Likita Linene
Mokano Ya Nzambe Ezali Ya Komema Bino Na Ndako
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Mokano Ya Nzambe Ezali Ya Komema Bino Na Ndako

Makambo nyonso na ntina ya mwango ya Tata mpo na bana na Ye ebongisami mpo na komema moto nyonso na ndako.

Nalingi koloba matondo mpo na basambo na bino ntango na bandi lolenge ya mosala ya bomesani na libiangi, na nzela ya Mokambi Nelson kosala lokola Apostolo moko ya Nkolo Yesu Klisto. Bokoki solo kokanisa malamu ntango mosusu ndenge oyo likambo yango eyokaki komikitisa, mpe ezalaki ngonga ya mobulungano ya kokamwa mpe komitalela na makanisi. Ezali bongo, lokumu monene kosalela Mobikisi, na makoki nyonso, mpe kosangana elongo na bino na kokabola bansango ya nsango malamu na Ye ya elikya.

Likolo na wana, elobami ete nsima ya Apostolo nyonso ya sika etelemi mama bokilo moko ya kokamwa. Nayebi te soki yango elobama, kasi na likambo oyo, na ntembe te ekoki kozala bongo. Mpe nakanisi ete atako mama bokilo na ngai azali lisusu elongo na biso te elongoli te kokamwa na ye.

Basanza mingi eleki, ntango ngai mpe mwasi na ngai tozalaki kotambola na bamboka misusu mpo na mabiangi nzike ya Eklezia, nalamukaki ntongontongo mokolo moko mpe natalaki na molili na libanda ya lininisa ya otele na biso Na nse na balabala oyo bato bazalaki mingi, namonaki ete batyaki esika oyo bazalaki kokanga nzela mpe polusu moko atelemi pene wana mpo na kobalola mituka ntango ezalaki kokoma na esika ekangemi. Na ebandeli, mituka moke nde ezalaki kotambola na nzela mpe ezongisamaki nsima. Kasi lokola ntango elekaki mpe mituka ekomaki ebele, molongo ya mituka etondaki .

Uta lininisi na likolo, namonaki lokola polusu azalaki kosepela na nguya na ye ya kopekisa mituka kotambola mpe kozongisa bato. Na bongo, amonanaki lokola akolisaki boningani na makolo na ye, lokola soki abandaki mua mabina moke, ntango motuka mokomoko epusanaki na esika nzela ekangemaki. Soki mokumbi motuka asilikaki mpo na bokangami ya nzela, polusu yango azalaki komonana lokola ete azali kosalisa to koyokela ye mawa te. Azalaki kaka koningisa mutu mbala na mbala mpe kolakisa mosapi na nzela ya bozongi.

Baninga na ngai, baninga na ngai bayekoli na nzela ya bomoi ya nkufa, mwango kitoko ya Tata na biso, kutu mwango na Ye ya “malamu mingi”,1 elengelami mpo na komema bino na ndako, kasi te mpo na kotika bino libanda.2 Moko te atongi esika ya kokanga nzela mpe atye moto kuna mpo abalola yo mpe atinda yo mosika. Na bongo, ezali mpenza ndenge mosusu. Nzambe azali kolanda yo ntango nyonso. Ye “alingi bana na Ye nyonso bapona kozonga epayi na Ye,”3 mpe Asalelaka meko nyonso oyo ekoki mpo na kozongisa bino.

Tata na biso ya bolingo akambaki Bokeli ya mabele mpo na ntina monene ya kopesa bino mpe ngai libaku, kozala na mayele ya kotanda mpe ya kosembola ya bokufi, libaku ya kosalela bonsomi na biso ya bizaleli malamu oyo Nzambe apesi biso mpo na kopona Ye,4 mpo na koyekola mpe kokola, kosala mabunga, koyambola, kolinga Nzambe mpe mozalani na biso, mpe mokolo moko kozonga ndako epayi na Ye.

Atindaki mwana na Ye ya bolingo ya motuya na mokili ya bokweyi oyo mpo na kobika makambo nyonso ya bato bakutanaka na yango, mpo na kopesa ndakisa mpo na bana na Ye batikali kolanda, mpe mpo na komikaba mpe kosikola. Likabo ya bomikabi monene ya Klisto elongolaka bokangi nzela nyonso ya liwa ya nzoto mpe ya molimo oyo ekoki kokabola biso na ndako na biso ya seko.

Makambo nyonso na ntina ya mwango ya Tata mpo na bana na Ye ebongisami mpo na komema moto nyonso na ndako.

Bamemi nsango ya Nzambe, baprofeta na Ye, babengaka nini mwango oyo na makomi ya Bozongisi? Babengaka yango mwango ya bosikoli,5 mwango ya ngolu,6 mwango monene ya esengo,7 mpe mwango ya lobiko, oyo ezali mpo na bato nyonso, “na nzela ya makila ya Mwana na ngai ya Likinda.”8

Mokano ya mwango monene ya esengo ya Tata ezali ya bino esengo, kaka awa, sikawa, mpe na boseko. Ezali te mpo na kopekisa esengo na bino mpe kopesa bino mawa mpe bobangi.

Mokano ya mwango ya bosikoli ya Tata ezali bosikoli na bino, kobikisama na bino na nzela ya mpasi mpe liwa ya Yesu Klisto,9 kosikolama na boombo ya lisumu mpe liwa. Ezali te ya kotika bino ndenge bozali.

Mokano ya mwango ya ngolu ya Tata ezali ya kokolisa ngolu ntango bozongi epayi na Ye mpe botosi boyokani na bino ya bosembo epayi na Ye. Ezali te ya koboya ngolu mpe ya kopesa mpasi mpe mawa.

Mokano ya mwango ya lobiko ya Tata ezali mpenza lobiko na bino na bokonzi ya selesitiale ya nkembo ntango bozwi “litatoli ya Yesu”10 mpe bopesi molimo na bino mobimba epayi na Ye.11 Ezali te ya kotika bino libanda.

Yango elakisi ete likambo moko epesami nzela na lolenge tozali kobika bomoi na biso? Ete lolenge oyo toponaka kosalela makoki na biso ya kosala ezali na ntina te? Ete tokoki kozwa to kotika mibeko ya Nzambe? Te, ya solo te. Na ntembe te moko ya mabiangi mpe mabondeli ya Yesu oyo ezalaki na ntango ya mosala na Ye ya nkufa ezalaki ete tobongwana mpe toyambola mpe toya epayi na Ye.12 Na moboko oyo ezali na kati ya mateya na Ye nyonso mpo na kofanda na plan ya likolo ya etamboli ya bizaleli malamu13 ezali libiangi ya bokoli ya moto ye moko, na bondimi ya mbongwana kati na Klisto, na mbongwana ya motema ya nguya.14

Nzambe alingi mpo na biso bozongisi ya monene ya bopusi na biso ya moimi mpe ya lolendo, kobengana moto ya mosuni,15 mpo na biso “tokende, mpe tosumuka lisusu te.”16

Soki tondimeli mokano ya mwango mobimba ya Tata ezali ya kobikisa biso, kosikola biso, mpe na yango ememeli biso esengo, nini ezali mokano ya Mwana oyo na nzela ya nani mwango monene oyo ememami?

Mwana ayebisi biso Yemoko: “Nayaki na nse koluka bolingi na ngaimei te, kasi bolingi ya ye oyo atindaki ngai.”17

Bolingi ya Yesu ezali bolingi ya Tata oyo azali na boboto! Alingi kosala ete ekokisama mpo na bana nyonso ya nsuka ya Tata na Ye bazwa ntina ya nsuka ya mwango—bomoi ya seko elongo na Bango. Moko te alongolami na makoki wana ya bonzambe.

Soki omitungisaka mingi ete okokoka te, to ete bolingo ya Bomikabi ezanga nsuka ya Klisto ezali mpo na bato mosusu nyonso, kasi yo te, ozali kososola yango malamu te. Ezanga nsuka elakisi ya seko. Ezanga nsuka ezali mpo na yo mpe baye olingaka.18

Nefi alimbolaki bosolo ya kitoko oyo: “Akosala eloko te longola se soko ezali mpo ya litomba ya mokili; mpo alingi mokili, kutu ete akopesa bomoi bwa yemei ete akoka kobenda bato banso epai ya ye. Yango wana, atindi moto te ete akabola te lobiko na ye.”19

Mobikisi, Mobateli Mpate Malamu, akendaka koluka mpate abungi kino Ye amona ye.20 Ye “alingi te moto ata moko abunga.”21

“Loboko la ngai la ngolu lotandolami ona bino, mpe onso oyo akoya, nakoyamba ye.”22

“Ezali bino na bakoni o ntei ya bino? Memeni bango awa. Ezali bino na batengoli, to bato ba lolanda, bato ba tengutengu, to bakatami binema, to bato ba mbala, to balemene, to bakufa matoyi, to baye batungisami na ndenge inso? Memeni bango awa, mpe nakobikisa bango, mpo nazali na mawa likolo lya bino.”23

Abwakisaki mwasi na likambo ya makila te; Azongaki nsima te na moto ya maba; Aboyaki te mwasi oyo bakangaki na ekobo; Aboyaki te bato oyo babongoli motema—ata lisumu na bango ezali nini. Mpe Akoboya yo te to baoyo olingaka ntango omemi epai na Ye mitema ya mawa mpe milimo mibukana. Yango ezali te likanisi na Ye to mokano na Ye, to mpe mwango, ntina, mposa, to elikya na Ye.

Te, Atiyaka bopekisi nzela mpe bokangi nzela te; Alongolaka yango. Atyaka yo libanda te; apesaka yo na boyei malamu na kati.24 Mosala na Ye mobimba ezalaki bosakoli ya mokano oyo ya bomoi.

Nsima na bongo ezali na likabo ya bomikabi na Ye, oyo ezali mpasi mpo na biso kososola, koleka makoki na biso ya bomoto ya kososola. Kasi, mpe oyo ezali “kasi” moko ya ntina, tososoli, tokoki kososola, mokano ya bule, ya kobikisa ya likabo na Ye ya bomikabi.

Elamba ya tempelo epasukaki na biteni mibale ntango Yesu akufaki na ekulusu, kolakisaka ete nzela ya kokota na bozalani ya Tata efungwami makasi—na baoyo nyonso bakobaluka epai na Ye, bakotyela Ye motema, bakopesa Ye mikumba na bango, mpe bazwa ekanganeli na ye likolo na bango na nzela ya Boyokani ya bokangani.25

Na maloba mosusu, mwango ya Tata ezali te mpo na bokangami ya nzela Yango ezalaki te, ekozala te libela. Ezali kuna na makambo tozali na mposa ya kosala, mibeko ya kobatela, makambo ya bomoto na biso ya kobongola? Iyo. Kasi na ngolu na Ye, oyo ezali na kati ya makoki na biso, koleka te bokangami na biso.

Oyo ezali nsango malamu Nazali na botondi ekoki kolobama te mpo na babosolo oyo. Likanisi ya Tata, mwango na Ye, ntina na Ye, mokano na Ye, mposa na Ye, mpe elikya na Ye ezali nyonso mpo na kobikisa bino, nyonso mpo na kopesa bino kimia, nyonso mpo na komemela bino, mpe baye bolingaka, na ndako. Nazali kotatola yango na nkombo ya Yezu Klisto, Mwana na Ye, amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Kanisa Lola!,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2023, 117, 118.

  2. Tala 2 Nephi 26:25, 27.

  3. Buku Monene: Kosala kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 1.1, Gospel Library.

  4. Tala Moses 7:33.

  5. Tala Yakobo 6:8; Alma 12:30.

  6. Tala Alma 42:15.

  7. Tala Alma 42:8–16.

  8. Mose 6:62.

  9. Tala Malongi mpe Mayokani 45:4.

  10. Malongi mpe Mayokani 76:50–70

  11. Tala Omini 1:26.

  12. Tala Matai 4:17.

  13. Tala Matai 5–7. Ndakisa, kati na Matai 5:43–44, Mobikisi ateyaki bayekoli na Ye ete ekokaki te ko “linga mozalani na yo, mpe yina monguna na yo.” Mpo na kolanda Ye, basengeli lisusu ko “linga banguna na [bango].”

  14. Tala Moziya 5:2. Mpo ete ngolu ya Yesu Klisto ekoka koya na mosala na bomoi na biso, tosengeli kozonga epai na Ye. Alma Elenge ateyi ete oyo ya nkembo “mwango mwa bosikoli mokokaki te komememe mpembeni, bobele likolo lya masengeli ma boyamboli … ; mpo longola se soko ezalaki mpo ya masengeli maye, ngolu ekokaki te kosala ” (Alma 42:13).

  15. Tala Moziya 3:19.

  16. Yoane 8:11.

  17. Yoane 6:38.

  18. Tala Russell M. Nelson, “Bomikabi,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1996, 35: “Bomikabi na Ye ezali ya seko—ezanga nsuka. Ezalaki lisusu ya seko na yango bato nyonso bokoka kobikisama uta na liwa oyo esilaka te. Ezalaki ya seko na lolenge ya mpasi monene na Ye. Ezalaki ya seko na ntango, kosukisaka lolenge ya liboso ya mbeka ya nyama. Ezalaki ya seko na monene—esengelaki esalema mbala moko mpo na libela. Mpe ngolu ya Bomikabi ezali kaka te na motango ezanga nsuka ya bato, kasi lisusu na motango ezanga nsuka ya mikili ekelama na Ye. Ezalaki ya seko koleka emekeli ya mayele ya bato to bososoli ya nkufa.”

  19. 2 Nefi 26:24.

  20. Tala Luka 15:4.

  21. 2 Petelo 3:9; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 18:11–12.

  22. 3 Nefi 9:14.

  23. 3 Nefi 17:7; tala lisusu molongo 6.

  24. Kati na mateya ya Yesu Klisto kolakisa ete bato basusu bakozwa libula ya bokonzi ya likolo te, Amonisi polele ete mbano oyo ezali mposa na Ye te mpo na bango kasi ezali mbano ya maponi na bango moko (tala Matai 7:13–14, 21–25).

  25. Tala Matai 27:50–51; Baebele 9: 6– 12