Makomi
Elamani 12


Mokapo 12

Bato bazangi sikisiki mpe bazali ligboma mpe mbangu na kosala bobe—Nkolo atumboli bato ba ye—Bompamba bwa bato bomekisami na nguya ya Nzambe—O mokolo mwa bosambisami bato bakolonga bomoi bwa libela to botumboli bwa libela. Penepene na 6 Yambo ya Klisto.

1 Mpe boye tokoki komono boniboni lokuta, mpe lisusu bozangi sikisiki bwa mitema mya bana ba bato; iyo, tokoki komono ete Nkolo o bolamu bonene bwa ye bozanga ndelo akopambola mpe akopesa bomengo na bango baye bakotia elikia ya bango na ye.

2 Iyo, mpe tokoki komono ete o ntango mpenza ekopesa ye bomengo na bato ba ye, iyo, o bobakisi bwa bilanga bya bango, bibwele bya bango mpe bitonga bya bango, mpe wolo, mpe mpauni, mpe ndenge inso ya biloko bya motuya bya lolenge na lolenge mpe ntoki; kobatelaka bomoi bwa bango, mpe kobikisaka bango libanda lya maboko ma bayini ba bango; kolembisaka mitema mya bayini ba bango ete basakola te kobunda etumba likolo lya bango; iyo, mpe o nsuka, kosalaka makambo manso mpo ya bolamu mpe esengo ya bato ba ye; iyo, nde ezali ntango eye bakoyeisa mitema mya bango mikasi, mpe bakobosana Nkolo Nzambe wa bango, mpe bakoniata o nse ya makolo ma bango Mosantu Moko—iyo, mpe eye ezali na ntina ya bolamu bwa bango, mpe bomengo bonene mpenza bwa bango.

3 Mpe boye tomoni ete longola se soko Nkolo atumboli bato ba ye na matungisi mingi, iyo, longola se soko abimeli bango na liwa mpe na nsomo, mpe na nzala mpe na ndenge inso ya bokono, bakomikundola ye te.

4 O boniboni ligboma, mpe boniboni mpamba, mpe boniboni mabe, mpe boniboni ya zabulu, mpe boniboni mbangu mpo ya kosala bobe, mpe boniboni malembe mpo ya kosala bolamu, izali bana ba bato; iyo, boniboni mbangu mpo ya koyokemela epai ya maloba ma moko wa bobe, mpe kotia mitema mya bango likolo lya biloko bya mpamba bya mokili!

5 Iyo, boniboni mbangu mpo ya kotombwana o lolendo; iyo, boniboni mbangu mpo ya komikumisa, mpe kosala ndenge inso ya ena eye ezali bobe; mpe boniboni malembe bazali mpo ya komikundola Nkolo Nzambe wa bango, mpe kopesa litoyi epai ya toli ya ye, iyo, boniboni malembe mpo ya kotambola o nzela ya bwania!

6 Tala, bazali na mposa te ete Nkolo Nzambe wa bango, oyo akelaki bango, ayangela mpe akonza likolo lya bango; ata bolamu bonene bwa ye mpe ngolu ya ye ona bango, batii mpamba toli ya ye, mpe balingi te ete azala mokambi wa bango.

7 O boniboni enene ezali bompamba bwa bana ba bato; iyo, kutu bazali bake koleka mputulu ya mabele.

8 Mpo tala, mputulu ya mabele etambolaka awa mpe kuna, mpo ya kokabwanaka ndambo na ndambo, o etinda ya Nzambe wa biso monene mpe wa libela.

9 Iyo, tala o mongongo mwa ye ngomba patatalu mpe ngomba enene elengi mpe eningani.

10 Mpe na nguya ya mongongo mwa ye ibukani, mpe ikomi patatalu, iyo, kutu bo lobwaku loko.

11 Iyo, na nguya ya mongongo mwa ye mabele manso maningani;

12 Iyo, na nguya ya mongongo mwa ye, nse iningani, kutu o katikati mpenza.

13 Iyo, mpe soko alobi epai ya mabele—Tambola—matamboli.

14 Iyo, soko alobi epai ya mabele—Okokende nsima, ete eyeisama molai mokolo—esalemi;

15 Mpe boye, engebene na liloba lya ye mabele makei nsima, mpe emononi epai ya bato ete moi motelemi; iyo, mpe tala, eye ezali enso te; mpo solo ezali mabele maye matambolaka kasi moi te.

16 Mpe tala, lisusu, soko alobi epai ya mai ma mozindo monene—Kaukisama—esalemi.

17 Tala, soko alobi epai ya ngomba eye—Teleme, mpe yaka likolo mpe kweya likolo lya engumba ena, ete ekundama—tala esalemi.

18 Mpe tala, soko moto moko abombi bomengo boko o mabele, mpe Nkolo alobi—Tika elakelama botutu, na ntina ya bobe bwa ye oyo abombi yango—tala, ekolakelama botutu.

19 Mpe soko Nkolo akoloba—Tika ete olakelama botutu, ete moto te amono yo uta sikawa mpe libela—tala, moto te akozwa yango uta sikawa mpe libela.

20 Mpe tala, soko Nkolo akoloba epai ya moto moko—Na ntina ya mabe ma yo, okolakelama botutu libela—ekosalema.

21 Mpe soko Nkolo akoloba—Na ntina ya mabe ma yo okokatama mosika uta o miso mya ngai—akosala ete ekosalema boye.

22 Mpe lisuma epai ya ye oyo akoloba eye, mpo ekosalema epai ya ye oyo akosala bobe, mpe akokoka te kobikisama; yango wana, mpo ya ntina eye, ete bato bakoka kobikisama, boyamboli bosakolami.

23 Yango wana, bapambolami bango baye bakoyambola mpe bakoyokemela epai ya mongongo mwa Nkolo Nzambe wa bango; mpo iye izali bango baye bakobikisama.

24 Mpe tika Nzambe asala, o botondi bonene bwa ye, ete bato bakoka komememe epai ya boyamboli mpe misala milamu, ete bakoka kozongisama epai ya boboto mpo ya boboto, engebene na misala mya bango.

25 Mpe nalingi ete bato banso bakoka kobikisama. Kasi totangi ete o mokolo monene mpe mwa nsuka izali boko baye bakobwakama libanda, iyo, bakobwakama mosika uta o miso mya Nkolo;

26 Iyo, baye bakokangema o bozali boko bwa bobola bozanga nsuka, kokokisaka maloba maye malobi: Bango baye basali bolamu bakozala na bomoi bwa libela; mpe baye basali bobe bakozala na botumboli bwa libela. Mpe boye ezali. Amene.