2010–2019
Ntango Ekoki;
Sanza ya Zomi 2018


Ntango Ekoki;

Soki ezali na eloko moko na bomoi na yo osengeli kobongola, ntango ekoki sikoyo.

Mibu ebele eleki, ntango nazalaki komilengela mpo na mobembo ya mosala, nabandaki koyoka tolo mpasi. Na komitungisa , mwasi na ngai azwaki mokano ya kokende na ngai. Na eteni ya yambo na mpepo na biso, mpasi emataki mpenza kino na ndelo ete nakokaki kopema malamu te. Ntango tokitaki, totikaki libanda ya mpepo mpe tokendaki na lopitalo, wapi, nsima ya mimekano ebele, monganga alobaki na biso tokoba malamu mobembo na biso.

Tozongaki na libanda ya mpepo mpe tozwaki mpepo mpo tokende bipai tozalaki kokende. Ntango tobandaki kokita, pilote ayaki epai nazalaki mpe atunaki ngai naloba oyo nazali. Mokumbi mpepo apusanaki, alobaki awutaki kozwa libiangi ya lombango, mpe ayebisaki ngai ezalaki na ambilanse ezalaki kozela na libanda ya mpepo mpo na komema ngai na lopitalo.

Tokotaki na ambilanse mpe tokendaki na lopitalo na kisuku ya babeli. Kuna, toyambamaki na minganga mibale ya malamu oyo balimbolaki biso ete bapesaki ngai sango ya mabe mpe nazalaki na maladi makasi ya tolo, to liboke ya makila, na mompululu na ngai, yango esengaki likebi ya minganga mpenza. Minganga bayebisaki biso ete bakoni ebele babikaka na maladi oyo te. Koyebaka ete tozalaki mosika ya ndako mpe tomilengelaki te na likama yango, minganga balobaki ete soki ezalaki na eloko na bomoi na biso oyo tosengelaki na yango, ntango ekokaki sikoyo.

Namikundoli malamu lolenge nini ntango wana, bomoni bomoi na ngai mobimba ebongwanaki. Nyonso oyo ezalaki ntina na ntango moke ekomaki na ntina lisusu te. Makanisi na ngai ezangaki bolendisi mpe emitungisaki mpo na bomoi oyo na bomoni ya seko—makanisi mpo na libota na ngai, bana na ngai, mwasi na ngai, mpe na nsuka bososoli ya bomoi na ngai.

Lolenge nini tozalaki lokola libota mpe yo moto? Bomoi na biso ezalaki engebene na mayokani tosalaki mpe babolingi ya Nkolo, to ntango mosusu topesaki ndingisa na mitungisi ya mokili elonga biso uta na makambo oyo esengelaka koleka?

Nabengisi bino boyekola liteya ya ntina nayekolaki uta na likambo oyo: zongisa makinisi sima mpe tala bomoi na yo. To maloba ya minganga, soki ezali na likambo osengeli kobongola na bomoi na yo, ntango ekoki sikoyo.

Totala Babomoi na Biso

Tozali na mokili oyo nsango ezali kilikili, elongisami na makambo ya mpamba oyo esalaka ete ezala mbilingambilinga mpe oyo esalaka mpasi ya kokamba makambo ya mokili oyo mpe kolengela makambo ya seko. Mikolo ya bomoi na biso etondisami na makambo oyo etutisaka makanisi na biso, epesami na batekenoloji oyo ezali kokola na lombango.

Soki tozwi ntango ya kokanisa te, tokomona nguya ya makambo oyo ezali koleka na mokili te mpe maponi tozali kosala. Tokoki komona babomoi na biso etondisami na maboke ya bansango elingama na bameme, bavideo, mpe nkoma ya kokamwisa. Atako ya ntina mpe ya kolekisa ngonga, mingi kati na yango ezali na nguya moke mpo na bokobi ya seko na biso, mpe na yango ebongolaka lolenge na biso ya komona lobi ekoya.

Makambo ya mokili oyo ekoki kozala lolenge moko na oyo ya ndoto ya Lehi. Ntango tozali kokoba na nzela ya liyokani na biso elongo na loboko esimbi makasi na libende, toyokaka mpe tomonaka “botioli mpe batongi” uta na botongi bonene mpe ya ntina (1 Nefi 8:27). Tokoki kozala na likanisi ya kosala yango te, kasi ntango mosusu tokoki kotelema mpe kotala makambo ya mokili oyo. Basusu kutu bakoki kotika mpe kopusana pene mpo na kotala makambo oyo. Basusu bakoki kokweya mobimba “na ntina ya baoyo bazalaki kotiola bango” (1 Nefi 8:28).

Mobikisi akebisi biso “tokeba … na ntina ete mitema na bino etondisama na … makambo ya mokili oyo te” (Luka 21:34 Bobimisi ya sikawa ezali komikundola biso ete ebele babiangemi, kasi moke baponamaki. Baponami te “mpo ete mitema na bango etami … likolo ya makambo ya mokili oyo, mpe bamipesi na lokumu ya bato” (Doctrine et Alliances 121:35; tala lisusu molongo 34). Komitala babomoi na biso epesaka biso libaku ya kotika makambo ya mokili, kotalaka wapi totelemi na nzela ya liyokani, mpe soki ezali ntina kosala mabongisi mpo na kotikala ngwi mpe kotala liboso.

Kala te, na losambo ya bilenge ya mokili mobimba, Mokambi Russell M. Nelson abiangisaki bilenge batika makambo ya mokili oyo, batika barezo sosio mpo na kokila mikolo nsambo. Mpe kaka na mpokwa eleki, asalaki libiangi ya lolenge mokona bandeko basi lokola eteni ya liyangani ya likita ya bamama. Nsima asengaki bilenge batala babokeseni na lolenge nini bakoyoka, nini bakokanisa, to kutu lolenge nini bakokanisa. Nsima abiangisaki bango “batala na bozindo bomoi elongo na Nkolo … mpo na kozala na elikia ete makolo na bino epikami ngwi likolo ya nzela ya liyokani.” Alendisi bango ete soki ezalaki na maambo oyo esengelaki kobongwama na babomoi na bango, “lelo ezali ntango ebongi nie mpo na kobongwana.”1

Kotalaka makambo na babomoi na biso oyo esengeli kobongwana, tosengeli komituna biso moko motuna: Lolenge nini totelemelaka makambo ya mokili oyo mpe kotikala ngwi na limoni ya seko liboso na biso?

Na liteya moko ya likita ya 2007 ekomama “Good, Better, Best,” Mpaka Dallin H. Oaks ateyaki lolenge nini kopesa ntina na maponi kati ya babosenga na biso ekeseni na mokili. Ateyaki, “Tosengeli kotika boko makambu na ntina ya kopona mosusu oyo ezali malamu koleka to malamu koleka manso mpo ezali kokolisa bondimi na Nkolo Yesu Klistu mpe kolendisa mabota.”2

Nakoki koloba ete makambo malamu na bomoi oyo ezali kati kati ya Yesu Klisto mpe bososoli ya bosolo ya seko ya nani Ye azali mpe banani biso tozali na bozalani na biso elongo na Ye.

Luka Bosolo

Ntango toluki oyeba Mobikisi, tosengeli te kotala likolo ya moboku ya bosolo ya banani biso tozali mpe mpo na nini tozali awa. Amuleki akundolisi biso ete “bomoi oyo ezali ntango … kolengele mpo na kokutana na Nzambe,” ntango “oyo epesameli biso mpo na komilengela na boseko” (Alma 34:32–33). Lokola liloba moko elobi na biso, “Tozali bato oyo te bazali boyebi ya molimo. Tozali bato ya molimo oyo bazali na boyebi ya bomoto.”3

Kososolaka bowuti na biso ya bonzambe ezali ntina mpo na bokobi na biso ya seko mpe ekoki kokangola biso uta na maambo ya bomoi oyo. Mobikisi ateyaki:

“Soki bokobi na liloba na ngai, bozali solo bayekoli na ngai;

“Mpe bokoyeba bosolo, mpe bosolo ekokangola bino” (Yoane 8:31–32).

Mokambi Joseph F. Smith asakolaki, “Bokoki monene moto akoki kosala na mokili oyo ezali ya kosangana elongo na bosolo ya bonzambe, na bosolo, na bobongi nie mpenza, ndakisa oyo to na ntina ete moto nyonso oyo azali na mokili akoka kobunga nzela te ya boyebi ete baponamaki.”4

Na mokili ya lelo, masolo oyo etali bosolo ekomi na ndelo na yango ya nsuka, biteni nyonso ezali koloba ete bosolo ezalaki lianisi ya moto ye moko. Elenge mobali Joseph Smith amonaki ete “mobulungano mpe bitumba ezalaki makasi” na bomoi oyo “ete yango ezalaki mpasi … kokoma na bosukisi moko ya koloba nani alongi mpe nani akwei” (Joseph Smith—History 1:8 Ezalaki “na kati kati na etumba ya maloba mpe kobendana ya makanisi” ete alukaki bokambi ya bonzambe na kolukaka bosolo (Joseph Smith—History 1:10).

Na likita ya sanza ya minei, Mokambi Nelson ateyaki, “Soki tozali na elikya ya koleka na nzela ya etando ya mingongo mpe bafilozofi ya bato oyo etungisaka bosolo, tosengeli koyekola kozwa bobimisi.”5 Tosengeli koyekola kotalela Molimo ya Bosolo, oyo “mokili ekoki kozwa te, mpo ete emonaka ye te, mpe eyebi ye te” (Yoane 14:17).

Lokola mokili oyo ezali kotambola na lombango na makambo ya koamwisa, tosengeli komikundola maloba ya Yakobo ete “Molimo elobaka bosolo mpe ekosaka te. Yango wana, akoloba makambo lokola mazali mpenza, mpe makambo lokola makozala mpenza; yango wana, makambo maye mamonisami epai ya biso na polele, mpo ya lobiko la bozo bwa biso” (Yakobo 4:13).

Ntango totiki makambo ya mokili oyo mpe totali babomoi na biso, sikawa ntango ekoki mpo ete toyeba mbongwana nini tosengeli kosala. Tokoki kozwa elikya monene na koyebaka ete, Yesu Klisto, Ndakisa na biso asi alengeli nzela. Yambo ya nufa mpe Bosekwi na Ye, ntango azalaki kosalisa baoyo bazalaki nzinga nzinga na Ye basosola ntina ya mosala na Ye ya bonzambe, amikundolaki bango “ete epai na ngai nde bosengeli kozwa kimia. Na mokili bokozwa mimekano: kasi bozala na esengo; Nalongi mokili” (Yoane 16:33). Na ntina Ye natatoli na nkombo ya Yezu Klisto, amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (worldwide youth devotional, Sanza ya motoba 3, 2018), Hopeofisrael.lds.org.

  2. Dallin H. Oaks, “Good, Better, BestLiahona, Nov. 2007, 107.

  3. Mbala mingi epesami na Pierre Teilhard de Chardin.

  4. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph F. Smith (1998), 42.

  5. Russell M. Nelson, “Revelation for the Church, Revelation for Our LivesLiahona,Sanza ya mitano 2018, 96.