana moko na moko ya Nzambe mpe mabota na bango. Mpamba te ezali Eklezia na Ye, biso lokola basali na Ye tokosalisa moto, kaka lokola Nkolo asalaki. Tokosalisa na nkombo na Ye, na nguya mpe likoki na Ye, mpe na boboto na Ye ya bolingo.”3

Uta esakoli yango, eyano na bino ezalaki ya kondima te! Tozwi nsango ya elonga monene na kokokisaka mbongwana oyo na penepene makonzi nyonso na mokili lokola etindamaki na profeta na biso ya bomoi. Na ndakisa, kosalisa bandeko mibali mpe basi etindamaki na mabota, baninga—kobakisa bilenge mibali mpe basi—ebongisami, mpe kosololaka mp na moloba ezali kosalema.

Nakanisi te ezali na mbalakaka ete basanza motoba mpo na esakola ya lobi eleki—“likambo ya sika mpe mokangano kati ya liteya ya nsango malamu na libota mpe Eklezia”4—esakola epesameli na ntina kosalisa. Na ebandeli ya Sanza ya yambo, lokola tosalelaka kati kati ya ntango na eklezia na biso, nyonso oyo toyekolaki na kosalisa ekosunga biso totala lolenge nini ya kotika koleka mpe, totia mokolo ya Saba kati kati ya libota na biso mpe tolingana.

Na mabongisi oyo etiami, tosengeli kotuna, “Boniboni bokoyeba tozali kosalisaka na lolenge ya Nkolo? Ezali biso kosunga Mobateli Malamu ya mpate na lolenge Ye alingi?”

Na lisolo ya kala, Mokambi Henry B. Eyring akumisaki Basantu na kobongisaka mpo na mbongwana oyo ya malonga kasi lisusu alakisaki elikia ya solo ete bandimi bakondima ete kosalisa ezali mingi koleka “kaka kozala na bosembo.” Yango ezali koloba te ete kozala na boboto ezangi mbano, kasi baoyo basosoli molimo ya solo ya kosalisa bakososola ete ezali koleka kozala na bosembo mpamba . Soki esalemi na lolenge ya Nkolo, kosalisa ekoki kozala na nguya ya molai mpo na malamu oyo ekokende na boseko nyonso, lokola ezali mpo na Mpaka Godoy.

“Mobikisi alakisaki na ndakisa nini elingi koloba kosalisa ntango Ye azalaki kosalisa na bolingo. … Ye … ateyaki, asambelaki mpo na, alendisaki, mpe apambolaki nzinganzinga na Ye, kobengisa banso na kolanda Ye. … Ntango bandimi ya Eklezia bazali kosalisa [na lolenge moko ya monene mpe esantu mingi koleka], balukaka na losambo kosunga lokola Ye asalaki—mpo na… ‘kokengela eklezia ntango nyonso, mpe kozala elongo na bango mpe kolengela bango’ ‘batala ndako ya mondimi moko na moko,’ mpe kosalisa moko na moko mpo na kokoma moyekoli ya solo ya Yesu Klisto.”5

Tososoli ete mobateli mpate ya solo alingaka mpate na ye, ayebaka moko na moko na yango na nkombo, mpe “alengelaka bango” them.6

Elilingi
Meme likolo ya bangomba

Moninga na ngai ya kala alekisaki bomoi na ye lokola moto ya bilanga, kosalaka mosala makasi ya kobokola ngombe mpe bampate na Rocky Mountains ya nsongensonge. Mbala moko akabolaki elongo na ngai mikakatano mpe makama ya kobokola bampate. Alimbolaki ete na ebandeli ya eleko ya mwa molunge, ntango galasi na esika ya ngomba elembi mingimingi, azalaki kotia bibwele ya libota ya penepene na 2.000 mpate na bangomba mpo na eleko ya molunge. Kuna, azalaki kokengela bampate kino na nsuka ya eleko ya mwa malili, ntango bazalaki kolongola bango uta na esika ya eleko ya molunge kino esika ya eleko ya malili na esobe. Alimbolaki boniboni kobokola etonga monene ya bampate ezalaki mpasi, kosengeka ntongontongo na moi mpe butubutu—kolamukaka malamu liboso moi ebima mpe kosilisaka mosika nsima ya butu. Akokaki te kosala yango ye moko.

Elilingi
Loboko ya Ranch elongo na meme

Basusu bazalaki kosunga na kobokola bibwele, kobakisa maboko kilikili ya baye mayele na mosala na lisalisi ya maboko ya bilenge oyo basengeli na bwania ya baninga na bango. Lisusu ayekamaki na bampunda mibale ya mikolo, bampunda mibale ya bilenge, bambwa bakengeli mibale ya mikolo, mpe bambwa ya mike mibale to misato. Na molai ya eleko ya molunge, moninga na ngai mpe mpate na ye bakutanaki na mopepe mpe mvula ya ekumbaki, bokono, mpota, bokauki, mpe lisusu matata mosusu ekoki kokanisama. Mibu misusu basengelaka komema mai ne eleko mobimba ya molunge kaka mpo na kobatela bampate na bomoi. Nsima, mobu na mobu na nsuka ya eleko ya malili, ntango eleko ya malili ezalaki koya mpe bampate balongolaki bango na ngomba mpe batangaki bango, ezalaki mingimingi koleka 200 oyo ebabungaki.

Elilingi
Bobokoli meme
Elilingi
Lisanga ya meme

Etonga ya 2.000 mpate oyo etiamaki na bangomba na ebandeli ya eleko ya molunge batikalaki moke koleka 1.800. Mingi ya bampate ya kozanga babungaki te mpo na bokono to liwa ya mpamba kasi mpo na baniama lokola nkosi to mbwa ya zamba. Baniama oyo mbala mingi bakutaki bampate oyo bapengwaka mosikia na kimia ya etonga, komilongolaka na bobateli ya mobateli mpate. Ekoki bino komaniola mwa moke oyo nawuti kolimbola na lolenge ya molimo? Nani azali mobateli mpate? Naini azali bibwele? Nani bazali baoyo bazali kosunga mobateli mpate?

Elilingi
Mobateli Mpate Malamu

Nkolo Yesu Klisto Ye moko alobaki, “Nazali mobateli mpate malamu, mpe nayebi bampate na ngai, … mpe nakotika bomoi na ngai mpo na bampate na ngai.”7

Elilingi
Yesu koliesaka meme na Ye

Profeta Nefi lolenge moko ateyaki ete Yesu “akoleisa mpate ya ye, mpe na ye bakozwa elanga ya bilei.”8 Nazwi kimwa na koyebaka ete “Nkolo azali bobateli na ngai9 mpe ete moko na moko na biso ayebani na Ye mpe azali na nse ya bolengeli na Ye. Ntango tokutani na mopepe mpe mvula ya ekumbaki, mpota, mpe bokauki ya bomoi, Nkolo—Mobateli na biso—akosalisa biso. Akobikisa milimo na biso.

Na lolenge moko oyo moninga na ngai azalaki kobatela bampate na lisalisi ya maboko ya bilenge mpe mikolo ya mabele, bampunda, mpe bambwa babateli, Nkolo lisusu akosenga lisalisi na mosala ya mokakatano ya kolengela bampate na etonga naYe.

Elilingi
Yesu Klisto kosalisaka

Lokola bana ya Tata moko ya Lola ya bolingo mpe lokola bampate na etonga na Ye, tosepelaka na lipamboli kozalaka moko na moko kosalisama na Yesu Klisto. Na mbala moko, tozali na mokumba ya kopesa lisungi ya lisalisi na basusu nzinganzinga na biso lokola babateli mpate biso moko. Tosengeli kosala bokebi na maloba ya Nkolo “mpe okosalela ngai mpe okokende na nkombo ya ngai, mpe okosangisa elongo mpate ya ngai.”10

Nani azali mobateli mpate? Mobali, mwasi, mpe mwana nyonso na bokonzi ya Nzambe azali mobateli mpate. Libiangi te esengelami. Ntango tobimi na mai ya libatiisi, totindami mpo na mosala na Ye. Tosalisaka na bolingi basusu mpamba te ezali oyo Mobikisi atindi biso tosala. Alma abetaki nsete: “Mpona oyo mobateli … kozalaka na bampate ebele kasi abatelaki bango te, nde bambwa ya zamba bakoti te mpe balei bampate na ye? … Abenganaka ye te?”11 Ezala bazalani na biso bazali na mpasi ya ntango to ya molimo, tokokima na kosalisa bango. Tokomemana mikumba ete ekoma pepele. Tokolela elongo na baoyo bazali kolela. Tokolendisa baoyo bazali na mposa ya bolendisi.12 Nkolo na bolingo azali kozela yango na biso. Mpe mokolo ekoya oyo tokozwama bayanoli mpo na bolengeli tosalaki na kosalisaka etonga na Ye.13

Moninga na ngai mobateli mpate akabolaki likambo mosusu ya motuya na kokengela bampate na etonga. Alimbolaki ete bampate babunga bakweyaka mingimingi na likama ya baniama ya zamba. Ya solo, ti 15 na kati ya nkama na nyonso ya ntango na ye mpe ya baninga ya mosala na ye ezalaki koleka na koluka bampate babunga. Noki bakutaki bampate babunga, liboso bampate bapengwa mosika mingi ya etonga, moke mingi bampate bazwaki mpasi. Kozwa meme ebungaki esengaki bokitisi motema mpenza mpe mayele.

Mwa mibu eleki, nakutaki nkoma moko na zulunali moko ya mboka ya kokamwa mpenza ete na bombaki yango. Na lonkasa ya likolo ekomamaki, “Mbwa Ya Molende Akosundola Bampate Babunga Te.”14 Nkoma oyo elimboli mwa motango ya bampate bazali na mosala moko mosika te na mabele ya moninga na ngai oyo batikalaki nsima na mabele ya eleko ya molunge. Sanza mibale to misato nsima, babungaki mpe bakangamaki na galasi na ngomba. Ntango bampate batikalaki nsima, mbwa mobateli atikalaki elongo na bango, mpo ezali mokumba na ye ezalaki kokengela mpe kobatela bampate wana. Alingaki te kokende mosika! Atikalaki wana—kobalukaka nzinganzinga na bampate babunga basanza na malili mpe na ntango ya galasi, kosalisaka lokola bobateli na bambwa ya zamba, bankosi ya ngomba, to niama ya zamba mosusu oyo balingaki kosala bampate mabe. Atikalaki wana kino akokaki kokamba to kozongisa bampate na kimia ya mobateli mpate mpe etonga. Elilingi etiami na likolo ya lokasa ya mokanda oyo epesi ndingisa na moto atala ezaleli na miso mpe ya mbwa mobateli.

Elilingi
Ezaleli na miso mpe na mbwa mobateli

Na Boyokani ya Sika, tokuti lisese mpe liteya moko uta na Mobikisi oyo epesi bososoli mosusu etali mokumba na biso lokola babateli mpate, kosalisaka bandeko basi mpe mibali, ya bampate babunga:

“Nani kati na bino, oyo azali na bameme nkama, soki abungisi moko kati na bango, mpe atika te ntuku libwa na libwa kati ya esobe, mpe akende koluka oyo abungi, kino azwa yango?”

“Esili ye kozwa yango akotia yango na mapeka na ye na kosepela.

“Mpe ntango amemi ye na ndako, akoloba na moto nyonso, Sepela na ngai; mpo ete nazwi mpate na ngai oyo esilaki kobunga.”15

Soki totii na mokuse liteya wana eteyami na lisese, tokokuta toli oyo ya motuya:

  1. Tosengeli koyeba nani bampate babunga.

  2. Tokoluka bango kino tokomonaa bango.

  3. Ntango tomoni bango, tokoki kotia bango likolo ya mapeka na biso mpo na komema bango na ndako.

  4. Tokozinga bango na baninga nsima ya kozonga na bango.

Bandeko mibali mpe basi, mikakatano na biso eleki monene mpe mbano na biso eleki monene ekoki koya soki tosalisi bampate babunga. Bandimi ya Eklezia na Buku ya Mormon “basenzelaki likolo ya bato ba bango, mpe baleisaki bango na makambo masengeli mpo na bosembo.”16 Tokoki kolanda bandakisa na bango mpe komikundola ete kosalisa esengeli kozala “kokambama na Molimo, … petepete, mpe … kokokana na bamposa ya mondimi moko na moko.” Ezali na motuya mpensa ete biso “toluka kosalisa bato mpe mabota na komilengela mpo na likuli ekolanda, kobatela [ya bango] mayokani… , mpe kokoma ya komikoka.”17

Molimo nyonso ezali na ntalo mingi mpo na Tata na biso ya Lola. Libiangi na Ye mpenza mpo na kosalisa ezali na ntina mpe motuya monene mpo na Ye, mpo ezali mosala mpe nkembo na Ye. Ezali kutu mpenza mosala ya boseko. Moko na moko ya bana na Ye bazali na makoki ya komekomekisama te na miso na Ye. Ye alingaka yo na bolingo moko okoki kutu kobanda kososola te. Lokola mbwa mobateli emipesa, Nkolo akotikala na ngomba mpo na kobatela yo na mopepe, mvula mpe ekumbaki, galasi, mpe mingi koleka.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso na likita eleki: “Nsango na biso na mokili [mpe nakoki kobakisa, “na etonga na biso ya kosalisa”] ezali pete mpe ya solo: tobengisi bana ya Nzambe nyonso na ngambo mibale ya elamba mpo na koya epai na Mobikisi, kozwa mapamboli ya tempelo esantu, kozala na esengo ewumelaka, mpe komibongisa mpo na bomoi ya seko.18

Tika biso totombola bomoni na biso na limonisi oyo ya boprofeta, boye tokoka kokamba milimo naa tempelo mpe na nsuka na Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Ye azali kozela na biso makamwisi te. Ye asengi kaka ete tomema bandeko na biso ya mibali mpe ya basi epai na Ye, mpo Ye azali na nguya ya kosikola milimo. Soki tosali yango, tokoki mpe tokokokisa elaka oyo: “Ntango Mobateli Mpate Mokonzi akobima, bokozwa motole ya Nkembo oyo ekolemba mpenza te.”19 Na yango natatoli—mpe na ntina ya Yesu Klisto lokola Mobikisi na biso mpe Mosikoli—na nkombo ya Yesu Klisto, amene.