Likita Linene
Bosambela, Azali Wana
Likita linene ya Sanza ya Minei 2024


Bosambela, Azali Wana

Nabengisi bino bosambela mpo na koyeba ete Tata ya Lola azali wana, bosambela mpo na kokola mpo na kokoma lokola Ye, mpe bosambela mpo na kolakisa bolingo na Ye na basusu.

Bandeko mibali mpe basi, nazali koyoka esengo ntango nazali koyanola na likanisi moko mpo na kolobela bana!

Bana mibali mpe bana basi, esika nyonso bozali na mokili, nalingi kokabola eloko moko na bino.

Tata na Biso ya Lola alingi bino! Bozali bana na Ye. Ayebi bino. Alingi kopambola bino. Nasambeli na motema na ngai mobimba ete bokoyoka bolingo na Ye.

Elingi bino koyamba makabo? Nalingi kolobela bino oyo etali likabo ekesena mpenza oyo Tata ya Lola apesi bino mpo na kosalisa bino. Ezali likabo ya losambo. Losambo ezali lipamboli monene! Tokoki kosolola na Tata ya Lola ntango nyonso, esika nyonso.

Elilingi
Yesu na bana.

Ntango Yesu azalaki na mabele, Ateyaki biso tosambela. Alobaki, “Bolombaka mpe bokozwa.”1

Mapamboli nini bokoki kosambelela? Ezali mingi, kasi lelo nalingi kokabola misato:

  1. Bosambela mpo na koyeba.

  2. Bosambela mpo na kokola.

  3. Bosambela mpo na kolakisa.

Tika tolobela moko na moko.

Ya yambo, Bosambela mpo na Koyeba

Nini bosengeli koyeba?

Ezali na loyembo etali losambo oyo bana ya Eteyelo ya bana bayembaka na mokili mobimba. Ebandaka na motuna. Oyebi loyembo nini yango ezali? Soki nazalaki elombe mpenza, nalingaki nayembela yango bino!

“Tata ya Lola, ozali mpenza wana? Mpe ozali koyoka mpe koyanola losambo ya mwana nyonso?”2

Lolenge nini ekoki bino koyeba ete Tata ya Lola azali mpenza wana, atako ntango bokoki komona Ye te?

Mokambi Russell M. Nelson abengisi bino “bosopa motema na bino epayi ya Tata na bino ya Lola. … Mpe nsima boyoka!”3 Boyokela maye bozali koyoka kati na motema na bino mpe makanisi oyo ezali koyela mayele na bino.4

Tata na Lola azali na nzoto ya mosuni mpe ya mokuwa oyo ekumisami mpe azali Tata ya molimo na yo. Mpo ete Tata na Lola azali na nguya nyonso mpe ayebaka makambo nyonso, Akoki komona bana na Ye nyonso5 mpe Akoki koyoka mpe koyanola losambo nyonso. Bokokoka kokoma koyeba bino moko ete Azali wana mpe Alingi bino.

Ntango boyebi ete Tata ya Lola azali solo mpe Alingi bino, bokoki kobika na mpiko mpe elikya! “Bosambela, azali wana; loba, azali koyoka.”6

Bosila komiyoka ete bozali bino moko? Mokolo moko ntango nkoko na biso ya mwasi Ashley azalaki na mibu motoba, azalaki kaka moko oyo azangaki moninga ya kosakana na ye na libanda ya masano ya eteyelo. Lokola atelemaki wana, komiyokaka motuya te mpe ya komonana te, likanisi ya sikisiki eyaki na moto na ye: “Zela! Nazali ngai moko te! Nazali na Klisto!” Ashley afukamaki na katikati ya libanda ya masano, akangaki maboko na ye, mpe asambelaki Tata ya Lola. Ntango afungolaki miso na ye, elenge mwasi moko ya mobu na ye atelemaki wana kotuna ye soki alingaki kosakana. Ashley ayaki koyeba ete, “Tozali motuya epayi ya Nkolo, mpe tozali solo biso moko te.”

Ntango mosusu, bokoki kolinga koyeba mpo na nini likambo moko ya mpasi ezali kosalema na bomoi na bino to mpo na nini bozwaki te lipamboli bosambelelaki. Mbala mingi motuna ya malamu mpenza ya kotuna Tata ya Lola ezalaka mpo na nini te kasi nini?

Bomikundola ntango Nefi mpe libota na ye bazalaki na nzala ntango bazalaki na mobembo kati na esobe? Ntango Nefi mpe bandeko na ye ya mibali bakendaki koluka bilei, Nefi abukaki litimbo na ye. Kasi atunaki te mpo na nini.

Elilingi
Nefi atuni Lehi esika nini akoki kozua bilei.

Nefi asalaki litimbo ya sika mpe atunaki tata na ye, Lehi, epayi wapi akokaki kokende kozwa bilei. Lehi asambelaki, mpe Nkolo alakisaki bango epayi wapi Nefi akokaki kokende.7 Tata ya Lola akokamba bino ntango bosengi Ye nini bokoki kosala mpe nini bokoki koyekola.

Ya mibale, Bosambela mpo na Kokola

Tata ya Lola alingi kosalisa bino bokola! Alingi biso mingi mpenza ete Atindaki, Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na kolakisa biso nzela ya kozala na bomoi.8 Yesu anyokwamaki, akufaki, mpe asekwaki mpo ete tokoka kolimbisama na masumu na biso mpe tokola mpo na kokoma lokola Ye.

Bolingi kokola na bompikiliki to na bosembo? Bolingi kokola na makoki ya mosala? Ntango mosusu bozali malili mpe bolingi kokola na mpiko. “Bosambela, azali wana”!9 Na nzela ya Molimo na Ye, motema na yo ekoki kobongwana, mpe kozwa bokasi.

Moninga na ngai ya sika Jonah akomaki: “Nabangaka mbala mingi na nzela na ngai ya kokende na eteyelo na ntongo. Namitungisaka na oyo etali makambo lokola kozala letale, kobosana likambo moko, mpe kosala mimekano. Ntango nazalaki na mibu zomi nabandaki koloba nsambo na nzela ya kokende na eteylo na mama na ngai. Nasengaka lisalisi nazali na yango mposa, mpe nasambelaka mpe mpo na libota na ngai. Nakanisaka lisusu makambo oyo nazalelaka na matondi. [Kosambela Tata ya Lola] esalisaki ngai. Ntango mosusu nayokaka libondi kaka ntango nabimaka na motuka te, kasi pene na ngonga nazalaka na kelasi, nayokaka kimia.”10

bondimi ya Jonah ezali kokola lokola azali kobondela mikolo nyonso mpe na nsima azali kokende liboso.

Ya misato, Bosambela mpo na Kolakisa

Bokoki kosambela mpo na lisalisi ya kolakisa bolingo ya Tata ya Lola na basusu.11 Na nzela ya Molimo na Ye, Tata ya Lola akosalisa bino bomona moto moko oyo azali na mawa mpo ete bokoka kobondisa ye. Akoki kosalisa bino bolakisa bolingo na Ye na kolimbisaka moto moko. Akoki kopesa yo mpiko ya kosalisa moto moko mpe kokabola elongo na ye ete azali mwana ya Nzambe. Bokoki kosalisa basusu bayeba mpe balinga Yesu mpe Tata na Lola lokola bino.11

Mpo na bomoi na ngai mobimba nazalaki kosambela ete tata na ngai akoma mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Ata kutu lokola elenge mwasi, nayebaki mapamboli boni ye akokaki kozwa. Ya biso libota ekoki kozwa mapamboli ya kokangisama mpo na seko. Libota na ngai, baninga, mpe ngai tozalaki kosambela mpo na ye, kasi akotaki na Eklezia te. Tata ya Lola atindaka moto moko na makasi te asala boponi.13 Akoki kotindela biso biyano na nsambo na biso na banzela misusu.

Elilingi
Mokambi Porter na baboti mpe bandeko na ye.

Ntango nakomaki mokolo ekoka, nazwaki lipamboli na ngai ya bonkoko. Na lipamboli yango nkoko alobelaki ngai ete likambo malamu mpenza nakokaki kosala mpo na kosalisa libota na ngai ezala elongo na lola ezalaki kozala ndakisa ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Wana ezali oyo nakokaki kosala!

Tata na ngai azalaki na bomoi kino mibu 86. Mikolo mitano nsima ya nkufa na ye, nazwaki liyoki ya bule ya esengo. Tata ya Lola ayebisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye ete tata na ngai alingaki kozwa mapamboli ya nsango malamu ya Yesu Kliso! Nakobosana te mokolo nafukamaki nzinganzinga ya lotale ya tempelo na ndeko na ngai ya mwasi mpe bandeko mibali mpo na kokangisama na baboti na ngai. Nabandaka kosambela mpo na lipamboli oyo ntango nazalaki na Eteyelo ya Bana, mpe nazwaki yango ntango nazalaki mama nkoko.

Ntango mosusu bozali kosambela mpo na mapamboli mpo na libota na bino mpe basusu bolingaka. Botika te! Tata ya Lola akolakisa bino oyo bokoki kosala.

Bokabola na Tata ya Lola nini ezali na motema na bino.14 Ntango bozali kosenga na motema moko lisalisi na Ye, bokozwa Molimo mpo na kokamba bino.15 Kosambela mikolo nyonso ekotondisa bino na bolingo mpo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Oyo ekosalisa bino bolinga kolanda Bango bomoi na bino mobimba!

Bokanisa nini elingaki kosalema soki bana nyonso na Afrika, Amerika ya Sudi, Asia, Eropa, Amerika ya Nodi, mpe Australi bazalaki kosambela mikolo nyonso. Mokili mobimba elingaki kopambolama na bolingo ya Nzambe mingi koleka!

Elilingi
Bana na mokili mobimba kosambela.

Nabengisi bino bosambela mpo na koyeba ete Tata ya Lola azali wana, bosambela mpo na kokola mpo na kokoma lokola Ye, mpe bosambela mpo na kolakisa bolingo na Ye na basusu. Nayebi Azali na bomoi mpe Alingaka bino. “Bosambela, azali wana.” Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.