Likita Linene
Bosembo kino na Nsuka
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Bosembo kino na Nsuka

Na loboko na Yebokozala na makoki ya kokweisa bagoliata nyonso oyo bazali komimonisa na bomoi na bino.

Baninga bilenge ya bolingo, lelo nalingi kolobela bino mbala moko—bilenge ya Eklezia

Eleki mobu moko uta Bokambi Monene ya Bilenge Basi ebengamaki. Boni mingi esalemi na mobu oyo eleki!

Tokutanaki na mingi kati na bino mpe toyekolaki mateya ya Klisto elongo. Toyembaki banzembo, tozwaki baninga ya sika, mpe tosalaki na bino kati na bituluku na biso. Tolendisamaki na koyokaka matatoli na bino na makita ya bilenge mpe milulu ya mokili mobimba. Mpe tosambelaki elongo kati na ndako ya Nkolo.

Ntango nyonso tokabolaki nsango uta Nkolo Yesu Klisto na biso. Mpokwa ya lelo ekozala ndenge mosusu te; nazali na nsango mpo na bino, bilenge ya Eklezia ya Yesu Klisto.

Mituna Monene

Bosila komituna lolenge nini bokoki kozala na bosembo na Nzambe ntango bozali kobika kati na mokili ya masumu? Wapi bozwi bokasi ya kokende liboso mpe kokoba kosala bolamu? Lolenge nini bozali komona esengo ya solo?

Nakanisi lisolo ya Dawidi mpe Goliata1 ekoki kosalisa.

Dawidi mpe Goliata

Na Kondimana na Kala, mampinga ya Bafilistia mazalaki kobunda na Bayisalaele, mpe ntongo nyonso mpe mpokwa nyonso, Mofilistia moko ya engambe na nkombo Goliata azalaki kotelemela Moyisalaele nyonso mpo na kobunda na ye.

Elilingi
Dawidi mpe Goliata.

Kati na bato na Yisalaele ezali kobika Dawidi, elenge mobateli mpate moko mokuse mingi koleka Goliata kasi ya kondima ya engambe kati na Yesu Klisto! Dawidi andimaki ye moko kobunda. Ata mokonzi amekaki kopekisa ye, kasi Dawidi aponaki kotiya kondima na ye kati na Yesu Klisto.

Liboso, Dawidi abundaki na nkosi moko mpe lisusu na urse. Na baboyebi na yemei, ayebaki ete Nzambe abatelaki ye mpe abimisaki ye molongi. Mpo na Dawidi, likambo ya Nzambe ezalaki ya koleka motuya. Bongo, atondisama na bondimi ya Nzambe oyo akolinga te kosundola ye, asangisaki mabanga mitano ya moselu, azwaki bilingondo na ye mpe akendaki liboso ya engambe.

Elilingi
Mabanga misato ya Dawidi.

Makomi eyebisi biso ete libanga ya yambo Dawidi abwakaki etutaki Goliata na mbunzu, ebomaki ye.2

Koluka eyano

Ntango Dawidi asalelaki libanga moko mpo na koboma Goliata, ye abongisamaki na mitano. Na mitano! Yango esali ngai nakanisa na ntina ya lolenge nini nakoki komilengela mpo na kotelemela mokili.

Nini soki mokomoko ya mabanga mitano ya Dawidi ezalaki komonisa bokasi tosengeli na yango mpo na kozala balongi kati na bomoi na biso? Nini ekokaki kozala mabanga wana mitano? Nakanisaki na oyo ekoki kozala:

  1. Libanga ya bolingo na ngai mpo na Nzambe.

  2. Libanga ya Bondimi na ngai kati na Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

  3. Libanga ya boyebi ya bomoto na ngai ya solo

  4. Libanga ya boyamboli na ngai ya mokolo na mokolo.

  5. Libanga ya bokoti na ngai na nguya ya Nzambe.

Tika tolobela na ntina ya lolenge topambolami na babokasi oyo.

Ya liboso, libanga ya bolingo na ngai ya Nzambe. Kolinga Nzambe ezali mobeko ya yambo ya monene.3 Motambwisi ya Mpo na Bokasi ya Bilengei eteyi biso: “Nzambe alingi bino. Azali Tata na bino. Bolingo na Ye ebonga nie ekoki kofula bino bolinga Ye. Ntango bolingo na bino mpo na Tata na Lola ezali ya ntina koleka ya botindiki na bomoi na bino, mikano mingi ekokoma pete.”4

Bolingo na biso mpo na Nzambe mpe bokangani na biso na Ye epesaka biso bokasi tosengeli mpo na kobongola mitema na biso mpe na pete mingi tolonga mikakatano na biso.

Ya mibale, libanga ya Bondimi na ngai na Mobikisi na biso, Yesu Klisto.. Ntango Yesu Klisto ayaki na mabele, Anyokwamaki mpo na masumu na biso,5 mpe azwaki likolo na Yemei bamawa na biso, bampasi na biso, babulembu na biso, mpe babokono na biso ya molimo mpe ya mosuni. Yango wana Ayebi ndenge nini kosalisa biso. Kozala na bondimi na Yesu Klisto elingi koloba kondimela na mobimba bwanya na Ye, ntango na Ye, bolingo na Ye, mpe nguya na Ye ya komikaba mpo na masumu na biso. Libanga ya bondimi na Yesu Klisto ekokweisa “engambe” nyonso kati na bomoi na biso.6 Tokoki kolonga mokili oyo ekweya mpamba te Ye alonga yango liboso.7

Nimelo ya misatu, libanga ya boyebi ya bomoto na ngai ya solo. Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, ateyaki biso ete bomoto na biso ya ntina mingi ezali lokola bana na Nzambe, bana ya mayokani, mpe bayekoli ya Yesu Klisto.8

Makambo nyonso ebongwamaka ntango nayebi nani solo nazali.9 Ntango nazali kotya ntembe na makoki na ngai, namilobelaka mbala ngaimei na makanisi na ngai to na mongongo makasi, “Nazali mwana mwasi ya Nzambe, nazali mwana mwasi ya Nzambe,” mbala mingi denge nazali na mposa na yango kino nakoyoka lisusu elikya mpo na kokoba kokende liboso.

Ya minei, libanga ya boyamboli na ngai ya mokolo na mokolo. Kati na motambwisi Mpo na Bokasi ya Bilenge totangi: “Boyamboli ezali etumbu te mpo na masumu; ezali nzela Mobikisi akangolaka biso na lisumu. Koyambola elakisi kobongwama―kopesa mukongo na lisumu mpe kokende epayi ya Nzambe. Elakisi kobongisa mpe kozwa bolimbisi. Lolenge ya mbongwana oyo ezali te likambo ya mbala moko; ezali likambo ya malembe malembe.”10

Eloko moko te ezali kosikola koleka boyoki ya bolimbisi ya Nzambe mpe boyebi ete tozali peto mpe toyokani na Ye. Bolimbisi ekoki kopesamela mpo na moto nyonso.

Libanga ya mitano bokoti na ngai na nguya ya Nzambe. Mayokani tosali na Nzambe, lokola oyo tosala na makuli ya libatisi, epesi biso nzela na nguya ya bonzambe.11 Nguya ya Nzambe ezali nguya ya solosolo oyo esungaka biso tolonga mikakatano, kozwa mikano ya malamu, mpe kokolisa makoki na biso ya koyika mpiko na makambo ya mpasi. Ezali nguya oyo tokoki kokola na makoki songolo tozali na mposa.12

Bokambi ya Mpo na Bokasi ya Bilenge elimboli: “mayokani ekangisaka bino na Tata na Lola mpe Mobikisi. Bamayokani yango ekolisaka nguya ya Nzambe na bomoi na bino.”13

Tika tolobela na ntina ya bokangami Bomikundola ntango Klisto ateyaki bokeseni kati na ndako etongama likolo ya libanga na moko oyo etongami likolo na zelo?14 Mpaka Dieter F. Uchtdorf alimbolaki: “Ndako ebikaka na mopepe makasi te mpo ndako ezali makasi. Ebikaka lisusu na mopepe makasi bobele kaka te mpo libanga ezali makasi. Ndako yango ebikaka na mopepe makasi mpamba te ekangami makasi na libanga wana ya makasi. Ezali makasi ya bokangisami na libanga nde ezali na ntina.”15

Elilingi
Ndako etongama likolo ya libanga.

Bokangisami na biso moko na Yesu Klisto ekopesa biso mpiko mpe bondimi ya kokende liboso kati na bato oyo bazali komemya bindimeli na biso te to oyo bazali kotyola biso. Klisto abiangi biso kobatela Ye kati na makanisi na biso ntango inso; Ayebisi biso, “Botalela epai na ngai na nyonso ya makanisi.”16 Kokanisaka na ntina ya Mobikisi epesaka biso makanisi polele ya kozwa mikano, kosala na bobangi te, mpe koboya nini ezali kotelemela mateya ya Nzambe.17 Ntango mokolo na ngai ezali mpasi mpe nayoki lokola nakoki kozwa lisusu te, kokanisa na ntina ya Klisto ememelaka ngai kimia mpe epesaka ngai elikya.

Ndenge nini tokoki kozwa nguya oyo ya Yesu Klisto Kotosa mayokani na bino mpe kokolisa bondimi na biso na Yesu Klisto ezali fungola.

Nalingaki mpenza sikawa ete Dawidi azala na libanga moko lisusu; oyo ekokaki kozala libanga ya litatoli na ngai. Litatoli na biso etongami na baboyebi ya moto na moto ya molimo oyo kati na yango toyebi bopusi ya bonzambe na bomoi na biso.18 Moto moko akoki kolongola boyebi wana uta na biso. Koyeba oyo toyebi uta na komonaka na bomoi makambo na biso ya molimo ezali na motuya mingi. Kozala sembo na boyebi wana epesaka biso bonsomi. Epesaka biso esengo! Soki tolingaka solo, tokoluka yango, mpe soki tozwi yango, tokobatela yango.19

Libiangi moko

Kaka lokola naponaki libanga nimelo motoba, nabengisi bokutana na kelasi na bino, lisanga likoki, to libota na bino mpe bokanisa na ntina ya bokasi nini mosusu bosengeli kozwa mpo na kotikala sembo epai ya Nzambe mpe, na yango, kolonga mokili.

Elaka moko

Baninga balingani, Klisto azali na mposa makasi ya kokende elongo na biso na mobembo ya bomoi na biso. Nalaki bino, ntango ozali kosimba lingenda ya ebende, okotambola loboko na loboko na Yesu Klisto .20 Ye akotambwisa bino, mpe Ye akoteya bino21 Na loboko na Ye bokozala na makoki ya kokweisa bagoliata nyonso oyo bazali komimonisa na bomoi na bino.

Litatoli

Natatoli ete ezali esengo na kosambela mikolo nyonso, na kotanga Buku ya Mormon mikolo nyonso, na koliaka elambo Eyenga nyonso, mpe na kokende seminele—ata na ntongo makasi! Esengo ezali na kosala bolamu.

Esengo ezali na kozala sembo na Nzambe ya mokili, Mobikisi ya mokili, Mokonzi ya bakonzi. Ezali esengo kozala moyekoli ya Yesu Klisto.

Nzambe azali Tata na biso. Ayebi mposa ya motema na bino mpe mabaku na bino, mpe Andimelaka bino.

Bilenge balingani, Yesu Klisto akosalisa bino bozala sembo kino na nsuka. Na ntina ya babosolo oyo nakaboli litatoli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amen.