2010–2019
Meka, Meka, Meka
Sanza ya Zomi 2018


Meka, Meka, Meka

Mobikisi azali kotia nkombo na Ye na mitema na bino. Mpe bozali koyoka bolingo ya peto ya Klisto mpo na basusu mpe mpo na bino moko.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, nazali na botondi mpo na libaku ya koloba na bino. Likita oyo ezalaki ya kokembisa mpe ya kolendisa mpo na ngai. Miziki eye ekembamaki mpe maloba elobamaki ememami na mitema na biso na Molimo Mosantu. Nasambeli ete oyo nakoloba ekomemama epai na bino na Molimo wana kaka.

Mibu mingi eleki, nazalaki mopesi toli ya mokambi ya disitiliki na westi ya Etazini. Mbala mingi koleka moko, ntango nazalaki kokumba motuka na etape na biso ya moke, ye alobaki na ngai, “Hal, ntango okutani na moto moko, osaleli bango lokola soki bazali na mobulu makasi, mpe okozala malamu mingi koleka ndambo ya ngonga.” Ezalaki kaka ya solo te, kasi toyekolaki sima ya mibu ete azalaki mokuse mingi koleka makanisi na ye. Lelo natombeli kolendisa bino na mobulu bozali kokutana na yango.

Bomoi na biso esalami na Nzambe moko ya bolingo mpo na kozala momekano mpe nzela ya bokoli mpo na moko na moko na biso. Bomikundoli maloba ya Nzambe etali bana na Ye na Bokeli ya mokili: “Mpe tokomeka bango na yango, mpo na komona soki bakosala makambo nyonso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.”1

Uta na ebandeli, mimekano ezalaka pete te. Tokutanaka na mimekano oyo ewutaka na nzoto na biso ya bokufi. Biso banso tozali na mokili wapi etumba ya Satana na bosolo mpe na esengo na biso ezali kokoma makasi. Mokili mpe bomoi emonani na yo kozala na mobulu ya kobakisa.

Bolendisi na ngai lisusu ezali boye: Nzambe ya bolingo oyo andimaki mimekano wana mpo na bino asalaki lisusu nzela ya solo mpo na koleka na kati na yango. Tata ya Lola alingaki mokili mpenza ete Ye atindaki Mwana Mobali na Ye ya Bolingo mpo na kosunga biso.2 Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto, apesaki bomoi na Ye mpo na biso. Yesu Klisto amemaki na Getesemane mpe na ekulusu kilo ya masumu na biso nyonso. Ayokaki mawa, mpasi, mpe mbano ya masumu na biso nyonso mpo ete Ye akoka kolendisa mpe kokembisa bino na nzela ya momekano nyonso na bomoi.3

Bomikundoli ete Nkolo alobaki na basali na Ye:

“Tata mpe ngai tozali moko. Nazali na Tata mpe Tata na ngai; mbala nyonso bokoyamba ngai, bozali na ngai mpe ngai na bino.

“Yango wana, nazali na katikati bino, mpe nazali mobateli mpate malamu, mpe libanga ya Yisalaele. Ye oyo atongami likolo ya libanga oyo akokweya mokolo moko te.”4

Profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, apesi lisusu bolendisi wana kaka. Na kobakisa lisusu, ye alimboli nzela moko tokoki kotongama likolo ya libanga wana mpe kotiia nkombo ya Nkolo likolo ya mito na biso mpo na kokamba biso na nzela ya mimekano.

Ye alobaki: “Bokoki kozwa ntango mosusu mpasi na motema, bomikundola, bomoi esalami te mpo na kozala pete. Mimekano esengeli komemama mpe mpasi koyikama mpiko na nzela mobimba. Soki omikundoli yango ‘elongo na Nzambe likambo te ekozanga kosalema’ (Luka 1:37), yeba ete Ye azali Tata na yo. Ozali mwana moko ya mobali to ya mwana mwasi akelami na elilingi na Ye, asengeli na nzela ya bolongobani na yo kozwa bobimisi mpo na kosunga na makasi na yo ya bosembo. Okoki kokamata likolo na yo nkombo esantu ya Nkolo. Okoki komikokisa mpo na koloba na nkombo ya bule ya Nzambe (tala D&C 1:20).”5

Maloba ya Mokambi Nelson ekundolisi biso lisusu elaka ezwami na losambo ya elambo, elaka Tata na biso ya Lola akokisaka ntango tokokisaka oyo biso tolakaki lokola.

Boyokemela maloba: “O Nzambe, Tata wa Seko, tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana wa yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa lipa liye mpo na milimo ya bango banso baye bakolia yango, ete bakoka kolia yango na bokundoli ya nzoto ya Mwana wa yo, mpe batatola yo, O Nzambe, Tata wa Seko, ete balingi kokamata likolo na bango nkombo ya Mwana na yo, mpe komikundola ye ntango nyonso mpe kobatela mitindo oyo apesaki bango mpo ete bakoka ntango nyoso kozala na Molimo na ye elongo na bango. Amene.”6

Mbala nyonso tokoloba liloba amene ntango losambo wana epesami mpo na biso, tolapi ete nakokabolaka lipa tolingi kokamata likolo na biso nkombo esantu ya Yesu Klisto, komikundolaka ntango nyonsoYe mpe kotosa mitindo na Ye. Mpe Ye alakaki ete tokoka ntango nionso kozala na Molimo na Ye elongo na biso. Na ntina ya bilaka oyo, Nkolo azali libanga likolo na yango tokoki kotelema na likama te mpe na kobanga te na ekumbaki nyonso tokokutana na yango.

Namaniolaka maloba ya boyokani mpe mapamboli na yango, namitungisaka mingi na nini elingi koloba kolinga kokamata likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto.

Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki: “ezali na ntina soki ntango tokabolaka elambo totatolaka te ete tokamataka likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto. Totatolaka ete tolingi kosala yango. (Tala D&C 20:77.) Lokola totatolaka kaka bolingi na biso elakisi ete likambo mosusu esengeli kosalema liboso tokamata solo nkombo wana ya bule likolo na biso na ntina eleki na motuya.”7

Esakola ete biso “tolingi kokamata likolo na [biso]” nkombo na Ye elobeli biso ete ntango liboso tokamataki nkombo ya Mobikisi ntango tobatisamaki, kokamataka nkombo na Ye esili te na libatisi. Tosengeli kosala ntango nyonso mpo na kokamata nkombo na Ye na bomoi na biso, kobakisa ntango tobandeli mayokani na mesa ya elambo mpe tosali mayokani na batempelo esantu ya Nkolo.

Boye mituna mibale ya ntina mpo na moko na moko na biso ekomi “Nini esengeli ngai kosala mpo na kokamata nkombo na Ye likolo na biso?” mpe “Boniboni ekoyeba ngai soki nazali kokoba?”

Esakola ya Mokambi Nelson elakisi eyano moko ya kosunga. Ye alobaki ete tokoki kokamata nkombo ya Mobikisi likolo na biso mpe ete tokoki koloba mpo na Ye. Ntango tolobi mpo na Ye, tosalisi Ye. “Mpo boniboni eyebi moto moko nkolo oyo asaleli te, mpe oyo azali mopaya epai na ye, mpe azali mosika uta na makanisi mpe mikano ya motema na ye?”8

Kolobaka mpo na Ye esengaka losambo ya bondimi. Esengaki losambo moko ya makasi na Tata ya Lola mpo na koyeba maloba nini tokoki koloba mpo na kosunga Mobikisi na mosala na Ye. Tosengeli komibongisa mpo na elaka: “Ezala na mongongo na ngaimei to na mongongo ya basali na ngai, ezali eloko moko.”9

Kasi esengeka mingi koleka koloba mpo naYe mpo na kokamata nkombo na Ye likolo na biso. Ezali na mayoki na mitema na biso ete tosengeli komibongisa lokola basali na Ye.

Profeta Mormon alimboli mayoki oyo ekobongisa biso mpe ekokisa biso mpo na kokamata nkombo na Ye likolo na biso. Mayoki wana esangisi bondimi, elikia, mpe, bolingani, oyo ezali bolingo ya peto ya Klisto.

Mormon alimbolaki:

“Mpo nasambisi ete bozali na bondimi na Klisto na ntina ya bosokemi na bino; mpo soko bozali na bondimi na ye te nde bokoki te kotangema na ntei ya bato ba eklezia na ye.

“Mpe lisusu, bandeko balingami ba ngai, nalingi koloba epai ya bino na oyo etali elikia. Boniboni bokoki kokoma na bondimi, longola se soko bozali na elikia?

“Mpe mpo ya nini ete bokozala na elikia? Tala nalobi epai ya bino ete bokozala na elikia na nzela ya botumbolami ya Klisto mpe na nguya ya bosekwi naa ye, mpo na kosekwisama epai ya bomoi ya seko, mpe yango na ntina ya bondimi naa bino na ye engebene na elaka.

“Yango wana, soko moto moko azali na bondimi esengeli mpenza azala na elikia; mpo na bozangi bondimi, ekoki te kozala elikia.

“Mpe lisusu, tala nalobi epai na bino ete akoki te kozala na bondimi mpe elikia, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mikita.

“Soko te, bondimi mpe elikia ya ye ezali mpamba, mpo moko te ayambami liboso ya Nzambe, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mokita; mpe soko moto moko azali mosokemi mpe na motema mokita, mpe andimi na nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu azali Klisto, asengeli mpenza kozala na bolingo; mpo soki azali na bolingo te azali eloko te; yango wana asengeli mpenza kozala na bolingo.“

Sima ya kolimbola bolingo, Mormon akobi na koloba:

“Kasi bolingo ezali bolingi ya peto ya Klisto, mpe botii molende libela; mpe oyo amonani kozalaka na yango na mokolo ya nsuka, ekozala bolamu na ye.

“Yango wana, bandeko balingami ba ngai, bosambela epai ya Tata na makasi nyonso ya motema na bino, ete bokoka kotonda na bolingo yango, oyo apesi epai ya baye nyonso bazali balandi ba solo ba Mwana Mobali wa ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana mibali ya Nzambe, ete ekobima ye tozala lokola ye, mpo tokomona ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikia yango; ete topetolama, kutu lokola ye azali peto. Amene.”10

Litatoli na ngai ezali ete Mobikisi azali kotia nkombo na Ye na mitema na biso. Mpo na mingi na bino, bondimi na bino na Ye ezali kobakisama. Bozali koyoka elikia mpe bosepeli. Mpe bozali koyoka bolingo ya peto ya Klisto mpo na basusu mpe mpo na yo moko.

Namonaka yango na bamisionele bazali kosala na mokili mobimba. Soki namoni yango kati na bandimi oyo bazali koloba na baninga mpe baye libota na bango etali Eklezia ya Klisto ya Mikolo mya Nsuka. Mibali, basi, bilenge, mpe kutu bana bazali kosalisa na bolingo mpo na Mobikisi mpe mpo na bazalani na bango.

Na nsango ya bobomibomi na mokili mobimba, bandimi bazali kosala miango mpo na kokende kosalisa, ntango misusu kokatisa bambu, na kozanga kosenga bango. Ntango mosusu bamonaka yango mpasi kozela kino bisika ya bobomibomi ekokoka koyamba bango.

Nasosoli ete bamoko na bino koyokaka lelo bakoki koyoka ete bondimi mpe elikia elongami na mobulu. Mpe bokoki koyoka mposa ya bolingo.

Bandeko mibali mpe bandeko basi, Nkolo azali na mabaku penepene na bino mpo na koyoka mpe kokabola bolingo na Ye. Bokoki kosambela na bondimi mpo Nkolo akamba bino na kolinga moto moko mpo na Ye. Ye akoyanola nsambo ya mosekomi ya lifuta te lokola bino. Bokoyoka bolingo ya Nzambe mpo na bino mpe mpo na moto bozali kosalisa. Soki bosungi bana ya Nzambe na mobulu na bango, mobulu na bino moko bakokoma pete mingi. Bondimi na bino mpe elikia na bino ekolendisama.

Nazali nzeneneke ya komona na miso ya bosolo wana. Bomoi mobimba, mwasi na ngai alobaki mpo na Nkolo mpe asalisaki bato mpo na Ye. Lokola nalobaki na ebandeli, moko ya baepisikopo na biso ayebisaki ngai: “nazali na esengo. Mbala nyonso nayoki moto moko na palwasi oyo azali na mobulu, nakendaka mbango mpo na kosunga. kasi ntango nakomi kuna, ekomonana ete mwasi na yo asilaki kokoma kuna.” Yango ezalaki ya solo na bisika tofandaki mibu 56.

Sikawa akoki koloba kaka mwa maloba na mokolo. Bayaka kotala ye na bato oyo alingaki mpo na Nkolo. Butu mpe ntongo nyonso nayembaka nzembo elongo na ye mpe tosambelaka. Nasengelaka koloba mpo na kosambela mpe na nzembo. Ntango mosusu nakoki komona ye koningisaka mbebo na maloba ya nzembo. Alingaka mingi nzembo ya bana. Likambo emonani ye alingaka mingi ezali na bokuse na loyembo “Nazali mwana ya Nzambe.”11

Mokolo oyo mosusu, sima ya koyemba maloba ya loyembo ya lisanga: “Bolingana lokola Yesu alingi bino. Bomeka kolakisa bosembo na nyonso bokosala,” alobaki na bolembu, kasi na polele, “Meka, meka, meka.” Nakanisi ete akoyeba, ntango akomona Ye, ete Mobikisi atiaki nkombo na Ye na kati ya motema na ye mpe ete akomaki lokola Ye. Ye akoki komema ye na nzela ya mobulu sikawa, lokola Ye akomema bino na ya bino.

Napesi bino litatoli na ngai ete Mobikisi ayebi mpe alingaka biso. Ye ayebi nkombo na bino lokola boyebi ya Ye. Ye ayebi mobulu na bino. Akutanaki na yango. Na Bomikabi na Ye, Ye alongaki mokili. Na bolingi na bino mpo na kokamata nkombo na Ye likolo na bino, bokotombola mikumba ya basusu mingi. Mpe bokoyeba na ngonga wana ete boyebi Mobikisi mingi koleka mpe ete bolingaka ye mingi koleka. Nkombo na Ye ekozala na motema na bino mpe ekokangama na likundoli na bino. Ezali nkombo bakobianga bino. Natatoli boye, na botondi mpo na bosembo na Ye ya bolingo mpo na ngai, mpo na balingami na ngai, mpo na bino, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.