Likita Linene
Makamwisi, Banzelu, mpe Nguya ya Bonganganzambe
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Makamwisi, Banzelu, mpe Nguya ya Bonganganzambe

Soki bozali na mposa ya mapamboli ya bonganganzambe, kobakisa makamwisi mpe mosala ya banzelu, botambola na nzela ya mayokani Nzambe asali.

Ebele lelo balobaka ete makamwisi ezalaka lisusu te, banzelu ezali likanisi ya mpamba, mpe ete lola ekangama. Natatoli ete makamwisi esili te, banzelu bazali kati na biso, mpe lola efungwami mpenza.

Ntango Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azalaki na mabele, Apesaki bafungola ya bonganganzambe na Ntoma na Ye mokonzi Petelo.1 Na nzela ya bafungola oyo, Petelo mpe Bapostolo mosusu bakambaki Eklezia ya Mobikisi. Kasi ntango Bapostolo wana bakufaki, bafungola ya bonganganzambe elongolamaki na mabele.

Natatoli ete bafungola ya kala ya bonganganzambe ezongisamaki. Petelo, Jake, mpe Yoane mpe baprofeta mosusu ya kala babimaki lokola bikelamu oyo basekwi, kopesaka na Profeta Joseph Smith oyo Nkolo alimbolelaki lokola “bafungola ya bokonzi na ngai, mpe eleko ya nsango malamu.”2

Bafungola wana kaka elekaki uta na profeta na profeta kino lelo. Mibali 15 oyo tosungaka lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi basalelaka yango mpo na kokamba Eklezia ya Mobikisi. Lokola na ntango ya kala, ezali na Apostolo moko ya monene oyo asimbi mpe azali na ndingisa ya kosalela bafungola nyonso ya bonganganzambe. Ezali Mokambi Russell M. Nelson, profeta mpe Mokambi ya Eklezia ya Klisto oyo ezongisami na mikolo na biso: Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Na nzela ya Eklezia ya Mobikisi, tozwaka mapamboli ya bonganganzambe—kobakisa nguya ya Nzambe mpo na kosalisa biso na bomoi na biso. Na nse ya bafungola ya bonganganzambe oyo epesami ndingisa, tosalaka bilaka bisantu epayi ya Nzambe mpe tozwaka makuli masantu oyo elengelaka biso mpo na kobika liboso na Ye. Kobanda na libatisi mpe nkotisa mpe nsima na tempelo, tozali kokende liboso na nzela ya mayokani oyo ezongisaka biso epayi na Ye.

Na maboko etiamaki na mitu na biso, tozwaka lisusu mapamboli ya bonganganzambe, kobakisa bokambi, libondisi, toli, kobikisa, mpe nguya ya kolanda Yesu Klisto. Na bomoi na ngai mobimba, napambolami na nguya monene oyo. Ntango emonisami na makomi, tolobelaka yango lokola nguya ya Bonganganzambe esantu ya Melekisedeki.3

Na bolenge na ngai nazwaki limemya monene mpo na nguya oyo, mingimingi lokola emonisamaki na mapamboli ya bonganganzambe. Ntango nazalaki kosala lokola elenge misionele na Chili, bakangaki ngai na moninga na ngai mpe tokabwanaki. Bayebisaki biso te mpo na ntina nini. Ezalaki eleko ya yikiyiki monene ya politiki. Basoda bakangaki bankoto ya bato mpe bayebanaki lisusu na bango te.

Nsima ya kotuna ngai mituna, nafandaki ngai moko na boloko, nayebaki te soki nakomona lisusu balingami na ngai. Nabalukaki epayi ya Tata na ngai na Lola, kobondelaka na molende: “Tata, nateyami ntango nyonso ete Ozali kokengela bamisionele na Yo. Nasengi, Tata, nazali eloko moko ya ntina te, kasi nazali na botosi mpe nazali na mposa ya lisalisi na Yo na mpokwa ya lelo.”

Mboto ya lisalisi oyo elonamaki mibu mingi liboso. Nsima ya libatisi na ngai, nandimisamaki lokola mondimi ya Eklezia mpe napesamaki likabo ya Molimo Mosantu. Ntango nazalaki kosambela, ngai moko, nsima ya minyololo, Molimo Mosantu ayaki mbala moko mpe alendisaki ngai. Amemaki na makanisi na ngai eteni moko ya sikisiki mpenza uta na lipamboli na ngai ya nkoko, oyo ezali lipamboli mosusu ya bonganganzambe. Kati na yango, Nzambe alakaki ngai na nzela ya bosembo na ngai nakokangama na tempelo mpo na ntango mpe libela na mwasi oyo atondi na kitoko mpe bolamu mpe bolingo, tokokoma baboti ya bana mibali mpe basi ya motuya, nakopambolama mpe nakokumisama lokola tata na Yisalaele.

Maloba wana efulama na ntina ya lobi na ngai etondisaki molimo na ngai na kimya. Nayebaki ewutaki na Tata na ngai na Lola ya bolingo, oyo abatelaka ntango nyonso bilaka na Ye.4 Na ngonga wana, nazalaki na endimiseli ya kobima mpe kozala na bomoi mpo na komona bilaka wana ekokisama.

Penepene na mobu moko nsima, Tata ya Lola apambolaki ngai mpenza na mwasi oyo atondi na kitoko mpe bizaleli malamu mpe bolingo. Lynette mpe ngai tokangamaki na tempelo. Topambolamaki na bana mibali misato mpe basi minei ya motuya. Nakomaki tata, nyonso wana engebene na bilaka ya Nzambe na lipamboli ya nkoko oyo nazwaki ntango nazalaki mwana mobali ya mbula 17.

“Yango wana, bandeko mibali [mpe bandeko basi] balingami na ngai, makamwisi esilaki mpo ete Klisto amataki na lola?

“… Te; mpe banzelu basilisi kosalela bana ba bato te.”5

Natatoli ete makamwisi mpe misala ezali ntango nyonso kosalema na bomoi na biso, mbala mingi lokola mbano ya semba ya nguya ya bonganganzambe. Mapamboli mosusu ya bonganganzambe ekokisamaka mbala moko, na banzela tokoki komona mpe kososola. Misusu eazali kofungwama mokemoke mpe ekokokisama mobimba te na bomoi oyo. Kasi Nzambe abatelaka bilaka na Ye nyonso, ntango nyonso, lokola emonisami na lisolo oyo uta na mambi ya kala ya libota na biso:

Nkoko na ngai ya mobali ya tata, Grant Reese Bowen, azalaki moto ya bondimi monene. Namikundoli malamu koyoka ye kozongela lolenge nini azwaki lipamboli na ye moko ya nkoko. Na zulunalo na ye, akomaki boye: “Nkoko alakaki ngai likabo ya kobikisa. Alobaki, ‘Babeli bakobikisama. Iyo, bakufi bakosekwa na nse ya maboko na yo.’”

Bambula mingi na nsima, Nkoko azalaki kotondisa matiti ntango apusamaki mpo na kozonga ndako. Akutanaki na tata na ye oyo azalaki koya epayi na ye. Tata na ye alobaki: “Grant, mama na yo awuti kokufa.”

Nazongeli lisusu maloba uta na zulunalo ya Nkoko: “Natelemaki te kasi nakendaki mbangu na ndako mpe nabimaki na veranda ya liboso epayi wapi balalisaki ye. Natalaki ye mpe nakokaki komona ata elembo moko te ya bomoi kati na ye. Namikundolaki lipamboli na ngai ya nkoko mpe elaka ete soki nazalaki sembo, na nzela ya bondimi na ngai babeli bakobikisama; mpe bakufi bakosekwa. Natiaki maboko na ngai na moto na ye, mpe nayebisaki Nkolo ete soki elaka oyo Apesaki ngai na nkoko ezalaki solo, mpo amonisa yango na ntango oyo mpe kozongisa mama na ngai na bomoi. Nalakaki Ye soki Akosala boye, nasengeli ata moke te kokakatana kosala nyonso na nguya na ngai mpo na botongi ya bokonzi na Ye. Ntango nazalaki kosambela, afungolaki miso mpe alobaki, ‘Grant, sembola ngai. Nazalaki na mokili ya milimo, kasi obengi ngai lisusu. Tika ete likambo yango ezala ntango nyonso litatoli mpo na yo mpe misusu ya libota na ngai.’”

Mokambi Russell M. Nelson ateyi biso toluka mpe tolikya komona makamwisi.6 Natatoli ete mpo bonganganzambe ezongisami, nguya mpe bokonzi ya Nzambe ezali na mabele. Na nzela ya mabiangi mpe mayangani, mibali mpe basi, bilenge mpe mikolo, bakoki kosangana na mosala ya bonganganzambe. Ezali mosala ya makamwisi, oyo banzelu bazali kosala. Ezali mosala ya lola, mpe epambolaka bana nyonso ya Nzambe.

Na 1989, libota na biso ya bato nsambo ezalaki kozonga uta na mobembo moko ya palwasi. Ngonga epusanaki. Lynette azalaki na zemi ya mwana na biso ya motoba. Ayokaki nungunungu makasi mpo na kokanga mokaba na ye ya libateli, oyo abosanaki kosala. Mwa moke na nsima tokomaki zingazinga ya esika moko oyo nzela ebalukaki; motuka moko ekatisaki molongo mpe ekotaki na nzela na biso. Lokola nazalaki kokende na vitesi ya kilometre 112 na ngonga moko, nabalukaki mpo na kokima motuka oyo ezalaki koya. Motuka na biso ebalukaki, etambolaki na nzela monene, mpe ekitaki na nzela, nsukansuka etelemaki, ekitaki na ngambo ya mokumbi motuka na mabele.

Eloko elandaki oyo namikundoli nayokaki ezalaki mongongo ya Lynette: “Shayne, tosengeli kobimela na ekuke na yo.” Nakangamaki na mopepe na mokaba na ngai ya libateli. Esengelaki mwa basegonde mpo na koyeba esika oyo azalaki. Tobandaki kotombola moko na moko ya bana libanda ya motuka na nzela ya lininisa na ngai, oyo ezalaki sikawa palafo ya motuka. Bazalaki kolela, komituna nini esalemaki.

Nokinoki tomonaki ete mwana na biso ya mwasi ya mibu 10, Emily, azalaki te. Tobelelaki nkombo na ye, kasi eyano ezalaki te. Bandimi ya palwasi, oyo bazalaki mpe kozonga ndako, bazalaki na esika ya likambo mpo na koluka ye na nsomo. Ezalaki molili makasi. Natalaki lisusu na kati ya motuka na mwinda mpe, na nsomo na ngai, namonaki nzoto ya Emily ekangami na nse ya motuka. Nalelaki na mawa nyonso, “Tosengeli kolongola motuka likolo ya Emily.” Nasimbaki palafo mpe nazongaki nsima. Kaka bato moke nde bazalaki kotombola, kasi na ndenge ya likamwisi, motuka yango etelemaki mpe emonisaki nzoto ya Emily oyo ezalaki na bomoi te.

Emily azalaki kopema te. Elongi na ye ezalaki na langi ya mayi ya mpondu. Nalobaki, “Tosengeli kopesa ye lipamboli.” Moninga moko ya bolingo mpe mondimi ya palwasi afukamaki elongo na ngai, mpe na bokonzi ya Bonganganzambe ya Melekisedeki, na nkombo ya Yesu Klisto, totindaki ye abika. Na ntango yango, Emily apemaki mpema makasi.

Nsima ya oyo emonanaki lokola bangonga, nsukansuka ambulansi ekomaki. Bamemaki Emily nokinoki na lopitalo. Azalaki na mpema ya kokangama mpe misisa ya libolongo ekatanaki. Kobeba ya bongo ezalaki likambo oyo ezalaki kotungisa mpo na ntango oyo azalaki kozanga mopepe. Emily alekisaki mokolo moko na ndambo na coma. Tokobaki kosambela mpe kokila mpo na ye. Apambolamaki na kobika mobimba. Lelo oyo, Emily na mobali na ye Kevin, bazali na bana motoba ya basi.

Na ndenge ya likamwisi, bato mosusu nyonso babikaki. Mwana oyo Lynette azalaki komema ezalaki Tyson. Ye mpe abikisamaki na likama mpe abotamaki na Sanza ya Mibale oyo elandaki. Nsima ya sanza mwambe, nsima ya kozwa nzoto na ye ya mabele, Tyson azongaki na ndako epayi ya Tata na biso na Lola. Azali mwana na biso ya anzelu mobateli. Toyokaka bopusi na ye na libota na biso mpe tozali kozela na esengo kozala lisusu elongo na ye.7

Baoyo batombolaki motuka yango likolo ya Emily bamonaki ete motuka ezalaki na kilo te. Nayebaki ete banzelu ya lola basanganaki na baoyo ya mabele mpo na kolongola motuka na nzoto ya Emily. Nayebi lisusu ete Emily azongisamaki na bomoi na nguya ya bonganganzambe esantu.

Nkolo amonisaki bosolo oyo epayi ya basali na Ye: “Nakokende liboso na bino. Nakozala na loboko ya mobali na bino mpe na loboko ya mwasi na bino, mpe banzelu na ngai nzinganzinga na bino, mpo na kotatola epayi na bino.”8

Natatoli ete “Bonganganzambe Esantu, nsima ya Molongo ya Mwana ya Nzambe”9—Bonganganzambe ya Melekisedeki—na bafungola, bokonzi, mpe nguya na yango ezongisami na mabele na mikolo oyo ya nsuka. Nayebi ete atako makambo nyonso te esalamaka lokola tokoki kolikya mpe kosambela mpo na yango, makamwisi ya Nzambe ekoya ntango nyonso engebene na bolingi na Ye, ntango na Ye, mpe mwango na Ye mpo na biso.

Soki bozali na mposa ya mapamboli ya bonganganzambe, kobakisa makamwisi mpe mosala ya banzelu, nabengisi bino botambolaka na nzela ya mayokani Nzambe apesi na moko na moko na biso. Bandimi mpe bakambi ya Eklezia oyo balingaka bino bakosalisa bino na kosala likambo oyo elandi.

Natatoli ete Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, azali na bomoi mpe akambaka Eklezia na Ye na nzela ya baprofeta ya bomoi baoyo basimbaka mpe basalelaka bafungola ya bonganganzambe. Molimo Mosantu azali ya solo. Mobikisi apesaki bomoi na Ye mpo na kobikisa biso, kozongisa biso, mpe komema biso na ndako.

Natatoli ete makamwisi esili te, banzelu bazali kati na biso, mpe lola efungwami. Mpe oh, boniboni polele ezali! Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.