Likita Linene
Ndimela Nkolo
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Ndimela Nkolo

Boyokani na biso na Nzambe ekokola bobele na ndelo oyo tolingi kotya kondima na biso epayi na Ye.

Na libota na biso, bantango mosusu tosalaka lisano tobengaka “Lisano ya Bokweyi ya Kondima.” Ntango mosusu bosila kobeta yango. Bato mibale batelemaka mwa mosika ngambo na ngambo, bapesani mokongo. Na elembo ya moto oyo azali na nsima, moto oyo azali liboso akweyaka abaluki na bozeli maboko ya moninga na ye.

Kondima ezali moboko ya boyokani nyonso. Motuna moko ya yambo na boyokani nyonso ezali “Nakoki kondimela moto mosusu?” Boyokani esalamaka bobele ntango bato bazalaka na bolingi ya kondimana bango na bango. Ekoki kozala boyokani te soki moto moko andimeli na motema mobimba kasi mosusu asali bongo te.

Moko moko kati na biso azali mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya Tata ya Lola ya bolingo.1 Kasi atako bonkonko ya libota ya molimo wana epesaka moboko, ekelaka na yango moko te boyokani ya ntina na Nzambe. Boyokani ekoki kotongama kaka bobele ntango toponi kondimela Ye.

Tata na Lola alingaka kotonga boyokani ya penepene mpe ya moto na moto elongo na moko na moko ya bana na Ye ya molimo.2 Yesu alakisaki mposa oyo ntango Asambelaki, “Ete bakoka kozala moko; lokola yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, ete bango lisusu bazala moko kati na biso.”3 Boyokani oyo Nzambe alukaka na moko na moko ya mwana ya molimo ezali oyo ya penepene mpe ya moto na moto oyo Akokoka kokabola nyonso azali na yango mpe nyonso Ye azali.4 Lolenge wana ya boyokani ya mozindo mpe ya kowumela ekoki kokola bobele ntango etongami likolo ya kondima ebonga nie mpe ya mobimba.

Na ngambo na Ye, Tata na Lola asalaki uta na ebandeli mpo na kolakisa kondima na Ye ya likolo kati na likoki ya bonzambe ya bana na Ye moko na moko. Elikya ezali mosisa ya mwango oyo Alakisaki mpo na bokoli mpe bokobi na biso yambo ya boyei na biso na mabele. Asengelaki koteya biso mibeko ya seko, kokela, kopesa biso banzoto ya nkufa, kopesa biso likabo ya kopona bisomei, mpe kopesa biso ndingisa ya koyekola mpe kokola na kosalaka maponi na bisomei. Alingaka ete biso topona kolanda mibeko na Ye mpe kozonga mpo na kosepela bomoi ya seko elongo na Ye mpe Mwana na Ye.

Koyebaka yango ete tokosala ntango nyonso maponi ya malamu te, Alengelaki lisusu nzela mpo na biso tokima makama ya maponi ya mabe. Apesaki biso Mobikisi—Mwana na Ye, Yesu Klisto—mpo na kosikola masumu na biso mpe kopetola biso lisusu na nzela ya boyamboli.5 Abengisaka biso tosalela likabo ya motuya koleka ya boyamboli mbala na mbala.6

Moboti nyonso ayebi ndenge nini ezalaka mpasi mpo na kondimela mwana mpenza mpo na kotika ye azwa bikateli na ye moko, mingimingi ntango moboti ayebi ete mwana akoki kosala mabunga mpe akonyokwama lokola mbano. Nzoka Tata na Lola apesaka biso nzela tosala maponi oyo ekosunga biso tokokisa likoki na biso ya bonzambe! Lokola Mpaka Dale G. Renlund ateyaki, “ntina na [Ye] na kimoboti ezali te bana na Ye basala oyo ezali malamu; ezali kozala na bana na Ye bapona kosala oyo ezali malamu mpe na nsuka bakoma lokola Ye.”7

Atako elikya ya Nzambe kati na biso, boyokani na biso elongo na Ye ekokola bobele na ndelo oyo tolingi kotya kondima na biso epayi na Ye. Momekano ezali ete tozali kobika na mokili ya bokweyi mpe biso banso tokutana na boteki ya kondima lokola mbano ya bozangi bosembo, lokuta, to botindiki na makasi na bato mosusu, to makambo mosusu. Ntango otekami, tokoki kobunda mpo na kondimela lisusu. Boyebi ya kondima ya mabe oyo na bizaleli ebonga nie te ekoki kutu kobebisa bolingi na biso ya kondimela Tata na Lola abonga nie.

Mibu ebele eleki, baninga na ngai mibale, Leonid mpe Valentina, balakisaki mposa na kokomaka bandimi ya eklezia. Ntango Leonid abandaki koyekola nsango malamu, amonaki yango mpasi mpo na kosambela. Kala te na bomoi na ye, Leonid anyokwamaki uta na lokuta mpe bolandeli ya bakonzi mpe akolisaki bozangi kondimela bokonzi. Makambo oyo ebebisaki likoki na ye ya kofungola motema na ye mpe kolakisa mayoki na ye moko epayi na Tata na Lola. Na ntango mpe boyekoli, Leonid azwaki bososoli malamu ya ezalela ya Nzambe mpe abandaki koyoka bolingo ya Nzambe. Nsukansuka, losambo ekomaki nzela moko ya pete mpo na ye ya kolakisa botondi mpe bolingo oyo azalaki koyoka mpo na Nzambe. Bokoli ya kondima na Nzambe nsukansuka ememaki ye mpe Valentina bakota na mayokani ya bule mpo na kolendisa boyokani na bango elongo na Nzambe mpe moko na mosusu.

Soki bobungisi ya bondimi ya liboso ezali kozangisa yo ondimela Nzambe, nasengi olanda ndakisa ya Leonid. Na motema molai bokoba koyekola mingi etali Tata na Lola, ezalela na Ye, bizaleli na Ye, mpe bantina na Ye. Boluka mpe bokoma makambo oyo emonisaka bolingo mpe nguya na Ye na bomoi na bino. Profeta na biso ya bomoi, Mokambi Russell M. Nelson, ateyaki ete mingimingi ntango tozali koyekola na ntina ya Nzambe, ekokoma pete mpo na biso tondimela Ye.8

Mbala mosusu lolenge malamu koleka ya koyekola kondimela Nzambe ezali bobele kondimelaka Ye. Lokola “Lisano ya Bokweyi ya Kondima,” ntango mosusu tosengeli kokweya nsima mpe kotika Ye asimba biso. Bomoi na biso ya nkufa ezali momekano. Mikakatano oyo ekomelaka biso koleka makoki na bisomei eyaka mbala na mbala. Ntango boyebi mpe bososoli na biso moko ekoki te, na ndenge ya bomoto tolukaka makoki mpo na kosunga biso. Kati na mokili etonda na nsango, bozangi ya makoki ezali te mpo na kopesa biyano na yango na mikakatano na biso. Nzokande, toli ya pete mpe endimami kati ya Masese epesi biso lisungi malamu: “Ndimela Nkolo na motema na yo mobimba.”9 Tolakisaka kondima na biso na Nzambe na kotalaka epayi na Ye yambo ntango tokutani na mikakatano ya bomoi.

Nsima ya kosilisa kelasi na ngai ya zuzi na Utah, libota na biso ezwaki ekateli ya motuya ya esika nini kosala mpe kotonga ndako na biso. Nsima ya kosolola moko na mosusu mpe na Nkolo, tomiyokaki ya kokambama mpo na komema libota na biso na Etazini ya esti, mosika uta baboti mpe bandeko. Na ebandeli, makambo ezalaki kotambola malamu, mpe toyokaki ete ekateli na biso ekokokisama. Kasi nsima makambo ebongwanaki. Balongolaki bato mosusu na bilo ya bazuzi, mpe nazalaki na elikya ya kozwa mosala te to lisungi na ntango kaka mwana na biso ya mwasi Dora abotamaki na bokono ya makasi mpe bolandeli ya ntango molayi. Ntango tozalaki kobunda na mikakatano oyo, nazwaki libiangi ya kosala oyo esengelaki kozwa ntango ebele mpe komipesa.

Natikala kokutana na momekano ya bongo mpe nakamwaki mpenza. Nabandaki kotya ntembe na ekateli tozwaki mpe na nkotisa na yango. Tondimelaki Nkolo, mpe makambo esengelaki kotambola. Nakweyaki, mpe emonanaki sikawa ete moto moko te akosimba ngai.

Mokolo moko, maloba “Kotuna te mpo na nini; tuna nini ngai nalingi yo oyekola” eyaki mbala moko na makanisi mpe motema na ngai. Sikawa nabulunganaki kutu mpenza. Na ntango wana mpenza nazalaki kobunda na ekateli na ngai ya ebandeli, Nzambe azalaki kobianga ngai nandimela Ye mingi koleka kutu. Soki totali nsima, oyo ezalaki ngonga moko ya ntina monene na bomoi na ngai—ezalaki ntango nasosolaki ete lolenge malamu ya koyekola kondimela Nzambe ezalaki bobele na kondimelaka Ye. Na baposo oyo elandaki, natalaki na kokamwa lolenge Nkolo afungolaki na ndenge ya likamwisi mwango na Ye mpo na kopambola libota na biso.

Bateyi mpe balakisi malamu bayebaka ete bokoli ya mayele mpe bokasi ya nzoto ekoki koya bobele ntango makanisi mpe misisa ezali kobulunganisama. Lolenge moko, Nzambe abengisaka biso tokola na kondimelaka bokambi na Ye ya molimo na nzela ya makambo oyo ebulungisaka molimo. Na yango, tokoki kozala na elikya ete atako kondima nini tokokaki kolakisa epayi na Nzambe na kala, boyebi mosusu ya bolendisi kondima ezali naino liboso. Nzambe amitungisaka na bokoli mpe bokobi na biso. Azali Molakisi Moteyi, molakisi akoka oyo azali ntango nyonso kolendisa biso mpo na kosunga biso tokokisa mingi ya likoki na biso ya bonzambe. Yango ekosenga ntango nyonso libengisi oyo ekoya liboso mpo na kondimela Ye bobele moke koleka.

Buku ya Mormon ezali koteya ndakisa oyo Nzambe asalelaka mpo na kolendisa biso mpo na kotonga mayokani ya makasi na biso. Na kati ya Yaka, Landa Ngai, kala te toyekolaki na ntina ya lolenge nini kondima ya Nefi na Nzambe emekamaki ntango ye mpe bandeko na ye batindamaki mpo na kozonga na Yelusaleme mpo na kozwa bapalaki ya motako. Nsima ya bozangi ya bomeki na bango ya liboso, bandeko na ye batikaki mpe bakomaki pene ya kozonga na bozangi bapalaki. Kasi Nefi aponaki kotya kondima na ye mobimba na NKolo mpe alongaki kozwa bapalaki.10 Boyebi oyo ntango mosusu elendisaki elikya ya Nefi na Nzambe ntango lingenda na ye ebukanaki mpe libota na ye ekutanaki na nzala na esobe. Lisusu, Nefi aponaki kondimela Nzambe, mpe libota ebikisamaki.11 Boyebi oyo elandana epesaki Nefi elikya makasi na Nzambe mpo na mosala monene oyo asengelaki kosala, elingi koloba kotonga masuwa.12

Na nzela ya boyebi oyo, Nefi akolisaki boyokani na ye na Nzambe na kondimelaka Ye ntango nyonso. Nzambe asalelaka ndakisa oyo ndenge moko na biso. Abengisaka bisomei tolendisa mpe tokomisa makasi kondima na biso epai na Ye.13 Ntango nyonso tondimaka mpe tosalaka na libengisi, kondima na biso na Nzambe emataka. Ntango toboyaka to tomonaka mpamba libengisi, bokobi na biso etelemaka kino tokosala na libengisi ya sika.

Nsango malamu ezali ete atako kondima nini toponaki to oyo tondimelaki Nzambe te na kala, tokoki kopona kondimela Nzambe lelo mpe mikolo nyonso ekoya liboso. Nalaki ete ntango nyonso tokosala bongo, Nzambe akozala wana mpo na kosimba biso, mpe boyokani na biso ya kondima ekokola mingi koleka kino mokolo oyo tokokoma moko na Ye mpe Mwana na Ye. Nsima tokoki kosakola lokola Nefi, “O Nkolo, nakondima na yo, mpe nakotia bondimi na yo libela.”14 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.