2010–2019
Limoni ya Bosikoli ya Bawa
Sanza ya Zomi 2018


Limoni ya Bosikoli ya Bawa

Natatoli ete limoni Mokambi Joseph F. Smith azwaki ezali ya solo. Napesi litatoli ete moto nyonso akoki kotanga mpe koya koyeba ezali ya solo.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, liteya na ngai elengelamaki mwa mikolo yambo mwasi na ngai akufa, Barbara. Libota na ngai mpe ngai totondi bino botondi mpo na bolingo na bino mpe bosembo nyonso. Nasambeli Nkolo akopambola ngai ntango nazali koloba na bino na ntogo ya lelo.

Na sanza ya zomi ya 1918, mibu 100 mileki, Mokambi Joseph F. Smith azwaki limoni moko ya nkembo. Nsima ya penepene na mibu 65 ya mosala ya komipesa na Nkolo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe kaka mwa baposo liboso ya liwa na ye na sanza ya zomi na moko 19, 1918, afandaki na kisuku na ye komanyolaka libonza ya komikaba ya Klisto mpe kotangaka ndimbola ya Apostolo Petelo ya mosala ya Mobikisi na mokili ya milimo nsima ya Lisekwa na Ye.

Akomaki: “Ntango natangaki etutaki ngai makasi. … Ntango namanyolaki makambo nyonso oyo … ,miso ya bososoli na ngai efungwamaki, mpe Molimo ya Nkolo efandaki likolo na ngai, mpe namonaki ebele ya bawa.”1 Nkoma mobimba ya limoni eomammi na kati ya eteni ya Doctrine et Alliances 138.

Tika napesa mwa nsango mpo ete tokoka kolula mobimba ya bomoi mobimba ya bolengeli ya Joseph F. mpo na kozwa limonisi oyo ya kokamwa.

Elilingi
Joseph mpe Hyrum Smith na mokongo ya mpunda

Ntango azalaki Mokambi ya Eklezia, akandaki kotala Nauvoo na 1906 mpe amaniolaki likundoli moko azwaka ntango azalaka na mibu mitano mpamba. Alobaki: “Oyo esiki mpenza wapi ntango [Joseph, tata leki na ngai, mpe tat na ngai, Hyrum] bazalaki koya na mpundda na nzela na bango ya Carthage. Na kozanga kolongwa na mpunda na ye papa atengamaki mpembeni na kiti na ye mpe alokotaki ngai na mabele. Apesaki ngai mbote na besi mpe akitisaki ngai lisusu mpe namonaki ye mosika na mpunda.”2

Mbala ya nsima Joseph F. amonaki bango, mama na ye, Mary Fielding, atombolaki ye mpo na komona bamartiru kolalaka mpembeni nsima ya bango kobomama na nkanda kati na Boloko ya Carthage na sanza ya motoba 27, 1844.

Mibu misato nsima, Joseph F., elongo na libota na ye mpe mama na ye ya mondimi, Mary Fielding Smith, atitaki ndako na ye na mpo na kokende na Winter Quarters. Atako naino akokisaki mibu 8 te, Joseph F. asengelaki kokumba moko ya liboke ya bangombe uta Montrose, Iowa, tii Winter Quarters mpe nde nsima kokoba tii na Salt Lake Valley, kokomaka ntango akokisaki penepene mibu 10. Nalikii bino bana mibali mpe bilenge mibali bozali koyokamela mpe bokososola mokumba mpe bozili etiamaki likolo ya Joseph F. na ntango ya bomwana mobali na ye.

Kaka mibu minei nsima, na1852, ntango azalaki na mibu 13, mama na ye ya bolingo akufaki—kotikaka Joseph mpe bandeko na ye bazanga baboti.3

Joseph abengamaki mpo nakosala misio ya ntango mobimba na 1854, ntango azalaki na mibu 15. Misio oyo, oyo ewumelaki mingi koleka mibu misato, ezalaki ebandeli ya bomoi ya mosala na Eklezia.

Nsima ya kozonga na Utah, Joseph F. abalaki na 1859.4 Mpo na mwa mibu milandaki, bomoi na ye etondaki na mosala, mikumba ya libota, mpe bamisio mibale ya kobakisa. Na sanza ya nsambo 1, 1866, na mibu 27, bomoi ya Joseph F. ebongwanaki mpo na libela ntango abulisamaki Apostolo na Mokambi Brigham Young. Na nsanza ya zomi ya mobu elandaki, azwaki kiti etikalaki mpamba na Lisanga likoki ya Bazomi na Mibale.5 Asalaki lokola mopesi toli na Brigham Young, John Taylor, Wilford Woodruff, mpe Lorenzo Snow liboso ya kokoma Mokambi ye moko na 1901.6

Joseph F. mpe mwasi na ye Julina bayambaju mwana na bango ya liboso, Mercy Josephine, na kati ya libota.7 Azalaki kaka na mibu mibale na ndambo ntangoakufaki. Mwa nsima, Joseph F. akomaki, “Ezali sanza moko lobi eleki uta ya ngai … molingami Josephine akufaki. O! ekokaki ngai kobikisa ye mpo na kokola ti akoma mwasi. Nakozanga ye mikolo nyonso mpe nakomiyoka ngai moko mpamba. … Nzambe alimbisa botau na ngai soki ezali mabe kolinga wa ngai wa moko oyo lokola nalingaka bango.”8

Na bomoi na ye mobimba, Mokambi Smith abungisaki tata na ye, mama na ye, ndeko mobali moko mpe bandeko basi mibale, basi mibale, mpe bana zomi na misato. Amesanaki mingi na mawa mpe kobungisa balingami na ye.

Ntango mwana na ye ya mobali akufaki, Joseph F. akomaki na ndako na ye ya mwasi Martha Ann ete asambaki na Nkolo mpo na kobikisa ye mpe atunaki, “Ntina nini ezali boye? O. Nzambe ntina nini yango esengeli kozala?”9

Atako nsambo na ye na ntango wana, Joseph F. azwaki eyano te na likambo oyo.10 Alobelaki Martha Ann ete “balola [emonani lokola] ebende ya motako likolo ya mito na biso” na likambo ya liwa mpe mokili ya bawa. Nzokande, bondimi na ye na bilaka ya seko ya Nkolo ezalaki sikisiki mpe na molende.

Na ntango esengeli na Nkolo, biyano, limbondiisi, mpe bososoli ya kobakisa etali mokili ya moliimo oyo Mokambi Smith alukaki eyelaki ye na nzela ya limoni ya kokamwa azwaki na sanza ya zomi 1918.

Mobu wana ezalaki mingimingi ya mpasi mpenza mpo na ye. Amitungisaki mpo na motango ya liwa na Etumba ya Mokili Mobimba oyo ekobaki kobakisama ti bato 20 million bakufaki. Na kobakisa, bokono monene ya kosukosu epanzanaki na mokili mobimba, kolongolaka bomoi ya bato 100 million.

Elilingi
Mpaka Hyrum Mack Smith

Na mobu wana, Mokambi Smith abungisaki lisusu bato misato mosusu ya baye libota na ye. Mpaka Hyrum Mack Smith ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, mwana na ye ya mobali ya liboso mpe nkoko na ngai ya mobali, akuffaki na mbalakaka na bokono ya appendicite.

Mokambi Smith akomaki: “Nazangi maloba—[mongongo ekawuki] na mawa! … Motema na ngai ezali ya kobukana; mpe ezali kopatapata mpo na bomoi! … O! Nalingaki Ye! … Nakolinga ye libela na libela. Mpe ezali bongo mpe ekozala boye libela na bana mibali mpe bana basi na ngai, kasi azali mwana na ngai ya mobali ya liboso, ya liboso na komemela ngai esengo mpe elikia ya nsuka te, nkombo ya lokumbu o ntei ya bato. Uta na bozindo ya molimo na ngai natondi Nzambe mpo na ye! Kasi … O! Nazali na mposa na ye! Biso banso tolingi ye! Azalaki ntina na Eklezia. … Mpe sikawa, … O! nini nakoki kosala! … O! Nzambe sunga ngai!”11

sanza elandaki, bokili ya Mokambi, Alonzo Kesler, akufaki na likama ya nsomo.12 Mokambi Smith akomaki na zulunali na ye, “likama oyo ya nsomo mpe ya mabe ya kopasula motema, ebwaki lisusu ezipele ya molili likolo ya libota na ngai mobimba.”13

Sanza nsambo nsima, na sanza ya libwa 1918, bokilo ya mwasi ya Mokambi Smith mpe nkoko na ngai ya mwasi, Ida Bowman Smith, akufaki nsima ya kobota mwana na ye ya liboso, tata leki na ngai Hyrum.14

Ezalaki boye, na sanza ya zomi 3, 1918, koyokaka mawa ya makasi mpo na bamilio oyo bawaki na mokili na nzela ya liwa mpe bokono kobakisa liwa ya baye libota na ye moko, Mokomzi Smith azwaki limoni eyebani lokola “limoni ya lisikoli ya bawa.”

Elilingi
Mokambi Joseph F. Smith

Alobelaki libimisi wana mokolo elandeki na liyangani ya kofungola ya likita linene ya sanza ya zomi. Bokolongona ya Mokambi Smith ezalaki kobeba, kasi alobaki na bokuse: “nakokoka te, nakofuka te, komeka kokota na makambo mingi oyo efandi likolo ya mayele na ngai ntongo oyo, mpe nakotia yango nsima ti ntango moko ekoya, soki Nkolo alingi, komeka na ngai mpo na koyebisa bino boko ya makambo oyo ezali na mayele na ngai, mpe oyo efandi na motema ngai. Nazalaki ngai moko kaka te sanza oyo mitano [eleki] . Nazalaki na molimo ya losambo, ya libondeli, ya bondimi mpe ya mokano; mpe nazalaki ntango nyonso kosolola na Molimo ya Nkolo.”15

Libimisi azwaki na sanza ya zomi 3 elendisaki motema na ye mpe epesaki biyano na mituna na ye mingi. Biso mpe tokoki kobondisama mpe koyekola mingi na ntina ya lobi ekoya na biso ntango tokufi mpe kokende na mokili ya milimo na koyekolaka limonisi oyo mpe kozwa ndimbola na yango na lolenge ya kozala na bomoyi na biso mokolo minso.

O ntei ya makambo mingi Mokambo Smith amonaki ezalaki bobimeli ya Mobikisi na bandimi na mokili ya milimo nsima ya liwa na Ye moko na ekulusu. Uta na limoni wana natangi:

“Kasi tala, uta na basembo, abongisaki makasi na ye mpe aponaki bamemmi nsango, balata nguya mpe bokoki, mpe atindaki bango bakende mpe bamema pole ya nsango malamu na bango oyo azalaki na molili, kutu na milimo nyonso ya bato [mpe basi];16 mpe baye nsanbo malamu eteyamaki na bawa. …

“Baoyo bateyamaki bondimi na Nzambe, boyamboli masusu, libatisi mpo na kozwa bolimbisi masumu, likabo ya Molimo Mosantu na kotia maboko.

“Mpe mabongi nyonso mosusu ya nsango malamu oyo esengelaki mpo na bango koyeba mpo na komibongisa ete bakoka kosambisama engebene na bato na mosuni, kasi kozala na bomoi engebene na Nzambe na molimo. …

“Mpo bawa batalelaki bakabwani ya ntango molai ya milimo na nzoto lokola bowumbu.

“Baoyo Nkolo ateyaki, mpe apesaki bango nguya mpo na kobima, nsima ya lisekwa na ye na bawa, mpo na kokota na kasi na bokonzi ya Tata na ye, kuna mpo na kozwa motole ya bozangi liwa mpe bomoi ya seko,

“mpe kokoba kuna mosala na bango lokola elekelamaki na Nkolo, mpe kozala bakaboli elongo ya mapamboli oyo ebombamaki mpo na bango oyo balingaka ye.”17

Elilingi
Ekeko ya Joseph mpe Hyrum Smith

Na limoni wana, Mokambi Smith amonaki tata na ye, Hyrum, mpe Profeta Joseph Smith. Ezalaka mibu 74 uta amonaka yango lokola mwa mwana mobali na Nauvoo. Tokoki se kokanisa esengo na ye na komonaka tata mpe tata leki na ye ya bolingi. Asengelaki kofulama mpe kolendisama na koyeba ete milimo nyonso babatelaki bokokani ya nzoto na bango ya kufa mpe ete bazali na kobangabanga kozela mokolo ya bosekwi na bango elakelama. Limoni ebimisi mobimba mingi bozindo mpe bolai ya mwango ya Tata ya Lola mpo na bana na Ye mpe bolingo ya Klisto esikolaka mpe nguya ya komekisa te ya Bokabi na Ye.18

Na bokundoli ya kafukafu oyo ya mibu ya mbala 100, nabengisi bino na kotanga mobimba mpe na bokebi bobimisi oyo. Soki bosali yango, ekoka Nkolo kopambola bino na kososola mobimba mingi mpe kolula bolingo ya Nzambe mpe mwango na Ye ya lobiko mpe esengo mpo na bana na Ye.

Natatoli ete limoni Mokambi Joseph F. Smith azwaki ezali ya solo. Napesi litatoli ete moto nyonso akoki kotanga mpe koya koyeba ezali ya solo. Bango oyo bakozwa boyebi oyo te na bomoi oyo na ntembe te bakoya koyeba bosolo na yango ntango moto nyonso akokoma na mokili ya milimo. Kuna, banso bakolinga mpe bakosanzola Nzambe mpe Nkolo Yesu Klisto mpo na mwango monene ya lobiko mpe lipamboli ya Bosekwi elakelama ntango nzoto mpe molimo ekosangana lisusu mpo na kokabwana lisusu mokolo moko te.19

Elilingi
Ndeko mwasi Barbara Ballard

Nazali na esengo ya koyeba wapi Barbara na ngai ya kitoko azali mpe tokozala elongo lisusu, na libota na biso, mpo na libela na libela. Tika ete imia ya Nkolo esunga biso sikawa mpe libela ezali losambo na ngai ya komikitisa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Doctrine et Alliances 138:6, 11

  2. Joseph F. Smith, in Preston Nibley, The Presidents of the Church (1959), 228.

  3. Tala Joseph Fielding Smith, Life of Joseph F. Smith (1938), 13.

  4. Abalaki Levira Clark na 1859, Julina Lambson in 1866, Sarah Richards na 1868, Edna Lambson na 1871, Alice Kimball na 1883, mpe Mary Schwartz na 1884.

  5. Joseph F. Smith abiangamaki lokola mopesi toli ya kobakisa na Bokambi ya Yambo (Brigham Young, Heber C. Kimball mpe Daniel H. Wells). Asalaki lisusu lokola mopesi toli ya mibale na Bokambi ya Yambo na Bakambi ya Eklezia misato: Bakambi John Taylor, Wilford Woodruff, mpe Lorenzo Snow.

  6. Joseph F. Smith asalaki lokola mopesi toli na Bokambi ya Yambo na boyangeli ya Brigham Young mpe asalaki lokola Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo na bbaboyangali ya John Taylor, Wilford Woodruff, mpe Lorenzo Snow. Azalaki Mokambi ya liboso ya Eklezia na kosala na Bokambi ya Yambo liboso ya kobiangama lokola Mokambi.

  7. Mercy Josephine, mwana ya liboso ya Joseph F, mobotami ya yambo na sanza ya mwambe 14, 1867, mpe akufaki na sanza ya motoba 6, 1870.

  8. Joseph F. Smith, journal, July 7, 1870, Church History Library, The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, Salt Lake City, Utah.

  9. Joseph F. Smith to Martha Ann Smith Harris, Aug. 26, 1883, Church History Library; tala Richard Neitzel Holzapfel and David M. Whitchurch, My Dear Sister: The Letters between Joseph F. Smith and His Sister Martha Ann (2018), 290–91.

  10. Na mabaku ebele, Nkolo akambaki Joseph F. Smith na bomoi na ye mokompe na mosala na ye lokola Apostolo mpe Mokambi ya Eklezia na nzela ya bandoto efulama, mabimisi, mpe bimoniseli. Mbala mingi makabo kitoko oyo ewutaka na Nkolo ekomamaki na bazulunale, masakoli, mikanda, mpe nkoma ya Eklezia.

  11. Joseph F. Smith, journal, Jan. 23, 1918, Church History Library; spelling and capitalization modernized; see Joseph Fielding Smith, Life of Joseph F. Smith, 473–74.

  12. Tala “A. [P.] Kesler Is Killed in Fall from a Building,” Ogden Standard, Feb. 5, 1918, 5.

  13. Joseph F. Smith, journal, Feb. 4, 1918, Church History Library.

  14. Tala “Ida Bowman Smith,” Salt Lake Herald-Republican, Sept. 26, 1918, 4.

  15. Joseph F. Smith, in Conference Report, Oct. 1918, 2.

  16. Tala the reference to “our glorious Mother Eve” and the “faithful daughters who … worshiped the true and living God” (Doctrine and Covenants 138:39).

  17. Doctrine et Alliances 138:30, 33–34, 50–52.

  18. Nkoma ya limoni wana ebimaki mbala ya liboso na sanza ya zomi na moko 30, 1918, bobimisi ya Deseret News mikolo 11 nsima ya liwa ya Mokambi Smith, na sanza ya zomi na moko 19. Ebetamaki na sanza ya zomi na mibale Improvement Era and in January 1919 editions of the Relief Society Magazine, the Utah Genealogical and Historical Magazine, the Young Woman’s Journal, and the Millennial Star.

  19. Atako bana mibali ya libunga bakosekwa, bakoki kopesa te bolingo mpe lisanzoli na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto lokola bango oyo bakozwa bokonzi bakosala. Tala Alma 11:41; Doctrine et Alliances 88:32–35.