Likita Linene
Mbuma Oyo Etikalaka
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Mbuma Oyo Etikalaka

Kozala na makuli na biso ekangisami na Molimo Mosantu ezali motuya soki tolingi kozala na mapamboli elakama mpo na libela.

Lokola elenge mobali nazalaki kolinga mingi bambuma ya sika mpe ya kotela. Kino lelo, likanisi ya kolia mbuma ya petepete mpe etonda mayi, ya kotela na nsolo kitoko na yango emelisaka ngai soi na monoko. Ntango bambuma oyo ekoli ebukami, ewumelaka uta na mikolo mibale na mikolo minei liboso ebebaka. Nazali na makundoli ya malamu ya kosanganaka na mama na ngai mpe bandeko na ngai na kikuku na biso ntango tosengelaki kobatela bambuma oyo babukaki mpo na eleko ya malili oyo ezalaki koya na kokangaka yango na milangi. Soki tobateli mbuma malamu, mbuma ya mpimbo oyo ekowumela mibu ebele, kaka mikolo mibale na minei te. Soki ebongisami mpe etumbami malamu, mbuma ekobatelama kino mofiniku na yango ekobukana.

Klisto akambaki biso “tokende mpe tobota mbuma, … ete mbuma na biso etikala.”1 Kasi Azalaki koloba na ntina ya mbuma ya kolia te. Azalaki koloba na ntina ya mapamboli ya Nzambe epayi ya bana na Ye. Soki tosali mpe tobateli mayokani na Nzambe, mapamboli oyo esangani na mayokani na biso ekoki kosembolama koleka bomoi oyo mpe kokangisama likolo na biso, to kobatelama, libela na libela, kokomaka mbuma oyo ekotikalaka mpo na boseko nyonso.

Molimo Mosantu, na mosala na Ye ya bonzambe lokola Molimo Mosantu ya Elaka, akokangisa likuli moko na moko likolo ya baye bazali nsembo na mayokani na bango ete yango endimama nsima ya bokufi.2 Kozala na makuli na biso ekangisami na Molimo Mosantu ezali ntina soki tolingi kozwa mapamboli elakama mpo na libela, kokomaka mbuma oyo etikalaka.

Yango ezali mingimingi motuya soki tolingi konetolama.3 Lokola Mokambi Nelson ateyaki, tosengeli “kobanda na nsuka na makanisi. … Na ntembe te, mpo na moko moko na biso, ‘nsuka’ tokolinga mingi mpenza kokokisa ezali kobika libela na libela elongo na mabota na biso na ezalela enetolami wapi tokozala liboso ya Nzambe, Tata na biso na Lola, mpe Mwana na Ye Yesu Klisto.”4 Mokambi Nelson alobi lisusu: “Libala ya selesitiale ezali eteni ya motuya mingi ya bomilengeli mpo na bomoi ya seko. Esengaka kobalana na moto ya malamu, na esika ya malamu, mpe na likoki ya malamu, mpe kotosa na bosembo boyokani ya bule wana. Nsima moko akoki kondimisama ete akonetolama na bokonzi ya selesitiale ya Nzambe”5

Mampamboli ya bonetoli ezali nini? Esangisi kofanda liboso ya Nzambe mpo na libela elongo lokola mobali mpe mwasi, mpo na kozwa libula ya “bangbende, makonzi, biyangeli, mpe banguya, … mpe bokobi ya nkona libela na libela,”6 kozwa nyonso oyo Nzambe Tata azali na yango.7

Nkolo amonisaki na nzela ya Joseph Smith:

“Na nkembo ya selesitiale ezali na balola misato to bandelo;

“Mpe mpo na kozwa oyo eleki likolo, moto asengeli akota na molongo ya bonganganzambe [elingi koloba boyokani ya sika mpe ya seko ya libala];

“Mpe soki akoti te, akoki kozwa yango te.

“Akoki kokota na mosusu, kasi yango ezali nsuka ya bokonzi na ye; akoki kozala na bokoli te.”8

Toyekoli awa ete moto akoki kozala na bokonzi ya selestiale, to kofanda liboso ya Nzambe, mpe kozala monzemba. Kasi konetolama na ndelo ya likolo koleka ya bokonzi ya selestiale, moto asengeli akota na molongo ya libala na likoki esengeli mpe nsima kozala sembo na mayokani oyo esalemaki na libala wana. Soki tozali sembo na mayokani oyo, Molimo Mosantu ya Elaka ekoki kokangisa boyokani ya libala na biso.9 Mapamboli ekangisama lokola wana ekomaka Mbuma oyo etikalaka.

Nini esengeli mpo na kobatela na bosembo boyokani ya sika mpe ya seko ya libala?

Mokambi Russell M. Nelson ateyi ete ezali na ndenge mibale ya bokangami ntango tokoti na boyokani oyo ya libala ya seko: bokangami ya ngambo kati na mobali mpe mwasi, mpe bokangami ya semba elongo na Nzambe.10 Mpo na kozala na mapamboli ya bonetoli ekangisami likolo na biso, mpe etikali nsima ya bomoi oyo, tosengeli kozala sembo mpo na bokangami nyonso mibale ya ngambo mpe ya semba ya boyokani.

Mpo na kobatela bokangami ya ngambo elongo na molongani na yo, Nzambe apesi biso toli ya “kolinga [ya bino] mwasi [to mobali] na motema [na bino] , mpe … bokangama na [bango] mpe na moto mosusu te.”11 Mpo na baoyo babala, kokangama na bango mpe na moto mosusu te elakisi bokamba elongo kati na bolingo, bolingana mpe bosalisana moko na mosusu, botyaka liboso ngonga bolekisaka na molongani na bino koleka bantina ya libanda, mpe bobengaka likolo na bino Nzambe asalisa bino bolonga botau na bino.12 Elakisi lisusu ete ezali te na boyokani ya mayoki to ya kosangisa nzoto ya lolenge kani na libanda ya libala na bino, ata mpe kolinga to kokutana na bato lokola basheli, mpe pornogalafi ezali te, oyo ebimisaka mposa ya nzoto.13

Mpo na kobatela bokangami ya semba kati na boyokani, molongani moko na moko asengeli azala kati na libala. Mokambi Dallin H. Oaks kala mingi te ateyaki: “Toyebi lisusu ete Ye [Nzambe] akotinda na makasi moto moko te kati na bokangami na kimoninga kozanga bolingi na ye. Mapamboli ya boyokani oyo ekangami endimisami na banso oyo babatelaka mayokani na bango kasi ata moke te na kotindika boyokani na makasi likolo ya moto mosusu oyo alongobani te to alingi te14

Bokangami nini ya semba elobelami na Mokambi Nelson? Bokangami ya semba ezali moko oyo tosalaka na Nzambe.

Kobatela bokangami ya semba na Nzambe, tosengeli kozala sembo na mayokani ya tempelo tosalaki engebene na mibeko ya botosi, libonza, nsango malamu, bopeto, mpe bobulisi. Toyokanaka lisusu na Nzambe mpo na kozwa moninga na biso ya seko mpe kozala molongani mpe moboti ya sembo. Ntango tozali kobatela mokangano ya semba, tozali kolongobana mpo na mapamboli ya kozala na kati ya libota ya Nzambe na nzela ya boyokani ya Abalayama, kobakisa mapamboli ya bakitani, nsango malamu, mpe bonganganzambe.15 Mapamboli oyo ezali lisusu mbuma oyo etikalaka.

Atako tozali kolikia ete baoyo nyonso bakoti na boyokani ya sika mpe ya seko batikalaka solo mpe bazalaka na mapamboli ekangami likolo na bango mpo na libela na libela, ntango mosusu lotomo wana emonanaka lokola eleki makoki na biso. Na nzela ya mosala na ngai, nakutani na bandimi oyo basalaka mpe babatelaka mayokani, kasi balongani na bango te. Ezali mpe lisusu baoyo bazali minzemba, batikala kozwa te libaku ya kobala kati na bomoi ya kufa. Mpe ezali na baoyo bazali sembo te na mayokani na bango ya libala. Nini ekomelaka bato kati na moko moko ya makambo oyo?

  1. Soki otikali sembo na mayokani na yo osalaki ntango ozwaki dotasio, okozwa mapamboli ya moto ye moko elakama na yo kati na dotasio atako soki molongani na yo abuki mayokani na ye to alongwe libala. Soki okangisamaki mpe nsima obomi libala, mpe soki bokangisi na yo elongolami te, mapamboli ya moto ye moko ya bokangisi wana ekotikala na nguya mpo na yo soki otikali sembo.16

    Mbala mosusu, likolo ya mayoki ya kokosama mpe mpasi ya solo mpenza, molongani ya sembo akoki kolinga koboya kokanga elembo na bango elongo na molongani na bango oyo azali sembo te mpo na kozala mosika mpenza na bango, ezala na mabele mpe mpo na libela. Soki ozali komitungisa ete na lolenge moko to mosusu okokangama na molongani ya kala oyo ayamboli te, kobosana te, okokangama te! Nzambe akosenga te na moto moko atikala na boyokani oyo ekangisami na bowumeli ya seko na kozanga bolingi na ye. Tata na Lola akosala ete tozwa mapamboli nyonso oyo bamposa na biso mpe maponi na biso epesi nzela.17

    Nzokande, soki bolongoli ya bokangisi esengelami, makoki ya kosala etosami. Mwa ndenge ya kosalela ekoki kolandama. Kasi yango esengeli te esalema na pete! Bokambi ya Yambo esimbi bafungola ya kokanga na mabele mpe na lola. Soki bolongoli ya bokangisi epesami na Bokambi ya Yambo, mapamboli oyo etali bokangisi wana ezali lisusu na nguya te; elongolami nyonso mibale na ngambo mpe na semba. Ezali motuya ya kososola ete mpo na kozwa mapamboli ya bonetoli, tosengeli kolakisa ete tozali na bolingi ya kokota na kati mpe na bosembo kobatela boyokani oyo ya sika mpe ya seko, ezala na bomoi oyo to oyo ekoya.

  2. Mpo na baoyo bazali banzemba bandimi ya Eklezia, nasengi bokundola ete “Na lolenge mpe ngonga Mobikisi akolinga, lipamboli moko te ekopimelama na bansantu na Ye ya sembo. Nkolo akosambisa mpe akopesa mbano na moto nyonso engebene na [bamposa] na ye ya motema mpe misala.”18

  3. Soki otikali sembo te na mayokani ya tempelo, elikya ezali? Iyo! Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nsango malamu ya elikya. Elikya yango eyaka na nzela ya Yesu Klisto na boyamboli ya motema moko mpe na kolandaka mateya ya Klisto na botosi nyonso. Namona bato kosala mabunga minene, kobukaka mayokani ya bule. Mbala mingi, namonaka baoyo bayamboli na motema moko, balimbisami, mpe bazongi na nzela ya boyokani. Soki obuki mayokani na yo ya tempelo, nasengi yo na lombango otalela Yesu Klisto, osolola na episikopo na yo, oyambola, mpe ofungola molimo na yo na nguya makasi ya kobikisa oyo ezwami mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto.

Bandeko mibali mpe basi, Tata na biso na Lola ya bolingo apesi biso mayokani mpo ete tokoka kozwa nyonso oyo Ye azali na yango na ebombelo mpo na biso. Mapamboli oyo ya bule uta na Nzambe ezali elengi koleka mbuma nyonso ya mabele. Ekoki kobatelama mpo na biso libela na libela,kokomaka mbuma etikala, ntango tozali sembo na mayokani na biso.

Natatoli ete Nzambe azongisaki likoki ya kokanga na nse mpena lola. Likoki wana ezwami na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Esimbami na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale mpe esalelami na nse ya bokambi ya Mokambi Russell M. Nelson. Baoyo bakoti na boyokani ya sika mpe ya libela ya libala mpe babateli boyokani yango bakoki kokoma babongi nie mpe nsukansuka kozwa litondi ya nkembo ya Tata, kozanga kotala makambo oyo eleki bososoli na bango.19

Mapamboli elakama oyo etali mayokani na biso ekoki kokangisama likolo na biso na Molimo Mosantu ya Elaka mpe kokoma mbuma oyo etikalaka libela na libela. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Yoane 15:16.

  2. Tala Dale G. Renlund, “Bokoti na Nguya ya Nzambe na nzela ya Mayokani,” Liahona, May 2023, 35–38; Malongi mpe Mayokani 132:7.

  3. Bokuli moko ekangami ntango endimami ezala na lola mpe na mabele mpo ete esalemi na moto oyo azali na likoki mpe endimami na Molimo Mosantu.

    “Tozalaka na momesano ya kokanisa na ntina ya likoki ya bokangisi lokola etali kaka makuli mosusu ya tempelo, kasi likoki wana esengelami mpo na kosala ete makuli nyonso endimama mpe ekangama koleka liwa. Nguya ya bokangisi epesaka elembo ya bondimi na libatisi na yo, ndakisa, mpo ete endimama awa mpe na lola. Na nyonso, makuli nyonso ya bonganganzambe esalemaka na nse ya bafungola ya Mokambi ya Eklezia, mpe lokola Mokambi Joseph Fielding Smith alimbolaki, ‘Ye [Mokambi ya Eklezia] apesaki biso likoki, atiaki nguya ya bokangisi kati na bonganganzambe na biso, mpamba te azali na bafungola yango [elobami na Harold B. Lee, na Conference Report, Sanza ya zomi 1944, 75]” (D. Todd Christofferson, “Nguya ya Bokangisi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 20).

    “Mosala oyo ekangisami na Molimo Mosantu ya elaka ezali moko oyo endimami na Molimo Mosantu; ezali moko oyo endimami na Nkolo. … Moko te akoki kokosa Molimo Mosantu mpe amonisama te. … Mabongi oyo ezali kosalelama na makuli mpe mosala nyonso na Eklezia. Na yango soki bato mibale [na libala] bazali ‘sembo mpe solo’ [Malongi mpe Mayokani 76:53], soki balongobani, elembo oyo endimami etyami na libala na bango ya tempelo; soki balongobani te, balongisami te na Molimo mpe bondimi ya Molimo Mosantu ekangami. Bolongobani oyo ekolanda ekotiya elembo na nguya mpe kozanga boyengebene ekobuka elembo nyonso” (Bruce R. McConkie, “Molimo Mosantu ya Elaka,” na Preparing for an Eternal Marriage Student Manual [2003], 136).

    Molimo Mosantu ya Elaka ezali Molimo Mosantu oyo atiyaka elembo ya kondimama likolo ya makuli nyonso: libatisi, nkotisa, bokuli, libala. Elaka ezali ete mapamboli ekozwama na nzela ya bosembo.. Soki moto abuki boyokani moko, ezala libatisi, bokuli, libala to eloko mosusu, Molimo elongolaka elembo ya kondimama, mpe mapamboli ekozwama te. Mayokani nyonso ekangisami na elaka ya mbano oyo ewuti na bosembo. Molimo Mosantu elongolaka elembo ya kondimama esika wapi mayokani ebukani” (Joseph Fielding Smith, Doctrines of Salvationcomp. Bruce R. McConkie [1954], 1:45).

  4. Russell M. Nelson, Heart of the Matter: What 100 Years of Living Have Taught Me (2023), 15. Mayokani nyonso esengeli ekangisama na Molimo Mosantu ya Elaka soki basengeli kozala na nguya nsima ya lisekwa ya bakufi (tala Malongi mpe Mayokani 132:7.

  5. Russell M. Nelson, “Celestial Marriage,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 94.

  6. Malongi mpe Mayokani 132:19

  7. Tala Malongi mpe Mayokani 84:38

  8. Malongi mpe Mayokani 131:1–4.

  9. Tala Malongi mpe Mayokani 132:19–20. “Esika wana ya kokende ya likolo mpenza—bonetoli na bokonzi ya selestiale—ezali kobenda likebi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka” (Dallin H. Oaks, “Makonzi ya Nkembo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 26).

  10. “Kaka lokola mabala mpe mabota ekabolaka mokangano ya ngambo [oyo] ekelaka bolingo ya kafukafu, bongo nde boyokani ya sika esalemaka ntango tomikangisi bisomei na boyokani ya semba na … Nzambe” ntango tokotaka na boyokani ya sika mpe ya libela ya libala (Russell M. Nelson, Heart of the Matter, 41–42).

  11. Malongi mpe Mayokani 42:22; tala lisusu Buku Monene: Kosala kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 38.6.16. Na kosololaka na ntina ya libala awa, nazali kolobela libala engebene na mobeko ya Nzambe, oyo elimboli libala lokola bosangisi ya mibeko mpe endimami kati na mobali mpe mwasi (tala “Libota: Esakola na Mokili,” Gospel Library).

  12. Tala “Libota: Esakola na Mokili,” Gospel Library.

  13. Tala Malongi mpe Mayokani 42:22–24.

  14. Dallin H. Oaks, “Makonzi ya Nkembo,” 29; nsete ebetami.

  15. Tala Malongi mpe Mayokani 86:8–11,” 113:8; Abraham 2:9–11.

  16. Tala Buku Monene, 38.4.1.

    Ntango nazalaki kosala misio ya ntango mobimba na Suisse, moninga na ngai mpe ngai tokabolaki nsango malamu na bampaka babalani ya malamu ya mibu 60. Ntango tozalaki kotangisa babalani na oyo etali Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama, mwasi alakisaki mposa makasi na maye tozalaki koteya. Na mwa baposo elandaki, azwaki litatoli ya bosolo ete Eklezia ya Yesu Klisto ezongisamaki na likoki ya sembo uta na Nzambe, mpe ete Yesu Klisto akambaka Eklezia na Ye na nzela ya baprofeta mpe bapostolo ya bomoi. Tokobaki koteya babalani oyo na oyo etali moko ya malongi ya lokumu mingi ya Bozongisi, libaku ya libala ya seko. Nzokande, likambo ya kokamwa, ntango tozalaki koteya babalani oyo na oyo etali malongi ya libala ya seko, mwasi ya Swisse alobaki ete azalaki na mposa te ya kozala elongo na mobali na ye mpo na libela. Epayi na ye, lola ezalaki kobakisa te kozala elongo na mobali na ye, na nani abalanaki mpo na mibu 36. Ndeko mwasi oyo abatisamaki, kasi mobali na ye te. Batikala kozwa bokangami na tempelo te.

    Nzokande, mpo na bato mingi, lola elingaki kozala lola te kozanga kozala elongo na moto oyo babalani na ye. Kozala elongo na molongani oyo olingaka libela na libela solo eyokani lokola lola. Lokola Mpaka Jeffrey Holland akabolaki na ntina ya mwasi na ye ya bolingo, Pat, lola ekozala lola te soki azala te (tala “Scott Taylor: For Elder Holland, Heaven without His Wife and Children ‘Wouldn’t Be Heaven for Me,’” Church News, Sanza ya Nsambo 22, 2023 thechurchnews.com).

  17. See Dallin H. Oaks, “Makonzi ya Nkembo,” 26.

  18. Russell M. Nelson, “Celestial Marriage,” 94.

  19. Tala Yoane 15:16.